Osengeli kosambela Nzambe nini?
MPO NA KOBANDA, wapi Nzambe bobele moko oyo asengeli kosambelema? Biblia ezali koyanola na motuna oyo. Tala oyo tozali kotanga kati na mokanda ya Emoniseli: “Jéhovah, Nzambe na biso, obongi na nkembo, na lokumu mpe na nguya mpo ete yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo nde bizali mpe bisili kozalisama.” (Emoniseli 4:11) Solo mpenza, Jéhovah, Mozalisi, azali Nzambe bobele moko oyo abongi na losambo na biso. Mpo na nini? Mwa liboso kuna, tokolobela lisusu likambo oyo. Kasi tolobela naino liboso banzambe mosusu oyo bato bazali kosambela.
Oyo azali nsima na banzambe nyonso ya lokuta
Atako bato bazali kosambela banzambe mingi, losambo oyo losalemi epai na banzambe nyonso wana—longola bobele oyo esalemi epai na Jéhovah, Mozalisi—esalemi bobele epai na nzambe moko. Ndenge nini wana? Totala oyo ntoma Paulo akomaki epai na baklisto ya Kolinti. Kati na engumba yango, bato bazalaki kosambela ebele na banzambe, uta Aphrote, nzambe-mwasi na mposa na nzoto kino Esculpe, nzambe na kobikisa. Kasi, Paulo amonisi ete ezali bobele nguya moko makasi nde ezali nsima na banzambe nyonso wana. Akomaki boye: “Wana mabotá bakopesaka mbeka, bakokabaka yango na bilimo mabe kasi na Nzambe te.” (1 Bakolinti 10:20, MN) Bapakano ya Kolinti Bapakano bazalaki bongo kosambela bilimo mabe.
Bilimo mabe bauti na botomboki moko. Elimo mabe ya liboso mpe oyo aleki kati na bango, ezali anzelu oyo apusaki Eva na kobuka mobeko na Nzambe na elanga ya Edene. (Genese 3:1-6; Yoane 8:44) Na kosaláká bongo, ekelamu yango atombokelaki boyangeli ya Mozalisi. Na nsima, abéngámáki Satana, oyo elimboli “motemeli.” Na boumeli ya ntango, bikelamu mosusu balandaki ye na botomboki. Bongo mpe bakómaki bilimo mabe, mpe Satana abéngámi “mokóló na bilimo mabe.” (Matai 12:24, 26) Kati na mokanda ya Emoniseli, bilimo mabe babéngámi “baanzelu” ya Satana. (Emoniseli 12:7) Na yango, kosambela bilimo mabe elimboli mpe kosambela Satana.
Satana azali na bopusi makasi. Ntoma Yoane alobi ete “mokili mobimba” mozali na nsé na nguya na ye, mpe Paulo abéngáki ye “nzambe na mokili oyo.” (1 Yoane 5:19; 2 Bakolinti 4:4) Na yango, losambo oyo losalami epai na nzambe mosusu longola Jéhovah, ezali mpenza kosalama nde na Satana. Na kotalela makambo nyonso wana, lolenge oyo na kosala ezali kokokisa mokano ya Satana, oyo ezali mpo na kopusa bana na Adama mpe Eva ete batombokela Jéhovah. Mpo ete Satana azali “kozimisa bato na mokili mobimba,” ezali polele ete asili kolónga na makambo mingi mpenza. (Emoniseli 12:9) Kasi na makambo nyonso te. Bato mingi bazali kosala milende ya kosambela Jéhovah. Mpo na nini?
Mbuma ya losambo na lokuta
Epai mosusu, bayebi nini ekosengaka losambo ya banzambe mosusu longola Jéhovah, kasi bakotikaka losambo yango te. Bokundoli ya arkeoliji oyo bosalemaki na cartage, na Afrique du Nord, emonisaki mayita na bana. Bakundolaki mikuwa ya bana oyo bapesamaki lokola mbeka epai na Bala, nzambe na Bafenisia. Bambeka ya bana ezali motuya makasi oyo bato na Cartage bazalaki kofuta na losambo na Bala. Mpasi monene oyo lingomba ya Katolike epesaki epai na bato na boumeli na bitumba ya croisades oyo bisopaki makila mingi to bitumba oyo bibomi bato mingi, ezalaki mpasi makasi Mpo na losambo ya nzambe inca oyo esalamaki na Amerike liboso na koya na colomb, esengisaki mbeka na milulu ya ebele na bato.
Kala mingi te, mangomba mingi mapesaki nzela na koboma monene na mboka lnde mpe engalisaki mpenza matata na politike ya Moyen orient mpe na lrlande du Nord. Kozanga boyebi, biyambayamba mpe bobangi ezali mpe kati na makambo oyo bato bakosalaka kati na losambo ya ebele na banzambe.
Mpo na nini tosengeli kosalela Jéhovah
Na kokesene, losambo na Jéhovah ekopesaka bolamu. Mpamba te, na epai moko, azali ye “Oyo azali na bomoi libela na libela, ye oyo azalisaki likolo mpe biloko bizali kati na yango, ná mabelé mpe biloko bizali kati na yango.” (Emoniseli 10:6) Lisusu, tosengeli kosambela ye mpo ete azali Mozalisi na biso.
Tosengeli lisusu kosambela Jéhovah Nzambe mpo ete bizaleli na ye bizali kopusa biso na kosala bongo. Ntoma Yoane alobaki ete, “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Yobo, moto na sembo alobaki ete, “(nzambe) azali na mayele kati na motema mpe na nguya mingi makasi.” (Yobo 9:4) Moise ayembaki na ntina na ye boye, ete: “Ye Libanga, mosala na ye mobongi, mpo ete nzela na ye nyonso boyengebene Nzambe na sembo mpe na mabe te, ye moyengebene mpe mosembwi.” (Deteronome 32:4) Nani akokakatana na kosambela motindo na Nzambe oyo?
Lisusu, tozali kotanga kati na Biblia ete: “Ezaleli ya kobanga Nzambe ekopesaka litomba na nyonso, awa ezali yango na elaka mpo na bomoi ya lelo oyo mpe mpo na bomoi na ntango ekoya.” (1 Timoté 4:8, MN) Maloba oyo mazali mpenza solo. Jéhovah alingi bolamu na bato. Azalisaki mabelé, efandelo kitoko mpo na bato, mpe atyaki kati na yango biloko nyonso oyo bikokaki kosala ete bomoi ezala malamu. Atako botomboki ya moto na liboso, Nzambe alandaki kobongisa bomoi awa na mabelé, kopesáká biloko nyonso bisengeli epai na bato, “mpamba te akobimisaka moi na ye likoló na bato mabe mpe bato malamu, mpe akonokisa mbula likoló na bayengebene mpe na bapengwi.” (Matai 5:45)
Kasi “bomoi ya lelo” ekomema mosika. Kosalela Nzambe ekopesaka esengo mpe bolamu. Ezali yango nde elakamaki na biso. Lisusu, Nzambe azali kosalisa baoyo bazali kosalela ye na bosembo nyonso ete bazala na bomoi malamu. Na nzela na Biblia, azali kopesa batoli epai na mitindo na bato banso: minzemba, babalani, bana—ata soko ezalela na bango ezali nini. Azali kopesa biso mayele ya solo mpe oyo ebongi mpo na kosalisa biso na mabaku nyonso, na kolonga mikakatano oyo tokoki kokutana na yango na bomoi na biso ya bato bazangi kokoka, koyebáká ete tozali kobika kati na mokili motambwisami na Satana. Soki tozali kosambela Nzambe na lolenge oyo lokosepelisaka ye, tokoki kozwa “kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.”—Bafilipi 4:7.
Oyo ezali lisusu kitoko, ezali “elaká ya bomoi mpo na ntango ekoya.” Yesu alobaki na Mofalisai moko na nkombo Nikodeme ete: “Mpo ete Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana-na-likinda na ye ete moto na moto oyo akondima ye, abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko.” (Yoane 3:16) Bomoi na seko! Longola bobele Jéhovah, nzambe nini mosusu akoki koluka likambo motindo oyo mpe kokokisa elaka na ye? Ezalela ya bomoi ya bango bakozwa likabo oyo kitoko, ekomami na maloba oyo kati na Emoniseli, ete: “(Nzambe) akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te; na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo na ete makambo na liboso masili koleka.” (Emoniseli 21:4, 5) Solo mpenza, bilaka ya bomoi mpo na ntango ekoya esengeli kopusa biso na kolinga kosalela Jéhovah!
Boye, osengeli kosambela Nzambe nini? Bobele Jéhovah, Mozalisi, kasi mosusu te. Maloba oyo makokisami bobele na ye moko: “Misala na yo minene mpe na kokamwa, ɛ Jéhovah Nzambe, Mozwi—na-Nguya Nyonso. Nzela na yo sembo mpe na solo, ɛ Mokonzi na mabota Nani akozanga kobanga yo, Jéhovah? Nani akozanga kokumisa nkombo na yo? Yo moko ozali sembo. Mabota nyonso bakoya mpe bakosambela liboso na yo, mpo ete bikateli na yo na sembo bisili komonisama.” (Emoniseli 15:3, 4) Baoyo bazali kondima elendiseli oyo na mokomi na Nzembo bazali mpenza mayele: “Yakani tosambela mpe tokumbama; tofukama liboso na Jéhovah, Mozalisi na biso.”—Nzembo 95:6.
[Elilingi na lokasa 6]
Ndambo na banzambe oyo Satana asili kopusa bato ete basambela bango
[Elilingi na lokasa 7]
Elikya ya bomoi na ntango ekoya esengeli kopusa biso na kolinga kosalela Jéhovah