Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/10 nk. 25-28
  • Kodefisana mbongo kati na baklisto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kodefisana mbongo kati na baklisto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Totalela motuya ya nyongo
  • ’Toloba solo’ na modefisi
  • Tosalela lilako lileki malamu kati na mombongo
  • Badefisi na mayele
  • Soki mombongo ekwei
  • Nasengeli kodefa mbongo epai ya ndeko moko ya lisangá?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Kodefa mpe kodefisa kati na baninga
    Lamuká!—1999
  • Nasengeli kodefa mbongo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/10 nk. 25-28

Kodefisana mbongo kati na baklisto

PEDRO mpe carlos bazalaki baninga malamu,a Bango mibale bazalaki baklisto, mpe mbala mingi mabota na bango mazalaki kolekisa ntango na kominanola elongo. Na yango, ntango carlos akomaki na mposa ya mosolo mpo na mombongo na ye, Pedro akakatanaki te na kopesa likanisi ya kodefisa ye mosolo. Pedro alobi ete: “Lokola tozalaki baninga malamu, namonaki mabe moko te na kodefisa ye mosolo.”

Nzokande, bobele na nsima ya sanza mibale, mombongo ya carlos eyaki kokweya, mpe atikaki kofuta nyongo. Na kokamwa mpenza, Pedro ayokaki ete carlos asalelaki ndambo monene ya mosolo oyo adefisaki ye na kofuta ba nyongo na ye moko mpe mpo na kosomba biloko ya lokumu. Ata nsima na kokende kotala ye mbala mingi mpe kokomela carlos mikanda na boumeli ya mbula moko Pedro alongaki te na kobongisa likambo yango. Pedro alɛmbaki mpe akendeki kofunda carlos​—moninga na ye mpe ndeko na ye moklisto​—mpe batyaki ye na bolɔkɔ.bMotindo oyo ezalaki ezaleli malamu ya kosala? Ezali nde yango tokoyeba.

Kati na mokili mobimba, mbala mingi boninga ezali kobebisama na ntina na kozanga koyokana mpe na nkaka na likambo litali kodefa. Mbala mosusu, ekoki ata kobimisa bokabwani makasi kati na baklisto. Kati na ba mboka mingi, ezali mpasi na kodefa mosolo na bank, nde mbala mingi bato oyo bazali kokutana na mikakatano na makambo matali mosolo balukaka lisalisi ya baninga na bango mpe na mabota na bango. Nzokande, likambo ya mawa oyo ekomelaki Pedro mpe carlos emonisi ete, soki modefisi mpe modefi basaleli mitinda ya Biblia te, mikakatano minene mikoki kobima. Na yango, tosengeli kosala nini soki ndeko moko moklisto asengi biso todefisa ye mosolo?

Totalela motuya ya nyongo

Biblia ezali kopekisa biso kodefa kozanga ntina. Ntóma Paulo alendisi biso ete, “bozalaka na nyongo epai na moto moko te, bobele nyongo na kolingana bamoko na bamosusu.” (Baloma 13:8) Na yango, liboso na kodefa, esengeli kotanga motuya na yango. (Tala Luka 14:28.) Tozali mpenza na mposa na kodefa mosolo? Ezali yango nzela ya kobatela makoki na biso ya kokokisa bamposa ya libota na biso? (1 Timoté 5:8) To ezali nde na mwa lokoso, mbala mosusu mposa na komizwela mwa biloko ya kitoko mingi?​—1 Timoté 6:9, 10.

Likambo mosusu ya ntina oyo tosengeli kotalela: nyongo ekotinda biso na kosala mingi koleka, mpe mbala mosusu na kozanga makita ya boklisto mpe mosala na kosakola? Lisusu, tokoki mpenza kosakana na mosolo ya moto mosusu? Nini ekosalama soki mombongo na biso esimbi te? Tomikundola ete “moto mabe akodefa mpe akozongisa te.”​—Nzembo 37:21.

’Toloba solo’ na modefisi

Nsima na kotalela makambo oyo nyonso, mbala mosusu tokoki kokanisa ete tosengeli bobele kodefa. Soki tokoki kodefa na bank te, ezali mabe te na koluka lisalisi epai na moko na bandeko na biso baklisto, mpamba te, lokola elakisaki yango Yesu na Luka 11:5, ezali malamu kokende epai na baninga na biso na ntango tozali na bosɛnga Kasi tosengeli kosala makasi na ‘koloba solo.’ (Baefese 4:25) Tosengeli komonisa na bosolo nyonso lolenge nyonso na likambo yango, na makama, ezala makambo oyo makoki komonana lokola mazangi ntina. Mpe tosilika te soki moto oyo akoki kodefisa biso mosolo atuni biso mituna ya sikisiki mpo azala na makanisi elongobani likoló na nkembo yangoc.

Tokoki koloba ete tolobi solo soki todefi mosolo na mokano oyo eyebani malamu, mpe tosaleli yango mpo na eloko mosusu? Ezali bongo te. Motambwisi moko ya bank ye moto na Amerike ya ngele alimbolaki: “Bank ekokanga mosolo oyo badefisaki yo, mpe soki ofuti nyongo na yo noki te, ekozwa lotomo na tribinale ete babotola biloko na yo.” Soki nyongo endimami na mokano ya kobongisa mosala moko oyo ekobimisa matomba na nsima, kosalela mosolo mpo na kosomba eloko mosusu ekomonisa mpenza kopekisa modefisi na makoki ya kozwa lisusu mosolo na ye. Ezali solo ete tozali kobanga etumbu ya tribinale te na ntango todefi mosolo na moninga na biso moklisto. Atako bongo, “ye oyo akodefa azali moombo na modefisi,” mpe tozali na mokumba ya koloba solo epai na ye,​—Masese 22:7.

Tosalela lilako lileki malamu kati na mombongo

Yesu alobaki: “Makambo nyonso malingi bino ete bato basalela bino yango, bino mpe, bosalela bango bobele bongo.” (Matai 7:12) Solo, ezali ntina mingi na kosalela lilako oyo na ntango tozali kobongisa mombongo elongo na bandeko na biso baklisto! Na ndakisa, tokosala ndenge nini soki moklisto moko aboyi kodefisa biso mosolo oyo tosengi ye? Tokooka yango lokola kosundola moninga? To tokotosa lotomo na ye ya koboya kondima lisɛngi na biso, na koyebaka ete akoki kozala na mposa ya mosolo na ye, to mbala mosusu akanisi na makama oyo biso tokanisi na yango te? Na motema malamu nyonso akoki kotya ntembe na makoki na biso ya kosalela mosolo yango malamu. Na ntina yango, koboya na ye ekoki kozala mbala moko na litomba mpe kolakisa biso bolingo na ye.​—Masese 27:6.

Sikawa, soki moninga moko andimi kodefisa biso mosolo, esengeli kolimbola malamu mpe kokoma na mokanda makambo nyonso, na motuya na mosolo oyo modefisami, mosala oyo mokosalelama, biloko oyo bikopesama lokola ndanga, mpe motindo ya kofuta mpe mokolo ya bosilisi nyongo. Mbala mosusu, ekoki kozala likambo ya mayele na kokomisa to kotangisa mokanda oyo bosali to contrat na moto oyo atalaka makambo yango abengami notaire, mpe kokomisa yango epai ya bakonzi oyo bapesameli lotomo mpo na mosala yango. Kati na makambo nyonso, soki boyokani bosalemi, ‘tika ete liloba Ee lizala bobele Ee, mpe Te, ezala bobele Te.’ (Matai 5:37) Tobebisa te motema malamu ya moninga na biso na kobosanaka kokokisa mikumba na biso epai na ye, nzokande tokokaki kosala bongo te soki nde todefaki mosolo na bank.

Badefisi na mayele

Tokosala nini soki ndeko moko aluki mbongo epai na biso? Esengeli kotalela likambo na likambo na ndenge na yango. Na ndakisa, ndeko na biso moko moklisto akoki, kokóma mobólá, ata ezali libunga na ye te. Soki tozali na makoki, bolingo ya boklisto ekopusa biso na ‘kopesa ye oyo esengeli mpo na nzoto na ye.’​—Yakobo 2:15, 16.

Na likambo motindo boye, ekozala mpenza kozanga bolingo na kosalela mpasi ya ndeko na biso na koluka litomba ya mosolo likoló na oyo adefaki! Yesu apesaki biso toli oyo: “Landa kolinga bayini na bino, mpe sala malamu mpe defisa na bato, nde tya motema na kozwa eloko moko te.”​—Luka 6:35, tala Levitike 25:35-38.

Kasi tokosala nini soki ndeko moko ayei kodefa mosolo na biso mpo ete asala na yango mombongo? Na motindo wana, ebongi na komizela na kozwa litomba na misala yango. Biblia ezali kokebisa biso polele na kolendisaka biso boye: “Zala moko na baoyo bakobetana matandu te, to na bango bakozala ndanga mpo na nyongo te.”​—Masese 22:26.

Na likambo motindo oyo, tosengeli liboso koyeba soki tokoki mpenza kobimisa mosolo mpo na kosunga mosala motindo yango. Tokozwa mikakatano minene ya mosolo soki mombongo yango ekwei, to soki modefi azali na makoki te ya kofuta nyongo na ye kati na mikolo oyo mipesamaki? Soki tondimi kodefisa mpe mosolo modefisami mokoki kobimisa matomba, tozali mpe na lotomo ya kozwa ndambo na biso na kosengaka litomba ya mosolo likoló na oyo modefi azwaki. (Tala Luka 19:22, 23.) Masese 14:15 epesi likebisi oyo lilandi: “Moto na zoba ayambi maloba nyonso, nde moto na mayele akotala nzela ekokende ye.” Bato na mombongo, oyo bameseni kokanisa malamu, babosanaki mayele nyonso na ntango bazali kobongisa makambo na mombongo elongo na bandeko na bango baklisto. Ebendamaki bango na mosolo mingi oyo bakokaki kozwa likoló na mosolo badefisaki, basusu bamikotisi kati na mombongo mozangi mayele, oyo ebungiseli bango mosolo na bango, mpe ebebisi boninga na bango elongo na bandeko na bango baklisto.

Ezali malamu na koyeba ete bato oyo bazali kotambwisa ba bank mbala mingi bakotalelaka makambo misato mpo na koyeba makama na kodefisa mosolo: (1) ezaleli ya moto oyo alingi kodefa mosolo, (2) makoki oyo ye azali na yango mpo na kofuta nyongo mpe (3) lolenge ya mombongo oyo ye alingi kosala. Ekozala komonisa “mayele mabongi” na kotalela makambo motindo moko na ntango tozali kokanisa kodefisa ndeko moko mosolo na biso oyo tozwi yango na mpasi.​—Masese 3:21

Na ndakisa, moto oyo alingi kodefa mosolo azali na lokumu nini? Ayebani mpo na ezaleli na ye ya kolongobana mpe na maloba mibalemibale te, to azali nde na ezaleli ya moto oyo akobangaka makambo te mpe na mobulumobulu? (Tala 1 Timoté 3:7.) Soki alingi koyeisa mombongo na ye monene, kino wana asili kolónga kotambwisa yango malamu? (Luka 16:10) Soki ezali bongo te, ekozala malamu mingi mpo na ye kozwa lisalisi ebongi mpo ayeba kosalela mosolo na ye, na esika na kodefisa ye mosolo oyo mokosalelama malamu te.

Likambo mosusu ebongi na kotalela ezali makoki oyo ndeko na biso moklisto azali na yango mpo na kofuta nyongo. Mosala nini azali na yango, oyo ekɔtiselaka ye mosolo? Azali na ba nyongo? Soki ee, ba nyongo nini? Ezali kotungisa ye te na kosɛnga ye ete alobela biso polele. Nzokande, bolingo ya boklisto nde esengeli koleka ntango nyonso. Na ndakisa, tokoki kondima ete biloko ya modefi oyo bikoki kotekisama bizala ndanga na esika ya makoki oyo akofuta mpo na nyongo. Mobeko na Moise mozalaki kopekisa kokamata biloko oyo bisimbi bomoi ya moto, lokola ndanga ya makoki oyo asengelaki kofuta mpo na nyongo. (Deteronome 24:6, 10-12) Ezali nde na ntina yango moto moko ya mombongo na Amerike ya ngele, oyo azali moklisto, alobaki ete adefisaka bobele bokokani na ndambo ya motuya na biloko oyo bikoki kotekama ya ndeko moklisto Alimboli ete: “Mpe nataleláká te biloko na ye ya mosala to ndako na ye lokola biloko oyo bikoki kotekama. Nazali mpenza na mposa te ete ndeko na ngai azanga mosala mpe nazwa ndako na ye mpo na kozongisa mosolo na ngai.”

Na nsuka, bosengeli kotalela motindo nini makambo ya mombongo mazali kotambola na mboka oyo tofandi. Tozali kobika na “mikolo ya nsuka,” mpe bato bazali “baninga na mosolo, . . . bakosi.” (2 Timoté 3:1-4) Na ntembe te, moninga mpe ndeko na biso moklisto azali moto na sembo, nzokande basalani na ye na mosala, bato oyo bazali kosala epai na ye mpe basombi na ye mbala mosusu bazali sembo te. Lokola azali moklisto, akoki te kosalela kanyaka mpe lokuta​—mayele mabe oyo bawelani na ye bakoki kosalela mpo na litomba na bango. Lisusu, esengeli kotalela mikakatano oyo mikoki kobimisama na “ntango mpe makambo makanami te.” (Mosakoli 9:11) Motuya ya biloko mokoki kokita mbala moko. Kokwea ya nkita ekoki kobebisa mombongo, to kosilisa motuya ya mbongo oyo todefaki. Koyiba, makama na mituka, bobebisami na biloko ya motuya mpe makama mosusu, nyonso wana ezali makambo na mpasi oyo masengeli kotalelama kati na mosala ya mombongo. Tosengeli kotalela makambo wana nyonso liboso ya kozwa ekateli.

Soki mombongo ekwei

Mbala mosusu, ata mayele nyonso asaleli mpo na kobotela mombongo na ye, moklisto akoki kokóma na kozanga makoki ya kofuta nyongo na ye. Lilako lileki malamu ekotinda ye na kosololaka mbala na mbala na modefisi na ye. Mbala mosusu akoki kopesa bobele mosolo moke, na boumeli ya mwa ntango. Atako bongo moklisto asengeli kokanisa te ete kofuta nyongo mokemoke ekopekisa ye na kosala milende mikoki mpo na kosilisa kofuta nyongo na ye. (Nzembo 15:4) Modefisi, oyo azali moklisto, ye mpe asengeli kolakisa bolingo na ye. Soki akanisi ete babubi ye, akoki kosalela toli oyo epesami na Matai 18:15-17.

Ezali malamu te na komema likambo na tribinale lokola esalaki yango Pedro na lisoló oyo tolobelaki na ebandeli, bobele soki makambo masengisi yango mpe ekosalema mingi te. Ntóma Paulo alobaki: “Soko moko na bino azali na likambo epai na mosusu, akozala nde na lolendo na kokende na kosambisa liboso na bato ya masumu kasi liboso na babulami te? . . . moto na mayele azali kati na bino te oyo akoki kokata kati na bandeko na ye? Ndeko akofunda ndeko mpe bongo liboso na bato bazangi kondima? Awa ezali bino na makambo na kofundana kati na bino, bozongi nsima. Mpo na nini bokondima te ete bato basalela bino mabe? Mpo na nini bokondima te ete bato bazimbisa bino?”​—1 Bakolinti 6:1-7.

Makambo mosusu makoki kobongisama bobele liboso na basambisi to na ebongiseli moko ya bokonzi, na ndakisa na ntango bato mosusu oyo bazali bandimi te bakɔti mpe na likambo yango, mpo ete bazalaki associé to kiliyá, to soki ezali makambo matali assurances. Kasi mbala mingi, na esika ya koyokisa lisangá nsoni na kozala na kati na yango na ndeko moko oyo afundami mpo na kozanga kofuta nyongo, moklisto asengeli kondima kobungisa mosolo.

Kati na makambo mingi, likoki lizali na kopengola kokoma na makambo motindo yango. Ndenge nini? Liboso ya kodefisa to kodefa mosolo na ndeko moko moklisto, totalela makama. Tomonisa ezaleli ya bokɛngi mpe ya mayele. Na nyonso, “tika ete misala na biso nyonso,” sangisa misala na biso ya mombongo, “esalama na bolingo.”​—1 Bakolinti 16:14.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bankombo ebongolamaki.

b Kati na bamboka mosusu, kokwea ya mombongo mpe kozanga kofuta nyongo ekomemaka moto na etumbu ya boloko.

c Basusu bazali kodefa maseke ya motuya moke na badefisi mingi. Na kozanga koyeba likambo yango nyonso, modefisi akoki kokanisa ete ezali mpasi te mpo na modefi aya kofuta nyongo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto