Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/7 nk. 3-5
  • Jéhovah azali nani?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Jéhovah azali nani?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Aleki banzambe ya Ezipito
  • Mobateli ya libota na Ye
  • Mateya oyo mazwami na likambo wana
  • ‘Yah azali lobiko na ngai’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Malɔzi misato ya liboso
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Bakei epai ya Farao
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Mose mpe Alona: Basakoli na mpiko ya Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/7 nk. 3-5

Jéhovah azali nani?

“JÉHOVAH azali nani?” Motuna oyo motunamaki na Farao, mokonzi ya lolendo na Ezipito, eleki sikawa mibu 3 500. Emonani ete abɛtelaki ye ntembe wana abakisaki ete: “Ngai nayebi Jéhovah te.” Mibali mibale oyo batɛlɛmaki bongo liboso ya Farao bayebaki soki Jéhovah azalaki nani. Ezalaki Moize mpe Alona, baoyo bazalaki bandeko, bato na libota ya Levi na Yisraele. Jéhovah atindaki bango mpo na kosɛnga ete mokonzi ya Ezipito atika Bayisraele bakende kosala elambo ya losambo kati na mokili mokauki.​—Exode 5:1, 2.

Farao azalaki na mposa ya eyano te na motuna na ye. Na nsé na bokonzi na ye, banganga batombolaki losambo ya bankámá na banzambe ya lokutá. Farao ye moko atalelamaki lokola nzambe! Engebene masapo ya Ezipito, azalaki mwana ya Râ, nzambe-moi mpe nzambe Horus, oyo amonisamaki na motó ya mpongó. Farao abengamaki na bankombo lokola “nzambe na nguya” mpe “oyo na seko.” Yango wana ezalaki likambo ya kokamwa te ete atuna na kotyola nyonso ete: “Jéhovah azali nani ete natósa maloba na ye?”

Ezalaki na ntina te ete Moize mpe Alona bayanola na motuna wana. Farao ayebaki ete Jéhovah azalaki Nzambe oyo Bayisraele bazalaki kosambela, wana banyokwamaki na boombo na Ezipito. Kasi Farao mpe Ezipito mobimba bayaki koyeba nokinoki ete Jéhovah azali Nzambe ya solo. Bobele bongo na mikolo na biso, Jéhovah akosala ete nkombo na ye mpe Bonzambe na ye eyebana epai na bato nyonso na mabelé. (Ezekiele 36:23) Na yango, tokoki kozwa litomba na kotaleláká lolenge Jéhovah Nzambe alóngisaki nkombo na ye kati na Ezipito ya kala.

Aleki banzambe ya Ezipito

Ntango Farao abɛtaki ntembe na kotunáká soki Jéhovah azali nani, amizelaki te na makambo oyo makómelaki ye. Jéhovah ye moko ayanolaki na koyeisáká malozi zomi likoló na Ezipito. Malozi yango matindamaki bobele mpo na mokili ya Ezipito te. Matindamaki mpe epai na banzambe ya Ezipito.

Malozi wana mamonisaki bonene ya Jéhovah likoló ya banzambe ya Ezipito. (Exode 12:12; Mituya 33:4) Kanisa makɛlɛlɛ ebimaki wana Jéhovah abongolaki mai ya ebale Nil mpe mai nyonso ya mokili ya Ezipito na makila! Mpo na likamwisi wana, Farao mpe bato na ye bayaki koyeba ete Jéhovah alekaki Hâpi, nzambe ya Nil. Kokufa ya bambisi kati na ebale Nil ezalaki mpe likámá mpo na losambo ya Ezipito, mpo ete bazalaki kosambela bambisi mosusu!​—Exode 7:19-21.

Na nsima, Jéhovah ayeisaki bolozi ya mimbembá likoló na Ezipito. Yango ekitisaki lokumu ya Heqet, nzambe-mwasi na mimbembá. (Exode 8:5-14) Bolozi ya misato ebulunganisaki banganga-nkisi, baoyo bakokaki te komekola likamwisi ya Jéhovah na kobongoláká mputulu ete ekóma bangungi. Bangangaki ete: “Oyo ezali mosapi ya Nzambe!” (Exode 8:16-19) Nzambe Thot ya Ezipito, oyo azwaki lokumu na misala na nkisi, akokaki te kosunga bakosi wana.

Farao azalaki koyekola soki Jéhovah azalaki nani. Jéhovah azalaki Nzambe oyo ayebisaki mikano na ye na nzela ya Moize mpe na nsima, akokisaki yango na koyeisáká malozi ya makamwisi likoló na bato ya Ezipito. Jéhovah akokaki mpe kobongisa ebandeli mpe nsuka ya bitumbu wana na boyokani na mokano na ye. Atako bongo, boyebi wana epusaki Farao te ete atósa Jéhovah. Kasi mokonzi na lolendo ya Ezipito alandaki kotɛmɛla Jéhovah na motó makasi nyonso.

Na boumeli ya bolozi ya minei, nkángi ebebisaki mboka, ekɔtaki na bandako, mpe ntango mosusu eyaki ebele na nzela ya mopepe oyo bazalaki mpe kosambela yango, elilingi ya nzambe Shou to ya nzambe-mwasi Isis, mokonzi-mwasi ya likoló. Liloba ya Liebele mpo na nyama moke wana libongolamaki na “nkángi,” “nzinzi,” mpe “lingangalá.” (Traduction du monde nouveau; Beaumont; Crampon 1905) Soki ezalaki mangangalá, boye bato ya Ezipito bazwaki bolozi na banyama wana mike oyo bazalaki kotalela yango ete ezalaki bulee, mpe mpo na yango bato bakokaki te kotambola kozanga ete banyata yango. Na lolenge nyonso, bolozi wana eteyaki Farao makambo mingi ya sika na ntina na Jéhovah. Wana banzambe na lokutá ya Ezipito bakokaki te kosunga basambeli na bango longwa na nkángi, Jéhovah abatelaki libota na ye. Bolozi wana mpe malozi nyonso malandaki enyokolaki Baezipito, kasi Bayisraele te.​—Exode 8:20-24.

Bolozi ya mitano ezalaki maladi mabe likoló na bibwele ya Ezipito. Mpasi wana ebwakaki nsɔni likoló ya nzambe Hathor, nzambe Apis, mpe Nout nzambe-mwasi ya makoló, oyo amonisamaki na elilingi ya ngombe mwasi. (Exode 9:1-7) Bolozi ya motoba oyo eyeisaki mbuma (furoncles) likoló na bato mpe banyama, epesaki nsɔni epai na banzambe ya lokutá oyo ete Thot, Isis, mpe Ptah, banzambe misato baoyo batalelamaki na libungá ete bazalaki na makoki ya kobikisa bato na maladi.​—Exode 9:8-11.

Bolozi ya nsambo ezalaki matandála minene, elongo na mɔ́tɔ oyo ezalaki kongala kati na matandála. Mpasi wana epesaki nsɔni na nzambe Reshpou, oyo atalelamaki lokola nkolo na nkaké, mpe Thot, oyo bazalaki koloba na ntina na ye ete azalaki kokamba mbula mpe nkaké. (Exode 9:22-26) Mpasi ya mwambe, bolozi ya mayoyo, emonisaki bonene ya Jéhovah likoló na Min, nzambe na kobotisa mbuma mingi, oyo atalelamaki lokola mobateli na milóna. (Exode 10:12-15) Mpasi ya libwa, mikolo misato ya molili makasi likoló ya Ezipito, ezalaki mpo na kotyola banzambe ya lokutá ya Ezipito oyo ete Râ mpe Horus, banzambe-moi.​—Exode 10:21-23.

Atako malozi libwa oyo na mpasi mingi, Farao aboyaki kotika Bayisraele. Motema makasi na ye ekómaki likámá monene mpo na Ezipito wana Nzambe ayeisaki bolozi ya zomi mpe ya nsuka​—kufa ya mwana na liboso na bato mpe na banyama. Ata mpe mwana na liboso na Farao akufaki lokola, atako atalelamaki lokola nzambe. Na bongo, Jéhovah ‘ayeisaki bitumbu epai na banzambe nyonso ya Ezipito.’​—Exode 12:12, 29.

Bongo, Farao abyangaki Moize mpe Alona mpe alobaki ete: “Tɛlɛma mpe bima na kati na bato na ngai, bino mpe bato na Yisraele. Kenda kosalela Jéhovah lokola elobaki bino. Kamata bitónga na bampate mpe bitónga na bangombe mpe kenda na bino. Pambola ngai lokola!”​—Exode 12:31, 32.

Mobateli ya libota na Ye

Bayisraele bakendaki, kasi mosika te, Farao amonaki lokola ete bazalaki koyengayenga kati na mokili mokauki. Ye mpe basaleli na ye balobaki ete: “Oyo nini esili biso kosala wana etiki biso Yisraele kokenda mpe kotika kosalela biso?” (Exode 14:3-5) Kozanga libota wana ya baombo, ezalaki mpasi monene mpo na nkita ya Ezipito.

Farao ayanganisaki limpinga na ye mpe balandaki Yisraele kino na Pi-hahiloto. (Exode 14:6-9) Na kolanda myango ya etumba, emonanaki ete makambo mazalaki malamu mpo na Baezipito mpamba te, Bayisraele bazwamaki na motambo katikati na mai monene mpe bangomba. Kasi Jéhovah abatelaki Bayisraele na kotyáká lipata katikati na bango mpe Baezipito. Na ngambo ya Ezipito, “lipata lizalaki mpenza molili,” mpo na kopekisa ete babundisa bango [Bayisraele] te. Na ngambo mosusu, lipata lizalaki kongɛnga, “kopesáká pole na butu” mpo na Yisraele.​—Exode 14:10-20.

Baezipito bamibongisaki mpo na kopunza mpe koboma, kasi bapekisamaki na lipata. (Exode 15:9) Oyo nde likamwisi monene! Mai nyonso ya Mai Motane makabwanaki, mpe Bayisraele bakatisaki na ngambo mosusu likoló na mokili mokauki! Farao mpe banguya na ye bakɔtaki katikati na mai monene, na mokano ya kokanga mpe kozongisa baombo na bango ya kala. Nzokande, mokonzi na lolendo ya Ezipito atyaki motema te epai na Nzambe ya Baebele. Jéhovah abandaki kobulunganisa Baezipito, kokangisáká yika ya makálo na bango.​—Exode 14:21-25a.

Bato na nguya ya Ezipito bangangaki ete: “Tokima liboso na Yisraele mpo ete Jéhovah azali kobunda na Baezipito mpo na bango!” Bososoli wana eyaki bobele nsima mpenza mpo na Farao mpe bato na ye. Ekómaki bango [Bayisraele] na ngambo mosusu wana basilaki kobikisama, Moize asembolaki lobɔkɔ na ye epai na mai monene, mpe mai mazongaki, kobomáká bongo Farao mpe mampinga na ye.​—Exode 14:25b-28.

Mateya oyo mazwami na likambo wana

Jéhovah azali bongo nani? Farao, moto na lolendo azwaki eyano na motuna oyo. Makambo malekaki na Ezipito mamonisaki ete Jéhovah azali Nzambe ya solo bobele moko, oyo akeseni mpenza na “banzambe mpamba” ya mabota. (Nzembo 96:4, 5) Na nguya na ye monene, Jéhovah “asalaki makoló mpe mabelé.” Azali mpe Mosikoli Monene, Ye oyo ‘abimisaki Yisraele, libota na ye longwa na mokili ya Ezipito, na nzela na bilembo, makamwisi, na lobɔkɔ na nguya mpe na nsɔmɔ.’ (Yilimia 32:17-21) Yango emonisaki malamu mpenza ete Jéhovah akoki kobatela libota na ye.

Farao azwaki mateya oyo na nzela ya makambo ya mpasi. Ya solo, liteya ya nsuka ezalaki bongo kufa mpo na ye. (Nzembo 136:1, 15) Akokaki kozala na mayele soki amonisaki komikitisa wana atunaki ete: “Jéhovah azali nani?” Bongo, mokonzi wana akokaki kosala na boyokani na eyano oyo azwaki. Likambo ya esengo mpenza, ebele ya bato na komikitisa bazali lelo koyekola soki Jéhovah azali nani. Mpe azali na bizaleli ya motindo nini? Eloko nini azali kosɛnga biso? Tika ete lisoló lilandi libakisa botɔndi na yo mpo na Ye oyo azali na nkombo Jéhovah.​—Nzembo 83:18.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto