Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/1 lok. 23
  • “Kolemba te mpo na kosala malamu”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Kolemba te mpo na kosala malamu”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Komonana mpe koya na Klisto
  • Esengeli kosala lolenge nini epai na bato na yauli
  • Mokanda ya Biblia nimero 53—2 Batesaloniki
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mokanda ya Biblia nimero 52—1 Batesaloniki
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • ‘Koningana nokinoki te na makanisi na yo’!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/1 lok. 23

“Kolemba te mpo na kosala malamu”

Ndimbola ya makambo na ntina na mokanda ya mibale epai na Batesaloniki

NA NTINA na likebi monene oyo azalaki kotya epai na baklisto ya Tesaloniki, engumba ya Makedonia, ntoma Paulo akomelaki bango mokanda ya mibale, pene na mobu 51 ya ntango na biso. Basangani mosusu ya lisangá balobaki na libunga ete komonana na Yesu Klisto ebelemaki mpenza. Mbala mosusu mokanda moko mokomamaki komonisáká na lokuta ete mouti epai na Paulo, kolakisáká ete “mokolo na Jéhovah” mobelemaki.​—2 Batesalonike 2:1, 2.

Emonanaki ntina ete bamoko na Batesaloniki basalisama na kosembola makanisi na bango mabe. Kati na mokanda na ye ya mibale Paulo akumisaki bango na ntina na kondima na bango oyo ezalaki kokóla, mpo na bolingo na bango bozalaki kobakisama mpe na ntina na mpiko na bango. Kasi alimbolaki lisusu ete lipengwi ekoya liboso na komonana na Yesu. Esengelaki bongo komizela na kobika na ntango na mpasi, mpe mokanda ya mibale ya ntoma esengelaki kosalisa Batesaloniki na kokanga ntina ya likebisi na ye, oyo ete: “Bolemba te mpo na kosala malamu.” (2 Batesaloniki 3:13) Maloba na Paulo ekoki mpe komemela biso lisalisi motindo moko.

Komonana mpe koya na Klisto

Na maloba na ye ya ebandeli Paulo alobeli nsuka na bolózi. (1:1-12) Epemelo wana ekokóma “na ntango na komonana na Nkolo Yesu, wana ekobima ye na likoló elongo na baanzelu na ye ya nguya.” Bongo nde koboma na seko ekoya likoló na bango baboyi kotósa nsango malamu. Ezali elendiseli na komikundola maloba oyo na ntango tozali konyokwama.

Paulo abendi lisusu likebi likoló na oyo ete “motyoli na mibeko” akomonana liboso na koya na Klisto. (2:1-17) Batesaloniki basengelaki te komitika kokosama soko na nsango moko te oyo ezalaki komonisa ete “mokolo na Jéhovah” esilaki koyela bango. Esengelaki liboso naino ete lipɛngwi limonana mpe ete motyoli na mibeko amonana. Nsima, Yesu asengelaki koboma ye, na ntango na koya na Ye. Kozeláká, Paulo azalaki kobondela mpo ete Nzambe mpe Klisto babondisa mitema ya Batesaloniki mpe “alendisa bango na misala mpe na maloba nyonso malamu.”

Esengeli kosala lolenge nini epai na bato na yauli

Na maloba malandi kati na mokanda ya Paulo, tozali kokufa malako likoló na lolenge oyo esengeli kosala epai na bato na yauli. (3:1-18) Paulo andimisamaki ete Nkolo akolendisa Batesaloniki mpe akobatela bango na oyo mabe, Satan le Diable. Kasi mpo na kobatela bolamu na bango ya elimo, basengelaki komizwela myango. Basengelaki kopengwa longwa na bato na yauli, baoyo bazalaki komikotisa na makambo na bato mosusu mpe na bagoigoi. Paulo alobi ete: “Soko moto nani alingi kosala te, alya mpe te.” Batesaloniki basengelaki kososola bato yango mpe koboya kotambola elongo na bango, kasi kokebisaka bango lokola bandeko na bango. Baklisto na sembo ya Tesaloniki basengelaki kotika kosala malamu te, mpe Paulo alingi ete ngolu na Nkolo Yesu Klisto ezala na bango banso.

Mokanda ya mibale ya Paulo epai na Batesaloniki ezali kopesa ba Témoins de Jéhovah elikya ete bakozwa epemelo, nsuka na bolózi na bango, wana Yesu mpe baanzelu na ye bakoyeisa etumbu likoló na baoyo baboyi kotósa nsango malamu. Kondima na biso elendisami lisusu mpo ete “motyoli na mibeko,” bakonzi na mangomba na boklisto ya lokuta, mosika te bakobomama elongo na lingomba ya lokuta. Kozeláká, tolanda kotalela malamu likebisi ya Paulo ete kotika kosala malamu te.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 23]

Liloba na Jéhovah elandi kotambola na lombángo: Paulo akomaki etel “Bobondelaka mpo na biso ete Liloba na Jéhovah litambola mbango [to “lipota mbángo”] mpe likumisama lokola ezali epai na bino.’ (2 Batesaloniki 3:1) Balimboli mosusu bapesi ndimbola oyo ete ntoma azalaki kokanisa na bapoti mbango oyo bazali kopota nokinoki na ntango na emekaneli ya mbángo. Ata soko ndimbola yango ezali solo te, kasi Paulo asengaki mpenza epai na baklisto ya Tesaloniki ete babondela mpo na ye mpe baninga na ye ya mosala, mpo ete bakoka kopalanganisa liloba ya solo na molende mpe kozanga epekiseli. Mpo ete Nzambe andimaka mabondeli motindo oyo, nsango malamu esili kosakolama na mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo, mpe liloba na ye lizali ‘kotambola na lombango.’ Liloba na Jéhovah lisili mpe “kokumisama,” mpo ete bandimi bazali kotya likebi monene na komekoláká Batesaloniki, mpo ete yango ezali “nguya na Nzambe na lobiko.” (Baloma 1:16; 1 Batesaloniki 2:13) Tozali na esengo ya komona ete Nzambe azali kopambola basakoli na Bokonzi mpe kobakisa molongó ya basambeli na ye na lombango!​—Yisaya 60:22.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto