Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/2 nk. 5-7
  • Malamu ekolónga mabe mokolo mosusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Malamu ekolónga mabe mokolo mosusu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobundisa mabe na Dachau
  • Kolonga mabe oyo ezali kati na biso
  • Kosilisa nguya ya Diable
  • “Bakoyokisana mpasi te“
  • Nini ekómisaka biso bato malamu to bato mabe?
    Lamuká!—2010
  • Malamu na mabe: Etumba oyo eumeli bikeke mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Ndenge oyo malamu ekolonga mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • “Bózongisa mabe na mabe na moto te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/2 nk. 5-7

Malamu ekolónga mabe mokolo mosusu?

ESILI koleka pene na mbula nkoto mibale, Yesu Klisto, moto oyo asalaki likambo te, azalaki liboso ya esambiselo. Bomoi na ye ezalaki na likama. Ya solo, bato mabe basalaki mwango mabe mpo na koboma ye mpo ete azalaki koloba solo. Afundamaki na lokuta nyonso ete azalaki kotombokisa bato mpe bibele basengaki ete abomama. Moyangeli Moloma moko, oyo azalaki kopesa motuya mingi na lokumu na ye ya politike koleka bomoi ya mosali na mabaya oyo azalaki moto na bopolo, akweisaki Yesu na liwa ya nsomo. Emonanaki lokola ete, mabe elóngaki.

Nzokande, butu oyo ezalaki liboso ya kobomama na ye, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Nasili kolónga mokili.” (Yoane 16:33, MN) Alingaki koloba nini? Na ndambo, alingaki koloba ete mabe oyo ezali kati na mokili ebebisaki ye te mpe etindaki ye te na kozongisa mabe na mabe. Mokili motindaki ye te na kolanda makambo mabe. (Tala Baloma 12:2, Liloba lya Nzambe.) Ata na ntango alingaki kokufa, abondelaki mpo na baoyo bazalaki koboma ye: “Tata, limbisa bango mpo ete bayebi yango ezali bango kosala te.”​—Luka 23:34.

Kino na liwa na ye, Yesu amonisaki ete mabe ekoki kolongama. Alendisaki bayekoli na ye ete babunda ya bango etumba mpo na kotemela mabe. Lolenge nini bakoki kolónga na yango? Na kolandaka batoli oyo ya Biblia ete “bozongisaka mabe mpo na mabe te“ mpe “bolanda kolónga mabe na kosalaka malamu,” lokola Yesu asalaki yango. (Baloma 12:17, 21, MN) Kasi ezaleli motindo wana ebimisaka mpenza matomba?

Kobundisa mabe na Dachau

Else, mwasi moko ya Allemagne oyo akangamaki na Dachau, apesaki likabo moko ya kitoko na elenge mwasi moko ya Russie oyo azalaki na mibu 14, likabo ya kondima mpe ya elikya.

Dachau ezalaki Camp de concentration oyo eyebanaki mingi mpo na makambo na yango ya mabe epai kuna bankoto mingi ya bato bakufaki mpe bankama mingi, kati na bango elenge mwasi wana ya Russie, bakutanaki na minyoko ya nsomo mpe nzoto na bango esalelamaki mpo na komeka nkisi ya minganga. Dachau emonanaki lokola ete ezalaki esika elekaki mpo na mabe. Nzokande, ata kati na mabelé wana oyo mamonani lokola ete makobotaka mbuma te, malamu ebandaki kokóla mpe ebotaki mbuma mingi.

Else azalaki na mawa mingi mpo na elenge mwasi wana oyo asengisamaki na kotala lolenge basoda ya S.S. bazalaki kobebisa mama na ye. Kotyaka bomoi na ye na likama, Else alukaki mabaku mingi mpo na kolobela elenge mwasi wana na ntina na malamu mpe mabe, mpe na ntina na elikya ya Biblia oyo etali lisekwa. Alakisaki ye ete esengeli kolinga na esika ya koyina. Elenge mwasi wana ya Russie abikaki na minyoko wana ya Dachau na lisalisi ya Else.

Else asalaki bongo mpo ete azalaki na mposa ya kolanda ezaleli ya komibanzabanza mpo na bato mosusu oyo ezalaki na Klisto. Azalaki Témoin de Jéhovah mpe ayekolaki kozanga kozongisa mabe mpo na mabe, mpe kondima na ye ezalaki kopusa ye na kosalisa basusu na kosala motindo moko. Atako anyokwamaki na Dachau, azwaki bolongi na bizaleli malamu na esika oyo boyangeli ezalaki ya mabe. Azalaki ye moko te na likambo yango.

Kati na mokanda na ye Lisoló ya Boklisto (na Lingelesi), Paul Johnson ayebisi ete “[ba Témoins de Jéhovah] baboyaki boyokani nyonso elongo na Boyangeli ya Nazi oyo bazalaki kolobela ete ezalaki mpenza mabe koleka. . . . Bato ntuku libwa na nsambo likoló na monkama bakutanaki na minyoko ya ndenge na ndenge.” Ezalaki wana etumba oyo ezangaki elikya? Kati na mokanda Valeurs et violence à Auschwitz, sociologue ya Pologne Anna Pawelczynska alobaki mpo na ba Témoins de Jéhovah ete: “Etuluku moke wana ya bakangami bazalaki nguya moko ya moboko mpo na mateya na bango mpe balongaki kati na etumba na bango mpe boyangeli ya Nazi.”

Nzokande, mpo na mingi kati na biso, etumba oyo tozali kobunda ezali ya kati; tozali kobunda ya solo elongo na bamposa na biso moko na esika ya kobunda elongo na bopusi ya mabe oyo euti na libanda. Ezali etumba tozali komibundisa.

Kolonga mabe oyo ezali kati na biso

Ntomá Paulo alobelaki etumba wana na maloba malandi: “Malamu nalingi kosala, nakosala mangó te mpe mabe nalingi kosala mangó te, nakosala mangó.” (Baloma 7:19, Liloba lya Nzambe) Lokola ntoma Paulo ayebaki yango, kosala malamu ezali likambo liyaka ntango nyonso yango moko te.

Eugenio,a elenge mobali ya Espagne, abundisaki makasi bamposa na ye mabe na boumeli ya mbula mibale. Alimboli ete: “Esengelaki na ngai kokamata bikateli makasi. Uta bomwana na ngai, nazalaki na bizaleli ya mbindo. Na bolenge na ngai, nazalaki kolinga kosangana na misala ya kosangisa nzoto mibali na mibali, mpe, mpo na koloba solo, nazalaki kolinga lolenge wana ya bomoi.” Na nsuka, nini esalisaki ye na kobongwana?

Eugenio ayebisaki ete: “Nazalaki na mposa ya kosepelisa Nzambe, mpe nayekolaki kati na Biblia ete azalaki te kondima lolenge ya bomoi oyo nazalaki na yango. Na yango nazwaki ekateli ya kobongwana, ya koyokanisa bomoi na ngai na mitinda ya Nzambe. Mokolo na mokolo, nasengelaki kobundisa makanisi ya mabe mpe ya mbindo oyo mazalaki koyela ngai. Nazwaki ekateli makasi ya kolónga etumba wana, mpe nazalaki ntango nyonso kosenga lisalisi ya Nzambe. Nsima na mbula mibale, nalóngaki likambo oyo lilekaki makasi, atako nazali kolanda komipekisa. Kasi etumba yango ezalaki na ntina mingi. Sikawa, nazali komipesa limemya, nazali malamu na libala na ngai, mpe, oyo eleki mpenza, nazali na boyokani malamu elongo na Nzambe. Nayebi, na lolenge ngai moko nakutanaki na yango, ete likoki lizali ya kobengana makanisi mabe liboso ete yango epusa biso na kosala mabe​—bobele soki tosali milende ya solo.”

Malamu ezali kozwa bolongi likoló na mabe mbala na mbala oyo tozali kobwaka likanisi moko ya mabe, mbala na mbala oyo tozali koboya kozongisa mabe mpo na mabe. Atako yango ezali na ntina, bolongi wana ezali te kolongola makambo mibale ya ntina oyo mazali kobimisa mabe. Atako lolenge nini ya milende tozali komonisa, tokoki te kolonga na mobimba bolembu na biso oyo tobotamaki na yango, mpe Satana azali ntango nyonso na bopusi mabe likolo na bato. Ezalela wana ekobongwana mokolo mosusu?

Kosilisa nguya ya Diable

Bosembo na Yesu kino na liwa emonisaki kokwea monene mpo na Satana. Diable alóngaki te na kobebisa bosembo na Yesu, mpe kokwea wana ezalaki ebandeli ya nsuka ya Satana. Biblia elimboli ete Yesu akufaki “mpo na kosilisa, . . . na nzela ya liwa na ye, nguya ya Diable.” (Baebele 2:14, MN) Nsima na lisekwa na ye, Yesu ayebisaki na bayekoli na ye ete: “Bokonzi nyonso bosili kopesama na ngai na likolo mpe na mabele.” (Matai 28:18) Na bongo, bokonzi yango esengelaki kosalelama mpo na kosilisa misala ya Satana.

Mokanda ya Emoniseli ezali kolobela mokolo oyo Yesu asengelaki kobengana Satana longwa na makolo. Motomboki wana, elongo na bademo na ye, asengelaki kozala na zingazinga ya mabele. Biblia ekebisi mpo na yango ete mabe ekozala mingi: “Mawa na mokili mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.”​—Emoniseli 12:7-9,12.

Bisakweli ya Biblia bimonisi ete likambo wana lisilaki kosalema​—penepene na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba.b Yango ezali kolimbola polele bokoli ya mabe oyo tozali komona lelo. Kasi mosika te, Satana akozala lisusu na makasi te, mpe akobungisa bongo bopusi nyonso oyo azali na yango likoló na bato.​—Tala Emoniseli 20:1-3.

Nsuka ya makambo wana ekozala nini mpo na bato?

“Bakoyokisana mpasi te“

Yesu, Mokonzi ya Bokonzi na Nzambe, akosalela mosika te ˈbokonzi na ye na mabeleˈ mpo na kotya ebongiseli ya kolakisama lisusu na elimo. “Bafandi na mabele bakoyekola mpenza boyengebene.” (Yisaya 26:9, MN) Bolamu ekozala solo mpo na moto na moto. Biblia epesi biso endimiseli oyo: “Bakoyokisana mpasi te mpe bakobebisana te, . . . mpamba te mabele mobimba makotonda na boyebi ya Jéhovah lokola kotonda na mai monene.”​—Yisaya 11:9, MN.

Ata lelo, likoki lizali ya kolónga ebele na bamposa na biso ya mabe. Ntango bopusi ya bademó ekozala lisusu te, na bongo ekozala solo mpasi te, “na kotika oyo ezali mabe mpe kosala oyo ezali malamu.”​—1 Petelo 3:11.

Lokola Nzambe azali malamu, tozali na bantina malamu ya kondima ete: malamu ekolónga mabe mokolo mosusu, mpe na lisalisi ya Nzambe baoyo bazali na mposa ya kosala malamu bakozala na likoki ya kolónga mabe, lokola Yesu amonisaki yango na ndakisa na ye. (Nzembo 119:68) Uta sikawa, baoyo balingi kobundisa mabe bakoki kolikya kozala na bomoi na mabele mapetolami oyo mayengalami na Bokonzi na Nzambe, boyangeli oyo ezwi mokumba ya kolongola mabe mpo na libela. Mokomi na Nzembo asakolaki nsuka ya likambo yango: “Boboto mpe solo ekokutana; boyengebene mpe kimya​—ekoyambana. Solo ekobima na mabelé, mpe boyengebene ekotala na likoló.”​—Nzembo 85:10, 11, MN.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Wana ezali nkombo na ye ya solo te.

b Mpo na kozwa bandimbola mingi, tala lokasa 20 kino lokasa 22 ya mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto