Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/8 lok. 28
  • Jéhovah azali kokanisela bato na maladi mpe mibangé

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Jéhovah azali kokanisela bato na maladi mpe mibangé
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tomeka kososola
  • Tokumisa bato na maladi mpe mibange
  • Lisalisi mpo na kozwa makasi na elimo
  • Lolenge baklisto bakoki kosalisa mibangé
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Libota ya boklisto esalisaka mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Baklisto bazali na mokumba ya kosalisa mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Bazali bango moko kasi tobosani bango te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/8 lok. 28

Jéhovah azali kokanisela bato na maladi mpe mibangé

KOKUTANA na “ntango ya mpasi” ekoki kozala momekamo makasi. (Nzembo 37:18, 19) Ntango lolenge wana ekoki kokóma mpo na konuna mpe botau oyo eyaka elongo na yango. Bato mosusu bakómaka na ntango ya mpasi wana bazali na maladi makasi oyo ezali koumela. Bakoki kooka lokola ete maladi na bango ekómi kotambwisa bomoi na bango, koyangela makanisi na bango mpe misala na bango.

Nzokande, ezali likambo ya kolendisa na koyeba ete Jéhovah azali kotya miso na ye likoló na basaleli na ye nyonso. Motema na ye mokosepelaka ntango basaleli na ye bazali kolanda komonisa bosembo mpe mayele, atako bakómi mibangé, bazali na maladi, mpe bamekami na makambo mosusu. (2 Ntango 16:9a; Masese 27:11) Mokonzi Davidi andimisi biso ete: “Jéhovah azali penepene na bango nyonso bakobyanga ye, . . . akoyoka mpe konganga na bango.” Ee, azali koyeba mikakatano na bango; azali kolendisa bango na elimo na ye. “Mpe akobikisa bango.” Azali kokanisela bango mpe azali kosalisa bango na koyika mpiko. (Nzembo 145:18, 19) Bongo biso? Tozali, lokola Jéhovah, kokanisela bato na maladi mpe mibangé?

Botau oyo euti na maladi mpe na konuna ezali makambo na bomoi ya ntango oyo. Ezali makambo tokobundana na yango kino Jéhovah akokokisa mokano na ye mpo na mabelé mpe bato. Lelo oyo, ebele na bato bazali kobika kino konuna, mpo na yango mingi kati na bango bazali kokutana na botau motindo yango. Lisusu, bato mingi, wana bazali naino bilenge bakutanaki na makámá to maladi oyo etungisaki bomoi na bango to ekómisi bango bibosono. Kino na ntango mokili oyo ya kala ekoleka, maladi mpe konuna ekolanda kozala mikakatano minene.

Tozali mpenza kosepela na baoyo, atako bazali na maladi mpe mibange bazali kolanda kopesa ndakisa malamu na “koyika mpiko mpe komonisa motema petee”! Ya solo, “tobyangi bango bato na esengo baoyo bayiki mpiko bongo.” (Yakobo 5:10, 11) Mibange mingi oyo bazali lisusu na nguya mingi te basanganaki na boumeli ya mibu mingi na kolakisa, koteya mpe kobongisama ya baoyo bazali lelo kokamba lisangá. Mibange misusu bazali kosepela na komona ete bana na bango basanganaki na mosala ya pionnier.​—Nzembo 71:17, 18; 3 Yoane 4.

Bobele bongo, tozali kosepela na baoyo kati na biso bazali na maladi kasi, bazali kolónga mpo na kolendisa biso na bosembo na bango, atako bazali na mpasi. Wana bazali komonisa elikya na bango makasi, litomba na yango lizali mpenza ya koyikisa biso mpiko mingi mpe kolendisa mpenza kondima na biso. Kimya ya elimo mpe bosepeli oyo bazali na yango ezali komonisa kondima oyo ebongi solo komekola yango.

Epesaka mpasi mingi ntango moto azwami pwasa na maladi ya cancer, na likámá to na likambo mosusu oyo ebongoli mpenza bomoi na ye. Ezali lisusu komekama monene mpo na baboti na komona bana na bango kobela to konyokwama mpo na likámá oyo likómelaki bango. Lolenge nini tokoki kopesa bango lisungi? Ntango ya mpasi motindo oyo ezali komekama mpo na libota mobimba ya baklisto. Ezali libaku ya komonisa ete ‘moninga ya solo azali ndeko abotami mpo na ntango na mpasi.’ (Masese 17:17) Ezali solo ete bato na maladi nyonso te to mpe mibange nyonso te bakoki komizela na lisalisi euti na mosangani moko na moko ya lisangá. Kasi, Jéhovah akosenzela ete na nzela ya elimo na ye bandeko mingi bapusama na kopesa lisalisi na mitindo mikeseni. Mpe bankulutu basengeli kozala na bokɛngi ete babosana moto moko te.​—Tala Exode 18:17, 18.

Tomeka kososola

Wana tolingi kosalisa moto moko, ezali na ntina ete kosolola ezala ya malamu, mpe yango ezali kosenga ntango, motema petee mpe koyeba komitya na esika na ye. Mpo na kopesa lisungi, mposa na biso ezali mpenza ya ‘kolendisa na maloba’; kasi tosengeli naino koyoka na likebi mingi liboso ete tokoka koloba to kosala likambo, soki bongo te tokoki kokóma ‘basungi mabe.’​—Tala Yobo 16:2, 5.

Mbala mosusu bato na maladi to mibangé bakoki kobimisa polele mayoki na bango ya kozanga bosepeli. Mingi bakolisaki makasi elikya na bango ya kobika na bolozi monene, mpe sikawa bazali kooka ete ntango na bango etikali lisusu mingi te, bazali kobanga ete bakokufa liboso ya bolozi monene. Lisusu, mbala mingi ezalela na bango elembisaka bango mpe etungisaka bango. Kobatela kondima makasi ezali etumba, mingi mpenza ntango moto akoki te kolanda mposa na ye ya kosangana mingi na mosala ya boklisto. Nkulutu moko akendeki kotala ndeko mwasi moko moklisto oyo asili kokóma mobange; wana azalaki kobondela elongo na ye, asengaki na Jéhovah ete alimbisa masumu na biso. Nsima ya libondeli amonaki ete ndeko mwasi azali kolela. Alimbolaki ete azalaki na mposa ya bolimbisi mpenza epai na Jéhovah mpo ete azalaki lisusu na makoki te ya kosangana na mosala ya kosakola ndako na ndako. Ya solo, maoki ya kozanga makoki to ya kolónga te, atako asali yango na nko te, ekoki kopesa moto mawa na motema.

Toyeba ete mitungisi mpe kolemba ekoki kozala na bopusi likoló na bokatikati ya makanisi. Mpo na botau ya konuna to mpo na mitungisi ya maladi oyo ezali kolembisa, moto akoki kooka ete Jéhovah asili kotika ye, akoki ntango mosusu koloba ete: “Nasali nini? Mpo na nini bobele ngai? ” Kanisa maloba oyo ya Masese 12:25: “Bozito na motema na moto ekokitisa yango, nde liloba malamu ekosepelisa yango.” Toluka maloba malamu oyo makoki kolendisa. Mibangé oyo bazali na mpasi makasi bakoki ata, lokola Yobo, komonisa mposa ya kokufa. Yango esengeli te kotungisa biso; tomeka komitya na esika na bango. Kolelalela motindo yango ezali mpenza te elembo ya kozanga kondima to ya kozanga kotyela Nzambe motema. Yobo abondelaki mpo ‘abombama kati na Schéol,’ nzokande maloba na ye oyo malandi mamonisi kondima makasi oyo azalaki na yango ete Jéhovah asengelaki kosekwisa ye nsima. Kondima ya makasi ekopesa nzela na kolónga bileko ya mpasi mpe konyokwama na makanisi mpe kotikala penepene ya Jéhovah.​—Yobo 14:13-15.

Tokumisa bato na maladi mpe mibange

Ezali likambo ya ntina mingi kozala na limemya mpe kopesa lokumu epai na bato na maladi mpe mibange. (Baloma 12:10) Soki bazali lisusu kosepela nokinoki te to bazali lisusu kosala te lokola liboso, kolemba te. Kozwa ekateli nokinoki te mpo na bango. Atako tozali na makanisi malamu, soki tomitambwisi na lolenge ya koyangela basusu to na kozala na bokonzi likoló na bato, na ntembe te ekolongola epai na bato mosusu limemya ya bango moko. Kati na mokanda na ye ya momekano ya doctorat oyo ebimisamaki na mobu 1988, molukiluki moko, Jette Ingerslev, alimbolaki makambo oyo etuluku moko ya bato na mibu 85 bazali komona lokola ya ntina mingi mpo na kozala na bomoi moko malamu: “Bapesaki ntina mingi na makambo misato: kozala elongo na mabota na bango; kolongono malamu; mpe na nsuka kasi ezali na ntina mingi, kozala na makoki ya kozwa bango moko bikateli na bango.” Toyeba ete ntango tata na mabota Yakobo akómaki mobange, bana na ye bamitombolaki te likoló na ye; bazalaki kotosa bamposa na ye.​—Genese 47:29, 30; 48:17-20.

Baoyo bazali na maladi basengeli bobele bongo kotalelama na limemya. Nkulutu moko abungisaki makoki na ye ya koloba, kotanga mpe kokoma mpo ete monganga asalaki libunga ntango na lipaso. Ezalaki mpasi monene, kasi baninga na ye bankulutu bazwaki ekateli ya kosala nyonso mpo ete amiyoka te ete azangi ntina. Sikawa bazali kotangela ye mikanda nyonso ya lisangá mpe bazali kosangisa ye na kobongisama ya makambo ya lisangá. Na likita ya bankulutu, balukaka koyeba makanisi na ye. Bazali komonisela ye ete bazali ntango nyonso kotalela ye lokola moninga na bango nkulutu mpe bazali kosepela ete azala na bango elongo. Kati na lisangá, biso nyonso tokoki kosala makasi mpo ete moto na maladi moko te to mobangé moko te ayoka ete ‘abwakami’ to atikami.​—Nzembo 71:9.

Lisalisi mpo na kozwa makasi na elimo

Biso nyonso tozali na mposa ya bilei ya elimo mpo na kobatela kondima na biso ezala ntango nyonso na bomoi mpe na makasi. Yango wana tolendisami na kotanga mikolo nyonso Biblia mpe mikanda mikolimbolaka Biblia mpe kosangana na molende nyonso na makita ya boklisto mpe na mosala ya kosakola. Mbala mingi, bato na maladi mpe mibange bazalaka na mposa ya lisalisi mpo na kokokisa yango, mpe ezali na ntina mingi kosala oyo eyokani malamu na ezalela na moko na moko na bango. Na esengo nyonso, mingi kati na bango bazali naino na makoki ya koyangana na makita soki bakoki komema bango mpe kosunga bango na Salle du Royaume. Koyangana na bango na makita yango ezali elendiseli monene mpo na lisangá. Mpiko na bango ezali elendiseli mpe ezali koyeisa kondima na biso makasi.

Mbala mingi bato na maladi mpe mibangé bakoki mpe kosangana mingi na mosala ya boklisto. Basusu bakoki kokotisama na etuluku oyo ebimi [na motuka] mpo na kosakola, mpe na ntembe te bakolendisama ete bazwaki likoki ya kosakola na mwa bandako. Soki yango ekoki lisusu kosalema te, bakoki kozala na esengo ya kopesa litatoli ya libaku malamu epai na bato oyo bazali kokutana na bango. Ndeko mwasi moko oyo azwamaki na maladi ya cancer azwaki ekateli ya kolekisa ntango nyonso oyo etikali na bomoi na ye mpo na kosakola nsango malamu na molende nyonso. Molende na ye ya kosakola nsango malamu ezalaki elendiseli mpo na bato nyonso. Nkutu asalaki ebongiseli mpo ete bokundami na ye ekoka kozala libaku ya litatoli epai na bandeko na ye ya mosuni, baninga na ye ya mosala mpe na baninga na ye ya pembeni oyo bazalaki bandimi te. Makambo na ye ya mpasi “mabongwanaki mpo na bokoli ya nsango malamu,” mpe ekateli na ye ya komonisa kondima mpe elikya epesaki ntina monene na mikolo na ye ya nsuka.​—Bafilipi 1:12-14.

Ezali malamu kosalisa bato na maladi mpe mibange ete bazala makasi na elimo. Mabota makoki kobyanga bango na kolekisa mpokwa moko ya esengo elongo na bango, to na kosangana na boyekoli na bango ya libota oyo ekoki kosalema, mbala mosusu, epai na moto oyo akoki te kobima libandá. Mama moko azalaki komema bana na ye mibale ya mike epai na ndeko mwasi moko ya mobangé mpo ete bakoka kotanga Mokanda mpo na masolo ya Biblia elongo. Yango ezalaki kopesa ndeko mwasi wana ya mobangé esengo, mpe bana basepelaki mingi na likebi oyo azalaki kotyela bango.

Nzokande, ezali na bantango oyo bato na maladi to mibange bakoki te kotungisama mingi, mpe ekoki kozala malamu kotangela bango na mabaku mosusu mwa masoló kitoko. Nzokande, tomikundola ete, atako moto moko alembi mingi na nzoto na motindo boye ete akoki te kosangana na masoló, akoki mbala mosusu kosepela mpe kozala na mposa ya baninga ya elimo. Tokoki kobondela elongo na ye, kotangela ye mwa likambo moko, to koyebisa ye makambo masalemaki; kasi tosengeli kosenzela ete toumela te koleka ntango oyo ekoki na ye.

Ezali na mosala ya bulee oyo bato na maladi mpe mibange bakoki kokokisa yango: kobondela mpo na basusu. Bayekoli ya liboso bapesaki ntina mingi na mosala yango. Na libaku moko bakabolaki mikumba ya mosala kati na lisangá na motindo boye ete bantoma bakoka komipesa na mabondeli. Moto na sembo Epafala amonisamaki ete azali ‘kobundaka na mabondeli ntango nyonso mpo na basusu.’ (Bakolose 4:12; Misala 6:4) Mabondeli motindo wana mazali na ntina mingi mpe mazali kopesa matomba.​—Luka 2:36-38; Yakobo 5:16.

Jéhovah azali kokanisela bato na maladi mpe mibange, mpe azali kobatela bango na ntango ya mpasi. Azali na lotomo nyonso kozela ete biso mpe tokanisa oyo tokoki kosala mpo na kosunga bango. Komibanzabanza na biso mpo na bango ezali komonisa ekateli na biso ya kobatela bosembo na biso. Mpe tozali na esengo ya kokanisa maloba oyo ya mokonzi Davidi: “Jéhovah ayebi mikolo na bato malamu mpe libula na bango ekoumela seko.”​—Nzembo 37:18.

[Etanda na lokasa 28]

Topesa lisungi oyo ebongi na bososoli

BANINGA mpe bandeko ya mosuni basengeli koyeba makambo ya mikemike kasi ya sikisiki etali lolenge ya kobatela bato na maladi mpe mibange. Liboso na makambo nyonso, basengeli kolendisa bango na kobatela likanisi malamu na ntina na bomoi, na kooka ete bazali kosepela na bango, mpe na kozala na maoki ete bazali na ntina. Bongo, bomoi na bango ekozala na lolenge oyo ekobatela bango na kozala na esengo kati na Jéhovah, atako bazali kooka mpasi. Emonani ete ba Témoins de Jéhovah mingi bazali kobika kino kokóma mibange. Na ntembe te, likambo ya ntina oyo lizali kopesa nzela na yango lizali bosepeli monene oyo bazali na yango kati na elikya mpo na mikolo mizali liboso, ezaleli malamu ya elimo oyo bazali na yango mpe kosangana na bango na mosala ya Bokonzi na meko oyo ekoki na bango. Président ya kala ya la Société Watch Tower Frederick W. Franz, oyo akufaki na kimya kati na mbula 100 ya bomoi na ye nsima ya bomoi ya mosala etondi na esengo, azali ndakisa kitoko mpo na yango.​—Tala 1 Ntango 29:28.

Mbala mingi, likebi likoló na makambo ya ntina ya bomoi ya mokolo na mokolo ekoki kozala na bopusi mingi: bopeto malamu, bilei oyo ebongi, komela mai mpe kolya mongwa na lolenge oyo ekoki, kosala mwa galasisi, mopepe ya kitoko, konyolola nzoto mpe masoló ya kolendisa. Bilei ya malamu ekoki kopesa nzela na koyoka malamu, komona malamu, kokanisa malamu, mpe na kozala na nzoto malamu, ezali lisusu kopesa libateli makasi na maladi. Mpo na mibange bobele likambo ya kolya malamu mpe komela mai mingi ekoki komonisa bokeseni kati na kolongono malamu mpe bonunu. Ekosenga mwa kokanisa mpo na koyeba lolenge ya galasisi oyo ebongi na moto na moto. Ndeko mwasi moko oyo azalaki kosala poso nyonso botangi mpo na ndeko mwasi ya mobangé mpe oyo azalaki komona lisusu malamu te, azalaki kobanda mpe kosukisa poso nyonso boyei na ye na mabina ya malembe elongo na ndeko mwasi mobangé zongazonga kati na eteni na ndako. Kasete ezalaki ntango nyonso pene elongo na miziki oyo eponami, mpe bango nyonso mibale bazalaki kosepela na “kominyolisa” wana.

Na mikili mingi, masangá oyo mapesaka lisungi makoki kobongisa lisalisi ya malamu oyo ebongi, mpe koyebisa mpe kopesa toli mpo na bamaladi ekeseni mpe lolenge ya kosalisa yango. (Ezali polele ete moklisto asengeli ntango nyonso kokeba ete yango epengola ye te na mokumba na ye ya boklisto.) Na ntango mosusu lisalisi lipesamaka na motindo ya kofutela mbeto ya lopitalo oyo etombwamaka mpe ekitisamaka na masini na yango, masini ya kosembola nzoto, vélo ya bibosono, bisaleli mpo na koyoka, mpe bongo na bongo. Lokola mibange mingi bazali komona ete bazali na mposa ya eloko moko te to ete ezali na ntina mpenza te ya kozala na biloko wana ya sika, bato ya libota na bango basengeli mbala mingi kopesa toli ya mayele mpe komeka kondimisa bango. Esimbelo malamu mpo na ekuke ya ndako ya kosukola ekoki kopesa esengo koleka liboke ya fololo.

Kobatela mibange ekoki kopesa kolemba mingi na makanisi, mingimingi soki moto yango asili konuna mingi. Mbala mingi konuna eyaka kozanga ete toyeba yango. Tokoki kopekisa yango na kopengola ete mobangé afandaka mpamba kozanga mosala. Mobange akoki na pwasa koyina moto oyo azalaki kolinga ye mingi. Bandeko basengeli kososola ete mobangé akoki ata kobosana makambo nyonso matali solo​—ezali litomba mabe ya kobeba ya nzoto, kasi ezali mpenza te elembetele ya kobungisa kondima.

Soki mobangé azali na lopitalo to na ndako epai babatelaka mibange, boyokani malamu elongo na basali wana ezali na ntina mingi mpo ete basali bakoka koyeba lolenge ya kosala na mikolo ya kokumisa mbotama, Noël, to na mikolo ya bilambo mosusu ya mokili. Soki lipaso lisengeli kosalema, bato ya libota bakoki kopesa ndimbola mpe mikanda oyo moto yango azalaki komonisa likanisi na ye na ntina na kozongisa makila.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto