Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/9 nk. 27-30
  • Ba Cathares​—Bazalaki bamartiru baklisto?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ba Cathares​—Bazalaki bamartiru baklisto?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Botɛmɛli mateya ya lingomba na Moyen Âge na Mpótó
  • Basakoli-batámboli
  • Ba Cathares bazalaki banani?
  • Lolenge oyo bango bazalaki kotalela Biblia
  • Bazalaki baklisto te
  • Etumba ya kotuka Nzambe
  • Kobomama ya nsɔ́mɔ na boumeli ya Inquisition
  • Ba-Vaudois​—Babandaki na lipɛngwi mpo na kosuka na Lingomba ya Protesta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Ekateli na Nzambe mpo na “motioli na mibeko”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Bitumba ya mangomba na France
    Lamuká!—1997
  • Bakonzi na mangomba bango nde babongi koyangela mokili?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/9 nk. 27-30

Ba Cathares​—Bazalaki bamartiru baklisto?

“BOMÁ bango nyonso; Nzambe akoyeba bato na ye.” Na mokolo wana ya eleko ya molungé ya mobu 1209, bafandi ya engumba Béziers, na Súdi ya France, babomamaki. Sángó Arnold Amalric, oyo aponamaki lokola motindami ya pápa mpo na kokamba etuluku ya babundi ya Katolike na bitumba ya croisades, amonisaki motema mawa soko moke te. Na ntango bato na ye batunaki ye soki lolenge nini basengelaki kokesenisa Bakatolike mpe baoyo batalelamaki lokola bapɛngwi, elobami ete apesaki eyano wana ya kotuka oyo ezongelami awa na likoló. Bakomi na makambo ya kala oyo bazali Bakatolike balɛmbisaki eyano yango ete: “Bóbanga te. Nabanzi ete bobele bato moke nde bakobongwana.” Ata soki eyano na ye ya solo ezalaki mpenza nini, likambo oyo limonanaki lizali oyo ete mibali, basi, mpe bana 20 000 babomamaki na mabɔ́kɔ ya babundi 300 000, oyo bakambamaki na bakonzi ya Lingomba ya Katolike.

Nini ebimisaki libomi wana? Ezalaki ebandeli ya Croisade albigeoise oyo Pápa Innocent III atindaki mpo na koboma baoyo batalelamaki lokola batɛmɛli na etúká ya Languedoc, na ntei ya súdi ya France. Liboso ete esuka, soko bambula 20 na nsima, motángo ya pene na milió moko ya bato​—ba Cathares, ba Vaudois, ata mpe Bakatolike mingi—​babomamaki.

Botɛmɛli mateya ya lingomba na Moyen Âge na Mpótó

Bokóli ya nokinoki ya mombongo na ekeke ya 11 T.B. ememaki mbongwana monene na lolenge ya bomoi mpe ezalela ya nkita ya bato na Mpótó na eleko ya Moyen Âge. Bingumba bisalemaki, na yango bato mingi ya mosala ya mabɔ́kɔ mpe bato ya mombongo bakómaki kofanda kuna. Yango epesaki nzela na kobimisama ya makanisi ya sika. Botɛmɛli mateya ya lingomba ebandaki na Languedoc, epai kuna ezaleli monene ya kotika nzela na makanisi ya basusu mpe ya lolenge ya bomoi ekólaki mingi koleka na bisika nyonso mosusu na Mpótó. Engumba Toulouse na Languedoc ezalaki esika ya misato kati na bingumba oyo bizalaki na bozwi koleka na mikili ya Mpótó. Ezalaki mokili oyo kati na yango bato na ntɔ́ki oyo babéngami ba troubadours bayikanaki mingi, oyo bamoko na maloba ya nzembo na bango ezalaki kolobela makambo ya politike mpe ya lingomba kozanga komonisa yango polele.

Wana elobelaki ezalela ya makambo ya lingomba na bikeke ya 11 mpe ya 12, Revue d’histoire et de philosophie religieuses elobi ete: “Na ekeke ya 12, lolenge moko mpe na bikeke ya liboso, etamboli ya bakonzi ya lingomba, bozwi na bango, ezaleli na bango ya kondima kanyaka, mpe ezaleli na bango ya mbindo ekóbaki kobimisa ntembe, kasi ezalaki mingimingi bozwi mpe nguya na bango, boyokani na bango ya nkúku elongo na bakonzi ya mboka mpe mikano na bango nde elobelamaki mabe.”

Basakoli-batámboli

Ata Pápa Innocent III mpe ayebaki ete ezaleli ya kanyaka oyo ekólaki kati na Lingomba esengelaki kopamelama mpamba te yango nde ebakisaki motángo ya baoyo bazalaki kotɛmɛla mateya ya lingomba, ya basakoli-batámboli na Mpótó, mingimingi na súdi ya France mpe na nɔ́rdi ya Italie. Mingi na bango bazalaki ba Cathares to ba Vaudois. Apamelaki makasi basángó mpo ete bazalaki koteya bato te, alobaki ete: “Bana bazali na mposa ya limpa, bino bozali kopesa bango yango te.” Nzokande, na esika ya kolendisa ebongiseli ya koteya Biblia epai na bato, Pápa Innocent III alobaki ete “Makomami ya Nzambe ezali mozindo na boye ete bobele bato mpamba te mpe baoyo bayebi mokanda te, kasi ata mpe bato ya mayele mpe baoyo batángá mingi, bakoki mpenza komeka kososola yango te.” Longolá bakonzi ya mangomba, bato nyonso bapekisamaki kotánga Biblia, mpe na ntango wana epesamelaki nzela bobele na Latin.

Mpo na kopekisa baoyo bakabwanaki na lingomba ete báteya te, pápa asalaki etuluku ebéngami Ebongiseli ya basángó-basakoli, to ba Dominicains. Na kokesana na bakonzi ya lingomba ya Katolike oyo bazalaki na bozwi mingi, basángó wana basengelaki kozala bateyi-batámboli batindami mpo na kolóngisa mateya ya Lingomba ya Katolike epai na baoyo batalelamaki lokola “bapɛngwi” na súdi ya France. Pápa atindaki mpe bato na ye mpo na kosolola na ba Cathares mpe komeka kozongisa bango kati na Lingomba ya Katolike. Lokola balóngaki te, nkutu moko na batindami yango akufaki, elobami ete moko na batomboki nde abomaki ye, Pápa Innocent III apesaki bongo etindá ete bákende etumba ebengami Croisade albigeoise oyo esalemaki na mobu 1209. Albi ezalaki moko na bingumba epai kuna ba Cathares bazalaki mingi mpenza, yango wana bakomi na masoló ya lingomba bazalaki kobénga ba Cathares ete ba albigeois mpe bazalaki kosalela nkombo yango mpo na kobénga “bapɛngwi” nyonso ya etúká wana, kati na bango mpe ba Vaudois. (Talá etánda oyo ezali awa na nsé.)

Ba Cathares bazalaki banani?

Liloba “Cathare” euti na liloba ya Greke ka·tha·rosʹ, elimboli “pɛtɔ.” Kobanda na ekeke ya 11 kino ekeke ya 14, lingomba ya Catharisme epalanganaki mingi na Lombardie, na nɔ́rdi ya Italie, mpe na Languedoc. Bindimeli ya ba Cathares ezalaki kosangisama ya liteya ya dualisme mpe gnosticisme ya mikili ya Ɛ́sti, oyo mbala mosusu ezali bato ya mombongo ya bapaya mpe bamisionɛre nde bamemaki yango kuna. Búku The Encyclopedia of Religion elimboli dualisme ya ba Cathares ete ezali bongo endimeli ya “malako mibale: moko ya malamu, oyo etambwisaka makambo ya elimo, mosusu ya mabe, oyo etambwisaka makambo ya mosuni, elongo na nzoto ya moto.” Ba Cathares bazalaki kondima ete Satana nde asalaki mokili oyo ezali komonana, oyo ekweisami mpe esilá kobeba. Elikya na bango ezalaki bongo ya kolongwa na mabe, na mokili oyo ezali komonana.

Ba Cathares bakabwanaki na bakelasi mibale, bateyi mpe bandimi. Bateyi bazalaki kobongisama na nzela ya milulu ya batisimo ya elimo, ebéngami consolamentum. Yango ezalaki kosalema na kotyelama mabɔ́kɔ, nsima ya mbula moko ya kobongisama. Ekanisamaki ete milulu yango mizalaki kosikola moto longwa na boyangeli ya Satana, kopɛtɔláká ye na masumu na ye nyonso, mpe kopesáká ye elimo santu. Yango ebimisaki ebéngeli oyo ete “baoyo ya kokoka,” oyo ezalaki kosalelama bobele mpo na bato moke oyo bazalaki kosala lokola basaleli epai na bandimi. Baoyo ya kokoka bazalaki kolapa ndai ya komiboya, ya kotikala monzemba, mpe ya bobólá. Soki asilaki kobala liboso, moteyi asengelaki kotika mobali to mwasi na ye, mpamba te ba Cathares bazalaki kokanisa ete kosangisa nzoto ezalaki nde lisumu-lisango.

Bandimi bazalaki bato oyo, atako bazalaki te komipesa na lolenge ya bomoi ya komiboya mingimingi, kasi bazalaki kondimela mateya ya ba Cathares. Na kofukamáká mpo na kokumisa bateyi kati na molulu oyo ebéngami melioramentum, bandimi bazalaki kosɛnga bolimbisi mpe lipamboli. Mpo na kozwa nzela ya kozala na lolenge ya bomoi lokola oyo ya bato banso, bandimi bazalaki kosala convenenza, to boyokani elongo na bateyi, mpo ete bákoka kozwa batisimo ya elimo, to consolamentum bobele soki eyei komonana ete bakómi mpenza pene ya kokata motema.

Lolenge oyo bango bazalaki kotalela Biblia

Atako ba Cathares bazalaki kosalela Biblia mingimingi, bazalaki kotalela yango liboso mpenza lokola mokanda ya masapo mpamba. Bazalaki kotalela eteni monene ya Makomami ya Liebele lokola ete eutaki na Zábolo. Bazalaki kosalela biteni ya Makomami ya Greke, na ndakisa mikapo oyo mikesenisaka mosuni na elimo, mpo na kolóngisa filozofi na bango ya dualisme. Kati na libondeli ya Tata wa biso, bazalaki kolɔmba “limpa na biso oyo eleki biloko ya mosuni,” (elingi koloba “limpa ya elimo”) na esika ya “limpa na biso ya mokolo na mokolo” mpamba te mpo na bango limpa mpenza ezalaki eloko mabe, atako ezalaki na ntina mingi.

Mateya mingi ya ba Cathares ezalaki kotɛmɛla Biblia polele. Na ndakisa, bazalaki kondima liteya ya kozanga kokufa ya molimo mpe kobotama lisusu. (Kokanisá na Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4, 20.) Bazwaki mpe moboko ya bindimeli na bango kati na makomi mapemami te. Nzokande, lokola ba Cathares bazalaki kobongola biteni mosusu ya Makomami na lokótá ya mboka, na lolenge moko to mosusu, basalaki mpenza ete Biblia ezala búku oyo eyebani malamu na eleko ya moyen âge.

Bazalaki baklisto te

Bateyi bazalaki komitalela lokola bakitani mpenza ya bantoma mpe, na yango, bazalaki komibénga “Baklisto,” koyeisáká yango makasi na kobakisáká liloba “ya solo” to “ya malamu.” Nzokande, bindimeli mingi ya ba Cathares bikesanaki mpenza na bindimeli ya boklisto ya solo. Atako ba Cathares bazalaki kondima Yesu lokola Mwana ya Nzambe, bazalaki kondima te ete ayaki na nzoto ya mosuni mpe bandimaki mbeka na ye ya lisiko te. Lokola bazalaki kopesa ndimbola ya mabe na ntina na kokweisama ya nzoto ya mosuni mpe ya mokili, bazalaki kotalela biloko nyonso bizali komonana lokola ete biutaki na mabe. Na yango bazalaki kondima ete Yesu akokaki kozala bobele na nzoto ya elimo mpe ete wana azalaki awa na mabelé azalaki bobele na nzoto ya mosuni ya elilingi. Motindo moko na bapɛngwi ya ekeke ya liboso, ba Cathares ‘bayambolaki te ete Yesu Klisto ayei na nzoto.’​—2 Yoane 7.

Kati na búku na ye Medieval Heresy, M. D. Lambert akomaki ete ba Cathares “batyaki mobeko makasi ya koboya bisengo nyonso na esika ya kotya likebi na bizaleli malamu ya boklisto, . . . batyolaki lisiko na koboyáká kondima nguya ya kobikisa oyo ezali kati na [liwa ya Yesu].” Alobi ete “bolingo ya solosolo ya bateyi ezalaki epai na balakisi ya mikili ya Ɛ́sti, basángó ya ba Bouddhistes to ya ba Hindouistes ya Chine mpe ya Inde, bandimi ya mateya ya Orpheus, to balakisi ya Gnosticisme.” Ba Cathares bazalaki kondima ete lobiko ezalaki kozwama na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto te, kasi ezalaki kotalela nde consolamentum, to batisimo na elimo santu. Mpo na baoyo bapɛtɔlamaki kati na lolenge yango, liwa elingaki kosikola bango na nzoto ya mosuni.

Etumba ya kotuka Nzambe

Lokola bato balɛmbaki masɛngisi maleki ndelo mpe bomoi ya mbindo ya bakonzi ya lingomba, babendamaki ete bálanda lolenge ya bomoi ya ba Cathares. Bateyi na bango bazalaki kobénga Lingomba ya Katolike mpe bokonzi na yango ete “lingomba na Satana” mpe “mama na pite” ya Emoniseli 3:9 mpe 17:5. Lingomba ya Catharisme ezalaki kokóla koleka Lingomba na súdi ya France. Pápa Innocent III akanaki kobandisa mpe kotinda mosolo mpo ete etumba oyo ebéngamaki Croisade albigeoise ekoka kosalema, croisade bobele moko oyo ebongisamaki kati na boklisto ya nkombo mpamba mpo na kobundisa baoyo bazalaki komibénga baklisto.

Na nzela ya mikanda mpe batindami, pápa azalaki kotungisa bakonzi ya mboka oyo bazalaki bakatolike, bankumu mpe bakambi ya basodá na mikili ya Mpótó. Alakaki kopesa lilimbisi ya masumu mpe bozwi ya Languedoc epai na baoyo nyonso balingaki kolongola lipɛngwi “ezala na mwango nini.” Libyangi na ye liyokamaki malamu. Kokambamáká na basángó, limpinga lisalemi na basodá ndenge na ndenge batambolaki kolongwa na nɔ́rdi ya France, na Flandre, mpe Allemagne kino lobwaku ya Rhône.

Kobomama ya ba Béziers ebandisaki etumba oyo na boumeli na yango Languedoc ebebisamaki mpe bato babomamaki na nkanda makasi mpenza. Albi, Carcassonne, Castres, Foix, Narbonne, Termes, mpe Toulouse, nyonso ekweaki na mabɔ́kɔ ya basodá-babomi. Kati na bisika bitongamaki makasi ya ba Cathares, na ndakisa, Cassès, Minerve, mpe Lavaur, ebele ya bateyi batumbamaki likoló na nzeté. Engebene sángó mpe mokomi na zulunalo, Pierre des Vaux-de-Cernay, basodá ya lingomba ‘batumbaki “baoyo ya kokoka” wana bazalaki naino na bomoi, na esengo kati na mitema na bango.’ Na 1229, nsima ya mibu 20 ya etumba mpe kobebisama, Languedoc ekómaki na nsé ya boyangeli ya mokonzi ya France. Kasi koboma bato esilaki naino te.

Kobomama ya nsɔ́mɔ na boumeli ya Inquisition

Na 1231, Pápa Gregoire IX abandisaki Inquisition papale mpo na kopesa mabɔ́kɔ na babundi.a Ebongiseli ya Inquisition ebandaki liboso na kofunda mpe kotyela bato bipekiseli mingimingi, mpe na nsima, na konyokola mpenza. Mokano na yango ezalaki bongo ya kolongola eloko oyo mopanga ekokaki kosukisa te. Basambisi ya Inquisition​—mingimingi basángó ba Dominicains mpe ba Fransiscains—​basengelaki kozongisa monɔkɔ bobele epai na pápa. Liwa ya kotumbama na mɔ́tɔ ezalaki bongo etumbu endimami oyo ezalaki kosalelama epai na baoyo batalelamaki lokola bapɛngwi. Molende mabe mpe mobulu ya bato ya Inquisition ezalaki makasi na boye ete botomboki ebimaki, na bisika mosusu, Albi mpe Toulouse. Na Avignonet, basangani nyonso ya esambiselo ya Inquisition babomamaki.

Na 1244 kokamatama ya ebombamelo ya ngomba Montségur, ebombamelo ya nsuka ya ebele ya bateyi, ebomaki mpenza lingomba ya Catharisme. Pene na mibali mpe basi 200 bakufaki na kotumbama likoló na nzeté. Na boumeli ya bambula mingi, Inquisition elukaki mpe emonaki ba Cathares oyo batikalaki. Elobami ete moto ya nsuka kati na ba Cathares atumbamaki likoló na nzeté na Languedoc na 1330. Búku Medieval Heresy emonisi ete: “Kokwea ya lingomba ya Catharisme ezalaki likambo lileki monene oyo Inquisition ekokisaki.”

Ba Cathares bazalaki mpenza baklisto ya solo te. Kasi lokola batondolaki lingomba ya Katolike ebongaki na bango kobomama na nsɔ́mɔ nyonso na baoyo babéngamaki baklisto? Bato ya Katolike oyo banyokolaki mpe babomaki bango batukaki mpe Nzambe mpe Klisto mpe bamonisaki boklisto na lolenge ya mabe wana banyokolaki mpe babomaki ebele ya batomboki.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mingi mosusu na ntina na Inquisition oyo esalemaki na boumeli ya Moyen Âge, talá lisoló “Les horreurs de l’Inquisition” kati na Lamuká! ya 22 avril 1986 (ebimeli ya Lifalansé), ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., nkasa 20-23.

[Etanda na lokasa 28]

BA VAUDOIS

Pene na nsuka ya ekeke ya 12 T.B., Pierre Valdès, to Pierre Waldo, moto ya mombongo mpe mozwi moko ya engumba Lyon, abimisaki mosolo mpo na kobongolama ya liboso ya biteni ya Biblia na minɔkɔ ndenge na ndenge ya lokótá ya Provence, lokóta oyo ezalaki kolobama na súdi mpe na súdi-ɛ́sti ya France. Azalaki mondimi monene ya lingomba ya Katolike, atikaki mosala na ye, mpe amipesaki na kosakola Evanzile. Lokola bayinaki bakonzi ya lingomba oyo basilaki kobebisama, bakatolike mingi mosusu balandaki ye mpe bakómaki bateyi-batámboli.

Nokinoki, Waldo ayinamaki makasi na bakonzi ya lingomba ya mboka na ye, baoyo bapusaki pápa ete apekisa mosala na ye ya kosakola epai na bato. Elobami ete ayanolaki: “Ekoki ete tótosa Nzambe liboso na kotosa bato.” (Kokanisá na Misala 5:29.) Lokola Waldo aboyaki kotika, abenganamaki na lingomba. Balandi na ye, oyo babéngamaki ba Vaudois, to babólá ya Lyon, bakangamaki makasi na kolanda ndakisa na ye, koteyáká mibale na mibale kati na bandako ya bato. Yango ebimisaki bokóli ya nokinoki ya mateya na bango na súdi mpe na ɛ́sti, mpe na biteni ya nɔ́rdi ya France, mpe na nɔ́rdi ya Italie.

Mingimingi, bazalaki kolóngisa kozonga na bindimeli mpe misala ya baklisto ya liboso. Baboyaki mateya lokola oyo ya epongelo, kosambela mpo na bakufi, losambo ya Malia, losambo epai na “basantu,” ntubelá, losambo ya ekulusu, Ukaristia, mpe batisimo ya bana mike.b

Mateya ya ba Vaudois mazalaki na bokeseni monene na oyo ya ba Cathares oyo eyokanaki te na boklisto, oyo bakanisaki ete bakokani. Ezalaki liboso mpenza bato ya lingomba ya Katolike nde bakɔtisaki mobulungano yango, na kolukáká kokokanisa mosala ya kosakola ya ba Vaudois na oyo ya ba albigeois, to ya ba Cathares.

[Maloba na nse ya lokasa]

b Soki olingi koyeba makambo mosusu na ntina na ba Vaudois, talá lisoló “Ba Vaudois​—Bapɛngwi to balukiluki ya solo?” na Linɔngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛ́mbɛ 1981 (ebimeli ya Lifalansé), nkasa 12-15.

[Elilingi na lokasa 29]

Bato nkótó nsambo bakufaki na Ndakonzambe Sainte Marie Madeleine na Béziers, epai kuna mibali, basi mpe bana 20 000 babomamaki

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto