Armagedon ekoya ntango nini?
“TOBELEMI na Armagedon mpe tozali kobunda mpo na Nkolo.” Ntango abimisaki maloba wana, président ya kala ya Etats—Unis Theodore Roosevelt asalelaki liloba Armagedon mpo na koloba na ntina na etumba moko ya politike oyo kati na yango, ye mpe atalelamaki, Na yango, tosengeli koluka ndimbola ya Armagedon kati na etumba ya politike?
Esili koleka mwa bambula, zulunalo Business Life ya canada oyo ebimaka mbala moko na sanza ebimisaki lisolo oyo na motó na likambo: “Armagedon ya nkita”. Sous—titre moko ebimisaki motuna oyo: “Kozanga kofuta nyongo oyo ndambo na misato ya bamboka ya mokili edefaki, ekoki nde kokweisa nkita na biso?” Tokoki bongo kokokisa Armagedon na kokwea mabe ya nkita?
Engebene Newsweek zulunalo oyo ebimaka poso na poso, motuna na ntina na nsuka ya mokili epesaki nzela na likita moko na ntango ya kampanye mpo na kopona président ya Etats—Unies na 1984. Na libaku yango, batunaki na président Ronald Ragean “soki andimi mpenza ete mokili ezali kokende na ‘Armagedon nikleere’. Alobaki polele ete abimisaki maloba na lolenge ya filozofi mpo na bokokani oyo tokoki komona kati na makambo ya sika mpe bilembo na Biblia oyo ezali komonisa mikolo na nsuka, kasi alobaki makasi ete ata mokolo moko te ye asila koloba ete ‘tosengeli komibongisa mpo na Armagedon”. Kasi, tosengeli kosukisa ete Armagedon ezali etumba ya basoda oyo ezali komonisa likama mpo na koboma ya nsomo na bibundeli ya nikleere?
Bato mingi oyo bazali bandimi bakolobaka ete Armagedon ezali etumba Kasi na ebandeli na ekeke ya zomi na libwa, molimboli na Biblia Adam clarke akomaki ete: “Lolenge bato bazali kokanisa na ntina na likambo yango ezali malamu te! Na boumeli na mibu ntuku mibale oyo esili koleka, etumba yango esalamaki bisika bikeseni, soki tokondimela bamoni na makambo bakufeli—miso mpe baoyo balobi ete bazali basakoli na biso oyo bapemami! Na eleko moko, etumba yango ezalaki na Austerlitz, na ntango mosusu ekomaki na Moscou, na eleko mosusu lisusu na Leipzig, mpe sikawa na Waterloo! Na bongo bakobanda komikosa mpe bakokosama ntango nyonso.”
Kolukaluka ndimbola ya liloba Armagedon ezali kobimisa mpenza mituna oyo ya ntina mingi. Armagedon ezali nini? Soki ezali etumba, banani bakolonga? Likama ekozala ndenge nini? Ekosalema wapi? Mpe ntango nini?
Armagedon ezali nini?
Liloba “Armagedon” ezwami na liloba oyo tozali kokuta na Biblia na mokanda ya Emoniseli to Apokalypse, oyo eyebani mingi mpo na elobeli na yango ya elilingi. Kati na mokanda yango, ntoma Yoane akomaki: “Namoni maloba misato mapemami na bilimo na mbindo lokola mbemba kobima na monoko na dalagona mpe na nyama na yauli mpe na mosakoli na lokuta. Mpo ete mazali maloba mapemami na badémo mpe mazali kosala bilembo, mpe makei epai na bakonzi na mokili mobimba koyanganisa bango mpo na etumba na mokolo yango monene na nzambe Mozwi—na-Nguya-Nyonso. . . . Mpe bayanganisi bango na esika ebyangami na monoko na liebele ete Armagedon.”—Emoniseli 16:13-16.
Armagedon, to Ar-Magedon, ezali ekomeli ya greke mpo na liloba Har Meghiddón na liebele oyo elimboli “ngomba ya Méguiddo”, to “ngomba na koyanganisa mapingá”. Likambo yango ezali na bokokani na “etumba na mokolo yango monene na Nzambe Mozwi—na—Nguya—Nyonso”. Na yango, Armagedon ezali matata kati na politike te, kokwea na nkita te, koboma ya nsomo na etumba ya nikleere te to kozanga boyokani kati na bato te. Armagedon ezali bongo etumba ya Nzambe.
Banani bakolonga?
Maloba misato mapemami lokola mbemba mazali kobima na monoko na dalagona (Satan le Diable), na nyama na yauli (ebongiseli na ye ya politike na mokili mobimba) mpe mosakoli na lokuta anglo-américain. Maloba oyo mapemami na badémo, to baanzelu mabe, mazali koyanganisa bakonzi na mokili mobimba to batambwisi na Armagedon. Tala mokapo 32 na mokanda “Emoniseli: Kokokana na yango ebelemi! oyo ebimisami na la Watchtower Bible and Tract Society of New York, lnc.
Na ntango na etumba ya Armagedon, limpinga monene na bibele na bikelamu na elimo na kozanga komonana, baoyo bakambami na Yesu Klisto, bakozala na ngambo ya Jéhovah. Ntoma Yoane akomi ete: “Namonaki likoló esili kozipwa, mpe tala mpunda mpembe, mofandi na ye abyangami Sembo na Solo (Yesu), mpe akosambisaka mpe akobundaka etumba na boyengebene . . . Bibele na babundi na likoló bazalaki kobila ye . . . Mpe na monoko na ye mopanga molai na kopela ebimi na ntina ete abola mabota nyonso. Ye akokengela bango na mpimbo na ebende. Ye ekonyata ekamwelo na vinyo na kongala na nkele na Nzambe Mozwi—na—Nguya—Nyonso. Na elamba na ye mpe na ebele na ye, azali na nkombo ekomami ete, Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankolo.” (Emoniseli 19:11-16). Mopanga molai na kopela emonisi bokonzi oyo Klisto azali na yango mpo na kopesa etinda ya koboma baoyo nyonso baboyi kopesa mabɔkɔ na Bokonzi na Nzambe. (Emoniseli 1:16; 2:16). Bikelamu na elimo mingi mpe na makasi bazali pene mpo na kobimisa etumbu ya Armagedon.
Banguna na bango ezali bongo Satana, mampinga na ye ya badémo mpe bakonzi ya mokili mobimba. Kasi tosengeli kokanisa bobele bakonzi ya mokili te, mpamba te bato oyo bango bazali koyangela bazali mpe kotalelama. Mosakoli Yisaya asakolaki ete: “Jéhovah asiliki na mabota nyonso, azali na nkanda mpo na ebele na bango mobimba.”—Yisaya 34:2.
Likama ekozala ndenge nini?
Armagedon ekoya mpamba te boyengebene na Nzambe ekopesa nzela na ntango molai na mabe te. (Nzembo 11:7) Lisanga ya Satan le Diable, oyo esalami bobele na bademo mpamba te kasi mpe na bato oyo batomboki, oyo na boumeli ya bambula mingi ezali ntina na mabe mpe mpasi, esengeli mpe kobomama (Tala Genese 3:15) Na Armagedon, boyangeli ya molongo mobimba na Jéhovah ekolongisama mpe etumba yango ekolongola nsoni na likoló na nkombo na ye oyo esili kotyolama uta bikeke mingi. Tala oyo Nzambe asakolaki na nzela ya mosakoli Ezekiele ete: “Nakotika nkombo na ngai mosantu etyolama lisusu te, mpe mabota bakoyeba ete ngai nazali Jéhovah.”—Ezekiele 39:7.
Ya solo, etumba na Nzambe, Armagedon ekopekisa ete mabelé ekoka kobomama. Jéhovah azalisaki mabelé mpo ete bato bakoka kofanda wana, kasi mpo na kobomama te na etumba ya nikleere oyo ekobimisama na bato, to kobebisa yango na lolenge mosusu. (Yisaya 45:18) ‘Akobebisa baoyo bazali kobebisa mabelé’. (Emoniseli 11:18.) Nzokande mokomi na Nzembo alobaki ete: “Jéhovah akomi Mokonzi. Mabelé (na liebele tével; mabelé oyo ezali kobota malamu mpe bato bafandi likolo na yango, eteni na etando oyo ezali na bato) etongami na makasi mpe ekoningana te.”—Nzembo 96:10.
Oyo Nzambe akosala na Armagedon ekozala na boyokani mpenza na bizaleli na ye ya ntina, yango boyengebene, mayele, nguya mpe bolingo. (Deteronome 32:4; Yobo 12:18; Yisaya 40:26; 1 Yoane 4:8). Akoboma baoyo nyonso “bakotyolaka mibeko”, kasi bayengebene te. (Yuda 14, 15) Ezali bobele ‘basali na mabe nde akopesa bango epai na mopanga’. (Yilimia 25:31) Etumba yango ekofungola nzela na kozongisama ya paradis, na kokokisáká bongo mokano na Nzambe mpo na oyo etali mabelé mpe bato.—Luka 23:43.
Ekosalama wapi?
Lokola liloba Armagedon euti na liloba na liebele oyo ezali kolimbola “ngomba na Méguiddo”, moto akoki kosukisa ete etumba yango ekosalama likoló na ngomba moko oyo ebengami na nkombo wana. Nzokande, ezali na ngomba moko te oyo ebyangamaki Méguiddo. Na ba kilométres soko nkama na nord-ouest ya Yelusaleme, ezalaki na engumba moko na lopango makasi oyo ebiangamaki Méguíddo, nzokande, sikawa, bobele mwa ngomba moke oyo ezali soko na ba métres ntuku mibale ya bolai nde etelemi esika yango.—Yosua 17:11.
Engumba yango na kalakala ezalaki likoló ya “lobwako na esobe ya Méguiddo (megido)”. (2 Ntango 35:22.) Na yango ebongi kokokisa Armagedon (to Har-Magedon) na esika wana, mpamba te ezalaki esika bazalaki kobunda bitumba makasi Na ndakisa, ezalaki na esika yango nde Jéhovah apesaki nzela na mosambisi Barak na kolonga makasi mokonzi na Bakanane Jabin mpe mampinga na ye oyo elambamaki na Siséra. (Basambisi 4:12-14; 5:19, 20). Ezali na esika wana nde Gédéon mpe etuluku na ye moke bakimisaki Bamadianite. (Basambisi 7:1 kino 8:35) Ezali mpe na esika wana nde babomaki mokonzi Ahazia mpe mokonzi Yosiya.—2 Mikonzi 9:27; 23:29, 30.
Nzokande, ezali malamu koyeba ete lobwako na esobe yango, oyo ebiangami mpe esobe ya Esdrelon, ezali bobele na 32 km na molai mpe 29 km na monene na ndelo na yango epai na ebimelo na ntango. Bakonzi ya mokili mobimba elongo na mampinga na bango bakoki te kobunda likolo na eteni ya mabelé moke boye. Lisusu, esika oyo etombwani (tell ya Megido) to esobe ezali ngomba te. Na yango, etumba na Armagedon ekosalama na esika moko te oyo ezali ngomba na mokili ya Proche-Orient. Atako liloba yango ezali kozwa ndimbola na yango na Méguiddo (Megido), mpe na makambo oyo malekaki na mokili yango, Armagedon (to Har-Maguédon) ezali bongo komonisa ezalela ya mokili mobimba.
Ekoya ntango nini?
Lokola Méguiddo (Megido) ezalaki kala na mokili ya libota na Nzambe, makambo oyo makoleka na Armagedon mazali na boyokani na Ba Témoins de Jéhovah ya ntango na biso, na “mikolo ya nsuka”. (Danyele 12:4.) Armagedon ezali komonisa “esika” epai bakonzi ya politike na mokili mobimba bayangani baoyo bazali kotelemela Jehovah na Bokonzi na ye oyo etambwisami na Yesu Klisto. (Emoniseli 16:14, 16) Kasi “esika” yango (na greke topos) emonisi ezalela ya mokili mobimba Armagedon ekoya bongo na ntango ezalela moko ekokola oyo ekozala likama mpo na Ba Témoins de Jéhovah ya mokili mobimba.
Bozwi na elimo ya Ba Témoins de Jéhovah ezali koyeisa nkanda ya Diable, oyo mosika te akobundisa baklisto oyo bamonani lokola ete bazali na libateli te. Etumba yango ya mokili mobimba ya Satana, to Gog, ekomami na Ezekiele mikapo 38 mpe 39. Na kopusama na Satana, mabota ya mokili bakosala étuluku moko mpo na kobundisa libota na kimya ya Jéhovah oyo eponami kati na mabota ya mokili. Ya solo, botemeli oyo ya Satana ekozala likoló na basakoli mpe bamonisi ya Bokonzi na Nzambe baoyo bazali komonana.
Etumba eyebanaka mingi na nkombo ya esika epai kuna yango ebundamaki. Ezali mpo na yango nde likambo na nguya oyo Nzambe akosala mpo na kokotela libota na ye ekoki mpo na kobengama etumba ya Armagedon. Ntango Jéhovah akotelema mpo na kokotela basaleli na ye na ntango Gog akobundisa bango, ntango wana Armagedon ekosalema! Biyangeli na bato ekolimwa. Mbula makasi, mabanga minene na kobebisa, mbula na móto mpe na sufulu, maladi mabe misala ya solo na Nzambe ekotia nsomo makasi libanda ya lisangá ya Ba Témoins de Jéhovah. Banguna na bango oyo mopanga na moto na moto ekobongwana epai na ndeko na ye, mpe baoyo bakokufa te na kobomana oyo, Jéhovah akoboma bango nyee.—Ezekiele 38:18-23; Danyele 2:44.
Na nsomo nyonso, moko na moko akotelemela mozalani na ye kati na etumba oyo na kozanga mawa, kasi moto akobika te. (Zakalia 14:12, 13) “Mpe babomami na Jéhovah na mokolo yango bakozala longwa na molelo moko na mokili kino molelo mosusu na mokili; bakobimisamela bileli te, bakoyanganisama te, bakokundama mpe te; bakozala lokola nyei likolo na mabelé.” (Yilimia 25:33). Na boumeli na etumba na Nzambe, na Armagedon, komeka kozala na bokatikati (neutre) ekolimbola liwa. Lokola mpe yango ezali mbala mingi komonisama kati na zulunalo oyo, libota ya lelo ekoleka te liboso ete Armagedon eya.—Matai 24:21, 34.
Oyo Armagedon ekosala
Armagedon ekolimwisa bilembo nyonso ya nsuka ya lisangá na Satana na mabelé. Lisusu, Diable na badémo na ye bakobwakama na libulu mozindo. (Emoniseli 20:1-3) Mapamboli mingi makozala mpo na libota na Jehovah, babiki na esengo na etumba monene ya Armagedon! Na esengo nyonso bakokokisa mosala ya kobongola mabelé mobimba na paradis, epai kuna kobebisama na mopepe, mai to mabelé, mpasi, kolela, mpisoli mpe liwa ekozala lisusu te. (Emoniseli 21:3, 4) Okoki kozala na bomoi kati na yango soki okangi ntina ya maloba oyo na mokomi na nzembo, ete: “(tya elikya, MN) epai na Jéhovah mpe batela nzela na ye, akokembisa yo ete osangola mokili (mabelé, MN). Okomona kobeba na bato mabe.” (Nzembo 37:34) Ya solo, okoki komona Armagedon, etumba na mokolo yango monene na Nzambe Mozwi—na—Nguya—Nyonso, mpe kozala kati na babiki na esengo na etumba yango.
Armagedon ezali kozanga boyokani kati na politike te, kokwea na nkita te etumba na nsomo na nikleere te, to malala kati na bato mpe te. Armagedon ezali nde etumba na Nzambe.
“Lokola biloko nyonso bisengeli kobebisama ebongi na bino kozala bato na lolenge nini na bizaleli na bulee mpe kobanga Nzyambe, kotalela mpe koyeisa noki komonana ya mokolo na jehovah.”—2 Petelo 3:11, 12.
[Likanisi ya paragrafe on page 4]
Armagedon, etumba na Nzambe ekopekisa ete mabelé mabebisama te.
[Likanisi ya paragrafe on page 5]
Na boumeli na etumba na Nzambe na Armagedon, komeka koloba ete ozali na ngambo moko te ekolimbola liwa.