Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/8 lok. 20
  • ‘Ezalaki na ngonga nini?’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Ezalaki na ngonga nini?’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bitangeli na ngonga bipesami na Nzambe
  • Maloba mpo na kolakisa ngonga
  • Ngonga na butu epai na Baebele
  • Na ekeke ya liboso
  • Lolenge butu ekabolami
  • Luka koyeba ngonga
  • Tokómi ngonga nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • “Bókɛngɛlaka”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/8 lok. 20

‘Ezalaki na ngonga nini?’

MBALA boni osili kotuna motuna oyo ete: ‘Tokómi ngonga nini?’ Na eleko na biso oyo bomoi ezali na yikiyiki, tozali ntango nyonso komibanzabanza mpo na ngonga. Misala na biso mingi ya mokolo na mokolo​—ezala mpo na kolamuka, kokende mosala, kolya, kotala baninga​—etaleli ntango. Mpe biloko oyo bikoyebisaka biso ngonga bizali mingi: montɛlɛ monene (pendule), montɛlɛ ya loboko, montɛlɛ monene ekobotaka ngɛngɛlɛ (réveil), radio mpe bongo na bongo.

Na ntango na kala, lolenge nini bato bazalaki kotanga ngonga, wana biloko yango bisalemaki naino te? Makomami mapesi nde malako na likambo wana? Koyeba soko ngonga nini oyo makambo mosusu na Biblia masalemaki, ekoki kosalisa biso na kolinga Liloba na Nzambe mpe na kosepela mingi na boyekoli na yango.

Bitangeli na ngonga bipesami na Nzambe

Na ebandeli, bato bazalaki kotanga ngonga oyo likambo moko lisalemi na kotaleláká moi mpe sanza, “bingɛngɛli mibale minene” oyo Mozalisi atyaki na likoló “mpo ekabola moi mpe butu.” (Genese 1:14-16) Na ndakisa, baanzelu mibale basengaki Lota mpe libota na ye babima nokinoki na Sodome, engumba oyo ekweisamaki, “wana ntɔngɔ etanaki.” (Genese 19:15, 16) Mpe mosali na sembo na Abrahame akómaki “na ntango na mpokwa” na liziba epai kuna akutanaki na Rebeka.​—Genese 24:11, 15.

Mbala mosusu, malako ya sikisiki mapesamaki na ntina na ngonga oyo makambo mosusu masalemaki. Na ndakisa, Abimeleke, elombé, mwana na mosambisi Gédéon, azwaki toli ya kobundisa engumba Sikeme ‘na ntɔngɔ, wana moi mokobima.’ (Basambisi 9:33) Emonani ete mayele na etumba ezali nsima na etinda wana. Kongɛnga na moi oyo ebimaki nsima na mampinga na Abimeleke, ekosaki bakɔteli ya engumba Sikeme, baoyo bazalaki na mpasi mpo na komona basodá oyo bazalaki kobundisa bango kati “na molili na ngomba.”​—Basambisi 9:36-41.

Maloba mpo na kolakisa ngonga

Mpo na kotanga ngonga, Baebele bazalaki kosalela maloba kitoko mpe na kosepelisa. Ezali komonisa biso bobele ezingelo na biso te soko mpe mimeseno ya kala te, kasi ezali komonisa lisusu na mabaku nini makambo yango maselamaki.

Na ndakisa, Genese 3:8 (MN) eyebisi ete, mokolo oyo Adam na Eva basalaki lisumu, Jéhovah alobaki na bango “na mwa mpiɔ na moi.” Tokangi ntina ete ezalaki mwa moke liboso na kolala na moi, wana mwa mpiɔ moke ekopepwaka, na koyeisa malili epai na mopepe na nsuka na mokolo na molungé. Kokita na moi ezali ntango malamu mpo na kominanola mpe na kopema. Kasi, Jéhovah alingaki te kolekisa mokolo kozanga kosambisa likambo monene motindo wana, nzokande ntango ezalaki mingi mpo na kosala yango.

Mwa liboso, Genese 18:1, 2 (MN) eyebisi na sikisiki ete baanzelu na Jéhovah bakómaki na hema ya Abrahame na Mamɛlɛ “penepene na kongala makasi na moi.” Kanisa naino, moi makasi na midi oyo ekongalelaka ngomba na Yudea, engali likoló na mitó na bango. Molungé mosengelaki mpenza kolɛmbisa. Ezali ngonga oyo nde bato bazalaki kolya mpe kopema. (Tala Genese 43:16, 25; 2 Samwele 4:5.) Na yango, Abrahame “afandaki na monoko na hema na ye,” esika ekokaki mpenza kozala na mwa mopepe moke, mpe mbala mosusu azalaki kopema nsima na kolya. Mpo na yango tokoki mpenza kokumisa boyambi ya mobangé mobali yango wana ezali biso kotanga ete “akendaki mbango . . . kozwana” na bapaya wana, mpe “akɔtaki noki kati na hema na ye” mpo na kosenga na Sara ete alamba mampa; na nsima, “akendaki mbango epai na etonga” mpe “alambaki yango [mwana na ngombel noki.” Asalaki nyonso wana na nsé na moi makasi!—Genese 18:2-8.

Ngonga na butu epai na Baebele

Emonani lokola ete Baebele bakabolaki butu na bileko misato oyo bibengami “ntango na butu.” Mokomoko na yango ezalaki kozwa ndambo na misato ya ntango oyo ezalaki kobanda uta kolala na moi kino kobima na moi, soko ngonga minei, na kotalela eleko. (Nzembo 63:6) Ezali na “ebandeli na katikati na butu,” oyo ezalaki kobanda soko na 22h00 kino na 2h00 ya ntɔngɔ, nde Gédéon azingaki molako na Bamadianite. Etumba na ngonga motindo wana esengelaki bobele kokuta bakengeli kati na mpongi. Gédéon, ye moto na bokengi, akokaki bobele kopona ntango wana mpo na kobundisa banguna na ye.​—Basambisi 7:19.

Na kobima na Bayisraele na Ezipito, Jéhovah “azongisaki mai monene na mopepe makasi moutaki na ebimelo na ntango, na butu mobimba,” likambo oyo lipesaki nzela na Bayisraele ete bakatisa mai monene na mabelé makauki. Ezalaki na “ntɔngɔntɔngɔ” wana Baezipito balandaki bango; kasi Jéhovah abulunganisaki molako na bango mpe abomaki bango na kozongisáká mai monene “na esika na yango, na kotana na ntɔngɔ,” (Exode 14:21-27) Esengelaki butu mobimba mpo ete mai monene makabwana na ngambo mibale mpo ete Bayisraele bakatisa yango.

Na ekeke ya liboso

Na ekeke ya liboso, Bayuda bakabolaki mokolo na ngonga zomi na mibale. Yango Yesu alobaki kati na moko na masese na ye ete: “Ngonga ezali zomi na mibale na moi moko te?” (Yoane 11:9) Bozalaki kotanga yango longwa na kobima na moi, soko na 6h00 ya ntɔngɔ kino na 6h00 ya mpokwa. Na yango, “ngonga na misato” ekokani pene na 9h00 ya ntɔngɔ. Ezali ngonga oyo elimo santu esopamaki na mokolo ya Pantekɔte. Na ntango bato bafundaki bayekoli ete “basili kotonda na vinyo na elɛngi,” nokinoki, Petelo azongisaki monoko mpo na efundeli yango Moto moko te akoki kolangwa na ntɔngɔ boye.​—Misala 2:13, 15.

Bobele bongo, maloba oyo na Yesu ete “bilei na ngai ezali ete nasala mokano ya motindi na ngai” ezali na ndimbola monene soki tokotalela ngonga oyo ye abimisaki maloba yango. Yoane 4:6 eyebisi biso ete, “Ezalaki soko na ngonga ya motoba,” elingi koloba na nsima na midi. Nsima na kosala na mpasi na boumeli ya ntɔngɔ mobimba na etúká

na ngomba ya Samaria, Yesu mpe bayekoli na ye bazalaki mpenza na nzala mpe na mposa na mai. Yango wana bayekoli basengaki ye mingi ete alya wana eyaki bango na bilei. Yesu azwaki makasi mpe amileisaki na kosala mokano na Jéhovah. Maloba oyo na Yesu mazalaki mpambampamba te; ezalaki mpenza solo. Kokokisa mosala oyo Nzambe apesaki ye ezalaki solo koleisa ye, ata soko alyaki te na boumeli ya ngonga mingi.​—Yoane 4:31-34.

Lokola kobima mpe kolala na moi ezalaki kobongwana na kotalela bileko ya mobu, bazalaki kosalela ngonga moko ya sikisiki te mpo na koyebisa ntango oyo likambo moko lisalemaki. Yango wana, tokotangaka mbala mingi ete makambo mazalaki kosalema na ngonga ya misato, na ngonga ya motoba to na ngonga ya libwa​—oyo emonisaki makambo yango masalemaki penepene na ngonga wana. (Matai 20:3, 5; 27:45, 46; Malako 15:25, 33, 34; Luka 23:44; Yoane 19:14; Misala 10:3, 9, 30) Nzokande, na eleko oyo ntango ezalaki kotalelama na motuya mpo na lisoló, makambo mayebisamaki na sikisiki mpenza. Na ndakisa, epai na moto oyo alingaki koyeba soki mwana na ye abikisamaki na Yesu, baombo bayanoli ye ete: “Mɔtɔ etiki ye lobi na ngonga na nsambo [pene na 13h00].”​—Yoane 4:49-54.

Lolenge butu ekabolami

Emonani ete, na nsé na boyangeli na Baloma, Bayuda bakabolaki lisusu butu na ngonga misato te kasi na ngonga minei, kolandáká ebongiseli ya Bagreke mpe Baloma. Ezali mpenza ngonga minei oyo Yesu alobaki na Malako 13:35. Liloba “na mpokwa” ekokani na ngonga oyo ebandaki longwa na kolala na moi kino pene na 21h00 Ngonga na mibale, oyo na “katikati na butu” ezalaki kobanda mwa moke pene na 21h00 mpe ezalaki kosuka na katikati na butu. “Kolela na nsoso” ezali eleko ezalaki longwa na katikati na butu kino pene na 3h00 ya ntɔngɔ. Mpe ngonga ya nsuka, “ntɔngɔntɔngɔ,” ezalaki kosuka kino na kobima na moi, mingi mpenza na 6h00.

Ngonga na “kolela na nsoso” ezali na ntina mpenza wana ezali biso totalela Malako 14:30, mokapo oyo mozali kotanga maloba na Yesu epai na Petelo, ete: “Liboso naino nsoso aleli mbala mibale te, okoangana ngai mbala misato.” Balimboli mosusu bakolobaka ete liloba “mbala mibale” emonisi bileko ya sikisiki (mingi mpenza na katikati na butu mpe na ntɔngɔ), nzokande James Hastings alimboli kati na mokanda na ye Dictionnaire du christ et des Evangiles (angl.) ete, “solo mpenza, na mikili epai moi mokobimaka lokola mpe na bipai binso, nsoso ekolelaka kobanda na katikati na butu na ntango na sikisiki te.” Yesu alobaki te ete Petelo akoangana ye na ntango moko ya sikisiki. Kasi apesaki nde elembo mpo ete Petelo amikundola maloba na ye, oyo ekokisamaki na polele mpenza bobele na butu yango.​—Malako 14:72.

Ezali “na ngonga ya minei na butu,” katikati na 3h00 mpe 6h00 ya ntɔngɔ, nde Yesu atambolaki likoló na mai na libéké ya Galilai mpo na kokutana na masuwa oyo bayekoli bazalaki kati na yango na “mosika na libóngo.” Ezali mpasi te na koyeba ntina oyo bayekoli “babangaki mpe balobi ete: ‘Ezali mongɔli!’”, mpe “bangangaki na nsɔmɔ.” (Matai 14:23-26) Na epai moko, yango emonisi ete Yesu alekisaki ntango moko molai mpo na kobondela ye moko kati na ngomba Lokola likambo yango lisalemaki mwa moke nsima na liwa na Yoane Mobatisi oyo akatamaki nkingo na Hérode Antipas, mpe mwa ntango moke liboso na Pasiká oyo ebandaki mbula na ye ya nsuka ya mosala na ye awa na mabelé, Yesu azalaki mpenza na makambo mingi oyo asengelaki kososola kati na libondeli oyo atindaki epai na Tata na ye.

Longola ngonga minei wana, butu ekabobamaki na ngonga zomi na mibale. Mpo na komema Paulo na engumba Kaisalia na kimya nyonso, komandá claudius Lysias, asengaki na bakapitene na ye ete baselengwisa limpinga ya basodá 470 na “ngonga na misato na butu.” (Misala 23:23, 24) Bongo, Paulo amemamaki na butu longwa na Yelusaleme kozanga likámá.

Luka koyeba ngonga

Kotanga masoló ya libota na Nzambe ya ntango na kala mpe kososola yango, ekopesaka esengo mpe makasi na elimo. Soki otaleli ntango wana ezali yo kotanga Biblia, okosepela mingi mpenza mpo na koyekola mokanda wana. Mpo na nini? Mpo ete okozwa bongo boyebi malamu ya Liloba na Nzambe. Mikanda lokola Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible (ebimisami na la Société Watchtower), ezali na ntina mingi mpo na yango. Ekosalisa yo na kozwa eyano wana okomituna ete: ‘Ezalaki na ngonga nini?’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto