Ozali na mposa ya kosala mingi koleka?
“YEHOVA ayokisaki ngai nkanda. Nazalaki kobondela ntango nyonso ete asunga biso na kosilisa mikakatano na biso ya mosolo mpo ete nakoka kokóba mosala na ngai ya mobongisi-nzela—kasi asalaki yango te. Nsukansuka, natikaki mosala ya mobongisi-nzela. Nasengeli mpe kondima ete nazalaki koyokela baoyo bakokaki kokóba mosala yango zúwa.” Wana ezali maloba ya Laura.
Tótalela mpe likambo oyo ekómelaki Michael, mosaleli ya misala na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova. Azalaki na mposa ya kokóma nkulutu. (1 Timoté 3:1) Lokola bambula mingi elekaki mpe mposa na ye ekokisamaki te, asilikaki mpe alingaki lisusu te ete bátalela ye mpo na kopesamela mokumba wana. Alobi ete: “Nalingaki te ete nanyokwama lisusu soki mposa yango ekokisami te.”
Likambo yango esilá kokómela yo? Esilá kokómela yo ete osundola mokumba moko ya ntina mingi kati na Teokrasi? Na ndakisa, otikaki kosala mosala ya mobongisi-nzela, mosakoli ya Bokonzi ntango nyonso? To ozali na mposa ya mikumba mosusu ya lisangá, mikumba oyo basusu bazali na yango? Ekoki kozala ete ozali mpenza na mposa ya kosala na Betele to ya kozala misionere, kasi ezalela ya makambo na yo ezali kopesa yo nzela te.
Mokanda ya Masese endimi ete: “Elikya oyo ezilisami epesi motema mpasi.” (Masese 13:12) Likambo yango ekoki komonana mingi mpenza ntango basusu bazwi mikumba oyo ozali kolikya kozwa. Liloba ya Nzambe ezali nde kopesa bososoli, libɔndisi mpe elikya epai na baoyo bazali koyoka mawa mpo ete bamposa na bango ekokisami te? Ɛɛ, ezali bongo. Ya solo, Nzembo 84 ezali komonisa mayoki ya mosaleli moko ya Yehova oyo bamposa na ye na ntina na mosala ya Yehova ekokisamaki te.
Botɔ́ndi ya Molevi
Nzembo 84 ekomamaki na bana ya Kola, bango Balevi oyo bazalaki kosala na tempelo ya Yehova, oyo bazalaki kopesa motuya monene na mikumba bazalaki na yango kati na mosala. Moko na bango ayembaki ete: “Kitoko boni ndako na yo, ɛ [Yehova] na bibele! Molimo na ngai ezali na nzala, mpe ezali na mposa na lopango na [Yehova]; motema na ngai mpe mosuni na ngai izali konganga epai na Nzambe na bomoi.”—Nzembo 84:1, 2.
Molevi oyo azalaki na mposa makasi ya kosala na tempelo ya Yehova na boye ete, ata bisika ya mpamba oyo bizalaki na nzela ya Yelusaleme, bikómaki kosepelisa miso na ye. Alobi ete: “Wana ekoleka bango lobwaku na Baka, bakobongola yango esika oyo etondi na maziba.” (Nzembo 84:6) Ɛɛ, esika oyo ezalaki bobele etando ya mabelé makauki, ekómaki lokola etúká ya mai mingi.
Lokola mokomi yango ya nzembo azalaki Molevi ya libota ya banganga te, asengelaki kosala mosala ya tempelo bobele na boumeli ya pɔ́sɔ moko mpe kolekisa sanza motoba liboso ya kokende lisusu kosala. (1 Ntango 24:1-19; 2 Ntango 23:8; Luka 1:5, 8, 9) Bantango na ye nyonso oyo etikali azalaki kolekisa yango na ndako na ye kati na mboka moko ya Balevi. Na yango, ayembaki ete: “Ndɛkɛ moke azwi ndako na ye, ndɛkɛ-na-mbangu efandelo na ye, esika na kotya bana na ye bobele na bitumbelo na yo [Yehova] na bibele, Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai.” (Nzembo 84:3) Molevi yango alingaki kozala na esengo mpenza soki azalaki lokola bandɛkɛ oyo bazalaki na efandelo ya libela na tempelo!
Ekokaki kozala likambo ya pɛtɛɛ mpo na Molevi wana ete ayoka nkanda mpo azalaki te na libaku ya kosala mingi na tempelo. Nzokande, azalaki na esengo ya kosala na lolenge ekokaki na ye, mpe asosolaki mpenza ete komipesa na Yehova na motema mobimba nde ezali likambo lileki ntina. Nini esalisaki Molevi wana ya sembo ete asepela ntango nyonso na mikumba na ye ya mosala?
Yekolá kozala na bosepeli
Molevi yango alobi ete: “Mokolo moko kati na lopango na yo eleki mikolo mosusu nkóto na malamu. Nakopona kobatela ekuke na ndako na Nzambe na ngai liboso na kofanda na hema na bato mabe.” (Nzembo 84:10) Asosolaki ete kolekisa ata mokolo moko na ndako ya Yehova ezali libaku monene mpenza. Nzokande, Molevi yango azalaki na mwa mikolo mingi oyo asengelaki kosala mosala na tempelo. Bosepeli oyo azalaki na yango mpo na mikumba na ye epusaki ye ete ayemba na esengo.
Ezali boni mpo na biso? Topesaka motuya na mapamboli tozali na yango, to tozalaka na momeseno ya kobosana nyonso oyo tosili kozwa na mosala ya Yehova? Lokola basaleli ya Yehova bamipesi mobimba epai na ye, Yehova apesi bango mikumba mpe misala mingi ya kokokisa. Kati na yango, totángi mikumba minene ya kokɛngɛla lisangá, ya kobatela yango, ya koteya, mpe mitindo ndenge na ndenge ya mosala ya ntango nyonso. Kasi yango esangisi mpe makambo mosusu ya ntina oyo matali losambo ya Yehova.
Na ndakisa, tótalela naino mosala na biso ya boklisto. Ntoma Paulo akokanisaki mokumba na biso ya kosakola nsango malamu na “eloko na motuya kati na mbeki iyemami na mabelé.” (2 Bakolinti 4:7) Otalelaka mosala wana lokola eloko ezangi motuya? Yesu Klisto, oyo abandisaki mosala ya kosakola Bokonzi, azalaki kotalela yango ete ezali eloko ya motuya mpenza, kotikeláká biso bongo ndakisa ya kolanda. (Matai 4:17) Paulo alobaki ete: “Awa ezali biso na mosala oyo . . . tozali kotika . . . te.”—2 Bakolinti 4:1.
Makita ya lisangá mpe mazali ebongiseli ya bulɛɛ oyo tosengeli kotalela yango na motuya moke te. Na makita na biso, tozwaka mateya ya ntina mpe boninga oyo tosengeli na yango. Na makita, tokoki komonisa kondima mpe elikya na biso polele na kopesáká biyano mbala na mbala mpe na kosanganáká na manáka na yango na lolenge moko to mosusu. (Baebele 10:23-25) Makita na biso ezali mpenza ebongiseli oyo ebongi kopesamela motuya!
Michael, oyo toutaki kolobela, azalaki kopesa motuya monene na mapamboli wana mpe azalaki komonisa botɔ́ndi mozindo mpo na yango. Kasi kozanga kokokisama ya mposa na ye ya kokóma nkulutu ekitisaki, na boumeli ya mwa ntango mpenza, motuya oyo azalaki kopesa na mapamboli wana. Lokola atyaki lisusu likebi likoló na yango, azongelaki bokatikati na ye mpe, na motema pɛtɛɛ nyonso, akómaki kotalela sé Yehova.
Na esika ya kobungisa bosepeli na ntina na mokumba moko oyo tozwi te, tokosala malamu soki totaleli lisusu mapamboli ndenge na ndenge oyo Yehova azali kopesa biso, lolenge mokomi na Nzembo asalaki yango.a Soki tokoki te komona ebele yango ya mapamboli, tosengeli kotala lisusu malamu, mpe kosɛnga na Yehova ete afungola miso na biso ete tómona mikumba kitoko oyo apesi biso, motindo azali kopambola biso mpe lolenge azali kosalela biso mpo na kosanzola ye.—Masese 10:22.
Ezali mpe likambo ya ntina tóyeba ete mikumba minene, lokola mosala ya nkulutu, esɛngaka kokokisa masɛngami ya sikisiki. (1 Timoté 3:1-7; Tito 1:5-9) Na yango, tosengeli komitalela biso moko malamumalamu, koluka koyeba esika nini tosengeli kosala mbongwana mpe na nsima kosala milende makasi mpo na kobongisa esika yango.—1 Timoté 4:12-15.
Kolɛmba te
Soki tozangi mokumba moko ya mosala, tosengeli te kosukisa ete Yehova alingaka mingi sé baoyo bazwi mokumba yango to mpe ete azali kopimela biso eloko moko ya malamu. Epai mosusu, tosengeli te koloba na zúwa nyonso ete baoyo bazali na mikumba bazwi yango na nzela ya koponapona bilongi ya bato, kasi te na lolenge ya Teokrasi. Kokólisa makanisi motindo wana ekoki kobimisa zúwa, kowelana, mpe ata komema biso na kosundola mikumba nyonso.—1 Bakolinti 3:3; Yakobo 3:14-16.
Laura, oyo tolobelaki na ebandeli, alɛmbaki te. Nsukansuka, alóngaki mayoki na ye ya nkanda mpe ya zúwa. Laura abondelaki Nzambe mbala na mbala ete asunga ye na kolónga mayoki na ye ya mabe, oyo mautaki na bozangi likoki ya kokóba mosala ya mobongisi-nzela. Alukaki mpe lisungi epai na mibali ya makoki kati na lisangá mpe amiyokaki ete Nzambe azali ntango nyonso kolinga ye. Alobaki ete: “Yehova apesaki ngai kimya ya elimo. Atako ngai mpe mobali na ngai tozali na likoki ya kosala mosala ya mobongisi-nzela te, tosepelaka mpenza na eleko oyo tosalaki mosala yango mpe tozali kozwa nguya na makambo oyo tomonaki na mosala wana. Tozali mpe kosunga mwana na biso ya mobali, oyo asili kokóla, kati na mosala na ye ya mobongisi-nzela.” Lokola azali lisusu na nkanda te, Laura akómi sikawa na likoki ya “kosepela na baoyo bazali kosepela” kati na mosala na bango ya mobongisi-nzela.—Baloma 12:15, NW.
Omityela mikano oyo mikoki kokokisama
Kosepela na mikumba ya mosala oyo tozali na yango sikawa elimboli te ete tosengeli kotika komityela mikano mosusu ya Teokrasi. Ntango Paulo azalaki kolimbola lisekwa mpo na bomoi na likoló, alobelaki ‘kopusana mpo na makambo oyo ezali liboso.’ Alobaki mpe ete: “Na esika nini ekómi biso, ekoki ete tótambola liboso mpenza.” (Bafilipi 3:13-16) Mikano ya Teokrasi ekoki kosalisa biso ete tópusana liboso. Nzokande, likambo lileki ntina ezali nde ya kosala ete mikano yango mikokana na makoki na biso.
Mikano oyo mityami engebene makoki ya moto mizali ya mayele mpe mikoki kokokisama. (Bafilipi 4:5) Yango elingi koloba te ete mokano oyo mosɛngi bambula mingi liboso ya kokokisama mozali ya bolema. Mokano oyo esɛngi ntango mingi boye ekoki kokokisama mokemoke na kosaláká yango ndambondambo, to litambe na litambe. Matambe yango ekoki kozala miboko ya ntina mpo na bokóli na elimo. Na kokokisáká malamumalamu litambe mokomoko, okosepela, wana ozali kopusana mpo na kokokisa mokano yango mobimba, okoyoka mawa te.
Likanisi ya bokatikati
Nzokande, esengeli koyeba ete, na kotalela makambo mpe makoki na biso, ezali na mikumba mosusu oyo tokoki kozwa yango te. Komityela yango lokola mikano ekobimisa bobele mawa mpe mitungisi. Mikano motindo wana misengeli kotyama naino pembeni mpo na sikawa. Ekozala mpasi te mpo na biso kosala bongo soki tozali kobondela mpo na kozwa bosepeli oyo euti na Nzambe mpe soki tosali ete kokokisa mokano ya Yehova ezala lobanzo na biso ya liboso. Ntango tozali na mposa ya kozwa mikumba, eloko ya ntina oyo tokoluka ezali te makumisi na oyo tosali, kasi nde nkembo ya Yehova. (Nzembo 16:5, 6; Matai 6:33) Biblia eyebisi biso na elónga mpenza ete: “Pesá misala na yo epai na [Yehova] mpe mikano na yo ikobongisama.”—Masese 16:3.
Na kotaleláká Nzembo 84, tokoki kososola mpenza ete mokomi ya nzembo azalaki na ezaleli motindo wana liboso ya mikumba na ye ya mosala, mpe na yango Yehova asopelaki ye ebele ya mapamboli. Esengeli mpe koyeba ete nzembo yango ezali kopesa matomba epai na basaleli ya Yehova kino na mikolo ya lelo.
Na kotyáká elikya mozindo epai na Yehova, tiká ete ozala na bokatikati na oyo etali mposa na yo ya kozwa mikumba mosusu mpe bosepeli na yo na oyo ozali na yango sikawa. Kotika soko moke te ete mposa oyo ozali na yango ya kosala mingi koleka ekitisa motuya ya oyo ozali kosala sikawa mpe elongola esengo na yo ya kosalela Yehova mpo na libela. Tyá elikya epai na Yehova, mpamba te yango ekomemela yo esengo, lokola maloba ya Molevi mamonisi yango ete: “[Yehova] na bibele, esengo na moto oyo akotyaka elikya na ye epai na yo.”—Nzembo 84:12.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisoló “Opesaka motuya na biloko ya bulɛɛ?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yúni 1988 (ebimeli ya Lifalansé).
[Etanda na lokasa 11]
Mikano oyo tokoki komityela
Kotánga Biblia mokolo na mokolo.—Yosua 1:8; Matai 4:4
Kokólisa nguya na biso ya kososola na kosaleláká Makomami.—Baebele 5:14
Kokólisa boninga ya penepene elongo na Nzambe.—Nzembo 73:28
Kolóna mbuma ya elimo mokomoko.—Bagalatia 5:22, 23
Kobongisa lolenge ya mabondeli na biso.—Bafilipi 4:6, 7
Kokólisa makoki na biso ya mosala ya kosakola mpe ya koteya.—1 Timoté 4:15, 16
Kotánga mpe komanyola likoló na nimero mokomoko ya zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!—Nzembo 49:3
[Bililingi na lokasa 9]
Ntango ozali komityela mikano, tyá kosala mokano ya Nzambe na esika ya liboso