Makamwisi ya Yesu—Makambo ya solo to masapo ya mpamba?
“Na ngonga na minei na butu ayei epai na bango wana ejalaki ye kotambola likolo na libeke.”—Matai 14:25.
MPO na bamilió mingi ya bato kati na mokili, kondima ete Yesu Klisto asalaki makamwisi ezali mpenza na ntina lolenge moko na kondima ete Nzambe azali. Bakomi ya Baevanzile—Matai, Malako, Luka, mpe Yoane—balobeli makamwisi pene na 35 oyo Yesu asalaki. Nzokande, masoló na bango mazali komonisa ete asalaki makambo mingi mosusu ya kokamwisa.—Matai 9:35; Luka 9:11.
Makamwisi wana mazalaki kosalema te na mokano ya kosepelisa bato. Masalemaki mpo na kondimisa maloba ya Yesu oyo ete azalaki Mwana ya Nzambe, Masiya oyo bazalaki kozela uta kala. (Yoane 14:11) Mose asalaki makamwisi na ntango amimonisaki epai na libota ya Yisraele oyo ezalaki na boombo. (Exode 4:1-9) Bobele bongo, Masiya, ye oyo esakolamaki na ntina na ye ete akozala monene koleka Mose, asengelaki mpe komonisa elembo ete andimami na Nzambe. (Deteronome 18:15) Na yango, Biblia elobi na ntina na Yesu ete “ajalaki mobali oyo Njambe atalisi kati na bino na misala na nguya, na bikamwiseli, na bilembo.”—Misala 2:22.
Na ntango ya kala, bato bazalaki kondima kozanga kobeta ntembe lolenge oyo Biblia ezali komonisa Yesu lokola mosáli na makamwisi. Kasi na bambula oyo, bato basili koloba mabe mingi na ntina na masoló ya Baevanzile. Kati na búku na ye Deceptions and Myths of the Bible (Bokósi mpe masapo ya Biblia), Kolobeláká lisoló ya Biblia oyo ete Yesu atambolaki likoló na mai, Lloyd Graham alekisi ndelo kino koloba ete: “Kondima lisoló yango na ndenge ekomami mpenza ezali bongo kozanga boyebi; nzokande, bato mingi bazali kondimela yango na lolenge wana mpenza. Mpo na yango, ntina ezali te ya koluka koyeba soki likambo nini ezali kotambola malamu te kati na mokili na biso. Kozanga boyebi motindo oyo ekoki kobimisa mokili ya malamu?”
Ekoki kosalema te?
Nzokande, makambo ya mabe motindo wana oyo elobami ezali ya bolema. Búku The World Book Encyclopedia elobi ete likamwisi ezali “likambo oyo ekoki kolimbolama te na lisalisi ya mibeko ya bozalisi oyo eyebani.” Engebene ndimbola oyo, soki televizyó oyo ekolakisaka lángi ndenge na ndenge, téléphone cellulaire, to ordinatɛrɛ ya mike ebimaki esili koleka mbula nkámá, mbɛlɛ elingaki kotalelama lokola likamwisi mpenza! Ezali likambo ya mayele kozala na makanisi matɛlɛmi bobele esika moko mpe koloba ete likambo boye ekoki kosalema te bobele mpo ete ekoki kolimbolama te na makambo ya siansi engebene boyebi oyo tozali na yango sikawa?
Likambo mosusu tosengeli kotalela ezali oyo: Na Greke ya ebandeli, lokótá oyo bakomaki na yango “Tɛstamá ya Sika,” liloba oyo esalelami mpo na likamwisi ezalaki bongo dyʹna·mis—liloba oyo elimboli mpenza “nguya.” Ebongolami mpe na “misala na nguya” to “likoki.” (Luka 6:19; 1 Bakolinti 12:10; Matai 25:15) Biblia ezali koloba ete makamwisi ya Yesu mazalaki bongo komonisama ya “nguya monene ya Nzambe.” (Luka 9:43, NW) Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso akoki nde kozanga likoki ya kosala makambo motindo wana—Ye oyo azali na “ebele ya nguya makasi”?—Yisaya 40:26, NW.
Elembeteli ya bosolo na yango
Kotalela malamumalamu Baevanzile nyonso minei ezali komonisa bilembeteli mosusu oyo ezali kolakisa bosolo na yango. Moko na makambo oyo tokoki kotalela ezali oyo ete: masoló wana makeseni mpenza na masapo ya makanisi mpamba. Na ndakisa, tótalela masoló ya lokuta oyo mapalanganaki na ntina na Yesu na boumeli ya bikeke oyo ezalaki nsima ya liwa na ye. “Evanzile ya Thomas,” oyo epemami te, elobi ete: “Wana Yesu azalaki elenge na mibu mitano . . . atambolaki kati na mboka mobimba, mpe mwana moko ya mobali azalaki kokima mbangu mpe atutaki ye na lipeka. Yesu abulunganisamaki mpe alobaki na ye ete: ‘Okokende lisusu mosika na nzela na yo te’, mpe na mbala moko mwana yango akweaki mpe akufaki.” Ezali mpasi te mpo na koyeba soki lisoló oyo ezali mpenza ya lolenge nini—lisoló ya makanisi mpamba oyo bato basali yango kosala. Lisusu, lolenge ya mwana oyo ya lolendo, mpe ya kosilika mpambampamba oyo amonisami awa akokani soko moke te na Yesu oyo ya Biblia.—Kokanisá na Luka 2:51, 52.
Sikawa, tótalela masoló mpenza ya Baevanzile ya solo. Ezali na makambo ya kolekisa ndelo te mpe ezali ya makanisi mpamba te. Yesu azalaki kosala makamwisi mpo na kokokisa mposa ya ntina mpenza, kasi te mpo na kokokisa mposa ya lolendo. (Malako 10:46-52) Yesu asalelaki nguya na ye te mpo na kokokisa matomba na ye moko. (Matai 4:2-4) Mpe asalelaki yango te mpo na komimonisa. Ya solo, na ntango Mokonzi Elode, oyo azalaki na mposa ya koyeba makambo nyonso, alingaki ete Yesu asala “elembo” ya likamwisi mpo na ye, Yesu “apesaki ye eyano te.”—Luka 23:8, 9, NW.
Makamwisi ya Yesu mazalaki mpe na bokeseni monene na misala ya bato oyo basalaka makambo ya kobenda likebi, bato ya mazí, mpe baoyo babikisaka bato ya maladi. Misala na ye ya nguya ezalaki ntango nyonso kokumisa Nzambe. (Yoane 9:3; 11:1-4) Makamwisi na ye mazalaki te na milulu ya kolamwisa mayoki, to misala ya mazí, ezalaki mpe te kolakisama ya makambo ya kobenda likebi, mayele mabe, mpe kolengola. Na ntango Yesu akutanaki na mosɛ́ngi mokufi-miso na nkombo ya Balatimai oyo angangaki ete: “Laboni, ete namɔna lisusu,” Yesu apesaki ye bobele eyano oyo ete: “‘Kɛnda na yɔ; kondima na yɔ esili kobikisa yɔ.’ Nɔkinɔki, amɔni lisusu.”—Malako 10:46-52.
Masoló ya Baevanzile ezali komonisa ete Yesu asalaki misala ya nguya kozanga bisaleli ya pambapamba, bisalasala oyo ebongisami malamu, to myango ya bokósi. Ezalaki kosalema na libándá, mingimingi na miso ya bato mingi. (Malako 5:24-29; Luka 7:11-15) Na bokeseni na oyo babikisi ya mikolo na biso bazali koluka kosala, misala na ye ya kobikisa ezalaki sé kolongá ata soki bato bato mosusu ya maladi bakokaki kozanga kondima. Matai 8:16 elobi ete: “Abikisi yɔnsɔ baoyo bajalaki na malali.”
Kati na búku na ye “Many Infallible Proofs:” The Evidences of Christianity (“Bilembo mingi ya solo:” Bilembeteli ya boklisto), moto ya mayele Arthur Pierson alobi na ntina na makamwisi ya Klisto ete: “Motuya na yango, lolenge na ye ya kobikisa na mbala moko mpe na mobimba oyo akokisaki, likambo oyo ete nyonso ezalaki sé kolónga, ata wana alingaki kosekwisa moto, nyonso wana emonisi bokeseni oyo bozali kati na makamwisi mpe makambo ya kokamwa ya eleko oyo to ya eleko nyonso mosusu.”
Bilembeteli biuti na bato ya mayele ya mokili
Pierson apesi mpe likanisi mosusu oyo ezali kolóngisa masoló ya Baevanzile, wana alobi ete: “Ezali na likambo moko te oyo ezali kondimisa bosolo ya makamwisi ya Yesu koleka likambo oyo ete banguna bakokaki te koangana yango.” Bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki mpenza na mokano makasi ya kobebisa lokumu ya Yesu, kasi makamwisi na ye mayebanaki mingi na boye ete banguna bakokaki te koangana yango. Lokola bazangaki lolenge ya koangana yango, balobaki ete wana ezalaki misala ya nguya ya bademó. (Matai 12:22-24) Bikeke mingi nsima na liwa ya Yesu, bakomi ya Talmud ya Bayuda bakóbaki kondima ete Yesu azalaki na nguya ya kokamwisa. Engebene búku Jewish Expressions on Jesus (Maloba ya Bayuda likoló na Yesu), baboyaki ye, na kotaleláká ye lokola moto oyo azalaki “kolanda misala ya mazí.” Soki ata likoki moke ezalaki mpo na koboya makamwisi ya Yesu lokola ete mazalaki masapo ya mpamba, mbɛlɛ maloba motindo oyo malingaki kobisama?
Bilembeteli mosusu bimonisami na Eusèbe, mokomi na makambo ya kala ya mangomba na ekeke ya minei. Kati na búku na ye The History of the Church From Christ to Constantine (Lisoló ya Lingomba kobanda na eleko ya Klisto kino na eleko ya Constantin), azongeli maloba ya moto moko na nkombo ya Quadratus, oyo atindaki nkómá epai na mokonzi mpo na kokɔtela lingomba ya boklisto. Quadratus akomaki ete: “Misala ya mobikisi na biso ezalaki komonana polele, mpamba te mizalaki solo—bato oyo babikisamaki mpe basekwisamaki kati na bakufi, bamonanaki bobele te na ntango oyo babikisamaki to ntango oyo basekwisamaki, kasi bazalaki komonana ntango nyonso, bobele te ntango Mobikisi azalaki elongo na biso, kasi bazalaki wana na boumeli ya ntango molai nsima ya bokei na Ye; ya solo, bamoko kati na bango bazalaki na bomoi kino na eleko na ngai mpenza.” Nganga-mayele William Barclay alobaki ete: “Quadratus alingi nde koloba ete kino na eleko na ye bato oyo makamwisi ya Yesu esalemaki na nzoto na bango bazalaki naino wana mpe bakokaki mpenza kozala bilembeteli ya solosolo. Soki yango ezalaki solo te, mbɛlɛ elingaki kozala mpasi te mpo na boyangeli ya Loma na koloba ete makambo wana mazalaki lokuta.”
Kondimela makamwisi ya Yesu ezali likambo ya mayele, ya boyebi mpe eyokani mpenza na bilembeteli. Nzokande, makamwisi ya Yesu mazali na ndimbola mpenza. Baɛbɛlɛ 13:8 ezali kokundwela biso ete: “Yesu Klisto ajali motindo mɔkɔ, lobi mpe lɛlo mpe libela.” Ya solo, lelo oyo azali na bomoi kuna na likoló, azali na makoki ya kosalela nguya ya kokamwa na bonene koleka ndenge asalaki yango ntango azalaki awa na mabelé lokola moto. Lisusu, masoló ya Baevanzile na ntina na makamwisi na ye (1) mazali kopesa batoli ebongi epai na baklisto lelo oyo, (2) mazali komonisa makambo kitoko kati na bomoto ya Yesu (3) mazali kobenda likebi na ntina na ntango oyo ekoya mosika te, wana makambo mosusu ya minene koleka makosalema!
Lisoló lilandi ekolobela masoló misato mayebani mingi mpo na komonisa makambo oyo.