Bafándi elongo kati na “Mokili” mozongisami
“Bino bokobyangama banganga na [Yehova]; bato bakobyanga bino basaleli na Nzambe na biso.”—YISAYA 61:6.
1, 2. (a) Ezalela ya baprozelite ezalaki nini kati na Yisraele? (b) Ezaleli nini basangani ya “ebele monene” bazali komonisa na mikolo na biso?
NA NTANGO ya kala, wana Yisraele ezalaki sembo esalaki lokola motatoli mpo na nkembo ya Yehova liboso na mokili mobimba. (Yisaya 41:8, 9; 43:10) Bato ya bikólo mosusu bayanolaki mpe bayaki kosambela Yehova elongo na libota na Ye liponami. Ya solo, balobaki na Yisraele maloba oyo Luta alobaki na Naomi: “Bato na yo bakozala bato na ngai mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai.” (Luta 1:16) Bandimaki kotosa bibongiseli ya Mibeko ya kondimana, ete mibali bákatama ngɛnga. (Exode 12:43-48) Basi mosusu babalanaki na Bayisraele. Rahabe oyo autaki na Yeliko mpe Luta oyo autaki na Moaba bakómaki bankɔ́kɔ ya Yesu Klisto. (Matai 1:5) Baprozelite wana bazalaki basangani ya lisangá ya Yisraele.—Deteronome 23:7, 8.
2 Lolenge moko na baprozelite na Yisraele, lelo oyo “ebele monene” bazali koloba epai na batikali bapakolami ete: “Tokokenda na yo elongo, zambi toyebi ete Nzambe azali elongo na bino.” (Emoniseli 7:9; Zakari 8:23) Bazali kondima ete baklisto bapakolami wana bazali “moombo ya sembo mpe ya mayele” ya Yehova, mpe bazali kosala na boyokani ya penepene elongo na bango, na boye ete bango nyonso, bapakolami mpe “bampate mosusu” bazali “etongá moko mpe na mobateli moko.” (Matai 24:45-47; Yoane 10:16) Nini ekokómela ebele monene na ntango bandeko na bango bapakolami nyonso bakozwa mbano na bango na likoló? Bazali na ntina ya kobanga te. Na boumeli ya ‘mikolo oyo ya nsuka,’ Yehova asali bibongiseli mpo na ntango wana.—2 Timoté 3:1.
“Mokili” ya elimo
3. “Likoló” ya sika oyo Petelo asakolaki ezali nini, mpe etyamaki ntango nini?
3 Ebongiseli ya bokonzi ya likoló oyo kati na yango baklisto bapakolami 144 000 bakosangana esakolamaki na ntoma Petelo. Alobaki ete: “Tozali kotalela likoló na sika mpe nsé na sika, pelamoko elakaki ye, boyengebene ekofanda kati na yango.” (2 Petelo 3:13) “Likoló na sika” wana etyamaki na 1914, na ntango Klisto atyamaki lokola Mokonzi kati na Bokonzi ya likoló. Kasi ezalaki boni mpo na “nsé na sika”?
4. (a) Likambo nini bato bamizelaki na yango te na 1919? (b) Nini ezalaki ‘libota libimisami na mwa ntango moke,’ mpe nini ezalaki ‘mokili oyo ebotamaki na mpasi’?
4 Na 1919, Yehova abimisaki batikali bapakolami longwa na boombo na Babilone Monene. (Emoniseli 18:4) Bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba bamizelaki na likambo wana soko moke te. Mpo na yango, Biblia elobi ete: “Nani ayoki likambo na lolenge oyo? Nani amoni likambo yango? Mokili ekobotama [na mpasi, NW] na mokolo moko? Libota bakobimisama na mwa ntango moke?” (Yisaya 66:8) Na ntango lisangá ya bapakolami ebimaki liboso na bikólo lokola libota lisikwami, ezalaki mpenza ‘libota libimisami na mwa ntango moke.’ Kasi, “mokili” yango ezalaki nini? Na ndimbola moko, ezalaki mokili ya elimo oyo ekokani na mokili ya Yisraele ya kala. Ezalaki esika ya mosala oyo epesamelaki “libota” oyo ebotamaki sika, esika oyo epai kuna Paladiso ya bisakweli ya mokanda ya Yisaya ezali kokokisama na mikolo na biso, na lolenge ya elimo. (Yisaya 32:16-20; 35:1-7; kokanisá na Baebele 12:12-14.) Na mosuni, epai nyonso oyo moklisto akoki kozala, azali kati na “mokili” wana.
5. Moboko nini ebimaki na 1919? Limbolá.
5 Yango ezali na boyokani nini na “nsé na sika” oyo Petelo asakolaki? “Libota” ya sika, oyo ebotamaki na 1919 kati na “mokili” oyo ezongisami esengelaki kokóla kino kokóma lisangá ya mokili mobimba esalemi na basanzoli ya Yehova bapakolami mpe baoyo bapakolami te. Lisangá yango ekobika na Armagedon mpo na kokɔta na mokili ya sika. Na lolenge yango, libota wana ekoki kotalelama lokola moboko ya libota ya bato ya sembo, mabelé ya sika, oyo ekozala na nsima ya kobebisama ya mokili ya Satana.a Na katikati ya bambula 1930, bapakolami, lokola etuluku, basilaki koyanganisama kati na mokili mozongisami. Uta ntango wana, likebi lityamaki mingi likoló na koyanganisama ya bampate mosusu, oyo lelo motángo na bango ekómi mpenza pene na milió mitano. (Emoniseli 14:15, 16) “Mokili” yango etondi na bato koleka ndelo? Te, bandelo na yango ekoki koyeisama monene na meko nyonso oyo mposa esɛngi yango. (Yisaya 26:15) Ya solo, ezali likambo ya kosepelisa na komona bokóli ya motuya ya bato na yango wana batikali bapakolami bazali kotondisa “mokili” na “mbuma”—bilei ya elimo oyo ezali kopesa kolɔngɔ́nɔ́ mpe makasi. (Yisaya 27:6) Kasi etɛlɛmɛlo ya bampate mosusu wana ezali nini kati na “mokili” mozongisami ya libota ya Nzambe?
Bato ya bikólo mosusu bazali kosala na molende kati na “mokili”
6. Lolenge nini bapaya basalaki na molende kati na “mokili” ya libota ya Nzambe?
6 Bobele lokola baprozelite kati na mokili ya Yisraele bazalaki kotosa Mibeko ya Mose, ebele monene lelo oyo kati na “mokili” mozongisami bazali kotosa mibeko ya Yehova. Lokola bateyami na bandeko na bango ya elimo, bazali koboya kosangana na lolenge nyonso ya losambo ya lokuta mpe bazali komemya ezaleli ya bulɛɛ ya makila. (Misala 15:19, 20; Bagalatia 5:19, 20; Bakolose 3:5) Bazali kolinga Yehova na motema na bango mobimba, na elimo na bango mobimba, na molimo na bango mobimba, mpe na makasi na bango mobimba mpe bazali kolinga bazalani na bango lokola bango moko. (Matai 22:37; Yakobo 2:8) Na Yisraele ya kala baprozelite bapesaki lisungi na mosala ya kotonga tempelo ya Salomo mpe basungaki na kozongisama ya losambo ya solo. (1 Ntango 22:2; 2 Ntango 15:8-14; 30:25) Lelo oyo, ebele monene bazali mpe kosangana na misala ya botongi. Na ndakisa, bazali kosunga mpo na kolendisa masangá, bazongazonga, bakisa mpe mosala ya botongi bandako, lokola Bandako ya Bokonzi, Bandako ya mayangani, bandako ya bafiliale.
7. Nini esalemaki na Yelusaleme nsima ya bobimi na boombo, na ntango Balevi bazalaki mingi te mpo na kokokisa misala na tempelo?
7 Na 537 L.T.B., na ntango Yisraele eutaki na boombo na Babilone, babandaki kobongisa mosala kati na tempelo oyo etongamaki lisusu. Nzokande, Balevi oyo bazongaki bazalaki mingi te. Na yango, Banetinimi—bapaya bakatami-ngɛnga oyo bazalaki liboso basungi ya Balevi—bapesamelaki mikumba minene kati na misala ya tempelo. Nzokande, bakokanaki te na banganga bapakolami ya libota ya Alona.b—Esdrase 7:24; 8:15-20; Nehemya 3:22-26.
8, 9. Lolenge nini bampate mosusu bakamataki mikumba mingi kati na mosala ya kokokisa mosala ya bulɛɛ na boumeli ya mikolo ya nsuka?
8 Lelo oyo baklisto bapakolami basili kolanda elakiseli yango. Wana “ntango ya nsuka” ezali kopusana, batikali bapakolami bazali sé kokóma moke kati na “mokili” ya libota ya Nzambe. (Danyele 12:9; Emoniseli 12:17) Mpo na yango, lelo oyo ebele monene bazali kokokisa eteni eleki monene ya “mosala ya bulɛɛ.” (Emoniseli 7:15) Bazali kolanda litambwisi ya bandeko na bango bapakolami, bazali “kotombwela Nzambe mbeka na masanzoli ntango nyonso, yango mbuma na bibebu bizali koyambola nkombo na ye.” Bazali “kobosana te kosala boboto mpe kokabela bamosusu,” koyebáká ete “Nzambe akosepela na mbeka motindo yango.”—Baebele 13:15, 16.
9 Lisusu, awa ebele monene bazali kobakisama na motángo ya bankóto mingi mbula na mbula, mposa ya kozala na bakɛngɛli mingi ezali mpe kokóla sé kokóla. Na eleko moko ezalaki bobele baklisto bapakolami nde bazalaki kokokisa mokumba ya bakɛngɛli. Sikawa, na masangá mingi, mpe na bazongazonga, na bitúká, na bafiliale, mosala ya bokɛngɛli esengeli kopesama epai na bampate mosusu. Na 1992, ndambo moke kati na bango bapesamelaki libaku kitoko ya kokɔta na makita ya bakomité ya Lisangani ya Mikóló-bakambi mpe bazali basungi bobele mpo na kopesa makanisi. Atako bongo bampate mosusu bazali ntango nyonso sembo epai na baninga na bango baklisto bapakolami mpe bazali na esengo ya kozala na libaku malamu ya kosunga bango lokola moombo ya sembo mpe ya mayele.—Matai 25:34-40.
“Lokola sheik”
10, 11. Na kolandáká elakiseli ya Bafilisitia mosusu, lolenge nini banguna mosusu ya kala ya libota ya Nzambe babongolaki mitema na bango? Yango ebimisaki matomba nini?
10 Lolenge oyo moombo ya sembo mpe ya mayele azali kosalela bampate mosusu kati na mikumba minene esakolamaki kati na Zakari 9:6, 7. Epai kuna tozali kotánga ete: “Nakosukisa lolendo na Bafilisitia. Nakolongola makila na ye longwa na monoko na ye mpe bosoto na ye longwa na mino na ye; akozala mpe likita mpo na Nzambe na biso; akozala lokola [sheik, NW] kati na Yuda, Ekelone akozala lokola Moyebusi.”c Bafilisitia bazalaki banguna mpenza ya libota ya Yehova, lokola mokili ya Satana lelo oyo. (1 Yoane 5:19) Bobele bongo lokola libota ya Bafilisitia esukaki na kolimwisama, mokili oyo mpe, elongo na makambo na yango ya losambo, ya politiki, mpe ya mombongo, mosika te, Yehova akoboma yango.—Emoniseli 18:21; 19:19-21.
11 Nzokande, engebene maloba ya Zakari, Bafilisitia mosusu babongolaki motema, mpe yango emonisaki na elilingi ete bato mosusu ya mokili basengelaki ntango nyonso te kolanda kozala banguna ya Yehova. Basengelaki kotika losambo ya bikeko mpe milulu na yango ya nsɔni mpe bambeka na yango ya mbindo mpe basengelaki kopetolama na miso ya Yehova. Na eleko na biso, “Bafilisitia” wana oyo babongoli motema bazali kati na ebele monene.
12. Na mikolo na biso, lolenge nini “Ekeloni” ekómaki “lokola Moyebusi”?
12 Engebene esakweli wana, Ekelone engumba monene ya Bafilisitia esengelaki kokóma “lokola Moyebusi.” Bayebusi mpe bazalaki liboso banguna ya Yisraele. Yelusaleme ezalaki na mabɔkɔ na bango liboso ete Davidi abotola yango. Nzokande, ezali polele ete bamoko na baoyo babikaki na bitumba elongo na Bayisraele bakómaki baprozelite. Basalaki kati na mokili ya Yisraele lokola baombo mpe bazalaki nkutu na libaku malamu ya kosala kati na botongi ya tempelo. (2 Samwele 5:4-9; 2 Ntango 8:1-18) Lelo oyo, “Bakeloni” oyo bazali kobongwana mpo na kosambela Yehova bazali mpe na mikumba ya mosala kati na “mokili” oyo ezali na nsé ya litambwisi ya moombo ya sembo mpe ya mayele.
13. Basheik bazalaki banani kati na mokili ya kala?
13 Zakaria alobi ete Filisitia ekozala lokola sheik kati na Yuda. Liloba ya liebele ʼal·luphʹ, na ntango ebongolami “sheik,” elimboli “mokambi ya nkóto” (to, “siliaki”). Ezalaki etɛlɛmɛlo moko ya ntina mingi. Emonani ete ekólo ya kala ya Edome ezalaki bobele na basheik 13. (Genese 36:15-19) Liloba “sheik” esalelamaka mingi te na ntango bazali kolobela Yisraele, kasi liloba “motó (to, mokonzi) ya nkóto” emonanaka mbala mingi. Na ntango Mose ayanganisaki bamonisi ya ekólo ya Yisraele, abyangisaki “mikonzi na bankóto ya Yisraele.”d Ezalaki na bato 12 kati na bango, oyo bazalaki bobele na nsé ya Mose. (Mituya 1:4-16) Bobele bongo, kati na ebongiseli ya limpinga, bakonzi ya bankóto bazalaki na nsima bobele ya mokonzi monene ya basodá to mokonzi ya mboka.—2 Samwele 18:1, 2; 2 Ntango 25:5.
14. Na ndimbola nini “Mofilisitia” akómi lelo oyo lokola sheik?
14 Zakari asakolaki te ete Mofilisitia oyo abongwanaki asengelaki mpenza kozala sheik kati na Yisraele. Yango elingaki kolongobana te, mpamba te azalaki te mobotami na Yisraele. Kasi asengelaki kozala lokola sheik, kozala na etɛlɛmɛlo ya bokonzi ekokani na oyo ya sheik. Yango ezalaki mpe bongo. Wana motángo ya baklisto bapakolami ezali kokita mpe mingi na baoyo bazali na bomoi balɛmbi mingi mpo na bobangé, bampate mosusu oyo babongisami malamu bazali kopesa mabɔkɔ. Mposa na bango ezali te ya kokamata esika ya bandeko na bango bapakolami. Kasi moombo ya sembo mpe ya mayele azali kopesa bango bokonzi wana mposa emonani kati na “mokili” mpo ete lisangá ya Yehova ekoka kokóba kokende sé liboso na lolenge oyo ebongi malamu. Bokóli wana emonani mpe kati na esakweli mosusu.
Banganga mpe batimoli
15. (a) Na kokokisama ya Yisaya 61:5, 6, banani bazali “banganga na Yehova,” mpe ntango nini bazali kokokisa mokumba yango na mobimba mpenza? (b) Banani bazali “bapaya” oyo bazali kosala mosala ya bilanga ya Yisraele, mpe—na elobeli ya elimo—mosala yango elimboli nini?
15 Yisaya 61:5, 6 elobi ete: “Bapaya bakotɛmaka mpo na koleisa bitongá na bino, bato na mikili misusu bakozala [basáli bilanga, NW] na bino mpe babateli na miwiti na bino. Kasi bino bokobyangama banganga na [Yehova], bato bakobyanga bino basaleli na Nzambe na biso; bokolia bozwi na mabota mpe na mosolo na bango bino bokomikembisa.” Lelo oyo, “banganga na Yehova” bazali bongo baklisto bapakolami. Na ndimbola ya nsuka mpe ya mobimba, bakosala lokola “banganga na [Yehova] . . . , basaleli na Nzambe na biso,” kati na bokonzi ya likoló. (Emoniseli 4:9-11) Banani bazali “bapaya” oyo bazali na mokumba ya mosala ya bilanga? Ezali bongo bampate mosusu, baoyo bazali kofanda kati na “mokili” ya Yisraele ya Nzambe. Mosala ya kobatela bampate, ya kosala bilanga, mpe kobongisa miwiti oyo mopesameli bango ezali nini? Na ndimbola ya ntina mingi ya elimo, mikumba wana mizali na boyokani na mosala ya kosunga, ya koleisa, mpe ya koyanganisa bato.—Yisaya 5:7; Matai 9:37, 38; 1 Bakolinti 3:9; 1 Petelo 5:2.
16. Na nsuka, banani bakosimba misala nyonso kati na “mokili” ya libota ya Nzambe?
16 Sikawa, motuya moke ya Bayisraele ya elimo batikali awa na mabelé, bazali kosangana na mosala ya kobatela bampate, kosala bilanga, mpe ya kobongisa miwiti na lolenge ya elimo. Na ntango lisangá ya bapakolami ekosangana na mobimba na yango elongo na Klisto, mosala oyo nyonso ekotikala epai na bampate mosusu. Ata mosala ya bokɛngɛli ya “mokili” ekozala bongo na mabɔkɔ ya bampate mosusu oyo babongisami malamu, oyo kati na Ezekiele babéngami kelasi ya mowkonzi.—Ezekiele, mikapo 45, 46.e
“Mokili” moumeli
17. Bibongiseli nini Yehova azali kosala na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka?
17 Ee, ebele monene bazali na ntina ya kobanga te! Yehova asili kosala bibongiseli bisengeli mpenza mpo na bango. Likambo lileki ntina awa na mabelé na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka ezalaki bongo koyanganisama mpe kotyama bilembo ya bapakolami. (Emoniseli 7:3) Nzokande, awa emoni ye yango esili kokokisama, Yehova asangisi bampate mosusu elongo na bango kati na mokili mozongisami ya elimo. Kuna bazali koleisama malamu na elimo mpe babongisami kati na bomoi ya boklisto. Lisusu, bateyami malamu kati na mosala ya bulɛɛ, bakisa mpe mosala ya bokɛngɛli. Mpo na yango bazali na botɔ́ndi mozindo epai na Yehova mpe epai na bandeko na bango bapakolami.
18. Na kati na makambo nini bampate mosusu bakotikala sembo kati na “mokili” ya elimo ya Yisraele?
18 Na ntango Gog ya Magog akobundisa libota ya Yehova mpo na mbala ya nsuka, bampate mosusu bakotikala ngwi elongo na batikali bapakolami kati na “mokili oyo mboka na yango ezali na bitutu te.” Bampate mosusu bakozala naino kati na “mokili” wana na ntango bakobika na kobomama ya mabota mpe bakokɔta kati na mokili ya sika. (Ezekiele 38:11; 39:12, 13; Danyele 12:1; Emoniseli 7:9, 14) Lokola bakokóba kozala sembo, bakotika soko moke te esika wana ya kitoko mingi.—Yisaya 11:9.
19, 20. (a) Kati na mokili ya sika, bafandi ya “mokili” bakozala na nsé ya bokɛngɛli nini ya kitoko? (b) Nini oyo tozali kozela na esengo nyonso mpe na motema likoló?
19 Yisraele ya kala eyangelamaki na bakonzi oyo bazalaki bato mpe ezalaki na banganga oyo bazalaki Balevi. Kati na mokili ya sika, baklisto bakozala na nsé ya kokɛngɛlama ya malamu koleka—Na nsé ya Nkolo Moyangeli, Yehova, bakozala na nsé ya Nganga Monene mpe Mokonzi, Yesu Klisto, mpe ya banganga mpe bakonzi 144 000 oyo basangani na ye—oyo bamoko kati na bango bayebanaki na bango lokola bandeko na bango mibali mpe basi baklisto awa na mabelé. (Emoniseli 21:1) Bafandi ya sembo ya mokili ya elimo bakofanda na mabelé oyo ezongisami mpenza paladiso ya solo, bakosepela na mapamboli kitoko oyo ekopesamela bango na nzela ya Yelusaleme ya sika.—Yisaya 32:1; Emoniseli 21:2; 22:1, 2.
20 Awa likálo monene ya Yehova na likoló ezali kotambola kozanga nkaka, mpo na kokokisa mikano na ye, biso banso tozali kozela na esengo nyonso mpe na motema likoló, kokokisa mokumba oyo epesameli biso. (Ezekiele 1:1-28) Nsima wana mikano yango mikosila kokokisama, kanisá naino esengo oyo bolóngi ya nkembo ya Nzambe ekokumisama na yango. Nzembo ya nguya oyo ekomami na Emoniseli 5:13 ekoyembama na bikelamu nyonso: “Na mofandi na kiti na bokonzi, mpe na Mwana na Mpate, masanzoli, na nkembo, na makasi, libela na libela”! Ata soki esika na biso ekozala na likoló to awa na mabelé, tozali na mposa makasi ya kozala wana, kosangisáká mingongo na biso kati na etuluku wana ya nkembo ya bayembi ya masanzoli, boye te?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá búku “Des nouveaux cieux et une nouvelle terre,” ebimisami na 1957 na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., lokasa 322 kino lokasa 323.
b Mpo na lisoló mobimba, talá lisoló “‘Bapesami’: ebongiseli ya Jéhovah” na Mosenzeli ya 15 Apríli 1992.
c Talá búku Le Paradis rétabli parmi les hommes— grâce à la Théocratie!, ebimisami na 1972 na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., lokasa 264 kino lokasa 269.
d Na Liebele: raʼ·shehʹ ʼal·phehʹ Yis·ra·ʼelʹ, oyo ebongolami na khi·liʹar·khoi Is·ra·elʹ “siliake ya Yisraele” kati na la Septante.
e Talá búku “Les nations sauront que je suis Jéhovah” — Comment?, ebimisamaki na 1971 na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., lokasa 401 kino lokasa 417.
Lolenge nini okoyanola?
◻ “Mokili” nini ezongisamaki na 1919, mpe lolenge nini etondaki na bato?
◻ Lolenge nini bampate mosusu bapesameli mikumba mingi kati na “mokili” mozongisami ya libota ya Nzambe?
◻ Na lolenge nini basangani ya ebele monene bazali “lokola Moyebusi”?
“lokola sheik kati na Yuda”?
◻ Ntango boni bampate mosusu ya sembo bakotikala kati na “mokili”?
[Elilingi na lokasa 23]
Mofilisitia ya mikolo na biso akozala “lokola sheik” kati ya Yuda
[Bililingi na lokasa 24]
Bapakolami mpe bampate mosusu bazali kosala elongo kati na mokili ya elimo