Libala ezali nzela bobele moko ya kozwa bolamu?
“Akoki kobalana na oyo ye alingi, nde bobele kati na Nkolo. . . . mbɛlɛ akozala na esengo mingi soki nde akotikala lokola ezali ye.”—1 BAKOLINTI 7:39, 40, MN.
1. Lolenge nini Makomami mazali kolakisa Jéhovah, mpe asili kosala nini mpo na bikelamu na ye?
JÉHOVAH azali “Nzambe ya esengo.” (1 Timote 1:11) Lokola azali Ye oyo akopesaka “makabo nyonso kitoko mpe yango nyonso na malamu” na bokabi nyonso, azali kopesa yango esengeli mpenza na bikelamu na ye nyonso ya mayele—bato mpe bilimu—ete bazala na esengo na mosala na ye. (Yakobo 1:17, MN) Koyemba na ndeke, kongánga ya mwana na mbwa to kopumbwapumbwa ya mbisi monene dauphin, ezali makambo kitoko mamonisi ete Jéhovah azalisaki banyama na motindo boye ete basepelaka na kobika kati na bisika oyo bazali; boye te? Nkutu mokomi na nzembo ayebisi na maloba kitoko ete: “Banzeté na Jéhovah etondi na esengo, yango elɛzɛ na Libana oyo ye akonaki.”—Nzembo 104:16, MN.
2. (a) Nini emonisi ete Yesu azali na esengo ya kosala mokano ya Tata na ye? (b) Bantina nini oyo bayekoli na Yesu bazalaki na yango mpo na kozala na esengo?
2 Yesu Klisto azali ‘elilingi na bomoto na Nzambe mpenza.’ (Baebele 1:3, MN) Ezali bongo likambo ya kokamwa te wana abengami ete “Moyangeli monene bobele moko ya esengo.” (1 Timote 6:15, MN) Apesi biso ndakisa eleki kitoko mpo na komonisa ete kokokisa mokano na Jéhovah ekoki kosepelisa koleka bilei; ete yango ezali nsai ya solo. Yesu amonisi biso lisusu ete tokoki kozwa bosepeli na kobanga Nzambe, elingi koloba na limemya mozindo mpe nsɔmɔ ya kozanga kosepelisa Ye. (Nzembo 40:8; Yisaya 11:3; Yoane 4:34) Na ntango bayekoli 70 bazongaki na “esengo” wana bautaki na mobembo ya kosakola Bokonzi na Nzambe, Yesu ye moko “atondaki na esengo kati na elimo santu.” Nsima na komonisa esengo na ye epai na Tata na ye kati na libondeli, Yesu abongwani epai na bayekoli mpe alobi na bango, ete: “Esengo na miso mamoni makambo oyo mazali bino komona! Mpamba te, nalobi na bino ete, basakoli mpe bakonzi mingi bazalaki na mposa na komona makambo oyo mazali bino komona, kasi bamonaki yango te, mpe bazalaki na mposa na koyoka yango ezali bino koyoka, nde bayokaki yango te.”—Luka 10:17-24, MN.
Bantina ya kozala na esengo
3. Wapi bantina mosusu mpo na yango tozali na esengo?
3 Bongo biso, tosengeli te kozala na esengo ya komona makambo oyo mazali biso komona, makambo mingi oyo mazali kokokisa Liloba na Jéhovah mpe mikano na ye na ntango oyo ya nsuka? Tosengeli te kotonda na esengo, biso baoyo tozali kokanga ntina ya bisakweli oyo bisosolamaki te na basakoli mpe na bakonzi na sembo lokola Yisaya, Danyele mpe Davidi? Tozali kosepela te na kosalela Jéhovah, Nzambe ya esengo, na nsé na litambwisi ya Moyangeli monene, Yesu Klisto, Mokonzi na biso? Ezali bongo mpenza!
4, 5. (a) Nini tosengeli kosala te, soki nde tolingi kozala ntango nyonso na esengo kati na mosala ya Jéhovah? (b) Likambo mosusu nini likopesaka bolamu, mpe yango ezali kobimisa motuna nini?
4 Nzokande, soki tolingi kozala ntango nyonso na esengo na mosala na Nzambe, tosengeli te kolanda makanisi ya mokili mpo na koyeba biloko bisengeli kopesa bolamu. Makanisi ya mokili makoki mpenza kozimbisa makanisi na biso, mpamba te, mpo na mokili, bozwi ya mosuni, motindo na bomoi ya lolendo mpe makambo mosusu ya lolenge yango, ezali na ntina mingi mpo na kozwa bolamu. “Bolamu” nyonso botongami likoló na moboko motindo oyo, ekozala mpo na ntango mokuse, mpamba te mokili mozali koleka.—1 Yoane 2:15-17.
5 Basaleli mingi na Jéhovah bayebi ete bolamu ya solo bozali kozwama te na kokokisáká mikano ya mokili. Bobele Tata na biso ya likoló nde azali kopesa biloko ya elimo mpe ya mosuni oyo ekopesaka bolamu ya solo epai na basaleli na ye. Tozali mpenza kotɔnda ye mpo na bilei ya elimo oyo azali kopesa biso na nzela ya “moombo na sembo mpe na mayele.” (Matai 24:45-47) Tozali mpe na botɔndi mingi mpo na bilei ya mosuni mpe biloko mosusu ya mosuni oyo tozali kozwa longwa na lobɔkɔ ya Nzambe na biso ya bolingo. Eloko mosusu ezali bongo libala, likabo kitoko, mpe bisengo bizwami kati na bomoi ya libota. Ezali likambo ya kokamwa te ete Naomi atómbelaki maloba oyo na sembo epai na basi ya bana na ye, baoyo bakómaki basi bakufeli mibali, ete: “Tika ete Jéhovah apesa bino likabo, mpe tika ete moto na moto azwa esika na kopema kati na ndako ya mobali na ye!” (Luta 1:9, MN) Na bongo, libala ezali nzela oyo ekoki kopesa bolamu mingi. Kasi yango nde ezali nzela bobele moko ya kozala na bomoi ya esengo? Mingimingi, bilenge basengeli kotalela motuna oyo malamu mpo na koyeba soki ezali bongo.
6. Engebene Genese, wapi mokano ya liboso mpo na yango libala lisalemaki?
6 Koyebisáká ebandeli ya libala, Biblia elobi ete: “Bongo Nzambe azalisaki moto na elilingi na ye mpenza, na elilingi na Nzambe azalisaki ye; azalisaki bango mobali mpe mwasi. Mpe Nzambe apambolaki bango, mpe Nzambe alobaki na bango ete: ‘Bobotaka mpe bozala na kobota mingi, mpe botóndisa mokili, mpe botya yango na nsé na bino.’” (Genese 1:27, 28) Na nzela na libala oyo Jéhovah abandisaki, Adam asalelamaki mpo na koyeisa bato mosusu na bomoi, likambo oyo lisalaki ete bato bakóma mingi. Kasi libala esɛngi makambo mingi.
“Bobele kati na Nkolo”
7. Lisɛngami nini litali libula oyo tata moko na libota na sembo asalaki makasi mpo na kotósa yango?
7 Lokola Jéhovah Nzambe azali Mobandisi na libala, tokoki mpenza komizela ete apesa malako na ebongiseli wana mpo na bolamu ya basaleli na ye. Na eleko ya batata na mabota, lilako lipesamaki ete babalana te na bato oyo bazalaki kosambela Jéhovah te. Abalayama asɛngaki na Eliesele, mosali na ye ete akata ndai mpo ete akamata mwasi te kati na Bakanana, mpo na Yisaka, mwana na ye. Eliesele asalaki mobémbo molai mpe abandaki mpenza malako ya Abalayama mpo na kozwa ‘mwasi oyo Jéhovah aponelaki mwana na nkolo na ye.’ (Genese 24:3, 44) Bongo nde Yisaka abalaki Rebeka. Na ntango Esau, mwana na bango aponaki basi kati na Bahiti, bango bapakano, basi yango “bazalaki ntina na mitungisi mpo na Yisaka mpe mpo na Rebeka.”—Genese 26:34, 35, MN; 27:46; 28:1, 8.
8. Epekiseli nini epesamaki na kondimana na Mibeko mpo na libala, mpe mpo na ntina nini?
8 Na nsé na kondimana na Mibeko, epekisamaki kobalana na mibali to na basi ya bikólo mosusu ya Kanana. Jéhovah apesaki etinda oyo epai na libota na ye ete: “Okobalana na bango te. Okopesa mwana mwasi na yo epai na mwana mobali na bango te mpe okokamata mwana mwasi na bango mpo na mwana mobali na yo te. Mpo ete bakopɛngola mwana mobali na yo longwa na ngai, mpe bakosalela banzambe mosusu; mpe nkanda na Jéhovah ekongalela bino mpe akoboma bino noki.”—Deteronome 7:3, 4, MN.
9. Biblia epesi toli nini epai na baklisto na ntina etali libala?
9 Ezali bongo likambo ya kokamwa te ete libala elongo na bato oyo basambelaka Jéhovah te liboyami mpe kati na lisangá ya boklisto. Ntóma Paulo apesaki toli oyo epai na baninga na ye kati na kondima, ete: “Bokangana na ekanganeli mabe te elongo na bato bazangi kondima. Mpamba te, kokokana nini ezali kati na boyengebene mpe kotyola mibeko? To mpe bosangani nini bozali kati na pole mpe molili? Lisusu, boyokani nini bozali kati na Klisto mpe Beliala? To mpe likabo nini mosembwi azali na yango elongo na moto azangi kondima?” (2 Bakolinti 6:14, 15) Toli oyo ezali kosalelama kati na makambo makeseni, mpe etaleli mpenza libala. Lilako ya polele oyo Paulo apesi yango epai na basaleli nyonso na Jéhovah, ezali oyo ete basengeli kokanisa kobalana na moto “bobele soko [moto] yango azali kati na Nkolo.”—1 Bakolinti 7:39, Traduction du monde nouveau, ebimeli ya Lingelesi esalemi na mitindami, note.
Wana likoki lizwami te mpo na kobala “kati na Nkolo”
10. Ntalo monene na minzemba baklisto bazali kosala nini, mpe motuna nini mutunami?
10 Ntalo monene na baklisto minzemba basili kozwa ekateli ya kolanda ndakisa na Yesu Klisto na kolónáká likabo ya kotikala monzemba. Epai mosusu, lokola bazwi naino te mobalani oyo azali kobanga Nzambe, elingi koloba kobala “kati na Nkolo,” baklisto mingi na sembo bazali kotya motema na bango epai na Jéhovah mpe bazali kotikala minzemba na esika na kobalana na bato bazangi kondima. Kati na mitema na bango, elimo na Nzambe ezali kobota mbuma lokola esengo, kimya, kondima mpe komipekisa, likambo oyo lizali kosalisa bango na kotikala minzemba na pɛtɔ. (Bagalatia 5:22, 23) Bandeko na biso ya basi, baoyo tozali na bolingo mingi epai na bango, bazali kati na ebele na bato oyo bazali koyika mpiko na momekamo yango. Kati na mikili mingi, bazali ebele koleka bandeko mibali, mpe bazali bongo kokokisa eteni eleki monene kati na mosala ya kosakola. “Jéhovah ye moko alobi, basi oyo bapalanganisi nsango malamu bazali mingi.” (Nzembo 68:11) Ya solo, ntalo monene ya basaleli na Nzambe, mibali mpe basi oyo bazali minzemba, batikali sembo mpo ete ‘batii elikya na bango epai na Jéhovah na motema na bango mobimba, mpe ye azali kosembola banzela na bango.’ (Masese 3:5, 6) Kasi baoyo bakoki te kobala sikawa “kati na Nkolo,” bakozala mpenza na mawa?
11. Baklisto oyo batikali minzemba mpo na kotósa malako ya Biblia bakoki kondimisama na likambo nini?
11 Tobosana te ete tozali Batemwe ya Jéhovah, Nzambe ya esengo oyo tozali kosalela ye na nsé na litambwisi ya esengo na Yesu Klisto, Moyangeli monene na esengo. Bongo, soki botósi na biso na mitinda mimonisami polele kati na Biblia epusi biso ete totikala minzemba mpo ete tozali kozwa mobalani te “kati na Nkolo,” ebongi kokanisa ete Jéhovah mpe Klisto bakotika biso ete tozala na mawa? Soko moke te. Tosengeli bongo kosukisa ete, baklisto bazali na likoki ya kozala na esengo ata soki babali te. Jéhovah akoki mpenza kopesa biso esengo, tozala babalani to minzemba.
Nzela ya kozwa bolamu ya solo
12. Likambo ya baanzelu bazangaki botósi elakisi nini na ntina etali libala?
12 Mpo na basaleli nyonso na Nzambe, libala ezali nzela bobele moko te ya kozwa bolamu. Na ndakisa, tolobela baanzelu. Liboso na mpela, baanzelu balónaki mposa ya kosangisa nzoto na basi, likambo oyo libongi te mpo na bikelamu ya elimo; basepelaki te ete bazanga kobala, na bongo balataki nzoto ya mosuni mpo na kobala basi. Mpo ete “baanzelu wana babatelaki lolenge na bango te,” Nzambe “asili kotya bango kati na bikangeli ya seko, na molili tuu, mpo na kosambisama na mokolo monene.” (Yuda 6, MN; Genese 6:1, 2) Nzambe akanaki te ete baanzelu babala. Mpo na bango, libala ekoki soko moke te kozala nzela ya kozwa bolamu.
13. Mpo na nini baanzelu basantu bazali na esengo, mpe yango emonisi nini mpo ma basaleli nyonso ya Nzambe?
13 Nzokande, baanzelu na sembo bazali na esengo. Jéhovah atyaki miboko ya mabelé wana “minzoto minso miyembaki lisanga mpe bana banso ba Nzambe [baanzelu] bazalaki kosepela.” (Job 38:7, Liloba lya Nzambe) Mpo na nini baanzelu basantu bazali na esengoɛɔ Mpo ete bazali kosalela Jéhovah Nzambe na molende “na koyokáká mongongo ya liloba na ye” mpo na kokokisa yango. Bazali kosepela na “kosala mokano na ye.” (Nzembo 103:20, 21, Traduction du monde nouveau, ebimeli ya Lingelesi esalemi na mitindami, note.) Ya solo, soki baanzelu bazali na esengo, ezali mpo ete bazali kosalela Jéhovah na bosembo nyonso. Wana ezali mpe nzela ya kozwa bolamu ya solo mpo na bato. Epai mosusu, baklisto bapakolami basili kobala, baoyo bazali lelo na esengo ya kosalela Nzambe, bakobala te wana bakosekwa mpo na bomoi ya likoló, kasi bakozwa bolamu ya kozala bikelamu ya elimo oyo bikosala mokano na Nzambe. Bazala babalani to mpe minzemba, basaleli na sembo nyonso ya Jéhovah bakoki kozala na esengo, mpamba te bolamu ya solo bokoutaka na mosala ya sembo ya Mozalisi.
“Eloko eleki bana mibali mpe bana basi na malamu”
14. Elaká ya esakweli nini epesamaki na mikube na Yisraele na kala oyo bazalaki kobanga Nzambe, mpe mpo na nini elaká yango ekokaki kokamwisa?
14 Ata soko moklisto ya sembo abali te, Nzambe akoki koyeisa ye moto na esengo. Akoki kozwa elendiseli kati na maloba oyo Jéhovah ayebisaki epai na mikube na Yisraele na kala, kati na esakweli: “Mpo ete, tala maloba na Jéhovah epai na mikube oyo bakotósaka sabata na ngai, baoyo baponi makambo makosepelisaka ngai, mpe babateli kondimana na ngai, ete: ‘Kati na ndako na ngai mpe kati na mapango na ngai, nakopesa bango elembo ya kokanisama mpe nakopesa bango nkombo, eloko eleki bana mibali mpe bana basi na malamu. Nakopesa bango nkombo mpo na libela, nkombo oyo ekolongolama te.’” (Yisaya 56:4, 5, MN). Mbɛlɛ bakokaki komizela ete alaka bango basi mpe bana mpo ete nkombo na bango etikala libela. Kasi alaki bango nde “eloko eleki bana mibali mpe bana basi na malamu”: nkombo oyo ekoumela kati na ndako na Jéhovah.
15. Tokoki koloba nini na ntina na kokokana na Yisaya 56:4, 5?
15 Soki tomoni kati na mikube yango elilingi ya esakweli elobeli “Yisraele ya Nzambe,” boye bamonisi baklisto bapakolami oyo bazwi esika ekoumela kati na ndako to na tempelo ya elimo ya Jéhovah. (Bagalatia 6:16) Na ntembe te, esakweli oyo ekokokana mpenza motindo oyo yango eyebisami epai na mikube na Yisraele na kala oyo bazalaki kobanga Nzambe, baoyo bakosekwa. Soki ntango nyonso bakondima mbeka na lisiko na Klisto mpe soki bakolanda kopona kosala makambo makosepelisaka Jéhovah, bakozwa “nkombo mpo na libela” kati na mokili ya sika molakami na Nzambe. Esakweli yango ekoki mpe kokokana epai na “bampate mosusu” oyo baboyi kobala mpe kozwa bana na eleko oyo ya nsuka, mpo na komipesa mingi kati na mosala na Jéhovah. (Yoane 10:16) Basusu kati na bango bazali ntango mosusu kokufa minzemba to kozanga bana. Kasi soki bazali sembo, na lisekwa, bakozwa “eloko eleki bana mibali mpe bana basi na malamu”: nkombo oyo “ekolongolama te” kati na ebongiseli ya mokili ya sika.
Libala ezali nzela bobele moko te mpo na kozwa bolamu
16. Mpo na nini tokoki koloba ete libala likopesaka ntango nyonso bolamu te?
16 Bato mosusu bakanisi ete bolamu bokozwamaka bobele na libala. Kasi, tosengeli koyeba ete ata kati na basaleli ya Jéhovah ya ntango na biso, libala ezali ntango nyonso kopesa bolamu te. Libala ekosilisaka mikakatano mosusu, kasi ezali mpe kobimisa mikakatano mosusu oyo ekoki kozala mpasi mingi mpo na kolónga yango koleka oyo minzemba bazali na yango. Paulo alobaki ete libala ekomamaka ‘bolózi kati na nzoto.’ (1 Bakolinti 7:28) Ekoki kokóma ete mobalani azala na ‘mitungisi’ mpe azala na ‘makanisi mingi.’ Mbala na mbala, azali na nkaká mpo na kokokisa “mosala ya etingya mpo na Nkolo, kozanga kopɛngola makanisi.”—1 Bakolinti 7:33-35, MN.
17, 18. (a) Bakɛngɛli ya zongazonga bayebisi likambo nini? (b) Paulo apesi toli nini, mpe mpo na nini ezali ntina mpo na kolanda yango?
17 Ezala kotikala monzemba to libala, nyonso ezali makabo ya Nzambe. (Luta 1:9; Matai 19:10-12) Kasi mpo na kolónga kati na moko to na mosusu, esengeli mpenza kososola yango kati na libondeli. Bakɛngɛli ya zongazonga bayebisi ete Batemwe mingi bazali kobala na bolenge mpenza, mpe mbala mingi bakobotaka bana liboso nkutu ete bamilengela mpo na komema mikumba mikouta na yango. Bamoko kati na babalani yango bakobomaka mabala na bango. Basusu bazali kolónga kobundisa mikakatano na bango, kasi mabala na bango mazali kopesa bango bolamu te. Lokola oyo mokomi William Congreve, moto ya Angleterre akomaki ete, baoyo bazali kobala nokinoki, “bakoki kozala na mawa na boumeli ya bomoi na bango mobimba.”
18 Bakɛngɛli ya circonscription bayebisi lisusu ete bilenge bandeko mibali mosusu bazali kokakatana mpo na kotondisa demande ya kokɔta na Béthel to mpo na kondima kolanda mateya na Ecole de formation ministérielle mpamba te, yango esɛngi kotikala monzemba mpo na mwa ntango. Nzokande, ntóma Paulo apesi toli ete ebongi kobala te liboso na ‘kokomela’ to na elobeli mosusu, kozela ete mposa makasi ya ebandeli mpo na kosangisa nzoto, ekita. (1 Bakolinti 7:36-38, MN) Bambula ya bonzemba elekisami na moto oyo akóli, ezali kopesa ye nzela na kozala na mayele mpe na bososoli kitoko mpenza oyo ekosalisa ye soko na kopona mobalani, soko mpe kozwa ekateli ya kotikala monzemba, nsima na kokanisa malamu.
19. Lolenge nini tokoki komonela makambo soki tozali mpenza na mposa ya kobala te?
19 Basusu kati na biso basili kolekisa mibu oyo mposa ya kosangisa nzoto ezalaka makasi. Ntango mosusu tokanisaka na bisengo ya libala, nzokande tozali mpenza na likabo ya kotikala monzemba. Mbala mosusu Jéhovah amoni ete tozali kosalela ye na molende nyonso awa ezali biso minzemba, mpe ete tozali mpenza na mposa ya kobala te, likambo oyo likoki kosɛngisa biso ete totika mikumba na biso mosusu kati na mosala na ye. Soki libala ezali mpenza mposa te na biso, mpe tomipimeli esengo ya kozala na mobalani, mbala mosusu Nzambe abómbeli biso eloko mosusu. Tozala bongo na kondima ete akopesa biso biloko oyo bisengeli na biso. Tozali mpenza komizwila bolamu boleki monene na kondimáká yango emonani lokola mokano na Nzambe epai na biso na komikitisa nyonso, na ndakisa ya baklisto Bayuda oyo ‘bandimaki na motema moko mpe bakumisaki Nzambe’ wana basosolaki ete Nzambe andimaki ete Bapakano babongola motema mpo ete bakoka kozwa bomoi.—Misala 11:1-18, MN.
20. (a) Toli nini epesami na bilenge baklisto na ntina etali bonzemba? (b) Wapi likambo ya ntina mingi litali bolamu?
20 Na yango libala ekoki kozala nzela ya kozwa bolamu, kasi ekoki mpe kozala nzela ya kozwa mikakatano. Likambo oyo lizali mpenza solo: Libala ezali nzela bobele moko te oyo ekopesaka bolamu. Na yango, ekozala likambo ya mayele ete bilenge baklisto basala makasi na kolekisa bambula mingi na kotikala minzemba. Likoki ezali ya kosalela malamu bambula motindo wana kati na mosala ya Jéhovah mpe kokóla na elimo. Nzokande, likambo oyo ya ntina mingi lizali solo mpo na baoyo nyonso basili mpenza komipesa epai na Jéhovah, ata mbula na bango ezali nini to mpe bokóli na bango ezali nini kati na elimo: ezali na kosaleláká Jéhovah na bosembo nyonso nde tokoki kozwa bolamu ya solo.
Bozongeli
◻ Mpo na nini basaleli na Jéhovah bazali na esengo?
◻ Mpo na nini libala ezali te nzela ya kozwa bolamu boleki monene?
◻ Nini esɛngisami na basaleli na Jéhovah mpo na oyo etali kopona mobalani?
◻ Mpo na nini ebongi mpenza kokanisa ete baklisto oyo batikali minzemba bakoki kozala na esengo?
◻ Esengeli koyeba likambo nini na ntina na libala mpe bolamu?