Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/8 lok. 8
  • Mpo na nini tosengeli koyangana na makita ya boklisto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini tosengeli koyangana na makita ya boklisto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lolenge nini baklisto bazali “kopɛlisana”
  • Kozwa bilei ya elimo na ntango ya mpasi
  • Makebisi ya Jéhovah makokani na mongongo oyo ezali nsima na biso
  • Tozali kozwa elimo santu na nzela ya lisangá
  • Kobongisama epesami na lisangá
  • Tóluka kobatelama kati na libota ya Nzambe
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Tóyangana na makita ‘lisusu mingi koleka’
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Mpo na nini tosengeli koyanganaka mpo na kosambela Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Makambo nini okomona na makita na biso?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/8 lok. 8

Mpo na nini tosengeli koyangana na makita ya boklisto

UTA basanza mingi, Rosario, oyo afandi na Amérique du Sud, azali koyekola Biblia elongo na Elizabeth. Yango epusaki Rosario na koyekola makambo matali Bokonzi na Nzambe mpe lolenge nini yango ekotya paradis awa na mabelé. Kasi, ntango Elizabeth abyangaki ye ete ayangana na makita mazali kosalema na Salle du Royaume, azalaki koboya. Akanisaki ete akokaki koyekola Biblia na ndako mpe kosalela makambo mayebisami, kozanga koyangana na makita ya lisangá. Yo mpe osila komituna soki makita ya boklisto mazali na litomba mpo na yo? Mpo na nini Nzambe asalaki ebongiseli wana ete bato na ye bayanganaka esika moko?

Lokola baklisto ya ekeke ya liboso bakesenaki na bato bazalaki zingazinga na bango, bokutani ya malamu ezalaki na ntina mingi mpo na bango. Ntoma Paulo akomaki na moko na masangá ya kala ete: “Bozala na efundeli te mpe na ekweli te kati na libota na bato bayongotani mpe bapɛngwi nzela. Kati na bango, bozali kongɛnga lokola miinda na mokili.” (Bafilipi 2:15) Baklisto bazalaki na ntango ya mpasi na Yudea, mpe Paulo akomaki na ntina na bango ete: “Totalanaka ete topesana simbisi mpo na kolingana mpe na kosala misala malamu, totika koyangana elongo moko te, lokola yango ezali momeseno na basusu, kasi toyikisana mpiko. Bosala boye na koleka, awa emoni bino ete mokolo yango mobɛlɛmi.” (Baebele 10:24, 25, MN) Lolenge nini tozali kopesana simbisi mpo na kolingana mpe na kosala misala malamu na koyanganáká esika moko?

Lolenge nini baklisto bazali “kopɛlisana”

Liloba ya Greke oyo Paulo asaleli mpe libongolami na ‘kopesana simbisi’ elimboli mpenza “kopɛlisana.” Lisese moko ya Biblia lilimboli lolenge nini baklisto bazali “kopɛlisana” wana elobi ete: “Ebende ekopɛlisama na ebende mosusu. Bobele bongo, moto akoki kopɛlisa elongi ya moto mosusu.” (Masese 27:17, MN; Mosakoli 10:10) Tozali lokola bisaleli oyo bizali ntango nyonso na mposa ya kopɛlisama. Mpo ete komonisa bolingo mpo na Jéhovah mpe kozwa bikateli bitongami likoló na kondima na biso esɛngi kokesena na mokili, tosengeli kolanda komikesenisa na bato mingi.

Kosala ntango nyonso makasi mpo na kokesena na bato mosusu ekoki kolɛmbisa molende na biso mpo na misala malamu. Kasi ntango tozali elongo na baoyo balingi Jéhovah, tozali kopɛlisana​—tozali kopesana simbisi mpo na kolingana mpe na misala malamu. Nzokande, wana tozali bobele biso moko, tokoki komimona ete toleki na motuya mingi. Makanisi ya mbindo, ya moimi, to makanisi oyo mazangi mayele makoki koyela biso. “Ye oyo akomitangola na basusu, akolukaka mposa na ye moko; akosilika mpo na makambo nyonso ya mayele.” (Masese 18:1) Wana ezali ntina oyo Paulo akomelaki lisangá ya mboka Tesaloniki ete: “Bobɔndisanaka mpe bolendisanaka lokola ezali bino kosala yango.”​—1 Batesaloniki 5:11.

Ntango Rosario asilisaki boyekoli na ye na makambo ya moboko ya Biblia, aboyaki kosangana elongo na lisangá. Bongo, kozangáká makoki ya kopesa lisalisi mosusu, Elizabeth atikaki kokende kotala ye. Nsima ya mwa basanza, mokɛngɛli moko ya zongazonga akendaki kotala Rosario mpe atunaki ye ete: “Ata soki mosangani moko na moko ya libota akolya malamu epai mosusu, eloko nini ekozanga soki basangani nyonso batiki kolya esika moko na ndako?” Rosario ayanolaki ete: “Bakozanga esengo ya kozala elongo na libota.” Akangaki ntina ya likanisi wana mpe abandaki koya mbala na mbala na makita. Amonaki ete yango ezali na matomba mingi na boye ete, uta ntango wana, azali lisusu kozangisa makita te.

Ezali biso koyoka bato mosusu kolobela makambo motindo moko na oyo tozali kondima, ezali kolendisa mpe ezali lisusu kolakisa lolenge nini kondima wana esili kobongola bomoi na bango. Paulo ye moko amonaki yango, mpe akomelaki lisangá ya Loma ete: “Nazali na mposa monene ya komona bino, ete nakabela bino likabo ya elimo ete bolendisama; to mpo ete boyikisana mpiko moko [alendisama] na kondima ya mosusu, na kondima na bino lokola mpe na kondima na ngai.” (Baloma 1:11, 12, MN) Ya solo, esalemaki bambula mingi liboso ete Paulo akende na Loma, mpe ntango akendaki kuna, azalaki mokangami ya Baloma. Kasi ntango amonaki bandeko oyo batambolaki koleka bakilometele 60 longwa na bamboka mike ya Loma mpo na kokutana na ye, “Paulo atɔndaki Nzambe mpe alendisamaki.”​—Misala 28:15, MN.

Kozwa bilei ya elimo na ntango ya mpasi

Ezalaki ye kati ya bolɔkɔ na Loma, Paulo akomelaki Baebele ete batika te koyangana esika moko. Maloba oyo abakisaki mazali na ntina mingi mpo na biso, ete: “Bosala boye na koleka, awa emoni bino ete mokolo yango mobɛlɛmi.” (Baebele 10:25, MN) Ba Témoins de Jéhovah bazali ntango nyonso komonisa engebene Makomami ete, mobu 1914 ezalaki ebandeli ya ntango ya nsuka ya mokili oyo mpe ete “mokolo na kosambisama mpe na kobomama na bato mabe” mobɛlɛmi. (2 Petelo 3:7, MN) Na kotalela Emoniseli, mokanda ya Biblia, ntango Diable abwakamaki longwa na makoló na ebandeli na ntango ya nsuka, azalaki na nkanda monene mpe “akei kobunda etumba na batikali ya . . . baoyo bazali kotosa mibeko ya Nzambe mpe bazali kotatola mpo na Yesu.” (Emoniseli 12:7-17, MN) Yango wana, ezali lelo mpasi mingi mpo na kotosa mibeko ya Nzambe; tosengeli kokutana mbala mingi elongo na baninga na biso nyonso kati na kondima. Makita makosalisa biso na kolendisa kondima na biso mpe bolingo na biso mpo na Nzambe ete tótɛmɛla komekama ya Diable.

Bolingo mpo na Nzambe mpe kondima ezali te lokola bandako oyo soki etongami, etikali bongo libela. Kasi, yango ezali nde lokola bikelamu ya bomoi oyo ezali kokóla mokemoke na kolyáká ntango nyonso nde bikolɛmba mpe bikokufa soki bizangi bilei. Yango wana Jéhovah azali kopesa ntango nyonso bilei ya elimo mpo na kolendisa libota na ye. Biso nyonso tozali na mposa ya bilei yango, kasi longola lisangá ya Nzambe mpe makita oyo yango ezali kobongisa, epai wapi tokoki kozwa yango? Epai moko te.​—Deteronome 32:2; Matai 4:4; 5:3.

Yesu atunaki motuna moko mokoki kosalisa biso na komona lolenge nini azali koleisa lisangá ya boklisto. Atunaki ete: “Nani azali mpenza moombo na sembo mpe na mayele oyo nkolo na ye asili kotya likoló na ndako ye, mpo na kopesa bilei na ntango na yango? Esengo na moombo yango soki nkolo na ye akokuta ye kosala bongo.” (Matai 24:45, 46, MN) Yesu aponaki nani na ekeke ya liboso mpo na koleisa bayekoli na ye, mpe nani ye akutaki ete azali koleisa bango na bosembo nyonso na bozongi na ye kati na nguya ya Bokonzi? Na ndenge emonani, moto moko te akokaki kozala na bomoi na boumeli ya bikeke nyonso wana. Makambo mamonisi ete moombo wana ezali lisangá ya baklisto bapakolami na elimo, lolenge moko libota ya Yisraele lizalaki Mosaleli na Nzambe liboso na ntango na Klisto. (Yisaya 43:10) Ya solo, Yesu azali kopesa biso bilei ya elimo na nzela ya baklisto bapakolami na elimo kati na mokili mobimba, oyo ezali mwango kati na yango masangá ya ba Témoins de Jéhovah bazali lelo kozwa bilei ya elimo.

Ebongiseli na Yesu na ntina etali nzela ya kopesa bilei ya elimo emonisami lisusu na ntoma Paulo, ete: “‘Esili ye kobuta na likoló, amemaki bakangami; mpe apesaki mibali lokola makabo.’ . . . Mpe apesaki basusu lokola bantoma, basusu lokola basakoli, basusu lokola bapalanganisi na nsango malamu, basusu lokola babateli na mpate mpe balakisi, mpo na kosembolama ya basantu, mpo na mosala ya kosunga, mpo na kolendisa nzoto na Klisto, kino ekokóma biso na bomoko kati na kondima mpe kati na boyebi ya sikisiki ya Mwana na Nzambe, lokola bato bakóli, na bonene ya litondi na Klisto.”​—Baefese 4:8, 11-13, MN.

Ezalaki mingi mpenza kati na masangá​—na makita​—nde ‘mibali oyo bapesamaki lokola makabo’ bazalaki kolendisa bandeko. Na ndakisa, na Antioka, “Yuda mpe Sila, baoyo bazalaki mpe basakoli, balendisaki bandeko na maloba mingi mpe bayikisaki bango mpiko.” (Misala 15:32) Masoló masalemi lelo na mibali oyo basɛlingwi ezali mpe koleisa kondima na biso mpo ete elɛmba te mpe etika kosala mosala te.

Mbala mosusu tosalaki bokóli malamu mpo na lisungi oyo tozwaki epai na mosangani moko ya lisangá, nzokande tobandaki naino te koyangana na makita. Biblia elobi ete ezali na ntango oyo “bozali naino na mposa ete moto moko alakisa bino makambo na ebandeli ya maloba na bulee na Nzambe. Bozali na mposa ya mabɛlɛ, nde bilei ya makasi te.” (Baebele 5:12, MN) Kasi moto moko te asengeli kotikala ntango nyonso komeláká mabɛlɛ. Makita ya boklisto mazali na ebongiseli ya mateya ya Biblia oyo elandani mpe ebongisami mpo na kobatela bolingo epai na Nzambe mpe kobatela kondima epai na ye mpo na kozwa lisungi malamu ya kosalela “batoli nyonso ya Nzambe.” (Misala 20:27, MN) Yango eleki “mabɛlɛ.” Biblia elobi lisusu ete: “Bilei ya makasi bizali mpo na bato bakoméli, baoyo bayebi kososola malamu mpe mabe nsima na kosalela yango.” (Baebele 5:14, MN) Na makita, makambo mingi matalelami oyo mbala mosusu ekokani te na oyo tozali kozwa na boyekoli ya Biblia na ndako, na ndakisa, koyekola verset moko na moko ya bisakweli minene ya Biblia mpe masoló ya mozindo likoló na lolenge oyo tokoki komekola Nzambe kati na bomoi na biso.

Makebisi ya Jéhovah makokani na mongongo oyo ezali nsima na biso

Na nzela ya boyekoli wana na lisangá, Jéhovah azali ntango nyonso kokebisa biso mpo na lolenge na bato oyo tosengeli kozala. Makebisi wana mazali na ntina mingi. Soki yango te tokozala ntango nyonso na moimi, na lolendo, mpe na lokoso. Makebisi mauti na Makomami mazali kosalisa biso na kozala na boyokani malamu elongo na bato mosusu mpe elongo na Nzambe ye moko. Mokomi na Nzembo 119, ayambolaki na verset 59 ete: “Ebanzaki ngai mpo na nzela na ngai, nabongoli matambe na ngai kino makebisi na yo.”

Lokola tozali koyangana mbala na mbala na makita ya boklisto, tozali komona kokokana ya esakweli oyo Jéhovah apesaki na nzela ya Yisaya, oyo elobi ete: “Molakisi na yo Monene akomibomba lisusu te, kasi miso na yo makomona Molakisi na yo Monene. Mpe matoi na yo makoyoka liloba nsima na yo ete: ‘Oyo ezali nzela, tambola na yango.’” Jéhovah azali mpenza kosɛnzela bokóli na biso mpe azali kosembola biso na bolingo nyonso soki tosali mabe. (Yisaya 30:20, 21; Bagalatia 6:1) Azali mpe kopesa lisungi mosusu lileki oyo.

Tozali kozwa elimo santu na nzela ya lisangá

Na koyanganáká mbala na mbala na makita ya boklisto elongo na ba Témoins de Jéhovah, tolendisami na elimo santu ya Nzambe, oyo ezali likoló ya libota na ye. (1 Petelo 4:14) Lisusu, bakɛngɛli baklisto kati na lisangá baponami na elimo santu. (Misala 20:28) Bokasi wana ya Nzambe bokosalaka mosala, bozali na bopusi makasi likoló na baklisto. Biblia elobi ete: “Mbuma ya elimo ezali bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ mpe komipekisa.” (Bagalatia 5:22, 23, MN) Na nzela ya lisangá ya Nzambe, elimo santu ezali kosalisa biso lisusu na kozwa bososoli malamu ya oyo Jéhovah asili kobomba mpo na baoyo balingi ye. Nsima na kolimbola ete ebele na bato na lokumu ya ebongiseli ya ntango oyo bakoki te kososola bilaká ya Nzambe, Paulo akomaki ete: “Nzambe amonisi biso yango na nzela ya elimo na ye.”​—1 Bakolinti 2:8-10.

Longola bilei ya elimo oyo bikolendisaka kondima, lisangá lizali kobongisa baoyo balingi kokokisa mosala ya ntina mingi kati na yango. Mosala yango ezali nini?

Kobongisama epesami na lisangá

Lisangá ya boklisto ezali te lokola moziki epai kuna bato bazali bobele kominanola mpe mbala mosusu kolendisana mpo na kozala malamu. Yesu apesaki na lisangá mokumba ya komema nsango malamu ya Bokonzi epai na baoyo bazali kati na molili ya elimo. (Misala 1:8; 1 Petelo 2:9) Longwa na mokolo oyo yango ebandaki, na Pantekote ya mobu 33 T.B., ezalaki lisangá ya basakoli. (Misala 2:4) Osili komeka kolobela moto moko na ntina na mikano ya Jéhovah kozanga kolónga kondimisa ye? Lisangá ya boklisto lizali kobongisa moto moko na moko mpo na koteya malamu. Na koyekoláká bandakisa ya Biblia, tozali koyeba lolenge ya kobimisa likanisi oyo tokoki koyokana elongo na bayoki na kososoláká, lolenge ya kosalela Makomami lokola moboko ya makanisi mabongi, mpe lolenge ya kosalisa bato mosusu na kososola na kosaleláká mituna mpe masese. Makoki wana makopesa yo esengo ya kosunga bato mosusu ete bayeba solo ya Biblia.

Kati na mokili oyo mobebi na bitumba, na pite, lisangá ya boklisto ezali ekimelo ya solo. Atako lisalemi na bato bazangi kokoka, ezali esika ya kimya mpe ya bolingo. Na yango, yangana mbala na mbala na makita na yango nyonso mpe okomona bosolo ya maloba oyo ya mokomi na Nzembo, ete: “Tala lokola ezali malamu mpe na esengo soko bandeko bakozalana kati na bomoko! . . . Jéhovah alakaki mapamboli, bomoi mpo na libela na libela.”​—Nzembo 133:1, 3.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto