Nzambe akolisaka yango—Yo mpe osalaka oyo esengami na yo?
KANISA likambo oyo. Ozali kati na elanga moko kitoko, oyo ezingami na banzete minene, banzete mike ya kitoko, mpe yango mobimba etondi na bafololo ya langi ndenge na ndenge. Matiti ya mai na mpondu mabengami émeraude mazali kokita kino na pembenipembeni ya moluka moko oyo ezali kotiyola kobimisáká mai ya peto. Eloko moko ezali te oyo ezali kobebisa esika yango. Na kokamwa nyonso, ozali komituna nani asalaki esika wana ya kitoko. Mosali na elanga, na bopolo nyonso, alobi ete ezali Nzambe nde azali kokolisa biloko wana nyonso.
Na lolenge eyebani, yo mpe oyebaki yango. Mpe ozali kokanisa na maloba na mosali na elanga ntango okozonga na ndako na yo mpe omoni elanga na yo ete ezali kitoko te, eloko moko oyo ekoki kosepelisa ezali te, bobele bosoto ezali mingi, mpe mai ya mbula matondisi mabulu mazali na mabelé. Okolinga mpenza kozala na elanga oyo ekokani na oyo outi kotala. Na yango, kondimáká makasi maloba ya mosali na elanga, ofukami mpe obondeli Nzambe na motema na yo mobimba ete abimisa bafololo kitoko kati na elanga na yo. Nini ekosalema? Eloko ata moko te.
Ezali boni mpo na oyo etali bokoli ya elimo? Okoki kozala na mposa makasi ya komona bokoli na makambo ya elimo, na ndakisa, komona ete bayekoli ya sika bazali kondima solo ya Liloba na Nzambe to komona bokoli na yo moko na elimo. Mpe ozali kobondela Jéhovah na motema na yo mobimba ete amonisa bokoli motindo yango, mpo ete ozali kondima makasi ete azali na nguya ya kosala yango. Kasi, ezali bobele mposa na yo makasi, libondeli lisalemi na motema mobimba, mpe kondima ete Nzambe azali na nguya, yango moko nde ekobimisa bokoli wana?
Nzambe akolisaka yango
Mbala mosusu, ozali kokanisa ete lolenge yo ozali kopesa maboko mpo na bokoli ya elimo ezali mpenza na ntina mingi te. Ezali yango nde oyo ntoma Paulo amonisaki na 1 Bakolinti 3:5-7, epai akomaki ete: “Apolo nani? Paulo nani? Bazali basali. Bondimaki na nzela na bango lokola Nkolo apesaki moto na moto nzela. Ngai nakonaki, Apolo amwangisaki mai kasi Nzambe akolisaki. Mokoni azali eloko te, momwangisi mai eloko mpe te nde bobele Nzambe mokolisi.”
Ntoma Paulo ayebaki malamu ete ntango biloko bizali kokola, lokumu nyonso esengeli kopesama na Nzambe. Mosali na elanga akoki kobongisa mabelé, kolona biloko na ye, kobatela malamu milona, kasi na nsuka ezali nguya ya Nzambe oyo ekosalaka mosala nde ekosala ete biloko yango bikola. (Genese 1:11, 12, 29) Na yango, ntoma Paulo alingaki koloba nini wana ayebisaki ete: “Mokoni azali eloko te, momwangisi na mai eloko mpe te,” (“Ná moto akolóna, ná moto akotíya mái, bazali . . . bobélé lokóla basáli mosálá,” Liloba lya Nzambe.) Azali nde komona mpamba mosala ya moklisto moko na moko kati na mosala oyo etali kozalisa bayekoli, wana azali koloba ete na nsuka ezali na bokeseni te ezala ete tosalaki mingi to moke kati na mosala na biso?
“Mokoni azali Eloko te”
Oyeba malamu ete kati na eteni oyo ya mokanda na ye, ntoma Paulo azali kolobela te mosala ya boklisto kasi bolema ya moto oyo azali kolanda bato na esika ete alanda Yesu Klisto. Basusu kati na Kolinti bazalaki kopesa lokumu mingi na basaleli na Jéhovah, lokola ntoma Paulo mpe Apolo. Basusu bazalaki kolendisa misala milongobani te mpe kokumisa bato oyo bango bazalaki kokanisa ete balekaki bandeko na bango baklisto.—1 Bakolinti 4:6-8; 2 Bakolinti 11:4, 5, 13.
Kokumisa bato lolenge wana ezali malamu te. Ezali makanisi ya mosuni, mpe ezali kobimisa zuwa mpe kowelana. (1 Bakolinti 3:3, 4) Ntoma Paulo azali komonisa makambo makoki kobima na ntina na makanisi motindo wana. Ayebisi ete: “Kowelana ezali kati na bino bandeko. Ntina ete, mosusu na bino akoloba ete ‘Ngai moto na Paulo,’ mosusu ete ‘Ngai na Apolo,’ mosusu ete ‘Ngai na Kefa,’ mosusu ete ‘Ngai na Klisto.’”—1 Bakolinti 1:11, 12.
Na yango, wana akomi ete: “Mokoni mpe momwangisi mai bazali eloko te,” ntoma Paulo azalaki kobundisa makanisi wana ya mosuni, komonisáká mingi ntina ya kotalela Yesu Klisto lokola Motambwisi mpe kondima ete nkembo nyonso mpo na bokoli ya lisangá esengeli kopesama na Nzambe. Bantoma mpe bankulutu mosusu bazalaki bobele basaleli ya lisangá. Moko te asengelaki komitombola, koluka lokumu to komimona ete aleki basusu. (1 Bakolinti 3:18-23) Yango wana, ntoma Paulo alobi ete mokoni na momwangisi na mai bazali eloko te, “soki akokanisi bango na ye oyo azali kopesa bomoi na milona.”—1 Bakolinti 3:7, Phillips.
Basalani elongo na Nzambe
Na bongo, na maloba wana, ntoma Paulo azalaki te kotyola mosala na biso ya kokona mpe ya komwangisa mai. Alingaki te ete tobanda kokanisa ete “Nzambe akokolisa yango na ntango esengeli,” na yango tofanda mpe tozela ete ye akolisa yango. Ntoma Paulo ayebaki ete oyo tozali kosala mpe lolenge tozali kosala yango ezali na bopusi mingi likoló na bokoli ya biloko.
Ezali mpo na yango nde ntoma Paulo alendisaki ntango nyonso baklisto na kosala makasi na mosala na bango mpe kokolisa makoki na bango lokola balakisi. Kanisa na batoli oyo apesaki na elenge Timoté. “Omisenzela yo moko mpe mateya na yo; ɛɛ, oumela na yango, mpo ete ekosalaka yo boye okomibikisa yo mpenza mpe bango bazali koyoka yo.” (1 Timoté 4:16) “Nazali kolaka yo ete osakola liloba, ozala na etingya . . . na motema petee mpe na kolakisa. . . . Okokisa [malamu] mosala na yo.” (2 Timoté 4:1, 2, 5) Mbele esengelaki kozala na ntina te mpo na Timoté na kosala makasi mpe komonisa makoki na ye na kolona mpe na komwangisa mai soki yango ezalaki na ntina te mpo na oyo etali bokoli ya biloko.
Lokola ntoma Paulo mpe Apolo, yo mpe ozali na libaku kitoko ya kosala lokola moko kati na basalani elongo na Nzambe. (1 Bakolinti 3:9; 2 Bakolinti 4:1; 1 Timoté 1:12) Lokola ezali bongo, mosala na yo ezali na ntina mingi. Mosali na bilanga asengeli te bobele kozela ete Nzambe asala bikamwiseli mpo na kobimisa elanga kitoko kozanga ete mosali na bilanga amonisa molende. Likambo yango ekeseni nde mpo na oyo etali bokoli ya elimo? Soko moke te. Motindo moko na moloni na elanga oyo azali na motema molai “azali kozela mbuma kitoko na mabelé,” tosengeli liboso kosala makasi biso moko mpo na kolona mpe komwangisa mai, awa ezali biso kozela ete Nzambe akolisa yango.—Yakobo 1:22; 2:26; 5:7.
Sala oyo esengami na Yo
Lokola ntoma Paulo ayebisi yango, “moto na moto akozwa libonza engebene mosala na ye,” na yango, tosengeli komituna soki tozali kosala makasi.—1 Bakolinti 3:8.
Geoffrey Smith moto oyo ayebi malamu misala na bilanga, alobi ete: “Mpo na kokóma mosali na elanga ezali kosenga te kozala na ba titres minene, kasi bobele kozala na bolingo ya milona.” (Matiti & Banzete mike [Lingelesi]) Bobele bongo, ba titres minene esengami na biso te mpo na kozala basalani elongo na Nzambe, kasi bobele bolingo ya solo mpo na bato mpe kondima na motema mobimba ete tozala basaleli na Nzambe.—2 Bakolinti 2:16, 17; 3:4-6; Bafilipi 2:13.
Totalela mwa batoli malamu epesamaki na basali na bilanga oyo bazalaki na makoki. Mobali moko oyo ayebi malamu mosala ya bilanga ayebisi ete, soki moto oyo azali naino na eksperianse te na mosala ya bilanga andimi koyoka baoyo bazali na eksperianse mingi koleka ye, “moyekoli akokóma nokinoki moto oyo ayebi makambo mingi.” Mobali yango moko alobi lisusu ete “moto oyo ayebi makambo mingi azalaka ntango nyonso na likambo ya sika mpo na koyekola.” (Buku monene etali misala ya bilanga [Lingelesi]) Ondimaka na motema na yo lisalisi mpe kobongisama oyo Jéhovah azali kopesa mpo ete okoka kolona mpe komwangisa mai na lolenge esengeli? Soki ezali bongo, ezala ete ozali moto ya sika na mosala to oyo azali na eksperianse mingi, okoki kokolisa mingi makoki na yo lokola mosalani elongo na Nzambe, na yango okozala moto oyo “abongi mpo na kolakisa basusu.”—2 Timoté 2:2.
Geoffrey Smith ayebisi ete soki alingi koyoka mpe koyekola, “moyekoli akopengola mabunga minene.” Soki tozali kondima litambwisi oyo Jéhovah azali kopesa biso na nzela ya Liloba na Ye mpe lisangá na Ye, tokosala makambo na lolenge na ye. Kati na mabunga yango, tokopengola koswana mpambampamba elongo na baoyo balingi bobele kowelana to bitumba na ntina na maloba.—Masese 17:14; Bakolose 4:6; 2 Timoté 2:23-26.
Eteni mosusu ya toli malamu etali mosala ya bilanga ezali bongo kokanisa malamumalamu liboso ya kotimola mabelé. Buku monene etali misala ya bilanga eyebisi ete: “Liboso ya kobanda kotimola mabelé, kamata naino ntango mpo na kokanisa na ntina na makoki na yo.” Ekozala nde libunga na komipesa na mosala ya boklisto kozanga ete okanisa malamumalamu liboso mpe kobondela mingi mpo na oyo olingi kosala to mpo na lolenge malamu oyo okosala yango? Zala na mikano ya polele liboso ya kobanda. Na ndakisa, kanisa na lolenge ya bato okokutana na bango mpe mikakatano oyo osengeli kokutana na yango, mpe komibongisa mpo na kosilisa yango. Na bongo, tokokoka “kobikisa bato mingi mpo ete toyei ndenge nyonso epai na bato nyonso.”—1 Bakolinti 9:19-23.
“Pekisa Loboko na Yo te”
Soki tozali kosepela na libaku kitoko oyo ya kosala lokola basalani elongo na Nzambe, tokomipekisa te kosala oyo esengami na biso kati na mosala wana. “Na ntongo, kona mboto na yo mpe na mpokwa pekisa loboko na yo te; mpo ete oyebi te soko nini ekokóma malamu to oyo to yango to soko nyonso mibale ekozala malamu.” (Mosakoli 11:6) Matomba ya nsuka mazali na maboko ya Jéhovah, kasi tokobuka bobele soki tomonisaki liboso molende mpo na kokona.—Mosakoli 11:4.
Ezali na elanga moko te oyo ekoki kozala kitoko soki mosala mosalemi bobele likolólikoló, na kotimoláká mabulu mpe na kolonáká na lolenge ya mobulu. Bobele bongo, mosala ya boklisto esuki te bobele na kosangana na bokaboli ya mikanda mikolimbolaka Biblia, kasi ezali kosenga makambo mingi. Lokola basalani elongo na Nzambe, tosengeli na molende nyonso mpe na lolenge losengeli kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe, wana ezali biso koluka bato na motema sembo. (Misala 13:48) Tomikundola etinda oyo ezwami na maloba ya ntoma Paulo na 2 Bakolinti 9:6 ete: “Ezali bongo ete ye oyo akokona moke, akobuka moke nde ye oyo akokona mingi akobuka mingi.”
Lokola basali nyonso malamu ya bilanga, tozali komeka kolona kati na mabelé malamu. Nzokande, ata eloko ekonami kati na mabelé moko ya malamu, yango ezali nsuka ya likambo te. Geoffrey Smith ayebisi ete: “Yango elimboli te ete soki biloko bikonami, moto oyo akonaki yango azali lisusu na mosala ya kosala te, ete etikali na ye bobele kofanda mpe kominanola.” Ya solo, mpo ete biloko bikola, esengeli komonisa milende mpo na komwangisa mai mpe mpo na kobatela yango.—Tala Masese 6:10, 11.
Ya solo, mosala ya boklisto esengaka ntango molai ya mosala makasi, oyo na boumeli na yango ekoki komonana ete matomba mazali kobima te. Kasi, na lolenge ya kokamwa, matomba kitoko makoki komonana na nsima. Geoffrey Smith ayebisi ete: “Mosala ya bilanga ezali kosenga ntango molai ya mosala makasi oyo esangani na eleko wana ya kitoko oyo ekosala ete makambo nyonso matali kotimola mabulu, kokata matiti, mpe mitungisi mpenza ebosanama.” Yo mpe okoki kozala na bantango ya bosepeli mingi wana bato ya mitema sembo bazali kondima nsango ya solo—soki ozalaki na motema na yo mobimba kotimola mabulu, kolona, kokata matiti, mpe komwangisa mai.—Tala Masese 20:4.
Ntoma Paulo mpe Apolo bayebaki ete mosala na bango ya kosakola Bokonzi mpe kozalisa bayekoli ekómisaki bango na lokumu mingi te kati na lisangá ya boklisto. Bayebaki malamu ete ezalaki Nzambe nde azalaki kokolisa biloko. Atako bongo, balonaki mpe bamwangisaki mai—na lolenge losengeli. Tika ete biso tolanda ndakisa na bango mpe tomitika ete Nzambe atambwisa biso lokola “basali na nzela na bango [basusu] bazali kokóma bandimi.”—1 Bakolinti 3:5, 6.
[Elilingi na lokasa 23]
Nzambe akolisaka biloko—kasi mosali na elanga azali kosala oyo esengami na ye