“Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe” liyangani ya etúká na 1996
NA NTANGO ya kala, libota ya Yehova lizalaki kokumisa bilambo minene misato mbula na mbula. Bobele bongo, na mikolo na biso libota mpo na nkombo ya Yehova liyanganaka mbala misato na mbula na mabaku ya mayangani. Basepelaka koyangana na boumeli ya mokolo moko na liyangani ya mokolo moko, mikolo mibale na liyangani ya zongazonga, mpe mikolo misato to minei na liyangani ya etúká. Na mbula oyo motó ya likambo ya liyangani ya etúká ezali “Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe.”
Oyo nde motó ya likambo ebongi mpenza! Nzambe na biso, Yehova, azali “Nzambe ya kimya,” ee, “Nzambe oyo apesaka kimya.” Mokonzi na biso, Yesu Klisto, azali “Nkolo ya Kimya,” mpe nsango oyo basaleli ya Yehova bazali komema ezali nsango ya kimya euti na Nzambe. (Bafilipi 4:9; Baloma 15:33; Yisaya 9:6; Nahumu 1:15) Manáka malamu ya liyangani masili kobongisama oyo makosalisa moto nyonso na kokanga mpenza ntina ya kimya ya Nzambe.
Na mbula oyo, bobele na Burundi, na Congo mpe na Zaïre mayangani ya etúká makozala 42. Na ntembe te, ekoki kozala na liyangani ya etúká penepene na esika ozali. Mpo na nini te kotuna Batatoli ya Yehova oyo bazali na kartyé na yo mpo na koyeba sikisiki ntango nini mpe epai wapi yango ekosalema mpe bongo omibongisa mpo na koyangana? Baoyo nyonso balingi kimya ya solo mpe ya koumela bakoyambama na esengo mpenza.