Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/2 nk. 25-29
  • Omemyaka basusu wana ozali kopesa bango toli?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Omemyaka basusu wana ozali kopesa bango toli?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Moto nyonso alingaka ete bámemya ye
  • Yehova azalisaki moto na liyoki ya kozala na lokumu
  • Mitinda oyo mizali kobatela lokumu
  • Monisá limemya epai na basusu​—Temelá Zábolo
  • Tókumisa Yehova na etamboli ya lokumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Omemyaka lokumu na bango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Moto nyonso akoki kozala na lokumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Lokumu ya bato esili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/2 nk. 25-29

Omemyaka basusu wana ozali kopesa bango toli?

EZALI malamu mpe na litomba kozwa toli oyo epesami na limemya nyonso! Edward alobi ete: “Toli oyo epesami na boboto, na limemya mpe na bolingo ya motema ezali koyeisa boyokani malamu.” Warren andimaki ete: “Wana ozali komiyoka ete mopesi-toli azali kokumisa yo mpe azali komemya yo na komonisáká mposa ya solo ya koyoka lolenge oyo ozali koyebisa likambo, toli ezalaka na mpasi te mpo na kondimama.” Norman alobaki ete: “Wana mopesi-toli azali komonisa limemya epai na ngai, nakakatanaka te mpo na komibelemisa epai na ye, mpo na kosenga ye toli.”

Moto nyonso alingaka ete bámemya ye

Toli oyo epesami na esengo, na boninga, mpe na bolingo endimamaka malamu. Kopesa basusu toli lolenge oyo okolinga ete básala yango epai na yo ezalaka na litomba. (Matai 7:12) Mopesi malamu ya toli akamataka ntango ya koyoka mpe koluka kososola moto oyo alingi kozwa toli​—makanisi na ye, etelemelo na ye mpe mayoki na ye​—na esika ya kotɔ́nga to kokweisa.​—Masese 18:13.

Bapesi-toli ya mikolo na biso, kati na bango bankulutu baklisto, basengeli kokeba mpo na komemya basusu wana bazali kopesa toli. Mpo na nini? Mpo ete ezaleli oyo ezali komonana mingi kati na bato ezali oyo ya kozanga komemya basusu. Ezaleli yango ekoyambanelaka. Mbala mingi bato oyo basengelaki mpenza komonisa limemya, bazangisaka komonisa yango, ezali bongo bato oyo basalaka misala na bango moko, bakonzi na mangomba, to bato mosusu. Na ndakisa, kati na bakompanyi kolongolama na mosala ezali kopesa mpasi mpe ezali kobulunganisa makanisi ezala mpo na nkolo mosala to mpe na mosáli. Ezalaka likámá mpo na limemya ya moto ye moko, mingimingi soki moto yango bamonisi ye limemya te. Zulunalo The Vancouver Sun eyebisi ete wana bato balongolami na mosala, baoyo bapesameli mokumba ya koyebisa likambo yango basengeli koyekola lolenge ya kopesa “nsango wana ya mabe ete ezala ya polele, ezangi makambo mingimingi mpe oyo ebongi mpenza, mpe kozanga kobebisa limemya ya bato.” Ee, bato nyonso babongi komemyama.

Liyangani Monene ya O.N.U. eyebisaki ete: “Bato nyonso babotami na bonsomi mpe bakokani mpo na oyo etali limemya mpe ntómo na bango. Basalemaki na likoki ya kokanisa mpe na lisosoli mpe basengeli kosala moko epai na mosusu kati na elimo ya bondeko.” Mpo ete limemya ya bato ebundisami, ezali mpenza na ntina malamu ete Búku ya Mibeko ya O.N.U. mpe maloba ya ebandeli ya búku ebéngami Eyambweli ya ntómo ya bato endima ezaleli yango. Bazali kondima ete: “Tosengeli kondima ntómo ya moboko ya bato, limemya mpe bolamu ya moto.”

Yehova azalisaki moto na liyoki ya kozala na lokumu

Yehova azali Nzambe ya lokumu. Liloba na ye lipemami lizali koloba na malamu nyonso ete: “Lokumu mpe nkembo ezali liboso na ye,” mpe, “lokumu na [Ye] ezali komonisama likoló na makoló.”​—1 Ntango 16:27, NW; Nzembo 8: 1, NW.

Lokola azali Nzambe ya lokumu mpe Moyangeli ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba, apesaki lokumu likoló na bikelamu na ye nyonso, ezala ya makoló mpe ya mabelé. Oyo alekaki monene kati na bango oyo akumisaki ezali Mwana na ye ya nkembo mpe oyo azali koyangela, Mokonzi, Klisto Yesu. Na Lolenge ya esakweli, Davidi akomaki ete: “Lokumu mpe nkembo etyami likoló na ye.”​—Nzembo 21:5, NW; Danyele 7:14.

Na mawa nyonso, lotómo wana ya moboko ya bato ebebisamaki mingi na boumeli ya lisoló ya bato. Anzelu moko ya nguya, oyo na misala na ye akómaki Satana Zábolo, atyaki ntembe na bosembo, na boyengebene mpe na lotómo oyo Nzambe azali na yango ya kozala moyangeli. Kosaláká bongo amonisaki kozanga limemya mpo na Yehova mpe atyolaki nkombo na Ye ya lokumu wana atemelaki lotómo na ye ya koyangela. Amipesaki ye moko lokumu loleki ndelo. Motindo moko na Zábolo, bakonzi oyo bazali bato na nguya, lokola Nebukadenesala na ntango ya kala, bamikumisaki na ntina na ‘makoki mpe bonene na bango.’ Babundisaki lokumu ya Yehova na komipesáká lokumu oyo ebongi na bango te. (Danyele 4:30) Boyangeli mabe ya Satana, oyo atyaki likoló na mokili ya bato, ebundisaki mpe elandi kobundisa lokumu ya moto.

Lokumu na yo ebebisamá naino te? Ntango bapesaki yo toli, omiyokaki ete okweisami, oyokisami nsoni, otyolami, to omonani moto mpamba? “Namiyokaki ete nazangi litomba, mawa mpe lokumu. Namiyokaki ete nazali na ntina te,” ezali wana maloba ya André, abakisaki ete: “Yango epesaki ngai mayoki ya kobanga mpe ya mawa, ata mpe konyokwama na makanisi.” Laura alobi ete: “Ezali mpasi kondima toli oyo euti epai na moto oyo omoni ete azali te kotalela bamposa na yo ya motema.”

Mpo na ntina oyo, bakɛngɛli baklisto bapesameli toli oyo ete babatela etónga na Nzambe na limemya mpe na lokumu. (1 Petelo 5:2, 3) Soki makambo mabimi oyo mazali na ntina mpe na litomba na kopesa toli epai na basusu, lolenge nini okoki komibatela yo moko mpo ete olanda te makanisi mpe etamboli ya bato na mokili, baoyo na kozanga kokakatana, bazali kobebisa lokumu ya bato mosusu? Nini ekoki kosalisa yo na kobatela lokumu ya baninga na yo baklisto mpe oyo ya yo moko?​—Masese 27:6; Bagalatia 6:1.

Mitinda oyo mizali kobatela lokumu

Liloba ya Nzambe ezangi te kolobela biso na ntina na likambo yango. Mopesi-toli ya mayele akotya mpenza motema na toli oyo ezali kati na Liloba ya Nzambe, na esika ya kotalela mayele ya mokili oyo. Makomi na Bulee mazali na batoli ya ntina. Wana elandani, lokumu ezali kopesama ezala mpo na mopesi-toli mpe moto oyo azwi yango. Yango wana, Paulo apesaki etinda oyo epai na Timoté, mokɛngɛli moklisto ete: “Opamela mobange na makasi tɛ, kasi obɔndɛla ye lokola tata; mpe bilɛngɛ mibali lokola bandeko mpe mibange basi lokola bamama mpe bilɛngɛ basi lokola bandeko basi na mpɛtɔ yɔnsɔ.” (1 Timɔtɛ 5:1, 2) Soki tolandi mitinda oyo tokoki bongo kopengola mawa, mayoki mazokisami mpe ya nsoni.

Tóyeba ete likambo lizali na ntina mpo na kolónga kopesa toli ezali bongo kozala na limemya mpo na moto mosusu mpe lotómo na ye, kopesa ye lokumu mpe kosalela ye makambo na boboto nyonso. Baklisto bankulutu bakisa mpe bakɛngɛli oyo batambolaka, basengeli kosala makasi na kolanda toli wana, kolukáká koyeba mpo na nini moto oyo azali na mposa ya kosembolama azali kokanisa mpe kosala motindo wana. Basengeli kolinga koyoka makanisi na ye, kosala makasi mpo na kobwaka ezaleli ya koyokisa nsoni, kotyola, to komona mpamba moto oyo bozali kopesa toli.

Lokola nkulutu, tiká ete ndeko na yo ayeba ete ozali komibanzabanza mpo na ye mpe olingi kosalisa ye na mikakatano azali na yango. Ezali yango nde monganga malamu asalaka wana okei na biro na ye mpo ete atala nzoto na yo. Likanisi ya kolongola bilamba kati na eteni ya ndako oyo ezali na malili mpe oyo ebatelami malamu na ntina na mikrobe ekoki kolembisa yo mpe koyokisa yo nsoni. Oyo nde bosepeli okozala na yango epai na monganga oyo azali komibanzabanza mpo na limemya na yo moko mpe oyo azali kopesa yo lokumu na kozipáká nzoto na yo na elamba na ntango azali kosala mosala na ye mpo na koluka koyeba bokono oyo ozali na yango! Bobele bongo, moklisto mopesi-toli oyo azali komonisa limemya mpo na bato azalaka na boboto mpe ngwi, nzokande, alatisaka lokumu epai na moto oyo azali kozwa toli. (Emoniseli 2:13, 14, 19, 20) Epai mosusu, toli oyo ezali ya makasi, oyo ezangi boboto mpe oyo ezangi kotalela mayoki ya basusu ezali lokola kolongola bilamba na elobeli ya elilingi, oyo ezali kosala ete oyoka nsoni, omimona ete otyolami, mpe lokumu na yo ebebisami.

Bakɛngɛli na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi basengeli mingi kotya likebi na kopesa toli na lokumu nyonso. Ntango bazali kopesa toli na mibangé, bakomonisa bolingo motindo moko na oyo bakoki komonisa epai na baboti na bango ya mosuni. Basengeli kozala na limemya, na boboto mpe na esengo. Mayoki motindo wana mazali na ntina mingi. Mazali kobotisa ezalela oyo ezali kotika nzela na kopesa toli mpe na koyamba yango.

Bankulutu, bokomikundola ete toli oyo ebongi mpenza kosalelama ebondisaka, elendisaka, etongaka, mpe ezalaka malamu. Baefese 4:29 (NW) eyebisi ete: “Tiká te ete maloba na mbindo mábima na monoko na yo, kasi bobele yango ezali malamu mpo na kotonga wana mposa ezali, mpo ete ekoka komema oyo ezali litomba mpo na bayoki.”

Ntina ezali te na kosalela maloba, elobeli, to makanisi ya makasi. Na esika ya kosala bongo, limemya mpo na moto mosusu mpe mposa ya kobatela mayoki na ye ya bolamu mpe ya limemya na ye moko ekotinda yo na kolobela makambo na lolenge ya kolongobana mpe ya kotonga. Maloba na yo ya ebandeli masengeli komonisa makumisi ya sembo mpe ya solosolo mpo na misala mpe bizaleli na ye ya malamu, na esika ya kolobela makambo oyo makosala ete azala na mayoki ya kobanga mpe ya komimona ete azali na ntina te. Soki ozali kosala lokola nkulutu, salelá ‘bokonzi na yo mpo na kotonga kasi mpo na kolembisa te.’​—2 Bakolinti 10:8, NW.

Ee, bopusi ya toli oyo euti epai na bakɛngɛli baklisto esengeli kopesa elendiseli, mpo na komema oyo ezali litomba. Esengeli te kolembisa to “kobangisa.” (2 Bakolinti 10:9) Ata moto oyo asalaki libungá monene abongi ete bápesa ye ndambo ya limemya mpe ya lokumu. Toli esengeli kopesama na boyokani na maloba ya mpamela oyo mazali ya boboto, kasi ya ngwi mpo na komema ye ete abongola motema.​—Nzembo 44:15; 1 Bakolinti 15:34.

Likambo ya ntina ezali ete Mibeko oyo Nzambe apesaki na Yisraele ezalaki mpe na mitinda oyo wana. Epesaki nzela na toli mpe ata etumbu ya kobeta na nzoto, na kobateláká lotómo mpe ndambo ya limemya ya moto. Kobetama “na motuya ekokani na likambo mabe [oyo esalemi]” epesamaki nzela, kasi yango esengelaki te kolekisa ndelo. Ndelo etyamaki mpo na motuya ya kobetama mpo ete mosáli mabe akoka te “kotyolama.”​—Deteronome 25:2, 3.

Kotalela mayoki ya basáli na mabe oyo babongoli motema ezalaki mpe ezaleli ya Yesu. Mpo na ye, Yisaya asakolaki ete: “Akobuka mongendu motutami tɛ, akojimisa nkamba tɛ oyo ejali kojika mokɛ mokɛ; sɔlɔ akosambisa na sembo.”​—Yisaya 42:3; Matai 12:17, 20; Luka 7:37, 38, 44-50.

Lisusu, maloba na Yesu kati na Lisoló likoló na Ngomba malobeli mingi ntina ya koyokela mawa: “Makambo yɔnsɔ malingi bino ete bato basalela bino yango, bino [bosengeli kosalela, NW] bango bobɛlɛ bongo.” (Matai 7:12) Mpo ete etinda oyo ezali na ntina mingi mpo na koyeisa boyokani malamu yango wana ebéngamaka Mobeko Monene. Lokola nkulutu moklisto, lolenge nini yango ekoki kosalisa yo na kosalela basusu makambo na boboto mpe na lokumu wana ozali kopesa toli?

Kobosana te ete yo mpe osalaka mabungá. Lokola Yakobo amonisaki yango, “banso tobetaka mabaku mbala mingi.” (Yakobo 3:2, NW) Komikundola likambo yango ekosalisa yo na kozala na maloba ya bokatikati mpe kozala na bokonzi likoló na mayoki na yo wana esengeli ete oloba epai na basusu na ntina na mabungá na bango. Yebá mayoki na bango. Yango ekosalisa yo na kopengola ezaleli ya kopamela na kolekisa ndelo, kotya likebi na mabungá to bikweli mikemike. Yesu amonisaki yango wana alobaki ete: “Bosambisaka tɛ ete basambisa bino tɛ. Jambi na esambiseli ekosambisaka bino, bakosambisa bino na yango; mpe na epimeli ekopimaka bino, bakopimaka bino na yango.”​—Matai 7:1, 2.

Monisá limemya epai na basusu​—Temelá Zábolo

Mayele mabe ya Satana ezali na mokano ya kolongwela yo lokumu, ya kobimisa mayoki ya nsoni, ya komimona ete ozangi ntina, mpe ozangi elikya. Talá lolenge nini asalelaki moto moko mpo na kolamwisa mayoki mabe kati na mosembwi Yobo. Na bokosi nyonso Elifaze alobaki ete: “Kati na basaleli na ye [Yehova] azalaka na kondima te, mpe bantoma na ye [baanzelu mosantu] alobi ete basili kobeba. Na koleka ezali boni mpo na baoyo bafandi kati na ndako ya pɔtɔpɔ́tɔ [bato ya masumu], oyo moboko na bango ezali kati na mputulu! Bazali kotuta bango nokinoki lokola mbombó.” (Yobo 4:18, 19, NW) Na makanisi na ye, Yobo azalaki na ntina te na miso na Nzambe koleka mbombó. Ya solo, toli ya Elifaze mpe baninga na ye, na esika ete ezala ya kotonga, ekokaki nde kolongola epai na Yobo ata likanisi ya bantango malamu ya kala. Na lolenge na bango ya kotalela makambo, bosembo na ye na ntango ya kala, koteyama ya libota na ye, boyokani elongo na Nzambe, mpe makabo ya mawa ezalaki na ntina te.

Bobele bongo lelo, basáli-mabe oyo babongoli motema bazalaka mingimingi na mayoki motindo wana, mpe likámá ezali ete bomoto na bango ‘ezinda na mawa na koleka.’ Bankulutu, wana bozali kopesa toli na bato motindo yango, “bómonisa bolingo na bino” mpo na bango na kopesáká bango nzela na kobatela ndambo na lokumu na bango. (2 Bakolinti 2:7, 8, NW) William andimaki ete: “Soki basaleli yo makambo na kozanga kopesa yo lokumu eyeisaka mokakatano mpo na kondima toli.” Ezali na ntina mingi kokembisa kondima na bango ete bazali na ntina na miso na Nzambe. Kundwelá bango ete Yehova “azangi boyengebene te ete abosana mosala na [bango] mpe bolingo oyo bamonisaki mpo na nkombo na ye” na boumeli ya mosala ya sembo oyo basalaki na bambula eleki.​—Baebele 6:10.

Makambo nini mosusu makoki kosalisa yo na komemya basusu wana ozali kopesa bango toli? Yebá ete bato banso uta kobotama na bango bazali na lotómo ya kokumisama, mpo ete basalemaki na elilingi ya Nzambe. Bazali na motuya na miso ya Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto; bibongiseli mibale oyo ya lisiko mpe ya lisekwa endimisi likambo yango. Yehova abakisi lisusu lokumu epai na baklisto na “kopesáká [bango] mosala,” kosaleláká bango na kobyanga libota oyo ya mabe na kosala boyokani elongo na Nzambe.​—1 Timoté 1:12.

Bankulutu, bómikundola ete mingi kati na bandeko na bino baklisto bakozala basangani ya liboso oyo bakosala moboko ya libota ya sika ya bato kati na mabelé mapetolami. Lokola bazali bato na motuya mpe na ntina, babongi kozwa lokumu. Wana ezali bino kopesa toli, bókanisa lolenge Yehova mpe Yesu bazali komonisa limemya mpo na bango, mpe bólanda kosala oyo esengami na bino na kosalisa bandeko na bino na kobatela mayoki ya lokumu mpe limemya na bango moko liboso na matumoli ya Satana.​—2 Petelo 3:13; kokanisá na 1 Petelo 3:7.

[Etanda na lokasa 29]

Toli oyo ezali komonisa limemya

(1) Pesá makumisi ya solosolo mpe ya sembo. (Emoniseli 2:2, 3)

(2) Zalá moyoki malamu. Na polele mpe na boboto nyonso luká koyeba likambo mpe ntina ya toli. (2 Samwele 12:1-14; Masese 18:13; Emoniseli 2:4)

(3) Toli na yo esengeli kozwa moboko kati na Makomami. Zalá na elimo ya kolónga, moto ayebi kososola, kolendisa, mpe koyokela mawa. Kobebisa lokumu mpe limemya ya moto oyo azali kozwa toli te. (2 Timoté 3:16; Tito 3:2; Emoniseli 2:5, 6)

(4) Ndimisá moto oyo azali kozwa toli ete mapamboli mazwamaka na kondima mpe na kosalela toli. (Baebele 12:7, 11; Emoniseli 2:7)

[Elilingi na lokasa 26]

Bankulutu baklisto basengeli komemya basusu wana bazali kopesa toli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto