Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/8 nk. 5-7
  • Bafungoli miso mpo na komona nsango malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bafungoli miso mpo na komona nsango malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kolónga kokufa-miso ya elimo
  • Kobikisama bobele moko mpo na libela ​—Bokonzi ya Nzambe
  • Bolamu kati na mokili ya sika ya Nzambe
  • Tósalisa bato oyo bakufá miso báyeba Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Elikya nini ezali mpo na bakufi-miso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Kokufa miso
    Lamuká!—2015
  • Bafarisai baluki kokweisa moto oyo akufá miso
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/8 nk. 5-7

Bafungoli miso mpo na komona nsango malamu

LISESE moko ya bato ya mboka Danemarque elobi ete: “Mapata makozanga te kozala bulé bobele mpo ete mokufi-miso amonaka yango te.” Kasi kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo oyo etondi na makambo mingi, tomonaka ete mapata mazali bongo bulé? Totalelaka mikolo mizali koya na elikya nyonso? Tondimaka solo nsango malamu oyo Liloba ya Nzambe, Biblia ezali komonisa na biso?

Kati na lisoló ya liboso, totalelaki kokufa-miso ya mosuni. Tiká tótalela sikawa lolenge mosusu ya komona oyo ezali na ntina mingi koleka. Yango esimbi bolamu na biso ya seko, mpe bilikya ya balingami na biso.

Kozanga ntembe, tozali kobika na “ntango ya mpasi.” (2 Timoté 3:1) Likambo nini likómaka wana bato bazali kobunda mpo na kobika, bazali koyika mpiko na mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mpe na mitungisi ya libota, mpe wana bazali koyika mpiko na kozanga sembo mpe na kozanga bolingo oyo ezali kati na bato? Na mawa nyonso, mingi bazali komona ete elikya na bango epai na bato, na mangomba, mpe na biyangeli ezali kokita. Lokola bazali komona ete ezali na mwango moko te ya kobongisa makambo, basusu bazali kosukisa ete mikakatano na bango mikoki kosila soko moke te na lolenge ya malamu. Kati na Jornal da Tarde, zulunalo moko ya mboka Brésil, Jacob Pinheiro Goldberg amonisaki ete: “Liboso na likámá, bato basilikaka mpenza na ntina na mabungá oyo masalemi na boye ete báyebaka lisusu kokanisa malamu te, mpe bátyaka motema na biyambayamba ya mangomba.” Nzokande, atako makambo mazali kotambola malamu te, tosengeli kozala na makanisi mabongi, boye te?

Kanisá naino ete ozali na mposa ya ndako mpo na libota na yo, mpe ozali na mbongo mpo na kosomba yango. Ekoki kozala ete otamboli kotala bandako na bisika mingi oyo ezali zingazinga. Atako basáli oyo batalelaka botɛkisi ya bandako bamekaki kokokisa bamposa na yo, ndako oyo olingi ezwami te. Nzokande, lokola yango etali esengo mpe bolamu ya libota na yo, okotika te koluka, boye te? Sikawa kanisá esengo na yo wana na nsuka ozwi ndako oyo ozalaki koluka.

Motindo moko lokola okolinga kolekisa ntango mpo na koluka ndako ya sika, mpo na nini okotalela Biblia te mpo na koluka koyeba lolenge ya kosilisa mikakatano na yo? Motindo moko lokola tosengeli kotalela makambo malamumalamu liboso na kozwa bikateli bitali ndako, bobele bongo tosengeli kokanisa malamu likoló na oyo tozali kotánga kati na Liloba ya Nzambe. Komona mpe kondima solo na ntina na Yehova mpe na ntina na Yesu Klisto ezali nkutu na ntina mingi koleka kozwa ndako. Yesu alobaki ete: “Oyo ejali bomɔi na seko ete bayeba yɔ Njambe mɔkɔ na sɔlɔ mpe Motindami na yɔ, Yesu Klisto.”​—Yoane 17:3.

Kasi, soki nsango ya Biblia ezali na motuya mingi, mpo na nini bato mingi bamonaka nsango malamu na yango te? Ntina ya liboso, oyo ekoki kokamwisa bato mingi, ezali boye ete, “mokili mobimba ejali kolala kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Lokola mbuma mabe na yango, Satana Zábolo “ajimisi miso na makanisi na bango baboyi kondima ete bamɔna pole na Nsango Malamu na nkɛmbo na Klisto tɛ. Ye ajali elilingi na Njambe.” (2 Bakɔlinti 4:4) Atako tomonaka na miso, bɔɔngɔ́ nde elimbolaka pole oyo ezali kokɔta na miso. Na yango, kozala mokufi-miso elimbolami lisusu lokola “kokoka te to kolinga te kososola to kokanisa.” Yango ekundweli biso lisese ya Lingelesi oyo liyebani malamu: “Baoyo baboyaka komona bakufi mpenza miso koleka bakufi-miso.”

Mokufi-miso amonaka te makambo oyo mazali liboso na ye, na yango akoki kozwama na likámá ya kozoka. Mpo na bato mingi oyo bakufi-miso na mosuni, ezalela na bango ekoki kobongwana te, nzokande, moto moko te asɛngisami kotikala libela mokufi-miso na elimo.

Kolónga kokufa-miso ya elimo

Motindo moko lokola kozanga bopɛto ekoki kobebisa miso, esika ya mbindo ekoki komema na kokufa-miso na elimo. Lisusu, Yesu Klisto akebisaki biso na ntina na mateya ya bato mpe bonkɔ́kɔ. Amonisaki polele ete bakonzi ya mangomba ya ntango wana bazalaki kozimbisa bitongá na bango: “Bajali bakufi miso baoyo bajali kokamba bakufi miso na njela. Sɔkɔ mokufi miso akokamba mokufi miso na njela, bango mibale bakokwea na libulu.”​—Matai 15:14.

Na esika ete bázimbisama na bakambi bakufi-miso, baoyo bazali kofungwama miso mpo na komona nsango malamu na ntina na Bokonzi ya Nzambe bazali mpenza na esengo! Yesu alobaki ete: “Nayei na mokili mpɔ na kosambisa ete baoyo bajali komɔna tɛ bamɔna.” (Yoane 9:39) Nzokande, lolenge nini baoyo bakufi-miso na elimo bakoki komona lisusu? Tiká tótalela lisusu kokufa-miso ya mosuni.

Bibongiseli mingi bisili kosalema lelo oyo mpo na kosalisa baoyo bamonaka malamu te. Yango ezalaki kosalema bongo te uta kala. Milende ya solosolo mpo na kosalisa bakufi-miso mimonanaki mpenza te liboso ete Valentin Haüy asala eteyelo moko mpo na bakufi-miso na 1784. Na nsima, Louis Braille abandisaki ekomeli oyo ezali na nkombo na ye; asalaki bongo mpo na kosalisa baoyo bamonaka te ete bákoka kotánga.

Ezali boni mpo na bakufi-miso na elimo? Na bambula oyo euti koleka, milende mingi misalemaki mpo na kosakola nsango malamu kino na biteni mosika ya mabelé. (Matai 24:14) Batatoli ya Yehova bazali kosepela mingi na komema elikya ezala epai na bakufi-miso na elimo to epai na bakufi-miso na mosuni.

Mwasi moko ya mboka Brésil akomaki ete: “Nalingi koloba ete atako nakufi-miso na mosuni, nazali komona​—na elimo. Oyo nde Nzambe ya kokamwa! Tozali na esengo ya koyeba ete ‘Yehova akofungola lobɔkɔ na ye mpe akosilisa mposa na yɔnsɔ na bomɔi.’” (Njembo 145:16) Mpe Jorge, oyo na mosuni azali mokufi-miso, amikundoli ete: “Bomoi na ngai ekoki mpenza kokabolama na biteni mibale: liboso mpe nsima ya Batatoli. . . . Na lisalisi na bango, nabandaki komona mokili polele. Nazali na boyokani malamu elongo na basangani nyonso kati na lisangá.” Likambo ya esengo ezali ete, Biblia endimisi biso ete mosika te moto moko te na mabelé mobimba akozala mokufi-miso​—na mosuni to na elimo. Lolenge nini yango ekosalema? Lolenge nini ekomonana na mabelé mobimba ete “[Yehova] akojipola miso na baoyo bakufi miso?”​—Njembo 146:8.

Kobikisama bobele moko mpo na libela ​—Bokonzi ya Nzambe

Atako zébi ya monganga ekóli mingi, ebele ya bokɔnɔ ezali ntango nyonso komema kokufa-miso, mpasi mpe liwa. Bongo, nini esɛngami mpo na kosilisa mikakatano ya kolya, ya kozanga bopɛto, mpe makámá oyo mazali kobebisa miso mpe kolongola esengo ya bomoi? Kobikisama oyo Yesu asalaki mpo na bakufi-miso mpe babɛli mosusu ezalaki mwa elakiseli na oyo akosala na mikolo mizali koya. Na esengo nyonso, mateya na ye mpe mosala ya kobikisa oyo asalaki ezalaki elilingi ya mapamboli oyo makosopama na mabelé na nsé ya Bokonzi ya Nzambe.

Kobikisama mpo na mokili mobimba esili kobɛlɛma.a Ebongiseli wana ya Nzambe na ntina na kobikisama emonisamaki malamu na ntoma Yoane ete: “Atalisi ngai ebale na mai na bomɔi, kitɔkɔ lokola kulusatala, kobima na kiti na bokonji na Njambe mpe na Mwana na Mpate. Na kati na balabala na yango, mpe na ebale, na bipai yɔnsɔ mibale, ejalaki njete na bomɔi kobotaka mbuma na mitindo jomi na mibale, sanja na sanja kobotaka mbumba na sanja, mbuma na sanja. Nkasa na njete ijali mpɔ na kobikisa bato na mabota.”​—Emɔnisɛli 22:1, 2.

Maloba lokola “mai ya bomoi” mpe “nzeté ya bomoi” mazali komonisa ete nsima ya kolimwa ya ebongiseli mabe ya ntango oyo, bibongiseli ya kobikisa ya Bokonzi na Nzambe ekotombola bato mokemoke kino ezalela ya kokoka. Ya solo, matomba ya mbeka ya lisiko na Yesu (bakisá kolimbisama ya masumu nyonso), elongo na boyebi ya Yesu Klisto mpe ya Tata na ye, ekomema kolɔngɔ́nɔ́ ya kokoka mpe bomoi ya seko.​—Yoane 3:16.

Bolamu kati na mokili ya sika ya Nzambe

Bongo, kanisá ete na mabelé mobimba, mobulu, kobebisa ezingelo, to bobólá ezali te. Kanisá ete libota na yo lizali kobika na kimya nyonso kati na Paladiso oyo ezongisami. (Yisaya 32:17, 18) Oyo nde esengo monene ya kosalela makanisi mpe biyokeli ya kokoka mpo na kotala ebele ya balángi ndenge na ndenge!

Faber Birren, alobaki ete: “Ezalela mpenza ya moto ezali ya kofanda kati na ezingelo oyo ezali ntango nyonso na kobongwana​—ya pole, ya lángi, mpe ya mitindo. Esika oyo ezangi kobongwana ezali te kati na mabelé. Lángi ezali moko na bisengo mpenza ya mokili oyo. Yango ezali komonana bipai binso, mpe makambo mingi ya esengo ya bomoi makangami na yango.”

Komona ezali mpenza likabo ya motuya mingi! Ekozala solo esengo ntango miso oyo mazalaki komona te​—na mosuni to na elimo​—makomona!

Ee, kati na Paladiso oyo ekozongisama na mikolo mizali koya, kokufa-miso mpe bampasi mosusu ekomema lisusu mawa te! Moto moko te akokosama lisusu. Lokola bolingo ya solo-solo ekomonana mingi, bato nyonso bakongɛngisama na elimo. Bolamu yango, mpe makambo mosusu mingi masili mpenza kobɛlɛma, kasi sikawa ezali ntango ya kondimama epai na Ye oyo akokokisa maloba na ye ya esakweli ete: “Bongo miso na bakufeli miso makofungolama!”​—Yisaya 35:5.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá bilembeteli oyo epesami kati na búku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis, mokapo 18, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

[Elilingi na lokasa 7]

Bongo miso na bakufeli miso makofungolama!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto