Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/8 nk. 9-14
  • Yehova​—⁠Nzambe oyo ateyaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova​—⁠Nzambe oyo ateyaka
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tata, Molakisi, Mobali na libala
  • Mateya ya lobiko mauti na Yehova
  • Ebele monene ya bato bateyami
  • Lolenge oyo Yehova ateyaka
  • Bokonzi oyo ekosala Paradis
    Bokonzi oyo ekosala Paradis
  • Moto oyo basakoli nyonso batatolaki mpo na ye
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Mwasi ekomba asepeli
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
  • Bateyami na Yehova kino Lelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/8 nk. 9-14

Yehova​—Nzambe oyo ateyaka

“Bango nyonso bakolakisama na [Yehova].”​—YOANE 6:45.

1. Epai wapi Yesu asali makamwisi, mpe azali sikawa kosala nini kuna?

YESU KLISTO auti kosala makamwisi kala mingi te mpe azali sikawa koteya kati na eyanganelo moko na Kapalanauma, pembeni ya Libeke ya Galilai. (Yoane 6:1-21, 59) Bato mingi baboyi kondima na ntango alobi ete: “Nasili kokita longwa na likoló.” Baimaimi, ete: “Oyo Yesu, mwana na Yosefe te? Toyebi tata na ye mpe mama na ye te? Na nzela nini alobi ete, Nasili kokita longwa na likoló?” (Yoane 6:38, 42) Kopameláká bango, Yesu asakoli ete: “Moto akoki koya epai na ngai te bobele soko Tata, motindi na ngai, akobenda ye, mpe nakosekwisa ye na mokolo na nsuka.”​—Yoane 6:44.

2. Moboko nini tozali na yango mpo na kondima elaká ya Yesu na ntina na lisekwa?

2 Oyo nde elaká kitoko​—ya kosekwisama na mokolo ya nsuka, na ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela! Tokoki kondima elaká yango mpamba te esimbami na Tata, Yehova Nzambe. (Yobo 14:13-15; Yisaya 26:19) Ya solo, Yehova, oyo azali koteya ete bakufi bakosekwa, azali moteyi oyo mosusu ‘akoki koteya lokola ye azali te.’ (Yobo 36:22, Liloba lya Nzambe) Kobendáká likebi likoló na mateya ya Tata, Yesu alobi lisusu ete: “Ekomami kati na basakoli ete, Bango nyonso bakolakisama na [Yehova].”​—Yoane 6:45.

3. Mituna nini tokoyanola na yango?

3 Ntembe ezali te ete, ekozala libaku kitoko kofanda kati na baoyo mosakoli Yisaya akomaki na ntina na bango ete: “Bana na yo nyonso bakolakisama na [Yehova].” (Yisaya 54:13) Tokoki kozala kati na bango? Banani bazali lokola bana na ye mpe basili kozwa mateya na ye? Nini ezali mateya ya lobiko mauti na Yehova oyo tosengeli koyeba mpe kosalela mpo na kozwa lipamboli na ye? Lolenge nini Yehova azalaki koteya na ntango ya kala? Azali mpe koteya lolenge moko lelo oyo? Wana ezali mituna oyo tokoyanola yango.

Tata, Molakisi, Mobali na libala

4. Banani bazalaki bana ya liboso ya Yehova oyo bazwaki mateya na ye?

4 Yehova akómaki liboso Tata mpe Molakisi na ntango azalisaki Mwana na ye bobele moko, Yesu, liboso ya kobotama lokola moto. Ye wana abéngami “Liloba” mpamba te azali Molobeli Monene ya Yehova. (Yoane 1:1, 14; 3:16) Liloba asalaki “pembeni na [Tata] lokola mosali ya molende,” mpe ayekolaki makambo mingi kati na mateya ya Tata na ye. (Masese 8:22, 30) Ya solo, akómaki Esaleli, oyo na nzela na ye Tata azalisaki biloko mosusu nyonso, ata mpe “bana na Nzambe” ya elimo. Bazalaki mpenza na esengo ya koteyama na Nzambe! (Yobo 1:6; 2:1; 38:7; Bakolose 1:15-17) Na nsima, moto ya liboso, Adama, azalisamaki. Ye mpe azalaki “mwana na Nzambe,” mpe Biblia ezali komonisa ete Yehova ateyaki ye.​—Luka 3:38; Genese 2:7, 16, 17.

5. Libaku nini ya motuya monene Adama abungisaki, nzokande Yehova ateyaki nani, mpe mpo na nini?

5 Na mawa nyonso, Adama, na kozanga botosi na ye na nkó nyonso, abungisaki libaku kitoko ya kozala ntango nyonso mwana ya Nzambe. Na yango, bakitani na ye, bakokaki koloba te ete bazali bana ya Nzambe bobele mpo na kobotama. Nzokande, Yehova ateyaki bato ya kozanga kokoka oyo bazalaki kotalela ye mpo na kozwa litambwisi. Na ndakisa, Noa azalaki “moto na boyengebene” oyo “atambolaki na Nzambe elongo,” mpe na yango Yehova ateyaki Noa. (Genese 6:9, 13​—Ge 6:13 through 7:5) Na botosi na ye, Abalayama amimonisaki ete azalaki “moninga na [Yehova],” mpe na yango, ye mpe ateyamaki na Yehova.​—Yakobo 2:23; Genese 12:1-4; 15:1-8; 22:1, 2.

6. Banani oyo Yehova akómaki kotalela bango lokola ‘bana’ na ye, mpe azalaki moteyi ya motindo nini epai na bango?

6 Na nsima mpenza, na mikolo ya Mose, Yehova asalaki boyokani ya kondimana elongo na libota ya Yisraele. Mpo na yango, ekólo yango ekómaki libota na ye liponami mpe etalelamaki lokola “mwana mobali” na ye. Nzambe alobaki ete: “Yisraele azali mwana mobali na ngai.” (Exode 4:22, 23; 19:3-6; Deteronome 14:1, 2) Na moboko ya boyokani ya kondimana wana, Bayisraele bakokaki koloba, lokola mosakoli Yisaya ete: “[Yehova], yo ozali Tata na biso.” (Yisaya 63:16) Yehova akokisaki mokumba na ye ya Tata mpe ateyaki mwana na ye, Yisraele, na bolingo nyonso. (Nzembo 71:17; Yisaya 48:17, 18) Ya solo, na ntango bazangaki sembo, abondelaki bango na motema mawa nyonso ete: “Bóbutwa, e bana bazongi na nsima.”​—Yilimia 3:14.

7. Boyokani nini Yisraele ezalaki na yango elongo na Yehova?

7 Mpo na boyokani ya kondimana wana elongo na Yisraele, na elobeli ya elilingi, Yehova akómaki mpe Mobali ya libota wana, mpe yango ekómaki mwasi na ye ya elilingi. Na ntina na mwasi yango, mosakoli Yisaya akomaki ete: “Mpo ete Motongi na yo azali mobali na yo, nkombo na ye ete [Yehova] na bibele.” (Yisaya 54:5; Yilimia 31:32) Atako Yehova akokisaki mokumba na ye ya mobali na lokumu nyonso, libota ya Yisraele ekómaki mwasi na ye oyo azangi sembo. Yehova alobaki ete: “Nde lokola mwasi akokosa mobali na ye, bino bokosi ngai, e ndako na Yisraele.” (Yilimia 3:20) Yehova akóbaki kobyanga bana ya mwasi wana azangi sembo; akóbaki kozala “Molakisi Monene” na bango.​—Yisaya 30:20; 2 Ntango 36:15.

8. Atako Yisraele, lokola libota, ebwakamaki na Yehova, kasi azali na mwasi nini ya elilingi?

8 Na ntango Yisraele ebwakaki mpe ebomaki Mwana na Ye, Yesu Klisto, na nsuka Nzambe abwakaki libota yango. Na yango, libota wana ya Bayuda ezalaki lisusu mwasi na ye ya elilingi te, Ye azalaki mpe lisusu te Tata mpe Moteyi ya bana na ye oyo babungi nzela. (Matai 23:37, 38) Nzokande, lokola mwasi ya libala, Yisraele ezalaki bobele elilingi to elakiseli. Ntoma Paulo azongelaki maloba ya Yisaya 54:1, oyo ezali koloba na ntina na “ekomba” oyo akeseni mpe akokani te na “ye oyo abalanaki,” libota ya Yisraele ya mosuni. Paulo amonisi ete baklisto bapakolami bazali bana ya “ekomba,” oyo azali kobénga “Yelusaleme na makoló.” Mwasi wana ya elilingi oyo amonisamaki ezali bongo lisangá ya Yehova ya likoló oyo esalemi na bikelamu ya elimo.​—Bagalatia 4:26, 27.

9. (a) Yesu azalaki koloba na ntina na nani na ntango alobaki ete ‘bana na yo nyonso bakolakisama na Yehova’? (b) Na moboko nini bato bazali kokóma bana ya Nzambe na elimo?

9 Na yango, kati na eyanganelo ya Kapalanauma, na ntango Yesu azongelaki maloba ya Mosakoli Yisaya: “Bana na yo nyonso bakolakisama na [Yehova],” azalaki koloba na ntina na baoyo basengelaki na nsima kokóma “bana” ya “Yelusaleme na makoló,” lisangá ya Nzambe ya likoló oyo ezali lokola mwasi mpo na Nzambe. Na kondimáká mateya ya motindami na Nzambe oyo autaki na likoló, Yesu Klisto, bayoki na ye oyo bazalaki Bayuda bakokaki kokóma bana ya oyo azalaki ekomba, mwasi ya Nzambe na likoló mpe kosala “libota na bulɛɛ,” “Yisraele na Nzambe” ya elimo. (1 Petelo 2:9, 10; Bagalatia 6:16) Kolobeláká na ntina na libaku monene oyo Yesu apesaki bango mpo na kokóma bana ya Nzambe ya elimo, ntoma Yoane akomaki ete: “Ayei epai na libota na ye moko nde bato na ye bayambi ye te. Kasi epai na baoyo nyonso bayambi ye, apesi bango lotómo ya kozala bana ya Nzambe, mpo ete bandimi na nkombo na ye.”​—Yoane 1:11, 12, NW.

Mateya ya lobiko mauti na Yehova

10. Nokinoki nsima ya botomboki na Edene, Yehova ateyaki nini na ntina etali “mombóto,” mpe Mombóto yango ezali nani?

10 Lokola azali Tata oyo atɔ́ndi na bolingo, Yehova azali koyebisa bana na ye na ntina na mikano na ye. Na yango, na ntango anzelu moko motomboki apusaki babalani mibale ya liboso na kozanga botosi, nokinoki Yehova ayebisaki bango na ntina na oyo asengelaki kosala mpo na kokokisa mokano na ye ya kokómisa mabelé paladiso. Alobaki ete asengelaki kotya koyinana kati na “nyoka na kalakala,” ye Satana Zábolo, “mpe mwasi.” Na nsima alimbolaki ete “[mombóto, NW]” ya mwasi esengelaki konyata mpenza Satana “na motó” kino kufa. (Genese 3:1-6, 15; Emoniseli 12:9; 20:9, 10) Lokola tomonaki yango, mwasi​—oyo amonisamaki na nsima lokola “Yelusaleme na likoló”​—ezali bongo lisangá ya Nzambe ya bikelamu ya elimo na likoló. Kasi “mombóto” na ye ezali nani? Ezali bongo Mwana ya Nzambe, Yesu Klisto, ye oyo atindamaki uta na likoló mpe oyo, na nsuka, akoboma Satana.​—Bagalatia 4:4; Baebele 2:14; 1 Yoane 3:8.

11, 12. Lolenge nini Yehova akólisaki mateya na ye ya lobiko na ntina na “mombóto”?

11 Yehova akólisaki mateya ya lobiko na ntina etali “mombóto” na ntango alakaki Abalayama ete: “Nakopambola yo solo mpe nakofulisa [mombóto, NW] na yo lokola myoto na likoló . . . Mabota nyonso na nsé makopambolama mpo na bana na yo.” (Genese 22:17, 18) Yehova asalelaki ntoma Paulo mpo na kolimbola ete Yesu Klisto azali “[mombóto, NW]” ya Abalayama oyo alakamaki kasi basusu mpe basengelaki kokóma basangani ya Mombóto yango. Paulo akomaki ete: “Soko bozali bato na Klisto, bozali [mombóto, NW] na Abalayama, bozali basangoli na libula na elaká.”​—Bagalatia 3:16, 29.

12 Yehova amonisaki mpe ete Klisto, Mombóto, asengelaki kobima na libota ya bokonzi ya Yuda mpe ete “bato bakotosa ye.” (Genese 49:10) Na ntina etali Mokonzi Davidi ya libota ya Yuda, Yehova alakaki ete: “Nakosala ete [mombóto, NW] na ye mozala seko na seko mpe ete kiti na ye na bokonzi eumela pelamoko lola. [Mombóto, NW] na ye ekoumela ntango nyonso; kiti na ye na bokonzi ekozala liboso na ngai pelamoko moi.” (Nzembo 89:3, 4, 29, 36) Na ntango anzelu Gabriele asakolaki kobotama ya Yesu, ayebisaki ete mwana yango azalaki Mokonzi aponami na Nzambe, Mombóto ya Davidi. Gabriele alobaki ete: “Ye akozala monene mpe akobyangama Mwana na Oyo-Aleki-Likoló. [Yehova] Nzambe akopesa ye kiti na bokonzi na Davidi tata na ye, . . . bokonzi na ye ekozala na nsuka te.”​—Luka 1:32, 33; Yisaya 9:6, 7; Danyele 7:13, 14.

13. Mpo na kozwa mapamboli ya Yehova, lolenge nini tosengeli koyamba mateya na ye?

13 Mpo na kozwa mapamboli ya Yehova, tosengeli koyeba mpe kosala engebene mateya wana ya lobiko na ntina na Bokonzi ya Nzambe. Tosengeli kondima ete Yesu autaki na likoló, ete azali Mokonzi aponami na Nzambe​—Mombóto ya bokonzi oyo akokamba mosala ya kozongisa Paladiso na mabelé​—mpe akosekwisa bakufi. (Luka 23:42, 43; Yoane 18:33-37) Na Kapalanauma, ntango Yesu alobaki na ntina na lisekwa ya bakufi, esengelaki kozala polele epai na Bayuda ete azalaki koloba solo. Bobele mwa bapɔ́sɔ liboso, ekoki mpenza kozala ete bobele kuna na Kapalanauma asekwisaki elenge mwasi ya mibu 12, mwana ya mokambi ya eyanganelo! (Luka 8:49-56) Solo mpenza, biso mpe tozali na bantina malamu ya kondima mpe ya kosala na boyokani na mateya ya Yehova oyo mazali kopesa elikya, na ntina etali Bokonzi!

14, 15. (a) Bokonzi ya Yehova ezali na ntina nini na miso ya Yesu? (b) Nini tosengeli kokanga ntina na yango mpe kokoka kolimbola yango malamu na ntina na Bokonzi ya Yehova?

14 Na boumeli ya bomoi na ye na mabelé, Yesu amipesaki mpo na koteya na ntina na Bokonzi ya Yehova. Akómisaki yango motó ya likambo ya mosala na ye ya kosakola, mpe alakisaki nkutu bayekoli na ye ete basambelaka mpo na yango. (Matai 6:9, 10; Luka 4:43) Bayuda na mosuni basengelaki kokóma “bana na bokonzi,” kasi mpo na kozanga kondima na bango, mingi na bango babungisaki libaku wana. (Matai 8:12; 21:43) Yesu amonisaki ete bobele “etongá moke” bazwi libaku ya kokóma “bana na bokonzi.” “Bana” yango bakómi “basangani na Klisto mpo na kosangola libula” kati na Bokonzi na ye ya likoló.​—Luka 12:32; Matai 13:38; Baloma 8:14-17; Yakobo 2:5.

15 Basangoli boni ya bokonzi Klisto akomema na likoló mpo na koyangela mabelé elongo na ye? Engebene Biblia, bobele 144 000. (Yoane 14:2, 3; 2 Timoté 2:12; Emoniseli 5:10; 14:1-3; 20:4) Kasi Yesu alobaki ete azali na “bampate mosusu,” oyo bakozala bayangelami ya Bokonzi yango awa na mabelé. Bango bakozala na kolɔngɔ́nɔ́ ya kokoka mpe bakozala na kimya ya libela na paladiso na mabelé. (Yoane 10:16; Nzembo 37:29; Emoniseli 21:3, 4) Tosengeli kokanga ntina mpe kozala na likoki ya kolakisa liteya ya Yehova na ntina na Bokonzi.

16. Liteya nini mosusu ya ntina mingi ya Yehova tosengeli koyekola yango mpe kosalela yango?

16 Ntoma Paulo amonisaki liteya mosusu ya ntina mingi ya Yehova. Alobaki ete: “Bino mpenza bosili kolakisama na Nzambe mpo na kolingana.” (1 Batesaloniki 4:9) Mpo na kosepelisa Yehova, tosengeli komonisa bolingo motindo wana. Biblia elobi ete: “Nzambe azali bolingo,” mpe tosengeli komekola ndakisa wana ya komonisa bolingo. (1 Yoane 4:8; Baefese 5:1, 2) Na mawa nyonso, ntálo monene ya bato bazangi mpenza koyekola kolinga baninga na bango bato lokola Nzambe azali koteya biso ete tósala yango. Ezali boni mpo na biso? Tosili koyanola na mateya wana ya Yehova?

17. Ezaleli nini tosengeli komekola?

17 Ezali na ntina monene ete tóndima mateya nyonso ya Yehova. Tiká ete ezaleli na biso ezala motindo moko na oyo ya bakomi na Nzembo ya Biblia oyo bakomaki ete: “E, [Yehova] yebisá ngai nzela na yo; monisá ngai bilekelo na yo. Tambolisá ngai kati na solo na yo.” “Teyá ngai mibeko na yo. Lakisá ngai bososoli malamu mpe boyebi . . . teyá ngai bikateli na yo.” (Nzembo 25:4, 5; 119:12, 66, 108) Soki mayoki na yo makokani na oyo ya bakomi na Nzembo, okoki kozala kati na ebele monene ya bato oyo bateyami na Yehova.

Ebele monene ya bato bateyami

18. Eloko nini mosakoli Yisaya asakolaki ete esengeli kobima na eleko na biso?

18 Mosakoli Yisaya asakolaki makambo masengelaki kobima na mikolo na biso: “Ekozala ete na mikolo na nsuka, ngomba na ndako na [Yehova] ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso, ekotombwa likoló na nkeka . . . Bikólo mingi bakokenda mpe bakoloba ete, Yakani, tóbuta na ngomba na [Yehova] epai na Nzambe na Yakobo, ete alakisa biso nzela na ye.” (Yisaya 2:2, 3; Mika 4:2) Banani bazali bato oyo bateyami na Yehova?

19. Banani lelo batángami kati na baoyo bateyami na Yehova?

19 Kati na bango ezali mpe na baoyo bakoyangela elongo na Klisto na likoló. Lokola tomonaki yango liboso, Yesu alobaki ete azali na “bampate mosusu”​—bayangelami ya Bokonzi na mabelé​—bakisa mpe “etongá moke” ya basangoli libula ya Bokonzi. (Yoane 10:16; Luka 12:32) “Ebele monene,” oyo bakobika na “bolózi monene,” bazali kati na kelasi ya bampate mosusu, mpe bandimami na Yehova na nzela ya kondima na bango kati na makila ya Yesu oyo masopamaki. (Emoniseli 7:9, 14) Atako bampate mosusu batalelami liboso mpenza te kati na “bana” oyo balobelami na Yisaya 54:13, bapambolami wana bazali bongo koteyama na Yehova. Na yango, babongi na kobénga Nzambe ete “Tata” na bango mpamba te, akozala mpenza Tata monene na bango na nzela ya “Tata na seko,” Yesu Klisto.​—Matai 6:9; Yisaya 9:6.

Lolenge oyo Yehova ateyaka

20. Na banzela nini Yehova ateyaka?

20 Yehova ateyaka na lolenge mingi. Na ndakisa, asalaka bongo na nzela ya misala na ye ya kozalisa, oyo mizali kotatola ete azali mpe azali na mayele. (Yobo 12:7-9; Nzembo 19:1, 2; Baloma 1:20) Lisusu, ateyaka na nzela ya kosolola, lokola asalaki yango na koteyáká Yesu liboso ya kobotama na ye lokola moto. Bobele bongo, na mabaku misato oyo ekomami, alobaki ye moko mpenza uta na likoló epai na bato na mabelé.​—Matai 3:17; 17:5; Yoane 12:28.

21. Anzelu nini mpenza Yehova asalelaki lokola motindami na ye, kasi lolenge nini toyebi ete basusu mpe basalelamaki?

21 Yehova asalelaka mpe baanzelu lokola batindami, kati na bango mpe Mobotami na ye ya liboso, “Liloba.” (Yoane 1:1-3) Atako Yehova akokaki koloba mbala moko epai na mwana na ye ya kokoka, Adama, kati na elanga ya Edene, ekoki mpenza kozala ete asalelaki Yesu, liboso ya kobotama na ye lokola moto, mpo na kolobela Ye. (Genese 2:16, 17) Ekoki mpenza kozala ete ye azalaki “anzelu na Nzambe oyo akendaki liboso na ebele na Yisraele” mpe na ntina na ye Yehova apesaki etindá: “Tosá monɔkɔ na ye.” (Exode 14:19; 23:20, 21) Na ntembe te, liboso ya kobotama lokola moto, Yesu azalaki mpe “mokonzi na basodá na [Yehova]” oyo abimelaki Yosua mpo na kolendisa ye. (Yosua 5:14, 15) Yehova asalelaki mpe baanzelu mosusu mpo na kolakisa mateya na ye, lokola baoyo asalelaki mpo na kopesa Mibeko na ye epai na Mose.​—Exode 20:1; Bagalatia 3:19; Baebele 2:2, 3.

22. (a) Na mabelé, banani oyo Yehova asalelaki mpo na koteya? (b) Wapi mwango ya liboso mpenza na nzela na yango Yehova azali koteya bato lelo oyo?

22 Lisusu, Yehova Nzambe asalelaka bato lokola batindami mpo na koteya. Na Yisraele baboti basengelaki koteya bana na bango; basakoli, banganga, bankumu, mpe Balevi bazalaki koteya Mibeko epai na ekólo. (Deteronome 11:18-21; 1 Samwele 12:20-25; 2 Ntango 17:7-9) Yesu azalaki Molobeli ya liboso ya Nzambe awa na mabelé. (Baebele 1:1, 2) Yesu azalaki mbala mingi koloba ete makambo oyo azalaki koteya ezalaki mpenzampenza oyo ayekolaki epai na Tata na ye, na yango bayoki na ye bateyamaki solo na Yehova. (Yoane 7:16; 8:28; 12:49; 14:9, 10) Yehova akomisaki maloba na ye, mpe na mikolo na biso azali koteya bato libosoliboso na nzela ya Makomami wana mapemami.​—Baloma 15:4; 2 Timoté 3:16.

23. Mituna nini mikotalelama na lisoló lilandi?

23 Tozali kobika na eleko moko ya ntina mingi, mpamba te Makomami mazali kolaka ete “na mikolo na nsuka [oyo tozali kobika kati na yango] bato mingi bakolakisama na banzela ya Yehova.” (Yisaya 2:2, 3, NW) Lolenge nini kolakisama yango epesami? Nini tokoki kosala mpo na kozwela yango litomba, mpe kosangana kati na ebongiseli monene ya koteya ya Yehova oyo ezali kolandana sikawa? Tokoyanola na mituna oyo na lisoló lilandi.

Okopesa eyano nini?

◻ Lolenge nini Yehova akómaki Tata, Molakisi, mpe Mobali na libala?

◻ Yehova azali koteya nini na ntina etali “mombóto”?

◻ Mateya nini ya ntina mingi mauti na Nzambe tosengeli kotosa yango?

◻ Lolenge nini Yehova ateyaka?

[Elilingi na lokasa 10]

Kosekwisama ya mwana mwasi ya Yailo epesaki nzela ya kondimela elaká ya Yesu na ntina na lisekwa

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto