Tomekola motema mawa na Nzambe
“Tika ete tokwea kati na loboko na Jéhovah, mpo ete mawa na ye ezali monene’’—2 SAMWELE 24:14.
1.Davidi akanisaki nini na ntina na mawa na Nzambe, mpe mpo na nini?
MOKONZI DAVIDI ayebaki ete motema mawa na Jéhovah ezali monene koleka oyo na bato. Kondimisamáká ete ezalaki wana banzela etombwami, Davidi alingaki kolakisama kati na banzela na Nzambe mpe kotambola kati na solo na Ye. (1 Ntango 21:13; Nzembo 25:4, 5) Yo mpe ozali na makanisi motindo moko na Davidi?
2. Na Matai 18:15-17, Yesu apesaki toli nini likoló na oyo esengeli kosalema na ntango lisumu monene lisalemi?
2 Biblia ezali kosalisa biso na kokóta na mozindo na makanisi na Nzambe, na ndakisa, na komonisáká biso nini tosengeli kosala soki moto moko asaleli biso lisumu. Yesu alobaki epai na bantóma na ye, baoyo na nsima, basengelaki kokóma bakengeli baklisto, ete: “Soki ndeko na yo asaleli yo mabe, kende koloba na ye mpo na libunga na ye, bino na ye esika moko. Soko akoyoka yo, okozwa ndeko na yo.” Libunga oyo lilobami awa ezali te mwa kozanga bokóndé to limemya; ezali nde lisumu monene, lokola kosalela bokosi mpo na kozwa eloko na moto to kokosela moto makambo. Yesu alobi na sikisiki ete, soki lolenge wana na kosala elongi kosilisa likambo te, nzokande batatoli ya libunga yango bazali, ye oyo basaleli ye mabe asengeli kobenga bango mpo na komonisa mpenza mabe masalamaki. Esuki bobele wana? Te. Yesu alandi ete: “Soko [mosali na lisumul akoyoka bango te, yebisa yango na lisangá. Soko akoyoka lisangá te, tika azala na yo lokola Mopakano mpe lokola mokongoli na mpako.”—Matai 18:15-17.
3. Yesu alingaki koloba nini wana apesaki toli ya kotalela moto na masumu oyo aboyi kobongola motema “lokola Mopakano mpe lokola mokongoli na mpako”?
3 Lokola bazalaki Bayuda, bantoma basosolaki ndimbola na ntina na kotalela moto oyo asali lisumu “lokola Mopakano mpe lokola mokongoli na mpako.” Bayuda bazalaki na boninga na Bapakano te mpe bazalaki koboya bato ya ekólo na bango baoyo bazalaki kokongola mpako mpo na Baloma.a (Yoane 4:9; Misala 10:28) Na maloba wana, Yesu azalaki bongo kolobela bayekoli ete soki lisangá liboyi moto moko asali lisumu, bango basengelaki lisusu te kozala na boyokani elongo na ye. Kasi, ndenge nini koyokanisa toli yango na likambo oyo ete Yesu ye moko azalaki kosolola na bakongoli na mpako?
4. Atako oyo tozali kotanga na Matai 18:17, mpo na nini Yesu akokaki kokutana na bakongoli na mpako mpe bato na masumu?
4 Na Luka 15:1, totangi ete: “Bakongoli na mpako mpe bato na masumu nyonso bazalaki kobelema epai na ye mpo na koyoka ye.” Awa, “nyonso” elimboli te kozanga kolongola bamosusu, nzokande esengeli kotalela liloba yango na ndimbola ya ebele to mingi. (Tala Luka 4:40.) Kasi, bato yango bazalaki banani? Bato oyo bazalaki koluka ete masumu na bango malimbisama. Bamoko kati na bango babendamaki liboso na nsango ya kobongola motema oyo Yoane Mobatisi asakolaki (Luka 3:12; 7:29) Na yango, wana bamosusu bakendeki lisusu epai na Yesu, likambo oyo ete ye ateyaki bango, ezali kotemela toli na ye oyo ezali na Matai 18:17 te. Totala ete mokolo moko, eyokaki bango Yesu, “bakongoli na mpako mpe bato na masumu mingi” “balandi ye. ” (Malako 2:15) Bato yango balingaki kotikala te kati na etamboli na bango mabe; baboyaki te ete basalisama. Nde, bayokaki nsango na Yesu mpe mitema na bango misimbamaki. Soko bazalaki sé kosala masumu, atako milende bazalaki kosala mpo na kobongwana, “mobateli malamu na mpate,” azalaki komekola Tata na ye ya motema mawa, na koteyáká bango.—Yoane 10:14.
Baklisto basengeli kolimbisa
5. Ndenge nini Nzambe azali kotalela lilimbisi?
5 Tozali na endimiseli ya kolendisa ete Tata na biso azali pene na kolimbisa: “Soko tokoyambola masumu na biso, ye azali sembo mpe moyengebene mpo na kolimbisa masumu na biso mpe kopetola biso na bokesene nyonso.” “Nakomeli bino makambo oyo ete, bosala lisumu te. Kasi soko moto nani akosala lisumu, tozali na molobeli epai na Tata, Yesu Klisto, moyengebene.” (1 Yoane 1:9; 2:1, MN) Moto oyo abimisami na lisangá akoki kozwa lilimbisi?
6. Ndenge nini moto oyo ebimisamaki na lisangá akoki kozwa lilimbisi mpe kozongisama kati na lisangá?
6 Ee. Ntango moto moko azali kosala masumu mpe azali kobongola motema te, abimisami na lisangá, bankulutu, bango bato bazali kokamba lisangá, bakolimbwela ye ete azali na likoki ya kobongola motema mpe kozwa lilimbisi na Nzambe. Akoki koyangana na makita oyo mazali kosalema na Salle du Royaume; akozwa lilako ya Biblia oyo likoki kosalisa ye mpo na kobongola motema. (Tala 1 Bakolinti 14:23-25.) Na nsima, akoki kosenga ete azongisama kati na lisangá ya peto. Bongo, bankulutu bakosolola elongo na ye mpe bakosala makasi mpo na koyeba soko abongwani solo mpe asili kotika lisumu na ye. (Matai 18:18) Soki ezali bongo, boye akoki kozongisama kati na lisangá na boyokani na oyo eyebisami na 2 Bakolinti 2:5-8. Soki esili koleka bambula mingi uta moto yango abimisamá na lisangá, esengeli na ye ete asala milende mingi mpo na kokóla. Na nsima, akozala mbala mosusu na mposa ya lisalisi mingi mpo ete azwa boyebi malamu mpe bososoli malamu ya Makomami, mpe bongo, akokóma mpenza moklisto ya makasi na elimo.
Bozongi epai na Jéhovah
7, 8. Elakiseli nini Nzambe esili kopesa kati na boyokani na ye elongo na libota na ye oyo lizalaki ma boombo?
7 Bankulutu bakoki kosala ebongiseli ya kokende kotala moto oyo asilá kobimisama na lisangá? Ee. Lokola Biblia emonisi yango, bakomonisaka motema mawa te bobele na koboya kopesa etumbu, kasi na kosala mpe na motindo na kobenda mosumuki. Jéhovah asili kopesa biso ndakisa na likambo yango. Liboso na kotinda na boombo libota na ye lizangakí bosembo, asakolaki elikya ya bozongi, ete: “Kanisa makambo oyo, ɛ Yakobo, mpe Yisraele, mpo ete yo ozali mosaleli na ngai. . . . Nakozipa masumu na yo lokola na lipatá, mpe mabe na yo lokola na londendé. Zonga epai na ngai, mpo ete nakosikola yo.”—Yisaya 44: 21, 22.
8 Na nsima, na boumeli ya boombo, Jéhovah asalaki na motindo oyo ekoki kobenda bango. Atindaki bongo bamonisi na ye, basakoli, mpo na kobyanga Yisraele ete ‘baluka ye mpe bazwa ye.’ (Yilimia 29:1, 10-14) Na Ezekiele 34.16, amimonisi lokola mobateli na mpate mpe akokisi libota na Yisraele na mpate oyo esili kobunga: “Nakoluka oyo abungi mpe nakozongisa oyo akimisami.’’Na Yilimia 31:10, Jéhovah asaleli bobele lisese yango moko mpe amikokanisi na mobateli na mpate liboso na Bayisraele. Amimonisi te lokola mobateli na mpate oyo azali kozela na lopango ete mpate oyo ebungaki ezonga yango moko, kasi lokola moto oyo azali koluka basaleli na ye basili kobunga. Totala ete, ata ntango libota na mobimba na yango, babongolaki motema te mpe bazalaki na boombo, Nzambe azalaki sé kozwa bibongiseli mpo na bozongi na bango. Epai mosusu, na boyokani na Malaki 3:6, koya na boklisto esengelaki kobongola eloko moko te na lolenge oyo Jéhovah azali kosala.
9. Ndenge nini ndakisa na Nzambe elandamaki kati na lisangá na boklisto?
9 Esengeli kosukisa ete, ekoki na kozwa bibongiseli mpo na bato babimisami na lisangá baoyo bakoki kobongola motema? Tomikundola ete ntoma Paulo apesaki mitinda mpo ete babengana kati na lisangá ya Kolinti, moto oyo asalaki mabe. Na nsima, alendisaki baklisto ya engumba wana ete bamonisa bolingo mpo na moto yango, na ntina na kobongwa na motema na ye; mpe moto yango azongisamaki kati na lisangá.—1 Bakolinti 5:9-13; 2 Bakolinti 2:5-11.
10. (a) Eloko nini esengeli kopusa milende nyonso mizali kosalema mpo na kokutana elongo na bamoko na bato oyo basili kobimisama na lisangá? (b) Mpo mi nini lotómo epesami te na libota ya moto oyo abimisami na lisangá na kosala bibengeli mpo ete azonga?
10 Kati na encyclopédie oyo tosilaki kolobela, tokoki kotanga ete: ‘Ntina ya liboso ya kolongolama na lisangá ezalaki mpo na kobatela ezaleli ya lisangá: “mfulu moke ekofulisa mampa mobimba.” (1 Bakol. 5:6) Ezali yango nde emonisami polele na mikapo mingi ya Biblia mpe na makomami mosusu; kasi, elendiseli oyo Paulo apesi na 2 Bakol. 2:7-10 , epesami mpenza mpo na lobanzo oyo azali na yango mpo na moto yango, ata nsima na kobimisama naye na lisangá.’ (Biso nde tolalisi maloba oyo.) Na yango, na mikolo na biso, ebongi na babateli na etongá ete bamonisa mpe lobanzo motindo moko.(Misala 20:28; 1 Petelo 5:2) Baninga ya kala mpe libota ya moto oyo abimisami na lisangá bazali na elikya ete moto yango akozonga na lisangá ya Nzambe; nzokande, na kotósáká etinda oyo ekomami na 1 Bakolinti 5:11, bakotika kosangana na ye.b Bobele babateli na mpate nde bazali na lotómo ya kosala ebongiseli mpo na kotala soki moto yango azali na mposa ya kozonga.
11, 12. Lolenge nini na bato babimisamá na lisangá oyo bankulutu bakozala na mposa ya kokutana na bango te, kasi bakoki kotala lolenge nini na bato oyo babimisamá na lisangá?
11 Ata mpo na bankulutu, ekozala malamu te ete bakende kotala bato mosusu oyo basili kobimisama na lisangá, lokola bapengwi, baoyo ‘bazali kolakisa mateya na kokósa ete babenda bayekoli nsima na bango.’ Bazali ‘basakoli na lokuta oyo bakoyeisaka mikabwano na libebi mpe bazali koluka litomba kati na lisangá na maloba na kokósa.’ (Misala 20:30; 2 Petelo 2:1, 3) Bobele bongo, Biblia emonisi ata ntina moko te ya kozala na boyokani elongo na bato babimisami na lisangá baoyo bazali na matáta to mpe bazali kolendisa mabe.—2 Batesalonike 2:3; 1 Timoté 4:1; 2 Yoane 9-11; Yuda 4, 11.
12 Nzokande, bato mingi oyo basili kobimisama na lisangá, bazali na ezalela wana te. Bamoko basili mbala mosusu kotika mabe monene oyo mpo na yango babimisamaki na lisangá. Bamosusu bazalaki bameli na makaya to balangwi na masangá, kasi lelo oyo bazali kopusa bato mosusu te na kosala mabe. Tomikundola ete, liboso ete Bayisraele oyo bazalaki na boombo bazonga epai na ye, Nzambe atindaki bamonisi na ye mpo na kolendisa bango ete babongola mitema. Biblia ezali koyebisa biso te soki Paulo to bankulutu mosusu ya Kolinti basalaki ebongiseli ya kokende kotala moto oyo abimisamaki na lisangá. Kasi, ntango moto yango abongolaki motema mpe atikaki bomoi na ye ya mbindo, Paulo asengaki lisangá ete moto yango azongisama.
13, 14. (a) Nini emonisi ete bato mosusu oyo babimisamá na lisangá bakoki kondima bibongiseli ya motema mawa? (b) Bankulutu bakoki kosala nini mpo na kokutana na moto oyo asilá kobimisama na lisangá?
13 Mbala mosusu, nkulutu moko akoki kokutana na moto moko asilá kobimisama na lisangá, lokola yango esili komonana na mikolo mileki.c Na ntango ebongi, mobateli wana na mpate akundwelaki ye na bokuse, lolenge ya kosala mpo na kozonga na lisangá. Bato mosusu oyo babimisamaki babongolaki motema mpe basili kozonga na lisangá. Matomba wana na kosepelisa mazali komonisa ete bato oyo babimisami to baoyo bamilongolaki na lisangá na Nzambe, bakoki kondima ebongiseli etondi na motema mawa oyo esalemi na babateli na mpate. Na yango, lolenge nini bankulutu bakoki kosala? Ata mbala moko na mbula, lisangani ya bankulutu basengeli komibanzabanza mpo na koyeba soki bato motindo wana bazali kati na teritware na bango.d Bankulutu bakotya likebi na bango likoló na baoyo babimisami na lisangá uta koleka mobu moko. Na kotalela makambo ya moto moko na moko, mpe soki yango ebongi, bakopona bankulutu mibale (baoyo bayebi likambo yango) mpo na kokende kotala moto oyo asili kobimisama na lisangá. Nzela epesameli te na kokende kotala moto oyo azali na elimo ya kotónga to oyo azali kokanela bandeko, to oyo ayebisaki ete aboyi kosalisama.—Baloma 16: 17, 18; 1 Timoté 1:20; 2 Timoté 2:16-18.
14 Bankulutu mibale wana bakoki kotinda maloba epai na moto abimá na lisangá ete bakoya kotala ye, to mpe bakoki kobongisa mokolo ya kosolola. Na boumeli ya vizite, basengeli kozala na maloba makasi te to na mpio mpe te, kasi bakozala na móto mpe na motema motondi na mawa. Na esika ya kokundola likambo lisilaki koleka, bakoki nde kotalela mikapo ya Biblia elongo na moto yango asilá kobimisama na lisangá, lokola Yisaya 1:18 mpe 55:6, 7, mpe Yakobo 5:20. Soki moto yango azali na mposa ya kozonga kati na etongá na Nzambe, bankulutu bakoki komonisa ye nini asengeli kosala, na boboto nyonso: na ndakisa, kotanga Biblia mpe mikanda ya la Société Watch Tower, mpe koyangana na makita oyo mazali kosalema kati na Salle du Royaume.
15. Eloko nini bankulutu basengeli kobosana te wana ezali bango kokutana elongo na moto oyo asili kobimisama?
15 Bankulutu yango basengeli kozala na mayele mpe na bososoli mpo na koyeba soki moto yango abimisamá azali komonisa bilembo ya kobongola motema, mpe soki ekozala likambo na mayele ete bazonga lisusu kotala ye. Solo mpenza, basengeli kobosana te ete bato mosusu basilá kobimisama na lisangá bakoki “kobikisama lisusu” te “na komemáká bango kino kobongola motema.” (Baebele 6:4-6; 2 Petelo 2:20-22) Bankulutu wana mibale bakoyebisa comité de service ya lisangá, lolenge oyo basololaki na bokuse. comité mpe akoyebisa lisangani ya bankulutu ntango bakoyangana bango nyonso na mbala ekoya. Ebongiseli ya bankulutu oyo etondi na motema mawa, ekoyokana na likanisi oyo na Nzambe, ete: “‘Bozonga epai na ngai mpe ngai nakozonga epai na bino.’ Jéhovah na bibele alobi bongo.”—Malaki 3:7.
Lisalisi mosusu ya motema mawa
16, 17. Ndenge nini tosengeli kotalela libota na boklisto ya moto oyo asili kobimisama na lisangá?
16 Tokoloba boni mpo na baoyo kati na biso bazali bakengeli te mpe basengeli te kozwa mokano ya kokende kotala bato oyo basili kobimisama? Ndenge nini tokoki kosala na boyokani elongo na ebongiseli yango mpe na komekoláká Jéhovah?
17 Ntango nyonso oyo moto abimisamaki na lisangá azongisami naino te, to akangami na ekateli na ye ya komilongola na lisangá, esengeli na biso kolanda etinda oyo: “Nakomeli bino ete, bosangana na moto moko te oyo abyangami ndeko mpenza, nde azali moto na pité, soko na bilulela, soko mosambeli na bikeko, soko motuki, soko molangwi na masanga, soko mobotoli. Bolya esika moko na moto na lolenge yango te.” (1 Bakolinti 5:11) Nzokande etinda oyo na Biblia esengeli kobongola te lolenge na biso ya kotalela libota ya moto oyo abimisami; awa, tolingi kolobela baklisto oyo bafandi na ndako moko elongo na ye. Bayuda ya Kala bazalaki koyina bakongoli na mpako kino bayinaki nkutu mabota na bato wana. Kasi Yesu alakisaki bongo te. Alobaki ete moto asali lisumu, oyo aboyi kosalisama, asengeli kotalelama “lokola Mopakano mpe lokola mokongoli na mpako”; kasi alobaki te ete basangani ya libota na ye oyo bazalaki baklisto, basengelaki kotalelama lolenge moko.—Matai 18:17.
18, 19. Wapi mwa makambo tokoki kosala mpo na kosalela boklisto epai na libota na boklisto ya moto oyo esili kobimisama na lisangá?
18 Esengeli na biso kosunga mpenza basangani ya libota ya moto oyo abimisami na lisangá, baoyo bazali baklisto ya sembo. Mbala mosusu bazali na mpasi mpe bazali kokutana na mikakatano mpo ete bafandi kati na ndako moko elongo na moto oyo abimisami na lisangá mpe ete moto yango azali kolembisa bango kati na milende na banga ya elimo. Moto oyo abimisami akoki kolinga, lokola mpe akoki koboya ete baklisto bakóta na ndako na ye; to ntango baklisto bazali koya kotala basangani ya libota na ye, mbala mosusu akomiyoka te ete asili kotyama pembeni. To mpe, akobimisa matáta epai na basangani ya libota na ye oyo bazali kosala makasi mpo na koyangana na makita nyonso mpe na ba assemblées na boklisto. (Tala Matai 23:13.) Esengeli na biso ete tomonisa motema mawa epai na baklisto oyo bazali kati na ezalela wana.—2 Bakolinti 1:3, 4.
19 Tokoki komonisa motema mawa epai na basangani na sembo ya libota motindo wana, na kozaláká na “maloba na kobondisa” mpe na kobimisáká masoló na kolendisa. (1 Batesaloniki 5:14) Tozali na mabaku kitoko ya kosunga baklisto yango liboso mpe nsima ya makita, na mosala ya kosakola to na bantango mosusu. Ntina moko ezali te mpo na kolobela likambo ya kobimisama na lisangá, kasi tokoki kolobela masoló mingi na kolendisa (Masese 25:11; Bakolose 1:2-4) Atako bankulutu bakolanda kokokisa mosala na bango ya babateli na mpate epai na baklisto oyo bazali kati na libota yango, ekozala malamu soko biso mpe tokokende kotala bango kozanga ete tozala na boyokani na moto oyo asili kobimisama na lisangá. Soki mbala mosusu afungweli biso ekuke to ayanoli na telefone, tokoki kosenga na ye bobele ete ayebisa moklisto oyo tozali na ye mposa. Mbala mosusu tokoki kobyanga basangani ya libota yango ete baya kolekisa mwa ntango epai na biso. Lilako monene ezali oyo ete: ata bazali na mbula nini, baklisto wana bazali baninga na biso ya mosala; bazali basangani balingami na lisangá na Nzambe, mpe biso tosengeli kotangwa na bango te.—Nzembo 10:14.
20, 21. Tosengeli kozala na elimo nini na ntango moto moko azongisami kati na lisangá mpe ndenge nini tosengeli kosala?
20 Tokoki komonisa motema mawa na libaku mosusu, ntango moto oyo abimisamaki, azongisami kati na lisangá. Masese na Yesu mazali komonisa esengo oyo ezali na likoló, na ntango ‘moto moko na masumu abongoli motema.’ (Luka 15:7, 10) Na ntina na moto oyo abimisamaki na lisangá, Paulo akomelaki Bakolinti ete: “Bosengeli kolimbisa ye mpe kobondisa ye, ete motindo moko to mosusu, moto yango azinda na mawa koleka te. Bongo nalombi bino ete bomonisela ye bolingo.” (2 Bakolinti 2:7, 8) Tolanda toli oyo na mayele mpenza mpe na bolingo kati na mikolo mpe baposo oyo ekolanda kozongisama ya moto oyo abimisamaki na lisangá.
21 Lisese ya mwana mobali na kilikili ezali komonisa likámá moko oyo tosengeli kopengola. Yaya na ye ya mobali asepelaki te mpo na bozongi na ye; nde aokaki mabe. Tomekola ye te, mpe tobómba likunya te likoló na libunga ya kala; tomona mabe te mpo ete moto moko abimisamaki, azongisami kati na lisangá. Kasi, mokano na biso ezali ete tokokana na tata ya lisese, oyo azali komonisa mpenza mayoki na Jéhovah. Mobali yango azalaki na esengo mpo ete, mwana na ye oyo abungaki lokola soko nde akufaki, amonani, to azongi na bomoi. (Luka 15:25-32) Bobele bongo, tokoloba malamu epai na ndeko oyo auti kozongisama kati na lisangá mpe tokolendisa ye na lolenge mosusu. Ee, esengeli komonana ete totóndi na motema mawa epai na ye, lokola Tata na biso ya likoló, oyo na motema mawa, ye oyo azali ntango nyonso pene na kolimbisa.—Matai 5:7.
22. Tosengeli kosala nini mpo na komekola Jéhovah Nzambe?
22 Na ntembe te, soki tolingi komekola Nzambe na biso, tosengeli kozala na motema mawa, na boyokani na mitinda na ye mpe na boyengebene na ye. Tala oyo mokomi na Nzembo alobi na ntina na ye: “Jéhovah azali na mawa mpe na ngolu, akookaka nkanda noki te mpe boboto na ye ezali monene. Jéhovah azali malamu epai na bato nyonso, mawa na ye ezali likoló na misala na ye nyonso.” (Nzembo 145:8, 9) Oyo nde ndakisa malamu mpo na baklisto!
[Maloba na nse ya lokasa]
a “Bakongoli na mpako baboyamaki mpenza na Bayuda ya Palestine, mpe ezalaki bongo mpo na bantina mingi: (1) bazalaki kokongolo mbongo mpo na bokonzi ya bapaya oyo ezalaki koyangela mabelé na Yisraele, na motindo yango, bakongoli na mpako bazalaki kopesa maboko mpo na koumisa ezaleli wana mabe; (2) bayebanaki mpo na kozanga sembo na bango, mpamba te bazalaki komizwela misolo boele epai na bato ya ekólo na bango; (3) na mosala na bango, bazalaki ntango nyonso elongo na Bapakano, eloko oyoy ezalaki kokómisa bango mbindo liboso na Mibeko. Kotyola wana mpo na bakongoli na mpako, emonani ezala kati na K[ondimana] na S[ika], ata mpe na mikanda ya bakonzi na mangomba ya Bayuda... Engebene mikanda yango, esengelaki koyina ata libota ya mokongolo na mpako.”—The International Standard Bible Encyclopedia.
b Soki libota moko na boklisto ezali na moto moko abimisami na lisangá, moto yango akosangana na makambo ya mokolo na mokolo na ndako wana. Na ndakisa, akoki mpe kozala wana na ntango libota bazali kosolola makambo ya elimo.—Tala Mosenzeli ya 15 Février 1989, nkasa 19, 20.
c Tala annuaire des Témoins de Jéhovah 1991, pages 53, 54.
d Soki Témoins moko ayoki wana ezali ye na mosala ya kosakola ete moto moko asilá kobimisama na lisangá afandi na teritware na bango, asengeli koyebisa yango na bankulutu.
Bozongeli
◻ Ndenge nini Bayuda bazalaki kotalela bakongoli na mpako mpe bato na masumu, mpe mpo na nini Yesu azalaki kokutana na bamoko kati na bango?
◻ Bibongiseli ya motema mawa epai na ebele na bampate basili kobunga, etongami likoló na moboko nini na Biblia?
◻ Ndenge nini lisangani moko na moko ya bankulutu esengeli kosala mpo na kobanda bibongiseli motindo wana, mpe epai na motindo nini na bato oyo basili kobimisama na lisangá?
◻ Ndenge nini tokoki komonisa motema mawa epai na bato oyo bazongisami kati na lisangá mpe epai na mabota ya bato oyo basili kobimisama na lisangá?
[Etanda na lokasa 23]
Moto moko te oyo azalaki na lisangá na peto mpe na esengo na Nzambe, nde sikawa ebimisami na lisangá to mpo amilongoli na lisangá, akoki kokanisa te ete asengeli kotikala kati na ezalela wana libela. Azali na likoki ya kobongola motema mpo kosala litambé ya liboso na kokutanáká elongo na bankulutu ya lisangá. Nzela ya bozongi efungwami mpo na ye.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24]
Garo Nalbandian