Tyá elikya epai na Yehova mpo na kokokisama ya mokano na ye
“Bayɛngɛbɛnɛ bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”—NJEMBO 37:29.
1. Mokano ya Yehova mozali nini mpo na bato mpe mpo na mabelé?
WANA Yehova azalisaki Adama mpe Eva, asalaki bango bato na kokoka. Mpe azalisaki bango mpo ete bakoka kofanda libela na libela awa na mabelé—soki nde batosaki mibeko na ye. (Genese 1:26, 27; 2:17) Oyo eleki mpenza, Nzambe atyaki bango kati na paladiso. (Genese 2:8, 9) Yehova alobaki na bango ete: “Bobota mpe bojala na kobota mingi, mpe botondisa mokili mpe botia yango na nse na bino.” (Genese 1:28) Na bongo, bakitani na bango basengelaki mpenza kopalangana na mabelé mobimba, mpe etando oyo esengelaki kozala paladiso oyo esengelaki kotonda na bato ya kokoka mpe ya esengo. Oyo nde ebandeli kitoko bato bazalaki na yango! “Nzambe atalaki biloko nyonso oyo ye asalaki mpe tala ete yango ezalaki malamu mingi.”—Genese 1:31, NW.
2. Ezalela ya makambo na bato ebimisi mituna nini?
2 Kasi, ezalela ya makambo na bato na boumeli ya mibu nkóto mingi, ekokani te na mokano ya Nzambe na ebandeli. Bato bazangi kokoka mpe bazali na esengo te. Makambo ya mokili mazali kopesa mpasi, mpe lokola esilaki kosakolama, ezali sé kokóma mabe mingi na ntango na biso. (2 Timoté 3:1-5, 13) Bongo, lolenge nini tokoki kotya motema ete mokano ya Nzambe mpo na bato mokokokana mosika te? Ekosɛnga lisusu ntango molai mpo ete makambo na mpasi oyo malongolama?
Nini ezali kobimisa makambo na mpasi?
3. Mpo na nini Yehova atyaki nsuka mbala moko te na botomboki ya bato?
3 Baoyo bazali na boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe lipemami bayebi mpo na nini Yehova apesaki nzela na makambo mabe awa na mabelé. Bayebi lisusu nini akosala mpo na yango. Na kolanda lisoló ya Biblia, basili koyekola ete baboti na biso ya liboso babungisaki likabo kitoko oyo Nzambe apesaki bato, yango lotómo ya kopona oyo balingi. (Kokanisá na 1 Petelo 2:16) Basalaki liponi mabe ya kolanda etamboli ya lipandá liboso na Nzambe. (Genese , mokapo 2 mpe mokapo 3) Botomboki na bango ebimisaki mituna minene, lokola oyo ete: Nkolo Moyangeli azali na lotómo ya koyangela likoló na bato banso? Boyangeli na ye ezali mpenza malamu mpo na bango? Boyangeli ya bato ekoki kolónga kozanga kotalela Nzambe? Lolenge malamu ya kozwa biyano na mituna wana ezalaki ya kotika boyangeli ya bato na boumeli ya bikeke mingi. Esili mpenza komonana ete bato bakoki kolónga te kozanga kotalela Motongi na bango.
4, 5. (a) Makambo nini mabimaki wana bato babwakaki boyangeli ya Nzambe? (b) Makambo nini malongoli ntembe nyonso oyo emonisami na boumeli ya ntango oyo esili koleka?
4 Wana Adama na Eva batikaki Nzambe, mosika te alongolaki bango kati na ezalela ya kokoka. Kozanga lisungi na ye, babebaki. Matomba na yango mazalaki ezalela ya kozanga kokoka, konuna, mpe nsuka ezalaki kufa. Na nzela ya mibeko ya bosangoli bizaleli, baboti na biso ya liboso bapesaki bizalela yango mabe epai na bakitani na bango nyonso, biso mpe lokola. (Baloma 5:12) Bongo boyangeli ya bato ebimisaki matomba nini na boumeli ya mibu nkóto na nkóto? Ezali mabe mingi, lokola Mosakoli 8:9 (NW) eyebisi na solo nyonso ete: “Moto azali koyangela [moninga na ye] moto mpo na kopesa ye mpasi.”
5 Ntango oyo eleki esili mpenza komonisa ete bato bazali na makoki te mpo na kotambwisa makambo na bango na elónga nyonso kozanga kotalela Mozalisi na bango. Yilimia, mokomi na Biblia oyo apemamaki, alobaki ete: “Ɛ [Yehova], nayebi ete njela na moto ejali kati na ye mɔkɔ tɛ, ekoki na motamboli tɛ ete atambolisa makolo na ye mɔkɔ.”—Yilimia 10:23; Deteronome 32:4, 5; Mosakoli 7:29.
Mokano ya Nzambe mobongwani te
6, 7. (a) Bankóto ya mibu oyo misili koleka na lisoló ya bato ebongolaki mokano ya Yehova? (b) Makambo nini masangisami kati na mokano ya Yehova?
6 Mibu nkóto na nkóto oyo misili koleka kati na lisoló ya bato—mitóndi bongo na mabe mpe na mpasi—ebongolaki mokano ya Nzambe? Liloba na ye liyebisi ete: “Oyo ezali maloba ya Yehova, Mozalisi ya makoló, Ye Nzambe ya solo, Moyemi na mabelé mpe Motongi na yango, Ye oyo apikaki yango makasi, oyo azalisaki yango mpo na mpamba te, oyo ayemaki yango ete efandama.” (Yisaya 45:18, NW) Bongo, Nzambe ayemaki mabelé ete bato báfanda wana, mpe yango ezali naino mokano na ye.
7 Yehova azalisaki mabelé bobele mpo na kofandama te, kasi akanaki lisusu ete yango ekóma paladiso oyo ekozala na bato ya kokoka mpe na esengo. Yango wana Biblia esakolaki ete ekozala na “mabelé ya sika,” bato ya sika, kati na yango “boyengebene ekozala wana.” (2 Petelo 3:13, NW) Mpe na Emɔnisɛli 21:4, Liloba ya Nzambe liyebisi biso ete kati na mokili ya sika, “akolongola mpisɔli yɔnsɔ na miso na [bato], mpe kufa ekozala lisusu tɛ, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe tɛ.” Ezali mpo na bantina motindo wana nde Yesu akokaki kolobela mokili ya sika wana mozali koya lokola “paladiso.”—Luka 23:43.
8. Mpo na nini tokoki kondimisama ete Yehova akokokisa mokano na ye?
8 Lokola Yehova azali Mozalisi na nguya-nyonso mpe na bwanya-bonso ya mɔlɔ́ngɔ́ oyo, moto moko te akoki kopekisa mokano na ye. “[Yehova] na bibele akati ndai ete, Lokola mwango mobɔngisaki ngai, ekojala mpe bongo; lokola mokano mokanaki ngai, ekotɛma mpe bongo.” (Yisaya 14:24) Na yango, wana Nzambe alobi ete akozalisa mabelé oyo paladiso efandami na bato ya kokoka, yango ekosalema. Yesu alobaki ete: “Esengo na basɔkɛmi, mpo ete bakosangola mabelé.” (Matai 5: 5, NW; Nzembo 37:29) Tokoki kondimisama na kokokisama ya elaká wana mpe kosala na boyokani elongo na yango. Na bongo, tokoki kopesa bomoi na biso mobimba mpo na yango, ata kotya bomoi na biso na likámá.
Batyaki elikya epai na Yehova
9. Abalayama asalaki likambo nini oyo limonisaki ete atyaki elikya na ye epai na Yehova?
9 Ebele na bato oyo bazalaki kobanga Nzambe na boumeli ya lisoló ya bato, bapesaki bomoi na bango mobimba mpo na mokano ya Nzambe na ntina na mabelé mpamba te bandimisamaki ete akokokisa yango. Atako boyebi na bango ezalaki mingi te, balikyaki epai na Nzambe mpe batambwisaki bomoi na bango engebene mokano na ye. Na ndakisa, Abalayama, oyo azalaki na bomoi soko mibu 2 000 liboso na koya na Yesu awa na mabelé—ntango mingi mpenza liboso ete Biblia ebanda kokomama. Atyaki elikya ete Yehova akokokisa bilaká na Ye. Ekoki kozala ete Abalayama ayekolaki makambo matali Mozalisi epai na mosembwi Seme, nkɔ́kɔ na ye oyo alakisamaki na Noa. Bongo, ntango Nzambe alobaki na Abalayama ete alongwa na Ulu ya Bakaladi, engumba na bozwi mingi mpo na kokenda na mboka ya Kanana oyo ayebaki yango te mpe oyo na likámá, tata-na-mabota wana atyaki elikya epai na Yehova, mpe bongo, akendaki. (Baebele 11:8) Na nsima, Yehova alobaki na ye, ete: “Nakojalisa yɔ libota monɛnɛ.”—Genese 12:2.
10, 11. Mpo na nini Abalayama alingaki kopesa Yisaka, mwana na ye bobele moko, lokola mbeka?
10 Nini ekómaki nsima wana Yisaka abotamelaki Abalayama? Yehova ayebisaki Abalayama ete, na nzela na Yisaka nde bakitani na ye bakokóma libota monene. (Genese 21:12) Na yango, emonanaki lokola nde ezalaki bongolábongola wana Yehova alobaki na Abalayama, lokola komekama mpo na kondima, ete apesa Yisaka, mwana na ye mbeka. (Genese 22:2) Atako bongo, na elikya monene epai na Yehova, Abalayama atosaki yango; atombolaki mpenza mbɛli mpo na koboma Yisaya. Na nsuka, Nzambe atindaki anzelu mpo na kopekisa Abalayama.—Genese 22:9-14.
11 Mpo na nini Abalayama azalaki bongo na botosi mingi? Baebele 11:17-19 (NW) emonisi ete: “Na kondima, wana Abalayama amekamaki na boye ete apesaki Yisaka mbeka, mpe ye moto oyo azwaki bilaká na esengo, alingaki kopesa [mwana na ye] bobele moko mbeka, atako elobamaki na ye ete: ‘Oyo ekobéngama “mombotó na yo” ekouta na Yisaka.’ Kasi akanisaki ete Nzambe akokaki kotɛlɛmisa ye ata longwa na bakufi; mpe longwa na yango, azwaki ye lisusu kati na elakiseli.” Bobele bongo, Baloma 4:20, 21 elobi ete: “[Abalayama] abɛtaki elaka na Njambe ntembe tɛ, kasi akembaki mingi kati na kondima; . . . Andimaki na motema mobimba ete Njambe akoki kosala yango esili ye kolaka.”
12. Lolenge nini Abalayama azwaki mbano mpo na kondima na ye?
12 Abalayama azwaki mbano mpo na kondima na ye bobele mpo na kobikisama ya Yisaka te mpe bobele te mpo azwaki “libota monene” oyo liutaki na ye, kasi kati na makambo mosusu lokola. Nzambe alobaki na Abalayama ete: “Mabota nyonso ya mabelé makopambolama mpenza na nzela ya mombotó na yo, mpo ete yo oyoki mongongo na ngai.” (Genese 22:18, NW) Lolenge nini? Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe na likoló asengeli kouta na bakitani ya Abalayama. Bokonzi yango esengelaki kolongola mpenza mokili mabe oyo moyangelami na Satana. (Danyele 2:44; Baloma 16:20; Emoniseli 19:11-21) Bongo, kati na mabelé na pɛto oyo makozala na nsé na boyangeli ya Bokonzi, Paladiso ekopalangana na mabelé mobimba, mpe bato ya “mabota manso” baoyo bazali kosala mokano ya Nzambe, bakozala na kolongono ya kokoka mpe na bomoi ya seko. (1 Yoane 2:15-17) Mpe atako Abalayama azalaki bobele na boyebi moke mpo na Bokonzi wana, atyaki elikya epai na Nzambe mpe na mosika, amonaki kotyama na yango.—Baebele 11:10.
13, 14. Mpo na nini Yobo atyaki elikya epai na Nzambe?
13 Mibu mingi na nsima, ezalaki na moto moko, Yobo, oyo azalaki na bomoi katikati na ekeke ya zomi na nsambo mpe ekeke ya zomi na motoba liboso ya ntango na biso, na esika oyo mboka Arabie ezali sikawa. Ye mpe azalaki na bomoi liboso ete Biblia ebanda kokomama. Yobo “ajalaki malamu bɛ mpe sembo. Atosaki Njambe mpe aboyaki mabe. (Yobo 1:1) Ntango Satana apesaki Yobo maladi ya makasi mpe ya mpasi mingi, mobali wana ya sembo “abimisaki liloba moko te ya lisumu” atako amekamaki makasi. (Yobo 2:10, The New English Bible) Yobo atyaki elikya epai na Nzambe. Mpe atako ayebaki mpenza te ntina oyo azwaki mpasi wana makasi, apesaki bomoi na ye epai na Nzambe mpe bilaká na Ye.
14 Yobo ayebaki ete ata soki akufi, mokolo mosusu Nzambe akokaki kozongisa ye na bomoi na nzela ya lisekwa. Amonisaki elikya wana na ntango alobaki epai na Yehova, ete: “Ɛ, sɔkɔ okobomba ngai kati na esika na bakufi [schéol], . . . sɔkɔ okotiela ngai elaka mpe okokanisa ngai? Sɔkɔ moto akokufa, akobika nde lisusu? . . . Okobianga mpe ngai nakojongisela yɔ.” (Yobo 14:13-15) Atako azalaki na mpasi makasi, Yobo amonisaki kondima kati na bonene ya Yehova, kolobáká ete: “Kino nakokufa nakomilongwela sembo na ngai tɛ.”—Yobo 27:5.
15. Lolenge nini Davidi amonisaki ete atyaki motema na ye kati na mokano ya Yehova?
15 Soko bikeke motoba nsima na Yobo mpe soko mibu nkóto liboso ete Yesu aya awa na mabelé, Davidi amonisaki ete atyaki motema na ye kati na mokili ya sika. Alobaki na nzembo ete: “Baoyo bakojilaka [Yehova] bakosangola mokili. Nsima na mwa ntango mokɛ, moto na mabe akojala lisusu tɛ . . . Nde [basɔkɛmi, NW] bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimia na sɔlɔ. Bayɛngɛbɛnɛ bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” Mpo na elikya na ye makasi, Davidi apesaki toli ete: “Jala na elikya epai na [Yehova] . . . Omisepelisa na [Yehova] mpe ye akopɛsa yɔ mposa yɔnsɔ na motema na yɔ.”—Njembo 37:3, 4, 9-11, 29.
16. Elikya nini ezalaki na ‘lipata monene ya batatoli’?
16 Uta bikeke mingi, mibali mpe basi ya sembo bazalaki na elikya ya lolenge moko mpo na bomoi ya seko awa na mabelé. Na yango, basalaki ‘lipata monene ya batatoli’ baoyo bapesaki mpenza bomoi na bango kati na bilaká ya Yehova. Mingi kati na batatoli ya Yehova wana ya kala, banyokwamaki mpe babomamaki mpo na kondima na bango, “mpo ete bakoka kozwa lisekwa lileki malamu.” Lolenge nini? Kati na mokili ya sika, Nzambe akopesa bango mbano na lisekwa lileki malamu mpe libaku ya kozala na bomoi ya seko.—Yoane 5:28, 29; Baebele 11:35, NW; Ebe. 12:1.
Batatoli baklisto bazali kotya elikya epai na Yehova
17. Lolenge nini mpenza baklisto ya ekeke ya liboso batyaki elikya epai na Yehova?
17 Na ekeke ya liboso ya ntango na biso, epai na lisangá ya boklisto oyo liutaki kosalema, Yehova amonisaki makambo mingi mpenza na ntina na Bokonzi mpe boyangeli na yango awa na mabelé. Na ndakisa, Yoane apemamaki na elimo ya Nzambe mpo na kokoma ete motuya ya baoyo bakosangana elongo na Yesu Klisto kati na Bokonzi ya likoló mokozala 144 000. Bango bazalaki basaleli ya sembo ya Nzambe, baoyo “basili kosombama kati na bato.” (Emoniseli 7:4; 14:1-4, NW) Bakoyangela mabelé “lokola bakonzi” elongo na Klisto na likoló. (Emoniseli 20:4-6) Baklisto wana ya ekeke ya liboso batyaki elikya epai na Yehova ete akokokisa mokano na ye na ntina na Bokonzi ya likoló mpe mabelé oyo ekoyangelama na yango, kino bapesaki bomoi na bango mpo na kondima na bango. Mingi kati na bango basalaki yango.
18. Lolenge nini Batatoli ya Yehova ya ntango na biso bazali komekola baninga na bango ya ntango na kala?
18 Lelo oyo, soko bamilió mitano ya Batatoli ya Yehova bazali na elikya motindo moko epai na Nzambe lokola baninga na bango baoyo bazalaki na bomoi bikeke mingi liboso na bango. Batatoli oyo ya ntango na biso bazali mpe kopesa bomoi na bango na bilaká ya Nzambe. Basili kopesa bomoi na bango epai na ye mpe bazali na Biblia mobimba mpo na kolendisa kondima na bango. (2 Timoté 3:14-17) Batatoli wana ya ntango na biso bazali komekola bayekoli ya Yesu ya ekeke ya liboso, baoyo balobaki ete basengelaki ‘kotosa Njambe liboso na kotosa bato.’ (Misala 5:29) Na ekeke oyo, mingi kati na batatoli baklisto yango banyokwamaki mingi. Bamoko nkutu babomamaki mpo na kondima na bango. Basusu bakufaki na maladi, na makámá, to na bonunu. Nzokande, lokola batatoli ya sembo ya ntango na kala, bazalaki kotya elikya epai na Nzambe mpamba te bayebaki ete ye akozongisa bango na bomoi kati na mokili ya sika, na nzela ya lisekwa.—Yoane 5:28, 29; Misala 24:15; Emoniseli 20:12, 13.
19, 20. Likambo nini tondimi likoló na bisakweli ya Biblia mpo na mikolo na biso?
19 Batatoli ya Yehova bayebi ete lolenge bauti na mabota manso mpo na kozala na bondeko ya mokili mobimba, esakolamaki uta kala kati na Biblia. (Yisaya 2:2-4; Emoniseli 7:4, 9-17) Mpe apesi bango mosala ya kosakola na mokili mobimba, mpo na koyanganisa bato ya mitema sembo na nsé na ngolu mpe libateli na ye. (Masese 18:10; Matai 24:14; Baloma 10:13) Bango nyonso wana bazali kotya elikya na bango epai na Yehova, koyebáká ete, mosika te, akokɔtisa bango kati na mokili na ye ya sika mpe na kitoko.—Kokanisá na 1 Bakolinti 15:58; Baebele 6:10.
20 Bisakweli ya Biblia bimonisi ete mokili ya Satana mozali kati na mikolo ya nsuka na yango uta mibu 80 sikawa, kobanda na mobu 1914. Mokili oyo mobɛlɛmi na nsuka na yango. (Baloma 16:20; 2 Bakolinti 4:4; 2 Timoté 3:1-5) Nzokande, Batatoli ya Yehova bazali na mpiko mpe na bompíkílíkí mpo bayebi ete, mosika te, Bokonzi ya Nzambe ekokamba makambo manso ya mabelé. Na koyeisáká nsuka ya mokili oyo mabe mpe na kotyáká mokili ya sika ya boyengebene, Nzambe akolongola makambo manso mabe oyo mazali na mabelé uta bikeke mingi.—Masese 2:21, 22.
21. Mpo na nini tokoki kozala na esengo kozanga komitungisa na mobulu ya lelo oyo?
21 Mpe, mpo na seko, Nzambe akomonisela biso bolingo na ye monene na kosopáká mapamboli mingi koleka mpasi nyonso oyo tozwaki na ntango na kala. Bongo, makambo mingi ya malamu makokokana epai na biso kati na mokili ya sika, na boye ete mitungisi na biso ya kala mikokanisama lisusu te. Ezali mpenza esengo na koyeba ete Yehova ‘akojipola lobɔkɔ na ye mpe akosilisa mposa na yɔnsɔ na bomoi.’—Njembo 145:16; Yisaya 65:17, 18.
22. Mpo na nini tosengeli kotya elikya na biso epai na Yehova?
22 Kati na mokili ya sika, bato ya sembo bakomona kokokisama ya Baloma 8:21 (NW), ete: “Bozalisi bokosikwa mpe na boombo ya libebi mpo na kozwa bonsomi na nkembo ya bana na Nzambe.” Bakomona kokokisama ya libondeli oyo Yesu alakisaki bayekoli na ye ete: “Tika Bokonji na yɔ eya, tika mokano na yɔ esalama na nse pelamɔkɔ na Likolo.” (Matai 6:10) Na bongo, tyá elikya na yo mobimba epai na Yehova mpo ete elaká na ye oyo ekozanga kokokisama te, ezali ete: “Bayɛngɛbɛnɛ bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”—Njembo 37:29.
Lolenge nini okoyanola?
◻ Mokano ya Yehova ezali nini mpo na bato mpe mpo na mabelé?
◻ Mpo na nini Nzambe apesaki nzela na makambo mabe awa na mabelé?
◻ Lolenge nini bato ya sembo ya ntango na kala bamonisaki elikya na bango epai na Yehova?
◻ Mpo na nini basaleli ya Nzambe ya ntango na biso bazali kotya elikya epai na Yehova?
[Elilingi na lokasa 16]
Nzambe azalisaki bato mpo na kozala na bomoi ya seko na esengo kati na paladiso na mabelé
[Elilingi na lokasa 18]
Abalayama atyaki elikya na ye na nguya oyo Yehova azali na yango mpo na kosekwisa bakufi