Lolenge nini ozali kopota na emekaneli mpo na bomoi?
“Boyebi te ete bapoti mbango bakopotaka bango nyonso elongo, kasi bobele moko nde akozwa libonza? Bopota mbango mpo na kozwa yango.”—1 BAKOLINTI 9:24, MN
1. Biblia ekokanisi bomoi na biso ya boklisto na likambo nini?
BIBLIA ekokanisi lolenge oyo tozali koluka bomoi ya seko na emekaneli na mbango. Pene na nsuka ya bomoi na ye, ntomá Paulo alobaki na ntina na ye moko ete: “Nasili kobunda etumba malamu, napoti kino nsuka na emekaneli na mbango, nasili kobatela kondima.” Alendisaki baninga na ye baklisto ete basala motindo moko na kolobáká ete: “Tobwaka bozito nyonso mpe masumu mazali kokanga biso noki, mpe tópota mbango na mpiko nyonso na emekaneli etyami liboso na biso.”—2 Timoté 4:7; Baebele 12:1, MN.
2. Ndenge nini tolendisami na kotalela motuya na baoyo babandi kopota na emekaneli mpo na bomoi?
2 Bokokanisi oyo ebongi mpenza, mpamba te emekaneli ezalaka na ebandeli, na ntaká esili kotyama sikisiki, mpe na esika na bokómi, to nsuka. Bokóli na biso ya elimo elandaka bobele bongo kino kozwa bomoi. Lokola tomonaki yango, mbula na mbula, bankɔto mingi na bato bazali kobanda malamu kati na emekaneli mpo na bomoi. Na ndakisa, na bambula mitano oyo euti koleka, bato 1 336 429 bapotaki na emekaneli na mbango na komipesáká epai na Nzambe mpe kozwa batisimo kati na mai. Ebandeli wana makasi ezali mpenza kolendisa. Kasi, likambo ya ntina mpenza, ezali bongo kokóba kopota na emekaneli kino kokóma na nsuka. Ozali nde kosala bongo?
Emekaneli mpo na bomoi
3, 4. (a) Lolenge nini Paulo alobelaki ntina ya kobatela motindo malamu na kopota kati na emekaneli? (b) Bato mosusu oyo balandaki toli na Paulo te, basalaki nini?
3 Mpo na komonisa ntina ya kokóba kopota kati na emekaneli, Paulo apesaki toli oyo, ete: “Boyebi te ete bapoti mbangu bakopotaka bango nyonso elongo, kasi bobele moko nde akozwa libonza? Bopota mbango mpo na kozwa yango.”—1 Bakolinti 9:24, MN.
4 Ya solo, na masano na kala, bobele moto moko nde azalaki kozwa libonza. Nzokande, kati na emekaneli mpo na bomoi, bato nyonso bakoki kozwa yango. Bobele likambo moko nde lizali na ntina mingi: kokóba kopota kati na emekaneli kino nsuka. Ezali likambo ya esengo na komona ete, lokola ntomá Paulo, bato mingi basili kopota mbango na bosembo nyonso kino nsuka ya bomoi na bango. Mpe bamilió na bato mosusu bazali kokóba kopota mbango. Nzokande, ezali na bato mosusu oyo bakendaki liboso te, bakómaki na nsuka te. Na esika na kosala bongo, bapesaki nzela na makambo mosusu ete epekisa bango, na motindo boye ete batikaki emekaneli to batalelamaki ete babongi te. (Bagalatia 5:7) Likambo oyo lisengeli kopusa biso nyonso na kotalela lolenge oyo tozali kopota na emekaneli mpo na bomoi.
5. Paulo akokanisaki emekaneli mpo na bomoi na momekano ya masano? Limbola.
5 Motuna moko motunami ete: Paulo akanisaki nini wana alobaki ete “bobele moko nde akozwa libonza?” Lokola tomonaki yango, alingaki koloba te ete, kati na baoyo nyonso babandaki emekaneli, bobele moto moko nde akozwa mbano ya bomoi ya seko. Emonani mpenza ete ekokaki kozala bongo te, mpamba te mbala mingi, Paulo alobaki na polele mpenza ete mokano na Nzambe ezali ete motindo na bato nyonso babika. (Baloma 5:18; 1 Timoté 2:3, 4; 4:10; Tito 2:11) Alingaki koloba te ete emekaneli mpo na bomoi ezali momekano kati na yango, mokomoko na basangani na yango akoluka koleka basusu. Bakolinti bayebaki malamu ete elimo wana ya komekana ezalaki kati na bawelani na masano ya Isthmique, oyo ezalaki na lokumu mingi na eleko na kala koleka masano ya Olympique. Bongo, Paulo alingaki koloba nini mpenza?
6. Biteni ya zingazinga bimonisi nini likoló na lisese na Paulo na ntina na mopoti mbangu mpe emekaneli na mbango?
6 Na kotangáká lisese oyo ya mopoti mbango, Paulo alobaki liboso na ntina na elikya oyo azalaki na yango mpo na kozwa lobiko. Na ba versets ezali liboso, amonisaki ete azalaki kosala na molende nyonso mpe amibundisaki na mitindo mikeseni. (1 Bakolinti 9:19-22) Mpe, alobaki na verset 23, ete: “Nazali kosala nyonso mpo na nsango malamu, ete nakoma mokabani na yango na bato mosusu.” Asosolaki ete lobiko na ye lozwaki ndanga te bobele mpo ete aponamaki lokola ntomá to mpo ete azalaki kosakola uta bambula mingi. Mpo na kozwa bolamu bouti na nsango malamu, asengelaki kolanda kosala nyonso ekokaki na ye mpo na nsango malamu. Asengelaki kopota na kozaláká na likanisi ya kolónga, mpe kobunda na makasi nyonso lokola nde azalaki kopota na masano ya lsthmique, epai ‘moto bobele moko azalaki kozwa libonza.’—1 Bakolinti 9:24a, MN.
7. Nini tosengeli kosala mpo na ‘kopota mbango mpo na kozwa libonza’?
7 Tokoki koyekola makambo mingi na maloba oyo. Atako bapoti mbango nyonso bazalaka na mposa ya kolónga, bobele baoyo bazwi ekateli ya kolonga nde bakoki kolikya kozwa yango. Na yango, tosengeli te kosepela bobele mpo ete tokɔti kati na emekaneli na mbango. Tosengeli kokanisa te ete makambo nyonso makotambola malamu mpo ete tozali ‘kati na solo.’ Tokoki komema nkombo ya baklisto, kasi tokoki mpenza komonisa ete tozali baklisto? Na ndakisa, tosalelaka makambo masɛngami na baklisto—koyangana na makita na boklisto, kosangana na mosala ya kosakola, mpe bongo na bongo? Soki ezali bongo, tobongi na longonya mpe tosengeli kosala makasi mpo na kolendendela kati na bizaleli malamu. Kasi, tokoki kozwa bolamu na oyo tozali kosala? Na ndakisa, tomibongisaka ntango nyonso mpo na kopesa komantere na makita? Tozali kosala makasi mpo na kosalela makambo oyo tozali koyekola kati na bomoi na biso? Tosɛnzelaka na komibongisa lisusu mpo na kopesa litatoli ya mozindo atako tozali kokutana na mikakatano kati na mosala ya kosakola? Tosili kolónga ntembe etali kozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu mpe na kotambwisa boyekoli ya Biblia? Paulo apesaki toli oyo ete: “Bopota mbango mpo na kozwa yango.”—1 Bakolinti 9:24b, MN.
Tomipekisa kati na makambo nyonso
8. Likambo nini lipusaki Paulo na kopesa toli na baninga na ye baklisto ete ‘bamipekisa na makambo nyonso’?
8 Na boumeli ya bomoi na ye, Paulo amonaki baklisto mingi balɛmbaki, bapɛngwaki to mpe batikaki emekaneli mpo na bomoi. (1 Timoté 1:19, 20; Baebele 2:1) Tala ntina oyo azalaki kokundwela mbala na mbala epai na baninga na ye baklisto ete bazalaki kobunda etumba makasi mpe ekoumela. (Baefese 6:12; 1 Timoté 6:12) Akóbaki kolobela lisese ya mopoti mbango ete: “Nzokande moto na moto oyo akosala emekaneli, akomipekisa na makambo nyonso.” (1 Bakolinti 9:25a, MN) Na maloba oyo, Paulo akanisaki makambo mingi oyo baklisto ya Kolinti bayebaki yango malamu, yango lolenge na mpasi oyo bawelani na masano ya Isthmique bazalaki kooka na komimeka mbala na mbala.
9, 10. (a) Nini elobamaki na ntina na bawelani na masano ya Isthmique? (b) Likambo nini ya ntina oyo tosengeli kosimba na maloba wana?
9 Tala elakiseli malamu ya lolenge oyo mowelani moko azalaki komimeka:
“Na esengo nyonso mpe kozanga koimaima, abandi kotósa mitinda mpe bipekiseli bipesami mpo na sanza zomi na komimeka; soki bongo te, mbala mosusu akoki te kosangana na momekano. . . . Azali kosepela na mwa mpasi moke, bolɛmbu mpe bipekiseli oyo azali kozwa, mpe azali na esengo ya koboya mpenza biloko nyonso oyo, na ntango moko to mosusu, ekoki kokitisa makoki na ye ya kolónga. Azali komona wana mibali mosusu bazali na mposa ya kolya, ya kopema, kosukola, kosepela na bomoi, wana ye azali koboma nzoto na komimeka; kasi ezali mpasi ete elulela moko eyela ye na makanisi, mpamba te motema na ye motyami likoló na libonza, mpe komimeka makasi ezali na ntina mingi. Ayebi ete, soki atiki komipekisa lolenge wana likoló na likambo moko to na libaku moko, akozala lisusu na makoki ya kolónga te.”—The Expositor’s Bible, Volume V, lokasa 674.
10 Ezali likambo ya ntina mingi na komona ete, moto oyo azali komimeka “azali na esengo” ya kolanda mitinda makasi misɛngi komiboisa biloko mosusu. Ya solo, “ezali mpasi ete elulela moko eyela ye na makanisi” wana ezali ye komona bomoi malamu mpe na kitoko oyo bato mosusu bazali na yango. Tokoki kozwa liteya na makambo oyo? Ezali bongo!
11. Biso oyo tosili komikɔtisa na emekaneli mpo na bomoi, tosengeli komibatela na likanisi nini mabe?
11 Omikundola maloba na Yesu oyo ete “ekuke ezali monene mpe ezali na esika monene oyo ekoleka kino libebi. Bazali mingi baoyo bakoingela na yango. Kasi ekuke ezali na nkaká mpe nzela ekangani oyo ekoleka na bomoi, mpe baoyo bakomona yango bazali mingi te.” (Matai 7:13, 14 MN) Na milende oyo ozali kosala mpo na kotambola na ‘nzela moke,’ ozali nde kolula bonsomi mpe esengo oyo emonani epai na baoyo bazali na nzela mosusu? Ozali na mayoki ete obungisi eloko moko na kotalela bato mosusu mpe misala na bango oyo mimonani lokola ete ezali mabe te? Yango ekozala mpasi to soki tobosani ntina oyo tokɔtaki na emekaneli wana. Paulo alobaki ete: “Bango bakosalaka bongo mpo na kozwa motolé mokobeba, nde biso, mpo na yango ekobeba te.”—1 Bakolinti 9:25b.
12. Mpo na nini tokoki koloba ete nkembo mpe lokumu oyo bato bazali koluka ekokani na motolé mokobeba, oyo bazalaki kopesa na masano ya Isthmique?
12 Balóngi na masano ya Isthmique bazalaki kozwa motolé mosalamaki na nkasa kitoko ya nzeté ebéngami pin to ya nzeté mosusu, oyo ezalaki kokauka nsima ya mwa mikolo to mwa baposo. Ya solo, bapoti mbango bazalaki komekana te mpo na motolé wana mokobebaka, kasi mpo na nkembo, lokumu, mpe nkombo malamu oyo euti na yango. Mokanda moko mayebisi ete, na ntango molóngi azalaki kozonga epai na ye, ayambamaki lokola elombé. Mbala mingi bazalaki kobuka lopango ya mboka mpo na kopesa nzela na molongó ya bato oyo bazalaki kolanda molongi mpe bazalaki kotonga bikeko mpo na lokumu na ye. Kasi, atako nyonso wana, nkembo na ye ekokaki koumela libela te. Lelo, bobele bato moke nde bayebi bilombé yango, mpe mingi bakanisaka bango soko moke te. Baoyo bazali kopesa ntango na bango, makasi na bango, kolongono na bango ya nzoto mpe bolamu na bango ya libota mpo na kozwa nguya, lokumu mpe bozwi ya mokili, nde bazali bazwi te epai na Nzambe, bakososola mokolo mosusu ete, “motolé” na bango ya mosuni, ekoki koumela ntango molai te.—Matai 6:19, 20; Luka 12:16-21.
13. Lolenge nini ezalela ya bomoi ya moto oyo amikɔtisi na emekaneli mpo na bomoi ekeseni na oyo ya mopoti mbango?
13 Soki basangani ya emekaneli na mbango bazali kondima masɛngami ya komimeka ya mpasi lokola oyo tolobelaki liboso, ezali bobele mpo na mwa ntango mokuse. Soki masano masili, bazongeli lolenge na bomoi na bango mpenza. Bakoki mbala mosusu komimeka na ntango mosusu mpo na kobatela makoki na bango, kasi bakolanda lisusu te mitinda makasi misɛngi komiboisa biloko mosusu bobele soki bakómi pene na emekaneli mosusu. Ezali lolenge moko te mpo na baoyo bazali kosangana na emekaneli mpo na bomoi. Mpo na bango, komimeka mpe komiboisa makambo mosusu esengeli kozala lolenge ya bomoi na bango.—1 Timoté 6:6-8.
14, 15. Mpo na nini ye oyo amikɔtisi kati na emekaneli mpo na bomoi asengeli komipekisa ntango nyonso?
14 Yesu Klisto alobaki epai na bayekoli na ye mpe na bato mosusu, ete: “Soko nani alingi koya nsima na ngai, tika ete amiboya ye moko (to “atika koluka makambo ma yé moko,” Liloba lya Nzambe) mpe amema nzeté na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso.” (Malako 8:34, MN) Soki tondimi libyangami wana, tosengeli komibongisa mpo na kosala yango “ntango nyonso”; ezali te mpo ete tokozwa libonza lileki monene na ntina na komiboya, kasi ezali mpo ete libunga oyo lisalemi na ntango oyo tozangaki bososoli, ekoki kokweisa makambo nyonso, mpe kobebisa bolamu na biso ya seko. Bokóli ya elimo eyaka malɛmbɛmalɛmbɛ, kasi esilaka nokinoki soki nde tozangi komisɛnzela ntango nyonso.
15 Epai mosusu, Paulo alendisi biso na komipekisa “na makambo nyonso,” elingi koloba ete tosengeli kosalela yango kati na makambo nyonso ya bomoi na biso mpenza. Yango esengeli mpenza kozala bongo, mpamba te, soki mopoti mbango amipesi na kolya mpe na komela mingi to soki azali na etamboli ya mbindo, akozwa litomba nini na nyonso oyo azali komimeka mpe na mpasi nyonso azali koyikela yango mpiko? Bobele bongo na emekaneli na biso mpo na bomoi: tosengeli komipekisa na makambo nyonso. Moto akoki komipekisa na makambo lokola molangwa mpe pité, nde akobebisa milende na ye na kozaláká moto na lolendo mpe na elimo ya kowelana. To akoki kozala na motema molai mpe na boboto epai na bato mosusu, kasi asili kobomba lisumu kati na bomoi na ye. Mpo ete komipekisa epesa bolamu mingi, esengeli kosalelama “na makambo nyonso.”—Tala Yakobo 2:10, 11.
Topota “mpamba te”
16. Kopota “mpamba te” elimboli nini?
16 Wana asosolaki ete kolónga na emekaneli mpo na bomoi esɛngi milende makasi, Paulo akobaki koloba ete: “Mpo na ngai mpenza, nazali kopota mpamba te, nazali kobunda na bibotu nde bobele kobɛta mopepe te.” (1 Bakolinti 9:26) Liloba “mpamba” elimboli “kozanga mokano ya sikisiki”; “na polele te” (Kingdom Interlinear), “kozanga komonana, kozanga elembo” (Lange’s Commentary). Na yango, soki moto azali kopota “mpamba te,” batali nyonso bakomona epai wapi azali kokende. Biblia The Anchor Bible ebongoli mokapo yango ete: “Nazali kopota nyokanyoka te.” Soki omoni matambé ya moto na zɛlɔ kokenda epai kozonga epai, mbala mosusu kozonga nsima, okokanisa te ete ye oyo alekaki wana azalaki kopota mbango, mpe okokanisa soko moke te ete ayebaki epai azalaki kokenda. Kasi soki omoni matambé malandami na molongó sembaa, moko liboso na mosusu mpe ntaká ekokani, okosukisa ete matambé wana ezali ya moto oyo ayebaki mpenza esika azalaki kokenda.
17. (a) Lolenge nini Paulo amonisaki ete azalaki kopota “mpamba te”? (b) Lolenge nini tokoki komekola Paulo kati na likambo yango?
17 Bomoi ya Paulo emonisi polele ete azalaki kopota “mpamba te.” Apesaki bilembeteli mingi mpo na komonisa ete azalaki ministre moklisto mpe ntomá. Azalaki bobele na mokano moko, mpe abundaki na makasi na boumeli ya bomoi na ye mobimba mpo na kokokisa yango. Amitikaki kopɛngwisama te na lokumu, na nguya, na bozwi to na bolamu, nzokande akokaki mbala mosusu kozwa biloko wana. (Misala 20:24; 1 Bakolinti 9:2; 2 Bakolinti 3:2, 3; Bafilipi 3:8, 13, 14) Soki otaleli bomoi na yo na ntango eleki, lolenge na matambé nini mamonani liboso na yo? Ezali na molongó na sembaa molandi nzela moko ya sikisiki, to mpe molongó oyo mozali koyengayenga? Emonani mpenza ete ozali kobunda na emekaneli mpo na bomoi? Tomikundola ete, soki tosangani na emekaneli oyo, ezali mpo na kolanda mpamba te, kasi mpo na kokóma na nsuka.
18. (a) Mpo na biso, likambo nini likozala lokoka ‘kobɛta mopepe’? (b) Mpo na nini kosala bongo ezali likámá?
18 Kokokanisáká yango na momekano mosusu, Paulo alobi lisusu ete: “Nazali kobunda na bibɛtu nde bobele kobɛta mopepe te.” (1 Bakolinti 9:26b) Kati na etumba na biso mpo na bomoi, tozali na banguna mingi, kati na bango: Satana, mokili, mpe ezaleli na biso ya kozanga kokoka. Lokola mobundi na bibɛtu na ntango na kala, biso mpe tosengeli kolónga bango na kobɛtáká bibɛtu na bisika bisengeli. Likambo ya esengo mpenza, Jéhovah Nzambe azali koyekolisa biso mpe azali kosalisa biso kati na etumba yango. Azali kopesa biso malako na nzela na Liloba na ye, na mikanda mikolimbolaka Biblia mpe na makita na boklisto. Nzokande, soko tozali kotanga Biblia mpe mikanda mikolimbolaka Biblia mpe soki tokendaka na makita, nde tozali kosalela te makambo oyo mazali biso koyekola, milende na biso mizali bobele mpamba, lokola nde tozalaki ‘kobɛta mopepe,’ boye te? Na bongo, tozali komitya kati na likámá monene. Tokanisi ete tozali kobunda mpe bozali bongo na mayoki ya kimya ya lokutá, nzokande tolongi banguna na biso te. Tala mpo na nini moyekoli Yakobo apesaki likebisi oyo ete: “Bozala bato bakotosaka liloba, kasi bayoki mpamba te, komizimbisáká bino mpenza na makanisi na lokutá.” Lokola tokoki te kolónga banguna na ‘kobɛta mopepe,’ bobele bongo, kozala bobele ‘bayoki mpamba,’ ezali ndanga te ete tokosala mokano na Nzambe.—Yakobo 1:22, MN; 1 Samwele 15:22; Matai 7:24, 25.
19. Tokoki kosala nini mpo ete toboyama te, na lolenge moko to mosusu?
19 Na nsuka, Paulo ayebisi biso mayele na ye mpo na kozwa elónga: “Nazali kotuta nzoto na ngai bibɛtu mpe nazali komema yango lokola moombo, ete naboyama te, na lolenge moko to mosusu, awa esili ngai kosakwela bato mosusu.” (1 Bakolinti 9:27, MN) Lokola Paulo, tosengeli kozala bankolo ya nzoto na biso ezangi kokoka na esika na kotika yango ete eyangela biso. Tosengeli kolongola makanisi mabe, bilulela mpe bamposa na nzoto. (Baloma 8:5-8; Yakobo 1:14, 15) Yango ekoki kozala mpasi, mpamba te liloba libongolami na ‘kotuta bibɛtu’ elimboli mpenza ‘kobɛta na nsé na liso’ (Kingdom Interlinear). Atako bongo, eleki malamu ete ovimba ata na liso mpe ozwa bomoi, na esika ya komitika na bamposa na nzoto, mpe kozanga bomoi, boye te?—Tala Matai 5:28, 29; 18:9; 1 Yoane 2:15-17.
20. Mpo na nini ezali likambo ya lombango sikawa ete totalela lolenge oyo tozali kopota kati emekaneli mpo na bomoi?
20 Lelo oyo, tokómi pene na nsuka ya emekaneli. Mosika te, mabonza makopesama. Mpo na baklisto bapakolami, ezali bongo “libyangi na Nzambe kuna na likoló, kati na Klisto Yesu.” (Bafilipi 3:14, MN) Mpo na ebele monene, ezali bomoi ya seko na paradis awa na mabelé. Na kotalela libonza wana monene, tosengeli kozwa ekateli lokola Paulo, ete ‘toboyama te, na lolenge moko to mosusu.’ Tika ete biso nyonso tosimba toli oyo, ete: “Bopota mbango mpo na kozwa yango.”—1 Bakolinti 9:24, 27, MN.
Bozongeli
◻ Mpo na nini ebongi mpenza kokokanisa bomoi ya moklisto na emekaneli na mbango?
◻ Likambo nini likesenisi emekaneli mpo na bomoi mpe emekaneli na mbango na makolo?
◻ Mpo na nini tosengeli komipekisa ntango nyonso mpe “kati na makambo nyonso”?
◻ Lolenge nini tokoki kopota “mpamba te”?
◻ Mpo na nini ezali likámá na kobunda lokola moto oyo azali bobele ‘kobɛta mopepe’?
[Picture on page 16]
Motindo moko na nkembo mpe lokumu, motolé ya molóngi mokobebaka