Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/9 nk. 16-17
  • Yope: libongo na lokumu na ntango ya kala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yope: libongo na lokumu na ntango ya kala
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Masolo mosusu
  • Zwá mateya na mabunga na yo
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Korneyi azwi Elimo santu
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Mabunga na ye eteyaki ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Yona azwi liteya na motema mawa ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/9 nk. 16-17

Bililingi ya Mokili na ndaka

Yope: libongo na lokumu na ntango ya kala

NDELO NA MAI monene na Yisraele na kala ezalaki na zelo mingi. Nzokande, Bayisraele bayebanaki mingimingi te lokola batamboli na mai. Mbala mosusu, ezalaki mpo na ndelo wana ya mai.

Pembeni pembeni na ndelo ya mai ezalaki zelo na zelo oyo ememami na ebale Nile kino la mera. Soki okokaki kotambola na ndelo yango uta ndelo na Ezipito, okokaki kokuta ata libongo moko te ya ntina liboso oleka ngomba Carmel.

Nzokande, na kotambolaka moke okokaki komona likoló na ngomba, ville ya Yopé. Na esika yango, molongo ya mabanga pembeni na mai, lokola emonani na foto, ekotaki lokola litimbo. Na yango libongo esalamaki, atako ezalaki na lokumu mingi te lokola libongo na mboka Acre (Ptolémaïs), oyo ezalaki mwa mosika na Nord, atako bongo yango esalaki lokumu ya mboka Yopé. Kino kotongama na libongo ya Césarée na Hérode le Grand, Yopé ezalaki, na ndelo ya mai oyo, esika kitoko oyo masuwa ezalaki kokitisa longo. Bandimbola oyo ezali kopesa kongenga na ntina na makambo mosusu oyo Biblia ezali koloba mpo na Yopé.

Ntango apesaki likanisi na mokonzi Salomo mpo na kosalisa ye na kotonga tempelo, Hiram, mokonzi na Tyr, ayebisaki ye ete: ‘Biso tokokata nzete kati na Lebanona, tokoyeisela yo yango na nzela na kotepisa yango na mai-na-monana kino Yopé, yo mpe okokomisa yango na Yelusaleme.’ (2 Ntango 2:1, 11, 16) Masuwa oyo ezalaki komema yango ezalaki mbala mosusu kolongwa na mabongo ya Phénicie na mboka Tyr to mboka Sidon. (Yisaya 23:1, 2; Ezekiele 27:8, 9) Ntango ekoleka ngomba Carmel, masuwa oyo na kokumba banzete ezalaki kotelema na Yopé. Uta wana banzete ememamaki na Yelusaleme na 55 kilometres na est-sud-est. Ezali mpe na Yopé nde eutaki banzete oyo Bayuda basalelaki mpo na kotonga tempelo nsima na kozonga na boombo.​—Esdras 3:7.

Basali oyo bazalaki kokende kotika banzete bazalaki komata na masuwa ya ba phéniciens oyo eyeisami moke ndenge emonani na elilingi na lokasa lolandi. Ntango ozali kotala yango malamu, kanisa mpo na mosakoli Yona oyo atindamaki na Jéhovah na mboka Ninive, kasi akimaki esika mosusu. “[Yona] akomaki na Yopé mpe amonaki masuwa makokende na Talasisi. Afutaki motuya na mobembo mpe akitaki na yango ete akende na bango elongo kino Talasisi longwa na liboso na Jéhovah.”​—Yona 1:1-3.

Ekoki kokanisama ete Yona amataki na masuwa monene mpe makasi ya lolenge oyo, yango ekokaki kosala mobembo molai kati ya Yopé na Talasisi (nkombo ya mboka Espagne na kala ndenge ezali kokanisama). Mbaka ya liboso ya masuwa yango boye ezalaki molai mpe eyemami, penepene na yango ekakemaki longo ya libanga. Bato na mobembo, batambwisi mosusu na masuwa mpe ndambo na biloko ezalaki likoló na motalaka, oyo tozali komona yango te na elilingi oyo. Na nse na motalaka, ezalaki na nkobe epai kuna bazalaki kotia ndambo eleki monene ya biloko, mpe epai kuna Yona akendaki kolala. Masuwa masalemaki na mabaya makasi ya nzete ebengami genévrier mpe ezalaki na esimbelo esalemi na nzete ya cèdre, yango nde ezalaki kosimba voile monene ya lin. Epai na epai ezalaki na milongo milai ya ba nkayi (ekoki mpenza kozala ete esalemaki na nzete ebengami chêne oyo ezalaki kouta na région ya Basan) oyo tozali komona awa. Sikawa, kanisa naino masuwa oyo na kati na mai monene mpe ezwani na mopepe moko makasi. Batambwisi na masuwa babeleli banzambe na bango ete basalisa bango; na nsuka nsuka, babwaki Yona na mai mpo ete bango moko bakufa te.​—Ezekiele 27:5-9; Yona 1:4-15.

Na ekeke ya liboso, lisangá ya baklisto ezalaki wana na Yopé, oyo bamosusu na bango bazalaki mbala mosusu bamemi na biloko na masuwa to ba marins ya kala. Mwasi moyuda Doloka (Tabita) azalaki moko na lisangá wana na libongo oyo. “Ye wana azalaki [mwasi] na misala malamu mpe na makabo na mawa mingi.” Na mobu 36 ya ntango na biso, Doloka abelaki malali mpe akufaki; likambo yango epesaki mawa mingi epai na bandeko mingi mpo ete bakanisaki misala na ye nyonso kitoko. Baklisto batindaki bandeko mibale epai ya Petelo oyo azalaki ntango yango na mboka Luda (lelo ebengami Lod, penepene na libanda ya mpepo ya Tel-Aviv) kobengisa ye ete aya noki na Yopé. Ekomaki Petelo wana, asekwisaki moklisto mwasi oyo alingamaki mingi epai ya bandeko, ekamwiseli oyo “eyebanaki na Yopé mobimba, mpe bato mingi bandimaki.”​—Misala 9:36-42.

Petelo aumelaki mua mikolo mingi kati na mboka yango epai ya Simona, mobongisi na mposo na nyama. Nde na esika yango azwaki emonaneli, nsima na yango akendaki elongo na mua bandeko ya Yopé kino na Césarée, libongo ya sika ezalaki na likoló ya Yopé. Kuna, Petelo asakolaki epai ya Corneille, mokonzi moko ya basoda kati na limpinga ya basoda Baloma, mpe apesaki ye batisimo. Corneille azalaki bongo Mopakano ya liboso azangi kokatama ngenga, oyo akomaki moklisto apakolami na elimo. (Misala 9:43 kino 10:48) Ezalaki esengo monene na Yopé ntango bandeko bazongaki, mpe bayaki na nsango wana ya bokoli monene ya mosala kati na lisolo ya baklisto.

Lelo oyo, ebele na bato oyo bazali kokende kotala Yopé, mboka oyo esila kosangana na mboka ebengami Tel-Aviv-Jaffa, bakoki kokanisa lisusu malamu malamu makambo oyo Biblia ezali kolobela, oyo masalemaki na libongo oyo ya lokumu na ntango ya kala.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ndelo oyo ya zelo na zelo ezali komonana malamu na foto oyo ekangamaki na satelite na lokasa ya liboso ya Manaka ya ba Témoins de Jéhovah 1989. Lisusu na kati ya manaka yango mboka ya Yopé oyo emonisami awa eyeisami monene.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 17]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto