Bopapa ebandisamaki nde na Klisto?
“LONGWA na Petelo, episkopo wa liboso wa Loma, kino Jean-Paul ll, papa na biso ya lelo, ezali na molongo molai ya bapápa—koleka 260, mpo na koloba na mokuse.” Oyo ezali maloba ya sángó Anthony Foy makomamaki kati na zulunalo moko ya lingomba na katolike na Afrika ya Ngele na nkombo Southern cross. Alandaki koloba ete: “Ezali molongó wana elandani ya bapápa nde tokoki kolakisa mpo na kosilisa ntembe na moto nyonso oyo akotuna biso bilembeteli ete lingomba ya katolike ebandisamaki na Yesu Klisto.”
Tokoki koloba, kozanga komikosa, ete ntoma Petelo azalaki moto ya yambo na molongo molai oyo ya bapapa? Engebene mateya ya théologie ya katolike, ba pápa minei, Lin, Anaklet, Clément mpe Evariste, bakitanaki na Petelo kino na mobu 100 na ntango na biso. Ezali solo ete Biblia elobeli mpo na moklisto moko na nkombo Linus (to Lin), oyo azalaki kofanda na Loma. (2 Timoté 4:21) Nzokande, eloko moko te ezali komonisa ete moklisto yango, to moklisto mosusu akitanaki Petelo lokola papa. Ntóma Yoane, oyo akomaki mikanda mitano ya Biblia na boumeli ya mibu zomi ya nsuka ya ekeke na liboso, alobelaki ata moke te mpo na bakitani wana ya Petelo, Na yango, soki Petelo azalaki na mokitani, mbele esengelaki kozala malamu te na kopona Yoane?
Mpo na oyo etali kondima ete Petelo azalaki episkopo wa yambo wa Loma, ezali na eloko moko te oyo emonisi ete akendaki na engumba wana. Nzokande, ye moko amonisaki polele ete akomaki mokanda na ye ya yambo na mboka Babilone. (1 Petelo 5:13) Lingomba ya katolike elobi ete Petelo asalelaki nkombo “Babilone” lokola elilingi mpo na kolobela Loma, kasi elembeteli oyo ezali solo te. Engumba ya “Babilone” ezalaki mpenza na mikolo ya Petelo. Lisusu kati na engumba yango, ezalaki na ebele ya Bayuda. Lokola Yesu atindaki Petelo kosakola liboso epai na Bayuda oyo bakatami ngenga, ebongi na kokanisa ete ntoma akendaki na Babilone na mokano wana.—Bagalatia 2:9.
Ezali mpe malamu na koyeba ete Petelo abandaki komitanga ntango nyonso lokola moko na bantoma ya Klisto, kasi abakisaki likambo mosusu te. (2 Petelo 1:1) Esika moko te kati na Biblia tomoni moto moko kobyanga ye “Tata Mosantu,” “Mokonzi monene wa Baepiskopo” (souverain pontife) to “pape” (na latin papa, liloba mpo na komonisa bolingo, elimboli tata) Nkutu, amikitisaki, na kolandaka maloba na Yesu oyo makomami na Matai 23:9, 10: “Bobyanga moto moko te tata awa na mokili, mpo ete moko azali Tata na bino, oyo na likoló. Bobyangama mpe bankolo te, mpo ete moko azali Nkolo na bino, ye Klisto.” Petelo alingaki te ete bakumisa ye. Ntango Korneye, mokonzi na basoda ya Loma “akweaki na makolo na ye mpe akumisaki ye. . . , Petelo atɛlɛmisaki ye na kolobáká ete, telema! Ngai mpe nazali bobele moto.”—Misala 10:25, 26.
Mpo na bapápa mosusu 260, nganga nzambe Anthony Foy andimaki ete: “Bamosusu bamimonisaki ete bakoki te na mosala na bango.” Mpo na komeka kolongisa ezaleli oyo, la Nouvelle Encyclopédie catholique (angl.) emonisi ete: “Eloko oyo ezalaki na ntina mpo na mposa ya kotambwisa ezalaki mokumba ya pápa, kasi bomoto naye te. Ye akokaki kozala mosantu, moto mabe to ata moto azangi mayele.” Kasi tokoki kondima ete Klisto akokaki kopona bato ya lolenge oyo mpo na kozala bamonisi na ye?
Na kotalela makambo nyonso, likanisi oyo ete mosala ya pápa etyamaki na Yesu endimami soko moke te na Biblia. Engebene encyclopédie moko (Encyclopedia of Religion), ata ba théologiens katolike ya mikolo na biso bazali kondima ete ezali na elembeteli moko te katina Biblia oyo elakisi ete Yesu atyaki mosala ya bopápa oyo eumeli kino lelo katina lingomba ya katolike.