Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/9 nk. 22-26
  • “Bolingo ekosuka te”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bolingo ekosuka te”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Etuluku moko ya boyekoli ya Biblia esalemi
  • Botɛmɛli ya bakonzi ya mangomba
  • Mosala na biso ya kosakola
  • Mibu ya bitumba
  • Mitindá ya Yehova na ntina na libala mimonisami polele
  • Mabaku kitoko ya mosala
  • Bolingo ya solo ekosuka te
  • Nazalaki mwana ya kilikili
    Lamuká!—2007
  • Kosepela na oyo nazali na yango esungaki ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Libula ya bokristo esalisi ngai nakola malamu na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/9 nk. 22-26

“Bolingo ekosuka te”

LISOLÓ YA SAMUEL D. LADESUYI

Nakamwaka mingi wana nakanisaka bambula mingi oyo esili koleka mpe wana ezali ngai komona nyonso oyo esili kosalema. Yehova azali kosala makambo ya kokamwisa na mabelé mobimba. Na Ilesha, na Nigéria, motuya moke oyo tozalaki ntango tobandaki kosakola na 1931 esili kokóma masangá 36. Motángo ya bato soko 4000 baoyo bazalaki kosakola na Nigéria ntango bamisionɛre ya liboso oyo bazwaki mapɔlɔ́mi na Galadi, Eteyelo ya Biblia ya Watchtower, bakómaki na 1947 mosili kokóla kino koleka 180000. Na ebandeli mpenza, tomizelaki na yango te, mpe tokanisaki ata moke te likoló na bokóli oyo esengelaki kosalema. Nazali mpenza na botɔ́ndi mingi ete nazwaki libaku ya kosangana na mosala wana ya kokamwisa! Tiká nayebisa bino yango.

TATA na ngai azalaki kotekisa mandóki mpe balúti na engumba moko na moko; azalaki mpenza kofanda na ndako mingi te. Azalaki na basi nsambo oyo nayebaki, kasi bango nyonso te bazalaki kofanda na ndako moko elongo na ye. Tata azwaki mama na ngai lokola libula ya yaya na ye ya mobali oyo asilaki kokufa. Mama na ngai akómaki mwasi na ye ya mibale, mpe ngai nazalaki kofanda elongo na mama.

Mokolo moko Tata ayaki epai na biso wana autaki epai na mwasi na ye ya liboso, oyo azalaki kofanda na mboka mosusu oyo ezalaki pembeni na esika tozalaki kofanda. Ntango azalaki kuna, amonaki ete ndeko na ngai ya mobali oyo abotamaki na mama mosusu asilaki kokɔta na eteyelo. Ndeko na ngai wana azalaki na mbula zomi, mbula moko lokola ngai. Yango wana Tata azwaki ekateli ete ngai mpe nasengelaki kokɔta na eteyelo. Apesaki ngai meya libwa​—misato mpo na kosomba búku moko mpe motoba mpo na kosomba adwasi moko. Ezalaki bongo na mobu 1924.

Etuluku moko ya boyekoli ya Biblia esalemi

Uta bomwana na ngai, nazalaki kolinga mingi Liloba ya Nzambe, Biblia. Nazalaki kosepela mingi na mateya ya Biblia oyo mazalaki kopesama na eteyelo mpe nazalaki ntango nyonso kozwa longonya epai na bateyi na ngai ya Eteyelo ya Lomingo. Yango wana, na 1930, nazwaki libaku ya koyoka lisukúlu moko oyo lipesamaki na Moyekoli ya Biblia moko oyo autaki epai mosusu, oyo azalaki moto ya liboso ya kosakola na Ilesha. Nsima ya lisukúlu, atikelaki ngai kopi moko ya búku La Harpe de Dieu na lokótá ya Yoruba.

Nazalaki kokende na Eteyelo ya Lomingo pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Sikawa nazalaki komema búku La Harpe de Dieu mpe kosalela yango mpo na kokweisa mateya oyo mazalaki kopesama kuna. Bowelani eyaki kobima, mpe mbala na mbala bakambi ya lingomba bazalaki kokebisa ngai ete nalanda ‘mateya ya sika’ wana te.

Na mobu oyo molandaki, wana nazalaki kotambola na balabála, nakutanaki na etuluku moko ya bato oyo bazalaki koyoka mobali moko oyo azalaki koteya bango. Moteyi yango ezalaki J. I. Owenpa, Moyekoli ya Biblia moko. Atindamaki na William R. Brown (mbala mingi bazalaki kobénga ye Brown Biblia), oyo azalaki kokɛngɛla mosala ya kosakola Bokonzi longwa na Lagos.a Nayokaki ete etuluku moko ya boyekoli ya Biblia esilaki kosalema na Ilesha mpo na koyekola búku La Harpe de Dieu, yango wana nasanganaki elongo na bango.

Ngai nazalaki elenge kati na etuluku​—mwana kelasi, na mbula soko 16. Lokola ezalaka momeseno, nasengelaki kozala nsɔ́ninsɔ́ni, to ata mpe kobanga boninga ya penepene elongo na mibali oyo bazalaki na mbula koleka 30 mpe basusu bazalaki mikóló koleka. Kasi bazalaki na esengo mingi ya koyamba ngai kati na bango, mpe balendisaki ngai. Bazalaki mpo na ngai lokola batata.

Botɛmɛli ya bakonzi ya mangomba

Mosika te tokutanaki na botɛmɛli ya bakonzi ya mangomba. Bakatolike, ba anglicans mpe mangomba mosusu, oyo mazalaki kala kowelana bango na bango, bayanganaki sikawa mpo na kotɛmɛla biso. Bayangaki mwango elongo na bakonzi ya mboka mpo na kobangisa biso. Batindaki bapolisi ete bábɔtɔla babúku na biso, kolobáká ete yango ezali likámá mpo na bato. Nzokande, mokonzi na bapolisi ya etúká akebisaki bango ete bazalaki na lotómo soko moke te ya kokamata babúku yango, mpe pɔ́sɔ mibale na nsima bazongisaki babúku yango.

Nsima na yango tobyangamaki na likita moko epai tokutanaki na oba, to mokonzi monene ya mboka, elongo na bato minene ya engumba. Tozalaki bato soko 30 na eleko wana. Bazalaki na likanisi ya kopekisa biso ete tótángaka te babúku wana “ya likámá.” Batunaki soki tozalaki bapaya, kasi ntango batalaki bilongi na biso, balobaki ete, “bazali bana na biso mpenza, atako toyebi te ndambo mosusu ya bato oyo bazali kati na bango.” Bayebisaki biso ete balingaki te ete tókóba kotánga babúku ya lingomba oyo ekómemela biso mikakatano.

Tozongaki na ndako kozanga koloba eloko moko, mpamba te tosilaki kozwa ekateli ya kotya ata likebi moke te na bato minene wana. Mingi kati na biso bazalaki kosepela mpenza na makambo oyo tozalaki koyekola mpe tosilaki kozwa ekateli makasi ya kolanda koyekola. Na yango, atako mwa ndambo moke babangaki mpe batikaki etuluku na biso, tozalaki ebele, biso baoyo tolandaki koyekola kati na atelié ya mosáli moko ya mabaya. Tozalaki na motambwisi te. Tozalaki kobanda na libondeli mpe na nsima tozalaki kotánga baparagrafe kati na búku moto moko nsima na mosusu. Nsima ya kosala soko ngonga moko, tozalaki lisusu kobondela mpe kozonga na ndako. Nzokande bazalaki konɔ́nga biso, mpe bakonzi ya mboka elongo na bakonzi ya mangomba bakóbaki kobyanga biso nsima ya bapɔ́sɔ mibale nyonso mpo na kokebisa ete tóyekola te babúku ya Bayekoli ya Biblia.

Na ntango wana, tozalaki komeka kosalela mwa boyebi moke oyo tozwaki mpo na kosalisa bato mosusu, mpe mingi kati na bango bazalaki kondima oyo tozalaki koyebisa bango. Moko nsima na mosusu, bato bazalaki kobakisama na etuluku na biso. Tozalaki na esengo, kasi toyebaki naino makambo mingi te na ntina na lingomba oyo tokɔtaki.

Na ebandeli ya mobu 1932 ndeko moko autaki na Lagos mpo na kosunga biso ete tózala na ebongiseli moko malamu, lisusu na Apríli Brown Biblia mpe ayaki. Emonaki ye ete etuluku yango ezalaki na bato pene na 30, ndeko Brown alukaki koyeba bokóli oyo tozalaki na yango kati na botángi na biso. Toyebisaki ye makambo nyonso oyo toyebaki. Alobaki ete tobongaki mpo na kozwa batisimo.

Lokola tozalaki na eleko ya elanga, tosengelaki kotambola bakilomɛ́tɛlɛ zomi na minei longwa na Ilesha kino ebale moko, mpe tozalaki bato 30 wana tozwaki batisimo. Kobanda wana tomitalelaki biso moko lokola basakoli ya Bokonzi mpe tobandaki kokende ndako na ndako. Tokanisaki yango liboso te, kasi sikawa tozalaki na mposa makasi ya kosakola epai na basusu makambo oyo toyebaki. Tosengelaki komibongisa malamu ete tósalela Biblia mpo na kokweisa mateya ya lokuta oyo tozalaki kokutana na yango. Yango wana, kati na makita na biso, tozalaki kotalela mateya, kosalisana moko na mosusu na makambo oyo toyebaki.

Mosala na biso ya kosakola

Tosakolaki kati na engumba mobimba. Bato bazalaki koseka biso mpe bazalaki konganga likoló na biso, kasi tozalaki kotyela yango likebi te. Tozalaki na esengo monene mpamba te tosilaki kozwa solo, atako tosengelaki naino koyekola makambo mingi.

Mokolo ya Lomingo nyonso tozalaki kokende ndako na ndako. Bato bazalaki kotuna mituna, mpe tozalaki komeka kopesa bango biyano. Mokolo ya Lomingo na mpokwa tozalaki kopesa lisukúlu ya bato banso. Tozalaki na Ndako ya Bokonzi te, yango wana tozalaki kosala makita na libándá. Tozalaki koyanganisa bato, kopesa lisukúlu, mpe kosɛnga bango ete bátuna mituna. Mbala mosusu tozalaki kosakola kati na bandakonzambe.

Tozalaki mpe kosala mibémbo na bisika oyo bato bayokaki naino nsango ya Batatoli ya Yehova te. Mbala mingi, tozalaki kokenda na nkinga, kasi mbala mosusu tozalaki kofutela bísi. Wana ekómaki biso na mboka moko, tozalaki koyula liséké. Yango ezalaki koyokana na mboka mobimba! Bato bazalaki koya mbangu kotala soki likambo nini lizalaki kosalema. Bongo tozalaki kosakola nsango na biso. Na nsuka, bato bazalaki kowela bakopi ya mikanda na biso. Tozalaki kokabola ebele na mikanda.

Tozalaki kozela na motema likoló boyei ya Bokonzi ya Nzambe. Nazali komikundola ete na ntango tozwaki Annuaire 1935, ndeko moko, wana amonaki manáka ya mikapo ya mokolo na mokolo mpo na mbula mobimba, atunaki: “Yango elingi koloba ete tokosilisa mbula mosusu mobimba liboso ete Armagedon eya?”

Mpo na koyanola, motambwisi atunaki: “Ndeko, okanisi ete, soki Armagedon eyei lobi, tokotika kotánga Annuaire?” Ntango ndeko yango ayanolaki ete te, motambwisi alobaki ete: “Bongo mpo na nini ozali komitungisa?” Tozalaki, mpe tozali naino motema likoló mpo na boyei ya mokolo ya Yehova.

Mibu ya bitumba

Na boumeli ya etumba ya mibale ya mokili mobimba, kokɔtisama ya mikanda na biso longwa na mikili misusu epekisamaki. Ndeko moko ya Ilesha alakisaki kozanga koyeba búku Richesses epai na polisi moko. Polisi yango atunaki ye ete: “Búku oyo ezali ya nani?” Ndeko mobali ayanolaki ete ezalaki búku na ye. Polisi ayebisaki ye ete ezalaki búku oyo epekisami, amemaki ye na biro ya polisi, mpe atyaki ye na bolɔ́kɔ.

Nakendaki na biro ya polisi mpe, nsima ya kotuna, nafutaki mbongo mpo bábimisa ndeko yango. Na nsima, nabéngaki ndeko Brown na Lagos na telefone mpo na koyebisa ye likambo oyo lisalemaki. Natunaki mpe soki ezalaki na mobeko moko oyo mozalaki kopekisa bokaboli babúku na biso. Ndeko Brown ayebisaki ngai ete bobele bokɔtisi nde epekisamaki, kasi bokaboli babúku na biso epekisamaki te. Mikolo misato na nsima, ndeko Brown atindaki ndeko moko longwa na Lagos mpo na komona soki likambo nini lisalemaki. Ndeko yango azwaki ekateli ete na mokolo molandi biso banso tosengelaki kosakola na bazulunalo mpe babúku.

Topalanganaki bipai na bipai. Nsima ya ngonga moko, bapesaki ngai nsango ete mingi kati na bandeko basili kokangama. Yango wana ndeko oyo ayaki kotala biso mpe ngai tokendeki na biro ya polisi. Bapolisi baboyaki koyoka bandimbola oyo topesaki ete babúku epekisamaki te.

Bandeko 33 oyo bakangamaki batindamaki na Esambiselo monene ya Ife, mpe nakendeki na bango elongo. Bato ya engumba oyo bamonaki biso kokende bazalaki konganga ete, “Esili na bato oyo lelo. Bakozonga lisusu awa te.”

Bayebisaki bifundeli liboso ya mazistra mokonzi, moto ya Nigéria. Balakisaki babúku mpe bazulunalo nyonso. Atunaki soki nani apesaki etindá ya kokanga bato yango. Mokonzi ya bapolisi alobaki ete alandaki mitindá ya mokonzi ya bapolisi ya etúká. Mazistra mokonzi abyangaki mokonzi ya bapolisi mpe bamonisi na biso minei, na ngai mpe nazalaki na kati, na biro na ye.

Atunaki soki Mr. Brown azali nani. Toyebisaki ye ete azali momonisi ya la Société Watch Tower na Lagos. Ayebisaki biso ete azwaki telegrame ya Mr. Brown na ntina na biso. Mokolo wana atikaki likambo yango bongo mpe apesaki bandeko mwa bonsomi. Na mokolo molandaki alongolaki bifundeli nyonso likoló na bandeko, kotikáká bango bakende, mpe apesaki bapolisi etindá ya kozongisa babúku.

Tozongaki na Ilesha, na koyembáká. Bato babandaki lisusu konganga, kasi mbala wana bazalaki koloba ete, “Bazongi lisusu!”

Mitindá ya Yehova na ntina na libala mimonisami polele

Ezalaki na 1947 nde bamisionɛre ya liboso oyo bazwaki mapɔlɔ́mi na Galadi bakómaki na Nigéria. Moko na bandeko yango, Tony Attwood, azali naino kosala awa na Betele ya Nigéria. Kobanda ntango wana, tosili komona mbongwana minene kati na lisangá ya Yehova na Nigéria. Moko na mbongwana minene ya makanisi na biso etalelaki bongo kobala basi mingi.

Ngai nabalaki Olabisi Fashugba na Febwáli 1941 mpe nakangaki ntina ete ebongi te kobala basi mosusu. Kasi kino mobu 1947 ntango bamisionɛre bayaki, kobala basi mingi ezalaki kosalema mingi kati na lisangá. Bazalaki koloba na bandeko oyo bazalaki na basi mingi ete ezalaki mpo na kozanga boyebi nde basalaki bongo. Na yango, soki bazalaki na basi mibale to misato to minei to mitano, basɛngisamaki te na kolongola bango, kasi basengelaki lisusu te kobala basi mosusu. Yango ezalaki etamboli oyo tozalaki kosalela.

Bato mingi bazalaki komonisa mposa ya kosangana elongo na biso, mingimingi bato ya La Société des Chérubins et Séraphins ya Ilesha. Bazalaki koloba ete ezali bobele Batatoli ya Yehova nde bateyaka solo. Bandimaki mateya na biso mpe balingaki kobongola bandakonzambe na bango ete ekóma Bandako ya Bokonzi. Tozalaki kosala makasi mpo na kokokisa yango. Nkutu tozalaki na bisika ya koteya bankulutu na bango.

Bongo pole ya sika ebimaki na ntina na kobala basi mingi. Moko na bamisionɛre apesaki lisukúlu moko na liyangani ya zongazonga moko na 1947. Alobelaki kozala na etamboli mpe mimeseno malamu. Na nsima atángaki 1 Bakolinti 6:9, 10, oyo ezali koloba ete bato na bokesene bakosangola Bokonzi na Nzambe te. Na nsima abakisaki ete: “Mpe mibali oyo bazali na basi mingi bakosangola Bokonzi ya Nzambe te!” Bayangani bangangaki ete: “Ooh, mibali oyo bazali na basi mingi bakosangola Bokonzi ya Nzambe te!” Yango ebimisaki bokabwani. Ezalaki lokola etumba. Mingi kati na bato ya sika batikaki kosangana na makita, kolobáká ete: “Natɔ́ndi yo Nzambe ete, tomikɔtisaki naino mobimba te.”

Nzokande, ntálo monene ya bandeko babandaki kobongisa bizaleli na bango na kolongoláká basi na bango mosusu. Bazalaki kopesa bango mbongo mpe koloba ete, ‘Soki ozali naino elenge, kende mpe luká mobali mosusu. Nabalaki yo mpo na kozanga boyebi. Sikawa nasengeli kozala mobali ya mwasi moko.’

Mosika te mokakatano mosusu mobimaki. Basusu, nsima ya kozwa ekateli ya kotikala na mwasi moko mpe kolongola basusu, bazalaki kobongola makanisi na bango mpe kozwa ekateli ya kozongisa moko na basi oyo balongolaki mpe kolongola oyo batikaki. Yango ebimisaki lisusu mobulu.

Mitindá mosusu miutaki na biro monene ya Brooklyn, oyo mizwaki moboko likoló na Malaki 2:14, oyo elobeli “mwasi na bolenge na yo.” Mitindá yango mimonisaki ete mobali asengelaki kotikala bobele na mwasi na ye ya liboso oyo abalaki. Wana ezalaki motindo likambo yango lisukisamaki.

Mabaku kitoko ya mosala

Na 1947 la Société abandaki kolendisa masangá mpe kobongisa yango na bazongazonga. Balingaki kopona bandeko mibali bakɔmɛli oyo bazalaki na boyebi mingi ete bákóma ‘basaleli ya bandeko,’ oyo babéngami sikawa bakɛngɛli ya zongazonga. Ndeko Brown atunaki ngai soki nakokaki kondima mokumba lolenge yango. Nalobaki ete ntina mpo na yango nazwaki batisimo ezalaki mpo na kosala mokano ya Yehova, nabakisaki ete: “Nkutu yo nde obatisaki ngai. Soki libaku lizali sikawa ya kosalela Yehova na ntango na ngai nyonso, okanisi ete nakoboya yango?”

Na Ɔkɔtɔ́bɛ ya mobu wana, biso bandeko nsambo tobyangamaki na Lagos mpe tobongisamaki liboso ete tótindama na mosala lokola bakɛngɛli ya zongazonga. Na mikolo wana bazongazonga ezalaki minene mpenza. Mboka mobimba ekabolamaki bobele na bazongazonga nsambo. Masangá mazalaki mingi te.

Mosala na biso lokola basaleli ya bandeko mozalaki makasi mpenza. Tozalaki kotambola ntáká molai mokolo na mokolo, mbala mingi kati na zámba minene epai molungé ezalaki makasi. Pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, tozalaki kolongwa na mboka moko mpo na kokende na mboka mosusu. Na bantango mosusu nazalaki koyoka lokola ete makolo na ngai malingi kobukana. Mbala mosusu nazalaki koyoka lokola ete nazalaki kokufa! Kasi ezalaki mpe na esengo monene, mingimingi na komonáká ebele na bato oyo bandimaki solo. Bobele kati na mibu nsambo, motángo ya basakoli moyikanaki mbala minei!

Nasalaki kati na mosala ya zongazonga kino mobu 1955 ntango kolɔngɔ́nɔ́ mabe ya nzoto epusaki ngai na kozonga na Ilesha, epai naponamaki lokola mokɛngɛli ya engumba. Kofanda esika moko epesaki ngai nzela ya kotya likebi mingi mpo na kosunga libota na ngai na elimo. Lelo oyo bana na ngai nyonso motoba bazali kosalela Yehova na bosembo nyonso.

Bolingo ya solo ekosuka te

Wana ezali ngai kokanisa bambula mingi oyo euti koleka, nazali na bantina mingi ya kozala na botɔ́ndi. Nakutanaki na mawa, mitungisi mpe bokɔnɔ, kasi nazalaki mpe na esengo mingi. Atako boyebi mpe bososoli na biso ekólaki malɛmbɛmalɛmbɛ na boumeli ya bambula mingi, nasili koyekola na nzela na makambo oyo nakutanaki na yango, ndimbola ya solo ya 1 Bakolinti 13:8, oyo elobi ete: “Bolingo ekosuka te.” Soki olingi Yehova mpe okangami makasi na mosala na ye, akosalisa yo kati na mikakatano na yo mpe akopesa yo ebele na mapamboli.

Pole ya solo ezali kongɛnga sé kongɛnga. Ntango tobandaki, tokanisaki ete Armagedon ekoya nokinoki; yango wana tokendeki mbangu na kosala nyonso oyo tokokaki kosala. Kasi nyonso wana ezalaki mpo na bolamu na biso moko. Yango wana nandimi maloba oyo ya mokomi ya Nzembo: “Nakosanzola [Yehova] ntango nyonso ezali ngai na bomoi, nakoyembela Nzambe na ngai nzembo naino ekoumela ngai na mosuni.”​—Nzembo 146:2.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ndeko Brown abyangamaki Brown Biblia mpamba te azalaki na momeseno ya kolakisa Biblia lokola mosukisi ya ntembe.​—Talá lisoló “Mbuma oyo mopalanganisi moko ya nsango malamu ya solo asili kobuka” kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛ́mbɛ 1992, lokasa 32.

[Elilingi na lokasa 23]

Samuel elongo na Milton Henschel na 1955

[Elilingi na lokasa 24]

Samuel elongo na mwasi na ye, Olabisi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto