Omipesa na botángi
“Kino ekoya ngai, otyaka motema na kotánga Makomi polele mpe na kosakola mpe na koteya.”—1 TIMOTÉ 4:13.
1. Lolenge nini tokoki kozwa litomba na botángi ya Biblia?
YEHOVA NZAMBE apesi bato likoki monene ya koyekola kotánga mpe kokoma. Apesi mpe Liloba na ye, Biblia, ete tókoka kolakisama malamu. (Yisaya 30:20, 21) Na elobeli ya elilingi, makambo mazwami kati na yango mazali kopesa biso nzela ya “kotambola” elongo na batata ya mabota oyo bazalaki kobanga Nzambe na ndakisa Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo. Tokoki “komona” basi oyo bazalaki na bobángi Nzambe, lokola Sara, Lebeka, mpe Luta, mwasi mosembwi ya mboka Moaba. Ee, tokoki “koyoka” Yesu Klisto azali kosala Lisoló likoló na Ngomba. Biso mpe tokoki kozwa esengo nyonso wana mpe kolakisama wana ntá bonene oyo euti na Makomami mosantu soki tozali batángi malamu.
2. Nini ezali komonisa ete Yesu mpe bantoma na ye bayebaki kotánga malamu?
2 Na ntembe te, Yesu Klisto moto ya kokoka ayebaki mpenza kotánga malamu, mpe azangaki te koyeba Makomami ya Liebele malamu mpenza. Yango wana, na ntango Zábolo azalaki komeka ye, Yesu azalaki kozongela maloba na yango mbala na mbala mpe azalaki koloba, “Ekomami ete.” (Matai 4:4, 7, 10) Mokolo moko kati na eyanganelo na Nasalete, atángaki liboso na bato nyonso eteni moko ya esakweli ya Yisaya mpe alobaki ete eteni yango ekokanaki epai na ye. (Luka 4:16-21) Ezalaki boni mpo na bantoma ya Yesu? Kati na makomi na bango, bazalaki mbala na mbala kozongela Makomami ya Liebele. Atako bakonzi ya Bayuda batalelaki Petelo mpe Yoane lokola bato bayebi mokanda te mpe bato mpamba mpo ete bayekolaki kati na biteyelo minene ya Baebele te, mikanda na bango oyo mipemami na Nzambe mimonisaki polele ete bazalaki na likoki ya kotánga mpe ya kokoma malamu. (Misala 4:13) Kasi koyeba kotánga ezali mpenza na ntina?
“Esengo na ye oyo azali kotánga na mongongo makasi”
3. Mpo na nini kotánga Makomami mpe mikanda ya boklisto oyo milimbolaka Biblia ezali na ntina mingi?
3 Kozwa mpe kosalela boyebi ya sikisiki ya Makomami ekoki kopesa bomoi ya seko. (Yoane 17:3) Na yango, Batatoli ya Yehova bayebi ete ezali mpenza na ntina mingi ete bátángaka mpe bayekolaka Makomami Mosantu mpe mikanda ya boklisto oyo milimbolaka Biblia, oyo Nzambe azali kopesa na nzela ya kelasi ya baklisto bapakolami oyo basali bongo moombo na sembo mpe na mayele. (Matai 24:45-47) Ya solo, na kosaleláká mikanda ya la Société Watch Tower oyo misalemi mpo na ntina yango mpenza, bankóto ya bato basili kolakisama mpo na koyeba kotánga mpe na bongo kozwa boyebi ya Liloba ya Nzambe oyo ekopesaka bomoi.
4. (a) Mpo na nini bolamu ezwamaka na kotánga, na koyekola, mpe na kosalela Liloba ya Nzambe? (b) Paulo ayebisaki Timoté makambo nini mpo na oyo etali botángi?
4 Esengo eyaka na kotánga, na koyekola, mpe na kosalela Liloba ya Nzambe. Yango ezali bongo mpamba te na kosaláká motindo wana tozali kosepelisa Nzambe mpe kopesa ye lokumu, tozali komizwela mapamboli epai na ye mpe tozali komizwela esengo. Yehova alingi ete basaleli na ye bázala na esengo. Na yango, apesaki banganga etindá ya kotángela bato ya Yisalaele ya kala mibeko na ye. (Deteronome 31:9-12) Na ntango mokomi Ezela mpe basusu batángelaki bato nyonso oyo bayanganaki na Yelusaleme mibeko, na kolimboláká yango polele, “kosepela mingi” emonanaki mpo na yango. (Nehemia 8:6-8, 12) Na nsima ntoma moklisto Paulo ayebisaki Timoté moninga na ye ya mosala ete: “Kino ekoya ngai, otyaka motema na kotánga Makomi polele mpe na kosakola mpe na koteya.” (1 Timoté 4:13) Libongoli mosusu elobi ete: “Omipesa na botángi ya Makomami liboso na bato nyonso.”—New International Version.
5. Boyokani nini ezali kati na esengo mpe kotánga lokola Emoniseli 1:3 elakisi yango?
5 Likambo oyo ete esengo na biso etaleli kotánga mpe kosalela Liloba ya Nzambe emonisami polele kati na Emoniseli 1:3. Kuna bayebisi biso ete: “Esengo na [ye oyo azali kotánga na mongongo makasi, NW] mpe na bayoki na maloba na kosakola oyo, mpe baoyo batosi makambo masili kokomama kati na yango, mpo ete elaka ezali penepene.” Ee, tosengeli kotánga na mongongo makasi mpe koyoka maloba ya bisakweli ya Nzambe bizwami kati na mokanda ya Emoniseli mpe kati na Makomami nyonso. Moto oyo azali na esengo ya solo mpenza ezali ye oyo “mposa na ye ezali kati na Mobeko na [Yehova]; akokanisaka mpe Mobeko na ye butu na moi.” Yango ebimisaka litomba nini? “[Likambo nyonso oyo asalaka elóngaka, NW].” (Nzembo 1:1-3) Na yango, ezali na bantina oyo ebongi mpo na yango lisangá ya Yehova ezali kolendisa mokomoko na biso ete atángaka mpe ayekolaka Liloba na ye, kati na libota, mpe elongo na baninga.
Salá makasi ete okanisa mpe omanyola
6. Yosua apesamelaki etindá ya kotánga nini, mpe yango ebimisaki litomba nini?
6 Lolenge nini okoki kozwa mbano ebongi mpenza kati na botángi na yo ya Liloba ya Nzambe mpe ya mikanda ya boklisto oyo milimbolaka Biblia? Na ntembe te, okomona ete ezali na litomba na kosala lokola Yosua, mokambi moko ya Yisalaele ya kala oyo azalaki kobanga Nzambe. Azwaki etindá oyo: “Búku oyo ya mobeko esengeli kolongwa na monɔkɔ na yo te, mpe osengeli kotánga yango na mongongo ya nsé butu na moi, mpo ete okoka kosɛnzɛla kosala engebene nyonso oyo ekomami kati na yango; na bongo nzela na yo ekolónga mpe na bongo okosala na mayele nyonso.” (Yosua 1:8, NW) ‘Kotánga na mongongo ya nsé’ elimboli koloba maloba oyo yo moko ozali kotánga, na mongongo ya malɛmbɛ. Yango ekoki kosalisa biso ete tómikundola makambo oyo totángaka, mpamba te ezali kokɔtisa makambo kati na bɔɔngɔ́. Yosua asengelaki kotánga Mibeko “butu na moi,” to mokolo na mokolo. Yango ezalaki nzela ya kozwa bolóngi mpe ya kosala na mayele nyonso na kokokisáká mikumba ya Nzambe. Botángi yango ya Liloba ya Nzambe mbala na mbala ekoki kosalisa yo na lolenge wana.
7. Wana tozali kotánga Liloba ya Nzambe, mpo na nini tosengeli kosala yango na lombangu te?
7 Wana ozali kotánga Liloba ya Nzambe, osengeli kosala yango na lombangu te. Soki okani kolekisa mwa ntango moko boye mpo na kotánga Biblia to mikanda mosusu ya boklisto oyo milimbolaka Biblia, ekozala malamu ete okitisa mpenza motema. Yango ezali mpenza na ntina mingi soki ozali kotánga na mokano ete omikundola makambo ya ntina. Mpe wana ozali kotánga, salá makasi ete okanisaka. Luká kososola maloba ya bakomi ya Biblia. Omituna ete: ‘Awa mokomi alingaki koloba nini? Lolenge nini nakoki kosalela likambo oyo nasili koyeba?’
8. Mpo na nini ezali litomba ete tómanyola wana tozali kotánga Makomami?
8 Ozwa ntango ya komanyola wana ozali kotánga Makomami Mosantu. Yango ekosalisa yo ete omikundola masoló ya Biblia mpe osalela mitindá oyo mizwami kati na Makomami. Na komanyoláká likoló na Liloba ya Nzambe mpe na komikundoláká makambo ya ntina, yango ekopesa yo mpe likoki ya koloba uta na nsé ya motema, kopesáká bongo biyano ya sikisiki na mituna oyo mitunami na bosembo nyonso, na esika ya koloba likambo moko oyo na nsima okoyoka mawa mpo na yango. Lisese moko lipemami na Nzambe lilobi ete: “Motema na moyengebene ekobanzabanza liboso na kozongisa liloba.”—Masese 15:28.
Kangisá makambo ya sika na oyo ya kala
9, 10. Lolenge nini botángi na yo ya Biblia ekoki koyeisama kitoko na kokangisáká makambo ya Makomami oyo oyekoli sika na oyo osilá koyeba liboso?
9 Baklisto mingi basengeli kondima ete na ntango moko boye bazalaki na boyebi moke na ntina na Nzambe, Liloba na ye, mpe mikano na ye. Nzokande, lelo oyo, baministre baklisto wana, kobanda na bozalisi mpe kokwea ya moto na lisumu, bakoki kolimbola ntina ya mbeka ya Klisto, bakoki kolobela kobomama ya ebongiseli mabe ya biloko oyo, mpe bakoki komonisa lolenge nini bato ya botosi bakopambolama na kozwáká bomoi ya seko na paladiso na mabelé. Yango ekoki kozala bongo mingi mpenza mpo ete basaleli wana ya Nzambe basili kozwa “boyebi na koyeba Nzambe” na koyekoláká Biblia mpe mikanda ya boklisto oyo milimbolaka Biblia. (Masese 2:1-5) Mokemoke, bazali kokangisa makambo oyo bayekoli sika na makambo oyo basilá kososola liboso.
10 Kokangisa makambo oyo oyekoli yango sika kati na makomami mpe oyo oyekolaki liboso ezali na litomba mpe epesaka mbano. (Yisaya 48:17) Na ntango mibeko, mitindá ya Biblia, ata makanisi mosusu ya elilingi mamonisami, kangisá yango na oyo osilá koyeba liboso. Yokanisá likambo yango na makambo oyo osilá koyekola likoló na “lolenge na maloba sembo.” (2 Timoté 1:13) Luká makambo oyo makoki kosalisa yo ete olendisa boyokani na yo elongo na Nzambe, osembola lisusu malamu koleka bomoto na yo ya boklisto, to oyo ekoki kosunga yo ete oyebisa makambo na solo ya Biblia epai na basusu.
11. Tosengeli kosala nini wana tozali kotánga likambo moko oyo Biblia ezali kolobela etamboli malamu? Pesá ndakisa.
11 Wana ozali kotánga likambo moko oyo Biblia elobi na ntina na etamboli, meká kososola motindá oyo motalelami kati na yango. Manyolá likoló na yango, mpe zwá ekateli na ntina na oyo okosala soki makambo motindo wana makómeli yo. Yosefe, mwana ya Yakobo, aboyaki makasi mpenza kosala pite na mwasi ya Potifala, kotunáká ete: “Nakoka kosala mabe monene oyo mpe kosala lisumu epai na Nzambe boni?” (Genese 39:7-9) Kati na lisoló wana ya kosimba motema, ozali komona motindá moko oyo ezwami kati na yango—pite ezali lisumu na miso ya Nzambe. Kati na makanisi na yo, okoki kokangisa motindá yango na maloba mosusu mazwami kati na Liloba ya Nzambe, mpe okoki komikundola yango mpe kozwela yango litomba soki omekami ete osala likambo mabe motindo wana.—1 Bakolinti 6:9-11.
Meká komona makambo oyo malobelami kati na Makomami
12. Mpo na nini osengeli komeka komona lolenge makambo mazali koleka kati na Biblia na ntango ozali kotánga yango?
12 Mpo na kokɔtisa makambo kati na bɔɔngɔ́ na yo wana ozali kotánga, meká komona makambo oyo mazali kosalema. Kati na makanisi na yo moná etando, bandako, mpe bato. Yoká mingongo na bango. Yoká nsolo ya limpa oyo ezali kotumbama kati na fulu. Omitya mpenza lokola ete makambo yango mazali kosalema na miso na yo mpenza. Na bongo, botángi na yo ekozala likambo ya kosimba motema mpenza, mpamba te okoki komona engumba moko ya kala, komata na ngomba moko molai, kokamwa na komona biloko kitoko bizalisami, to kosala boninga elongo na mibali mpe basi oyo bazalaki na kondima monene.
13. Lolenge nini okoki kolobela makambo makomami kati na Basambisi 7:19-22?
13 Na ndakisa, tóloba ete ozali kotánga mokanda ya Basambisi 7:19-22. Meká komona makambo oyo mazali kosalema. Mosambisi Gideona mpe mibali Bayisalaele ya makasi nkámá misato basili kotɛlɛma pene na molako ya Bamadiani. Ezali soko na ngonga ya zomi ya butu, ebandeli ya ‘bokɛngɛli na katikati na butu.’ Basodá-bakɛngɛli ya Bamadiani bauti kotyama kala mingi te na esika ya bokɛngɛli, mpe molili ezipi molako ya banguna ya Yisalaele wana ezali bango kolala mpɔngi. Talá! Gideona mpe bato na ye basimbi maseke. Bazali na mbɛki minene ya mai mpe ebombi miinda oyo basimbi na lobɔkɔ ya mobali. Na pwasa, bituluku misato oyo mokomoko na yango ezalaki na bato monkámá bayulaki maseke, babukaki bambeki, mpe batombolaki miinda likoló, mpe bangangaki ete: “Mompanga mpo na [Yehova] mpe mpo na Gideona!” Otali molako yango. Ee, Bamadiani babandi kokima mpe babandi konganga! Wana bato nkámá misato bakóbi koyula maseke na bango, Nzambe apusi Bamadiani ete bábomana bango na bango na mimpanga. Bamadiani basili kokima mpe Yehova alóngisi Bayisalaele.
Tóyekola batoli ya ntina
14. Lolenge nini Basambisi mokapo 9 ekoki kosalelama mpo na koteya mwana ntina ya kozala na komikitisa?
14 Na kotángáká Liloba ya Nzambe, tokoki kozwa batoli mingi. Na ndakisa, mbala mosusu olingi kolakisa bana na yo ntina ya kozala na komikitisa. Ekozala mpasi te soki omeki komona mpe kososola ndimbola ya makambo oyo malobamaki kati na esakweli ya Yotama, mwana na Gideona. Bandá kotánga na Basambisi 9:8. Yotama alobaki ete: “Nzeté babimaki mpo na kopakola moko ete azala mokonzi na bango.” Nzeté na bilaya, nzeté na mosuke, mpe nzeté na vinyo baboyaki koyangela. Kasi nzeté moke ya nkamba na nzube endimaki na esengo nyonso kokóma mokonzi. Nsima ya kotánga lisoló yango na mongongo makasi elongo na bana na yo, okoki kolimbola bango ete banzeté ya motuya ezalaki elilingi ya bato oyo babongi kasi balukaki te kozwa esika ya bokonzi likoló na bandeko na bango Bayisalaele. Nkamba na nzube, oyo ekokaki kosalelama bobele mpo na kopelisa na yango mɔ́tɔ, ezalaki elilingi ya bokonzi ya lolendo ya Abimeleke, mobomi oyo alingaki koyangela basusu, kasi akufaki, na kokokisama ya esakweli ya Yotama. (Basambisi, mokapo 9) Mwana nini akolinga kokóla ete akóma lokola nkamba na nzube?
15. Lolenge nini ntina ya kozala sembo emonisami polele kati na mokanda ya Luta?
15 Ntina ya kozala sembo emonisami kati na mokanda ya Luta oyo ezwami kati na Biblia. Na ndakisa, basangani ya libota na yo bazali kotánga lisoló yango na mongongo makasi moto na moto na ngala na ye mpe bazali komeka kokɔtisa kati na makanisi na bango makambo oyo malobami kuna. Ozali komona Luta mwasi ya mboka Moaba kati na mobembo oyo azali kosala mpo na kokende na Beteleme elongo na Naomi, mama-bokilo na ye, oyo akufelá mobali, mpe oyoki Luta azali koloba ete: “Bato na yo bakozala bato na ngai mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai.” (Luta 1:16) Ozali komona Luta, mwasi oyo alingá mosala, azali kolokota biloko mikemike oyo babuki mbuma na elanga ya Boaza bazali kotika. Ozali koyoka lolenge Boaza azali kopesa ye longonya, na kolobáká ete: “Bato na ngai nyonso na mboka bayebi ete ozali mwasi malamu.” (Luta 3:11) Mwa moke na nsima, Boaza abali Luta. Na boyokani na ebongiseli ya kobalana na mwasi ya ndeko ya mobali nsima ya liwa na ye, na nzela ya Boaza ‘aboteli Naomi’ mwana mobali. Luta akómi nkɔ́kɔ ya Davidi mpe na nsima nkɔ́kɔ ya Yesu Klisto. Na yango, azwaki “libonza mobimba.” Lisusu, baoyo batángaka masoló ya Makomami bazwaka batoli ya ntina: Zalá sembo epai na Yehova, mpe okozwa mapamboli mingi.—Luta 2:12; 4:17-22; Masese 10:22; Matai 1:1, 5, 6.
16. Komekama nini Baebele misato bakutanaki na yango, mpe lolenge nini lisoló yango likoki kosalisa biso?
16 Lisoló ya Bayisalaele oyo nkombo na bango ezalaki bongo Sadalaka, Mesaka, mpe Abede-nego ekoki kosalisa biso ete tókangama makasi na Nzambe wana tokutani na komekama. Meká komona lolenge likambo yango esalemaki wana Danyele mokapo 3 ezali kotángama na mongongo makasi. Ekeko moko monene esalemi na wolo etɛlɛmisami na esobé ya Dula, epai kuna bakonzi ya Babilone bayanganisami. Wana bibɛtelo miziki biyokani, bakwei na nsé mpe basambeli ekeko oyo Mokonzi Nebukadenesala asilaki kotɛlɛmisa. Na yango, bato nyonso basali bongo, longolá bobele Sadalaka, Mesaka, mpe Abede-nego. Na limemya nyonso, kasi na kozaláká mpe ngwi, bayebisi mokonzi ete bakosalela nzambe na ye te mpe bakosambela ekeko na ye ya wolo te. Bilenge misato wana Baebele babwakami kati na litumbo ya mɔ́tɔ. Kasi likambo nini lisalemi? Mokonzi atali na kati, amoni mibali minei oyo nzoto na bango ezali naino makasi, moko na bango ‘azali lokola mwana moko na [banzambe, NW].’ (Danyele 3:25) Baebele misato babimisami na litumbo ya mɔ́tɔ, mpe Nebukadenesala apamboli Nzambe na bango. Komeka komona lolenge lisoló yango elekaki ezali kopesa mbano. Mpe ezali mpenza kopesa toli malamu na ntina na kozala na bosembo epai na Yehova kati na komekama!
Tózwa litomba na kotánga Biblia kati na libota
17. Tángá na mokuse mwa makambo makoki kopesa matomba oyo libota na yo ekoki koyekola yango na kotángáká Biblia elongo.
17 Libota na yo ekoki kozwa matomba mingi soki bozali mbala na mbala kolekisa ntango na kotánga Biblia elongo. Kobanda na Genese, okoki komeka komona kozalisama ya biloko nyonso mpe kotala Paladiso oyo ezalaki bongo efandelo ya moto na ebandeli. Okoki kosangana mpenza kati na makambo oyo batata ya mabota ya sembo mpe mabota na bango bakutanaki na yango mpe kokenda elongo na Bayisalaele wana ezalaki bango kokatisa Mai Motane na makolo. Okoki komona lolenge elenge mobali Davidi akweisaki Goliata, engambe Mofilisitia. Libota na yo ekoki komona botongi ya tempelo ya Yehova na Yelusaleme, ekoki komona lolenge ebebisamaki na mampinga ya Babilone, mpe ekoki komona kotongama na yango lisusu na litambwisi ya moyangeli Zelubabele. Elongo na babateli na mpate pene na Beteleme, okoki koyoka lolenge anzelu azali kosakola kobotama ya Yesu. Okoki koyeba makambo mingi matali batisimo na ye mpe mosala na ye, okoki komona lolenge akabi nzoto na ye ya bomoto lokola lisiko, mpe okoki kosangana elongo na ye kati na esengo oyo azali na yango wana asekwisami. Na nsima, okoki kosala mibembo elongo na ntoma Paulo mpe kotala lolenge azali kofungola masangá wana losambo ya boklisto ezali kopalangana. Lisusu, kati na mokanda ya Emoniseli libota na yo ekoki kosepela na emonaneli ya nguya oyo Yoane amonaki mpo na mikolo mizali koya, kati na yango mpe Boyangeli ya Mbula nkóto ya Klisto.
18, 19. Makanisi nini malamu mapesami na ntina na lolenge ya kotánga Biblia kati na libota?
18 Soki ozali kotánga Biblia na mongongo makasi kati na libota, tángá yango na polele nyonso mpe na esengo. Wana bozali kotánga biteni mosusu ya Makomami, mosangani moko ya libota—mbala mosusu mpenza tata—akoki kotánga maloba ya bokɔti na lisoló. Basusu kati na bino bakoki kokamata bisika ya bato oyo batalelami kati na lisoló yango ya Biblia, kotángáká biteni bipesameli yo na mayoki oyo ebongi mpenza.
19 Wana ozali kosangana na botángi ya Biblia kati na libota, likoki na yo ya kotánga ekoki kokóma lisusu malamu koleka. Na ntembe te, boyebi na yo ya Nzambe ekokóla, mpe yango ekobɛlɛmisa bino pene na ye. Asafa ayembaki ete: “Kasi mpo na ngai, ezali malamu ete nabɛlɛma na Nzambe, nasili kotya elikya na ngai kati na Nkolo [Yehova], ete [nasakola] misala na yo nyonso.” (Nzembo 73:28) Yango ekosalisa basangani ya libota na yo ete bálanda ndakisa ya Mose, oyo “ayikaki mpiko lokola ete azali komona ye oyo akomonanaka te,” elingi koloba, Yehova Nzambe.—Baebele 11:27.
Botángi mpe mosala ya boklisto
20, 21. Lolenge nini mokumba na biso ya kosakola ezali na boyokani na likoki na biso ya kotánga malamu?
20 Mposa na biso ya kosambela “Ye oyo akomonanaka te” esengeli kopusa biso na kosala makasi ete tókóma batángi malamu. Likoki ya kotánga malamu ezali kosunga biso mpenza ete tópesa litatoli na lisalisi ya Liloba ya Nzambe. Ezali solo kosalisa biso ete tókokisa mosala ya kosakola Bokonzi oyo mpo na yango Yesu atindaki bayekoli na ye wana alobaki ete: “Bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na mwana mpe na [elimo] santu, kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso esili ngai kolaka bino.” (Matai 28:19, 20; Misala 1:8) Kotatola ezali mosala ya basaleli ya Yehova oyo eleki ntina, mpe likoki ya kotánga ezali kosalisa biso ete tókokisa yango.
21 Kozala motángi malamu mpe moteyi malamu ya Liloba ya Nzambe ezali kosɛnga milende. (Baefese 6:17) Na yango, ‘omeka na nguya nyonso komimonisa yo moko epai na Nzambe lokola mosali oyo abongi, mosemboli malamu ya liloba na solo.’ (2 Timoté 2:15) Kólisá boyebi na yo ya solo ya Makomami mpe kólisá makoki na yo lokola Motatoli ya Yehova na komipesáká na botángi.
Biyano na yo bizali nini?
◻ Boyokani nini ezali kati na esengo mpe botángi ya Liloba ya Nzambe?
◻ Mpo na nini komanyola likoló na oyo ozali kotánga kati na Biblia?
◻ Mpo na nini kokangisa makambo mpe komeka komona makambo wana tozali kotánga Makomami?
◻ Wapi mwa ndambo ya batoli oyo tokoki kozwa kati na botángi ya Biblia?
◻ Mpo na nini ebongi kotánga Biblia na mongongo makasi kati na libota, mpe kotánga malamu ezali na boyokani nini na mosala ya Boklisto?
[Bililingi na lokasa 13]
Na ntango bozali kotánga Biblia kati na libota, meká komona lolenge makambo yango malekaki mpe manyolá likoló na ndimbola na yango