Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/4 lok. 31
  • Lisungi mpo na ba comités ya Collège central

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisungi mpo na ba comités ya Collège central
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lisungi mpo na ba comités ya Collège central
  • Tosala na bomoko elongo na college central
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Ndenge oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongisami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • “Bapesami”: ebongiseli ya Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Nani azali kokamba basaleli ya Nzambe lelo oyo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/4 lok. 31

Liyebisi

Lisungi mpo na ba comités ya Collège central

Basangani ya Collège central ya ba Témoins de Jéhovah, baoyo bazali lelo na motuya ya 12, bazali kolanda kokokisa mikumba na bango na bosembo nyonso. Bazali kotɔndo basangani ya “ebele monene” oyo ezali sé kokola mpo na lisungi na bango ya molende. (Emoniseli 7:9, 15) Na ntina na bokóli monene oyo bozali komonana na mokili mobimba, emonani ete ebongi lelo kopesa lisungi na Collège central. Mpo na yango, ekateli ezwamaki ete babyanga basungi mosusu, mingi kati na bango bazali basangani ya ebele monene, mpo na koyangana na makita ya comité moko na moko ya Collège central: Comité du personnel, Comité d’édition, Comité pour le service, Comité de l’enseignement mpe Comité de rédaction. Na yango, motuya ya baoyo bakoyangana na makita ya moko na moko na ba comités wana, ekozala bato nsambo soko mwambe. Na litambwisi ya basangani ya Collège central, bayangani wana bakosangana na masoló mpe bakokokisa mikumba ndenge na ndenge oyo mikopesamela bango na ba comités. Ebongiseli oyo ya sika ekobanda na mokolo ya 1er mai 1992.

Uta bambula mingi, motuya ya Batemwe batikali bapakolami mozali sé kokita, nzokande ebele monene ezali sé kokóla koleka oyo tokanisaki. (Yisaya 60:22) Tozali mpenza kotɔndo Jéhovah mpo na bokóli oyo monene. Na ntango nkombo ya sika, Témoins de Jéhovah, endimamaki na botɔndi nyonso na mobu 1981, motuya nyonso ya basakoli na Bokonzi ezalaki 39 372, mpe mingi kati na bango bamitangaki bandeko na Klisto baoyo bapakolami. (Yisaya 43:10-12; Baebele 2:11) Mibu ntuku motoba na nsima, na 1991, motuya na basakoli nyonso na mokili mobimba ezalaki 4 278 820, kati na bango bobele 8 850 nde bamitangaki bapakolami. Lokola Makomami mamonisaki yango, “ebele monene” eleki motuya ya batikali na “etonga moke” na bokokanisi ya bato koleka 480 [na ebele monene] mpo na moto moko [etonga moke]. (Luka 12:32; Emoniseli 7:4-9) Batikali bazali mpenza na mposa ya lisungi mpe ya kosalana elongo na ebele monene mpo na kotalela bokóli ya matomba ya Bokonzi, mpe mpo na yango, bazali kotɔndo ebele monene.

Lokola nimero ya Mosenzeli oyo elimboli yango, ezali na etuluku ya bato oyo bazali kosala lelo elongo na Yisraele ya elimo, etuluku oyo ekoki kokokisama na Banetinime mpe na bana na basali na Salomo, baoyo babimaki na boombo elongo na Bayuda longwa na Babilone; bato wana bazalaki Bayisraele te, bazalaki mingi mpenza koleka Balevi oyo bazongaki. (Esdrase 2:40-58; 8:15-20) “Bapesami” oyo bazali kati na ebele monene na eleko na biso, bazali baklisto batɛli baoyo basili koumela mingi na mikumba na bango ya kokɛngɛla na ba filiales, na mosala ya zongazonga mpe na masangá 66 000 oyo mazali lelo na mokili mobimba.

Kala mingi te, Eteyelo ya mosala ya Bokonzi esalemaki kati mokili mobimba mpo na kobongisa bakɛngɛli mpe basaleli na misala oyo bazali kosunga bango. Bobele na Etats-Unis, bakɛngɛli 59 420 bayanganaki na eteyelo yango. “Bankulutu” wana babongisamaki mpo na kokokisa mikumba na bango malamu.​—1 Petelo 5:1-3; tala Baefese 4:8, 11.

Na biro monene ya ba Témoins de Jéhovah na Brooklyn, “bapesami” mosusu bazali kosala wana uta bambula mingi. Ezali bongo bakɛngɛli oyo batɛli, basangani ya ebele monene, baoyo basili kozwa mayele mingi mpe bameseni mingi na mosala yango. Collège central esili bongo kopona bamoko na bakɛngɛli wana ete bayangana na makita ya ba comités ya Collège central. Ezali bobele baoyo baumeli bambula mingi te. Ezali nde mibali oyo batɛli, bameseni na mosala, oyo mayele na bango mazali lisungi ya ntina mingi kati na misala ya sikisiki. Likambo oyo ete baponami mpo na kosala elongo na comité moko ezali kotombola etɛlɛmɛlo na bango te. Yesu alobaki na ntina na bayekoli na ye, ete: “Bino nyonso bozali bandeko.” (Matai 23:8) Atako bongo, mikumba mingi mikopesama na mibali wana mpe, na yango, “mingi ekosɛngisama” na bango.​—Luka 12:48, MN.

Tozali na esengo mingi na komona lolenge oyo lisangá ya Jéhovah lizali kokóla lelo. Na boumeli ya bambula zomi euti koleka, tozwaki pene na bokóli ya 100 % mpo na motuya ya basakoli, na boyokani na esakweli elobeli Yesu Klisto, Davidi Monene, ete: “Kofuluka na bokonzi na ye mpe na kimya ekosuka te.” (Yisaya 9:7) Lokola Banetinime basalaki elongo na banganga mpo na kobongisa bifélo ya Yelusaleme, esakweli oyo elobeli lisangá na Jéhovah ezali lelo kokokana motindo moko: “Bapaya bakotonga bifélo na yo.” (Yisaya 60:10; Nehemia 3:22, 26) Tokoki kokumisa Banetinime ya lelo oyo mpo na molende oyo bazali komonisa kati na kolendisama ya losambo ya pɛto na kosalisáká “banganga na Jéhovah,” ata mokumba nini ya mosala oyo mopesameli bango kati na lisangá ya Jéhovah na mokili mobimba.​—Yisaya 61:5, 6.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto