Bonsomi ya solo ekouta wapi?
“Ekoki na motamboli te ete atámbolisa makolo na ye. Ɛ Jéhovah, sembola ngai.”—YILIMIA 10:23, 24.
1, 2. Lolenge nini bato mingi bakotalelaka bonsomi, kasi likambo nini libongi mpe kotalelama?
NA NTEMBE te, opesaka motuya mingi na bonsomi ya solo. Olingi kozala na bonsomi ya komonisa makanisi na yo, ya kozwa ekateli mpo na esika osengeli kofanda mpe mpo na lolenge na bomoi na yo. Olingi kopona mosala na yo, bilei na yo, baninga na yo, miziki oyo olingi koyoka. Ozali na makambo mingi ya minene mpe ya mike oyo olingaka. Moto moko te oyo azali na bososoli malamu akolinga koyangelama na bakonzi mabe baoyo bakopesa ye bobele mwa bonsomi moke to mpe bonsomi oyo ye asepeli na yango te.
2 Nzokande, olingaka lisusu mokili epai bato mosusu mpe yo moko bokozala na bonsomi ya solo. Boye te? Mokili oyo bonsomi bokobatelama, mpo ete moto na moto akoka kozala na esengo mingi. Boye te? Mpe, soki yango ekokaki kosalema, mbɛlɛ okolinga te ete ozala na mokili epai kobanga ezali te, mabe mazali te, nzala te, mpasi te, kobebisama ya ezingelo te, maladi mpe bitumba ezali te? Na ntembe te, bato balingi mpenza bonsomi oyo.
3. Mpo na nini tokopesaka motuya mingi na bonsomi?
3 Mpo na nini biso bato tozali na mposa ya bonsomi motindo oyo? Biblia elobi ete: “Esika elimo na Jéhovah ezali, bonsomi ezali wana.” (2 Bakolinti 3:17, MN) Jéhovah azali bongo Nzambe ya bonsomi. Mpe lokola asalaki biso ‘na elilingi na ye mpe na lolenge na ye,’ asili kopesa biso lotómo ya kopona oyo biso moko tolingi ete tokoka kosepela na bonsomi mpe kozwa litomba na yango.—Genese 1:26.
Babebisaki bonsomi na bango
4, 5. Motindo nini bato basalelaki bonsomi na bango na lolenge mabe na boumeli ya Lisoló na bato?
4 Na boumeli ya Lisoló na bato, bamilió mingi na bato bakómaki baombo, banyokwamaki to mpe babomamaki mpo ete bato mosusu basalelaki bonsomi na bango na lolenge mabe. Ekokisi soko mibu 3 500, Biblia eyebisi ete “Baezipito bakɔtisaki bato na Yisraele na boombo makasi, mpe bazalisaki bomoi na bango mpasi mpo na misala makasi.” (Exode 1:13, 14) Totangi na mokanda L’Encyclopédie américaine ete na ekeke ya minei liboso ya ntango na biso, na engumba Atɛne mpe na bingumba mosusu mibale ya Greke, baombo bazalaki soko mbala minei koleka bato na bonsomi. Mokanda wana elobi lisusu ete: “Na Loma, na ebandeli, moombo azalaki uta na lotómo moko te. Akokaki kobomama ata mpo na libunga moke.” Mokanda mosusu (Compton’s Encyclopedia) moyebisi ete: “Na Loma, Leta etongamaki likoló na mosala ya baombo. . . . Baombo bakangisamaki minyolólo wana ezalaki bango kosala bilanga. Na butu, bakangisamaki esika moko mpe batyamaki kati na bandako minene ya bolɔ́kɔ na molili mingi.” Wana ezali biso kokanisa ete ntalo monene ya baombo wana ya ntango na kala bazwaki bonsomi, tokoki mpenza kokanga ntina ya mpasi ya bato yango oyo bomoi na bango ebebaki.
5 Na boumeli ya bikeke mingi, boklisto ya lokutá emipesaki na mombongo mabe ya kotɛka baombo. Engebene mokanda moko (The World Book Encyclopedia), “kobanda ekeke ya zomi na motoba kino ekeke ya zomi na libwa, mindele ya mikili ya Mpótó, bamemaki soko bamilio 10 ya baombo ya bato moïndo baoyo bautaki na Afrika.” Na ekeke ya ntuku mibale, bamilió ya bakangami bakufaki mpo na mosala makasi to mpe babomamaki kati na ba camps de concentration na etinda na boyangeli ya nazi. Kati na bato yango, ezalaki mpe na ebele ya ba Témoins de Jéhovah, baoyo bakangamaki mpo ete baboyaki kopesa lisungi na bango na boyangeli mabe ya nazi.
Batyami na boombo na mangomba ya lokutá
6. Na ntango na kala, lolenge nini lingomba ya lokutá lityaki bafandi ya Kanana boombo?
6 Ezali mpe na lolenge na boombo mosusu oyo etali bandimi na mangomba ya lokutá. Na ndakisa, na mokili ya Kanana ya kala, bato bazalaki kopesa bana na bango lokola mbeka epai na Moleke, nzambe ya lokutá. Eyebisami ete, ekeko monene esalemaki mpo na nzambe wana ya lokutá, mpe litumbo ya mɔ́tɔ lizalaki kati na yango. Bana oyo bazalaki na bomoi babwakamaki katikati na esika oyo ekeko wana etyamaki mpe bakweaki kati na mɔ́tɔ makasi. Ata Bayisraele mpe basalelaki losambo wana ya lokutá. Nzambe alobaki ete ‘batumbaki bana na bango mibali mpe bana na bango ya basi mpo na Moleke, likambo oyo Alakaki bango te, mpe kosala likambo wana mabe ezalaki ata na makanisi na Ye te.’ (Yilimia 32:35, MN) Bolamu nini Moleke apesaki epai na basambeli na ye? Nini ekómelaki mabota wana ya Kanana mpe losambo oyo lopesamaki epai na Moleke? Makambo wana nyonso mazali lisusu te. Ezalaki bongo losambo ya lokutá oyo etongamaki likoló na solo te, kasi likoló na lokutá.—Yisaya 60:12.
7. Mosala nini mabe mosalemaki kati na lingomba ya ba Aztèques?
7 Esili koleka bikeke mingi, na Amérique centrale, ba Aztèques (bafandi mosusu ya mboka Mexique) bazalaki baombo ya losambo ya lokutá. Bato mosusu bazalaki na banzambe na bango mpenza. Bazalaki kosambela banguya na biloko bizalisami; misala mingi ya mokolo na mokolo ekómaki lokola nzambe; banzeté ezalaki na banzambe na yango; ata nzambe ya komiboma mpe azalaki. Totangi kati na mokanda moko (The Ancient Sun Kingdoms of the Americas) ete: “Boyangeli ya ba Aztèques na mboka Mexique ebongisamaki malamu, longwa likoló kino na nsé, mpo na kosunga, mpe bongo kokitisa nkanda ya banguya ezangi komonana na kopesáká bango ebele na mitema ya bato. Makila mazalaki mai ya banzambe. Mpo na kozwa bakangami baoyo basengelaki kobomama mpo na banzambe, mbala na mbala ba Aztèques bazalaki kosala bitumba mike.” Na 1486, na bofungoli ya tempelo moko monene etongamaki na lolenge ya pyramide, nzoto ya ebele na bato oyo babomamaki “etandamaki na molongó wana basilaki kokatakata yango mpo etyama likoló na libanga ya mbeka. Balongolaki bango mitema, oyo bazalaki kotya mwa ntango moke na moi,” mpo na kokitisa nkanda ya nzambe moi. Mokanda moko (The World Book Encyclopedia) mobakisi ete: “Basambeli [ya banzambe wana] bazalaki mbala mosusu kolya biteni mosusu na nzoto ya bato oyo babomamaki.” Kasi, misala wana mibikisaki Bokonzi ya ba Aztèques te, ata mpe lingomba na bango ya lokutá.
8. Mokambi na bato oyo bakendaki kotala ndako na biloko na kala, alobaki nini na ntina na koboma monene ya ntango na biso oyo eleki mpenza koboma esalemaki epai na ba Aztèques?
8 Mokolo moko, bato bakendaki kotala ndako ya biloko na kala epai elilingi ya banganga-nkisi ba Aztèques, baoyo bazalaki kolongola motema ya elenge mobali moko. Na ntango mokambi alimbolaki likambo oyo limonisamaki na elilingi yango, bato mosusu oyo bazalaki wana baokaki mpasi mingi na motema. Mpe moto yango alobaki boye: “Namoni ete lolenge oyo ba Aztèques bazalaki kopesa bilenge lokola mbeka epai na banzambe na bango Bapakano, ezali mpenza kopesa bino motema mpasi. Nzokande, na ekeke ya ntuku mibale, bilenge mingi bakabamaki epai na nzambe ya bitumba. Yango nde ezalaki malamu?” Yango emonani na boye ete, na ntango na bitumba, bakonzi ya mangomba ya mboka moko na moko bakobondelaka mpo na elónga mpe bazali kopambola bibundeli, ata soko ezali bato ya lingomba moko nde bazali kobunda mpe kobomana.—1 Yoane 3:10-12; 4:8, 20, 21; 5:3.
9. Likambo nini lisili koboma bana mingi koleka makambo nyonso mosusu kati na Lisoló na bato?
9 Mbeka ya bilenge oyo epesamaki epai na Moleke, epai na banzambe ya ba Aztèques to na bitumba, ezali bobele moke soki nde tokokanisi yango na kosopa zemi oyo, mbula na mbula, ezali koboma soko bamilió ntuku minei to ntuku mitano ya bana kati na mokili mobimba. Motuya ya bazemi oyo esopamaki na boumeli ya bambula misato euti koleka, eleki bamilió monkámá ya bato oyo babomamaki na boumeli ya bitumba nyonso bisalemaki na ekeke ya ntuku mibale. Mbula na mbula, motuya ya bazemi oyo esopami ezali mingi mpenza koleka motuya ya bato oyo babomamaki na boyangeli ya nazi oyo eumelaki bambula 12! Na boumeli ya bambula zomi oyo euti koleka, motuya ya bana oyo babomamaki mpo na kosopa zemi, ezalaki bankɔto mingi koleka motuya ya bato oyo bapesamaki lokola mbeka epai na Moleke to epai na banzambe ya ba Aztèques! Nzokande, bato mingi (ntalo monene) oyo bazali kosopa zemi balobaka ete basambelaka.
10. Na lolenge nini mosusu oyo bato batyami na boombo na mangomba ya lokutá?
10 Mangomba mazali kotya bato na boombo ya lolenge mosusu. Na ndakisa, bato mingi bakanisaka ete bakufi bazali lisusu na bomoi na mokili ya bilimu. Endimeli wana ya lokutá ebimisi bobangi ya bankoko basilá kokufa, baoyo bato bazali kosambela na elikya ete bazwa bolamu. Na bongo, bato batyami na boombo ya bangangankisi, na banganga ya soloka mpe na bakonzi ya mangomba epai bato yango bakendaka na elikya ete bango bakoki kosalisa bato na bomoi na kokitisáká nkanda ya bakufi. Kasi tokoki kotuna motuna oyo ete: ezali na mwango moko mpo na komisikola na boombo yango?—Deteronome 18:10-12; Mosakoli 9:5, 10.
[Elilingi na lokasa 4, 5]
Na boumeli ya lisoló, mingi basalelaki na lolenge mabe, lotómo na bango ya kopona oyo balingi na kotyáká bato mosusu na boombo