Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/9 nk. 8-9
  • Yesu ateyi na Yeriko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu ateyi na Yeriko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Masolo mosusu
  • Yesu ateyi na Yeriko
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Yesu abikisi mibali oyo bakufá miso mpe asalisi Zakai
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Baninga na biso basengeli kolinga Nzambe
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Nsuka ya mabe nyonso ebelemi!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/9 nk. 8-9

Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye

Yesu ateyi na Yeriko

MOSIKA te Yesu mpe bibele oyo bazali na mobembo elongo na ye bakomi na Yeriko. Kolongwa Yerusaleme kino Yeriko esengeli kotambola mokolo mobimba na makolo. Yeriko ezali mboka mibale. Ezali na mboka ya kala oyo ya Bayuda ekabwani na mboka ya sika oyo ya Baromé na ntaka na kilomètre moko na ndambo. Bato oyo bauti na mboka ya kala mpe bazali kokenda na mboka ya sika bazali kotya makelele na boye ete ebendi likebi ya bakufi miso mibale bafandaki wana kosenga mbongo. Moko na bango nkombo na ye Bartimée.

Ntango bayoki ete ezali Yesu moto azali koleka, Bartimée mpe moninga na ye babandi konganga: “Nkolo, yokela biso mawa, ee mwana na David.”

Na makelele wana, Yesu atelemi mpe asengi na baoyo bazali kotambola na ye ete babenga bato oyo bazali konganga. Baninga na ye bakei epai na bakufeli miso mpe balobi epai na moko na bango: “Yika mpiko, telema azali kobyanga yo.” Na kobanga nyonso, abwaki elamba na ye ya likoló, atelemi mbala moko mpe akei epai na Yesu.

Yesu atuni mibali yango boye: “Bolingi ete nasalela bino nini.”

Babondeli ye boye: “Nkolo, miso na biso mafungwama!”

Eyoki ye mawa, Yesu asimbi bango na miso mpe, engebene lisolo na Malako, alobi na moko na bango: “Kenda na yo, kondima na yo esili kobikisa yo.” Bobele na ntango yango bakufi miso oyo babandi komona; mpe na ntembe te bango mibale babandi kokumisa Nzambe. Emoni bango makambo masalemi, bato babandi kokumisa Nzambe. Kozanga kokakatana, Bartimée mpe moninga na ye babandi kolanda Yesu.

Wana ezali ye kokatisa Yeriko, Yesu azingami na ebele na bato. Moto nyonso alingi komona ye oyo abikisi bakufeli miso. Bato bazingizingi ye na bipai binso na boye ete bamosusu bakoki ata komona ye te. Kati na bango ezali na mobali moko abengami Zakai, mokonzi na bakongoli na mpako na Yeriko mpe na bamboka ya pembeni Nzokande, mobali yango azali mokuse mpenza na boye ete akoki komona te makambo mazali koleka.

Akimi mbango na liboso mpe amati na nzete na miwiti pembeni na nzela epai Yesu azali koleka. Azali na esika malamu mpo na komona makambo manso. Wana bibele bazali kopusana, Yesu atomboli miso mpe abengi: “Zakai, kita noki, mpo ete ekoki na ngai kofanda na ndako na yo lelo.”

Na esengo nyonso, Zakai akiti mpe akimi mbango na ndako na ye mpo na komibongisa na koyamba mopaya monene oyo. Kasi, emoni bango likambo yango, bato nyonso babandi koimaima, mpamba te bamoni mabe ete Yesu ayambama na moto lokola Zakai. Zakai akomaki mozwi mpo azalaki kobotola mbongo ya bato na mosala na ye ya mokongoli na mpako.

Bato mingi bazali kolanda Yesu mpe, ekoti ye na ndako na Zakai, basepeli te mpe balobi: “Akei kofanda na ndako na moto na masumu.” Nzokande Yesu asosoli ete Zakai azali moto oyo akoki kobongwana. Mpe makanisi na ye makokani mpamba te Zakai atelemi mpe alobi: “Yoka Nkolo, nakopesa babola ndambo na mibale na biloko na ngai. Soko mpe nabotolaki moto eloko, nakozongisa yango mbala minei.”

Zakai amonisi ete Kobongwana na ye ezali sembo na ndenge andimi kopesa ndambo na bozwi na ye epai na babola mpe na ndambo mosusu andimi kozongisa mosolo oyo abotolaki. Na lisalisi ya mikanda na ye akoki koyeba mosolo oyo asengeli kozongisa. Yango wana alapi ndai mpo azongisa mbala minei, na kolandaka mobeko ya Nzambe oyo elobi: ‘Soko moto ayibi mpate, akozongisa mpate minei mpo na mpate.’

Yesu asepeli mingi na ndenge Zakai alaki kokabola bozwi na ye, mpamba te alobi: “Lelo kobikisama eyei na ndako oyo, mpo ye mpe azali mwana na Abrahame. Mpo ete Mwana na moto ayei koluka mpe kobikisa yango ebungani.”

Mwa liboso, Yesu amonisaki ezalela ya ‘baoyo babungani’ na lisese ya mwana oyo atikaki ndako ya baboti na ye. Sikawa, tozali na ndakisa ya moto oyo abungaki mpe amonani lisusu. Atako bakonzi na mangomba mpe bato na bango bazali koimaima mpe baboi ete Yesu atya likebi na ye epai na bato lokola Zakai, Yesu azali se koluka mpe kobikisa bana na Abrahame oyo babungaki. Matai 20:29-34; Malako 10:46-52; Luka 18:35 kino 19:10; Exode 22:1.

◆ Epai wapi Yesu akutanaki na bakufeli miso mpe asalaki nini mpo na bango?

◆ Zakai azali nani, mpe mpo na nini amati likoló na nzete?

◆ Ndenge nini Zakai amonisi ete asili kobongwana?

◆ Liteya nini tokoki kozwa na lolenge oyo Yesu ataleli Zakai?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto