Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/9 nk. 11-15
  • Tobongisami uta sikawa mpo na mbula nkoto ekoya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tobongisami uta sikawa mpo na mbula nkoto ekoya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lisangá moko ya boklisto
  • Lisangá moko esalami liboso na Boyangeli na mbula nkoto
  • Tobatela bibongiseli na biso mpo na kobika mpe kokota na Boyangeli ya mbula nkoto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Omibongisa mpo na milenere oyo ezali mpenza na ntina!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Motó na nyoka enyatami
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/9 nk. 11-15

Tobongisami uta sikawa mpo na mbula nkoto ekoya

“Bakoyangela elongo na ye mbula nkoto.”​—EMONISELI 20:6, M.N.

1. Mabelé ekozala na ezalela nini nsima na mbula nkoto?

NINI? Elingi koloba ete nsima na mbula nkoto koleka bato bakozala naino awa na mabelé? Ya solo! Mpe lisusu, bango nyonso bakozala na nzoto, mayoki na makanisi ya kokoka - lokola mobali mpe mwasi ya liboso na ebandeli ya bomoi ya bomoto awa na mabelé. Ee, na nsima na mbula nkoto, bato bakozala na elilingi mpe na lolenge na Nzambe, oyo akozongisa bango na ezaleli ya kokoka. (Genese 1:26-30) Bakosepela mingi na bomoi kati na “elanga na Edene”, paradis moko ya esengo, na mabelé epetolami oyo motuya na bato ekolekisa ndelo te. (Genese 2:15) Nyonso wana ekosalema na kokokisama na mokano ya ebandeli ya Mozalisi mpo na mabelé mpe bafandi na yango. Kokokisama oyo na kokamwisa ekosalisa mpo na kolongisa Nzambe, komonisaka ete azali sembo na elaka na ye oyo asalaki na bolingo mpo na kopambola bato nyonso, atako elaka yango ekutanaki na botemeli.

2. Esili koleka soko bikeke 19, ndenge nini Bayisraele bazwaki likanisi mpo na koyeba ndenge bato bakozala ntango bakozongisama na ezaleli ya kokoka?

2 Kokokisama oyo na esengo ya mokano na Nzambe ekoya kosukisa Boyangeli ya mbula nkoto oyo Nzambe akoyangela na nzela na Mwana na ye akembisami, oyo alekisaki mbula 33 na ndambo lokola moto na kokoka awa na mabelé esili koleka sikawa bikeke 19. Mpo na lolenge na ye na ntango yango, tozali kotanga: “Liloba akomi mosuni mpe afandi kati na biso, mpe tomoni nkembo na ye, nkembo lokola mwana oyo abotami lokola mwana bobele moko longwa na Tata; atondi na ngolu mpe na solo.” (Yoane 1:14) Na kotalaka malamu Yesu Klisto, Bayisraele bamonaki bongo lolenge na ekelamu ya bomoto ya kokoka. (Luka 3:23, 38) Ee, esili koleka bikeke 19, bamosusu bazwaki likanisi mpo na koyeba ndenge bato bakozala ntango bakozongisama na ezalela na kokoka na Paradis ya mabelé ekoya.

3, 4. a) Jéhovah akoyangela ntango boni na nzela na Yesu Klisto mpe ba 144 000? b) Liloba nini ezali kosalelama mpo na kolobela eleko yango, mpe na ba titres nini ya mikanda mibimisamaki na la Société liloba yango esalelamaki?

3 Lokola esakolamaki, Bokonzi na Jéhovah oyo epesami na Yesu mpe bayekoli na ye 144 000 bakembisami ekoumela mbula nkoto. Mpo na Boyangeli ya mbula nkoto oyo, ntoma Yoane na ntango ya bobange na ye akomaki ete: “Namonaki kiti na bokonzi mingi, mpe baoyo bafandi na yango, mpe nguya na kosambisa epesami na bango. Namoni mpe milimo na bango basili kokatama nkingo mpo na litatoli na Yesu mpe mpo na Liloba na Nzambe, baoyo baboyaki kosambela nyama na yauli na ekeko na ye mpe bazwaki elembo na ye te na bilongi na bango mpe na maboko na bango. Bayaki na bomoi mpe bayangelaki elongo na Klisto mbula nkoto. (Bakufi oyo batikalaki bazalaki na bomoi liboso na nsuka na mbula yango nkoto te.) Oyo lisekwa na liboso. Esengo na baoyo babimi na lisekwa na liboso mpe bazali basantu. Kufa na mibale ezali na nguya likoló na bango te, kasi bakozala banganga na Nzambe mpe na Klisto, mpe bakoyangela elongo na ye mbula nkoto.”​—Emoniseli 20:4-6, M.N.

4 Eleko oyo ya mbula nkoto ebiangami Boyangeli ya mbula nkoto ya Klisto, to Millénium. Baoyo bandimi mpe bazali koteya liteya oyo na Biblia mbala mosusu bazali kobenga bango ba Millénaristes to ba Chiliastes, liloba oyo euti na monoko ya greke oyo elimboli “nkoto”. Esengeli koyeba ete na ebandeli, molongo ya mikanda Etudes des Ecritures (mikanda oyo kala ebimisamaki na la Société) ebiangamaki L’aurore du Millénium. Mpe kala Association internationale des Etudiants de la Bible ezalaki kosalela mokanda ya nzembo oyo ebiangamaki Hymnes de l’aurore du Millénium.

5. Satana na bilimu na ye mabe bakozala wapi na boumeli ya Boyangeli na mbula nkoto ya Klisto?

5 Liloba “mbula nkoto” oyo esalelami kati na Emoniseli 20:4 ezali ya elilingi te, kasi emonisi mbula nkoto ya solo . Na boumeli na mbula nkoto oyo, Satan le Diable mpe bilimu na ye mabe bakozala kati na libulu mozindo, mpo ete liboso ya kolobela Boyangeli ya mbula nkoto ya Klisto ntoma Yoane alobaki: “Namonaki anzelu moko kokita na likoló; azalaki na fungola na libulu mozindo mpe monyololo monene na loboko na ye. Asimbi dalagona, ye nyoka yango na kalakala, oyo azali Diable mpe Satan, mpe akangi ye na monyololo mbula nkoto. Abwaki ye na libulu mozindo, azipi yango, mpe atii elembo likoló na yango, na ntina ete azimbisa mabota lisusu te kino nsuka na mbula yango nkoto. Na nsima na yango ekokoka na ye kokangwa mwa ntango moke.”​—Emoniseli 20:1-3.

6. a) Na date nini bakatolike batiaki nsuka na Boyangeli ya mbula nkoto ya Klisto? b) Soki ndimbola na bango ezali solo, ntango moke oyo Satana abimisami na libulu mozindo esili koumela bambula boni?

6 Bakatolike bandimisaki ete Boyangeli ya mbula nkoto ya Yesu Klisto esilaki na 1799 ntango mampinga ya Bafransé ezwaki Rome, balongolaki pape oyo azalaki koyangela na mboka yango mpe bamemaki ye lokola mokangami na France, epai kuna akufaki. Bakonzi ya lingomba ya katolike balobaki ete Satana mpe bilimu mabe na ye bafungwamaki na “libulu mozindo” ntango wana, mpe balukaki lisusu kozimbisa bato mpo na “ntango moke”. (Emoniseli 20:1-3, Jérusalem, libongoli ya katolike.) Soki ndimbola oyo ezali solo, elingi koloba ete “ntango moke” oyo elobelami esili koumela bambula 190, kozanga ete nsuka na yango emonana ete ebelemi.

7. Biblia ezali koloba nini mpo na Boyangeli ya mbula nkoto ya Yesu Klisto?

7 Nzokande, engebene Makomami, Boyangeli ya mbula nkoto ya solo ya Yesu Klisto ezali naino koya. Kokokisama ya lelo ya bisakweli na Biblia emonisi ete ebelemi nokinoki. Na Boyangeli ya solo ya mbula nkoto, Satana mpe bilimu na ye mabe bakobwakama mpenzampenza kati na libulu mozindo, nzokande Yesu Klisto na babulami na ye 144 000 bakoyangela likoló na bato nyonso kozanga ete lisanga ya Diable etelemela bango. Engebene kondimana oyo Jéhovah asalaki elongo na “moninga” na ye Abrahame, bato nyonso basikolamaki bakozwa ntango yango mapamboli ya seko. Mapamboli oyo makopesama liboso na “ebele monene”, baoyo bakobika na bolozi monene oyo ekosukisa biloko mabe ya ntango oyo; nsima ekopesama na bamiliare na bakufi baoyo basikwamaki na “makila na Mwana na Mpate”, Yesu Klisto. (Yakobo 2:21-23; Emoniseli 7:1-17; Genese 12:3; 22:15-18; Matai 24:21, 22) Mpo na kozwa mapamboli oyo, bakosekwa, bakolamuka na mpongi ya liwa mpe kobimisama na nkunda ya ekaniseli mpo na kozala na bomoi na mabelé.

Lisangá moko ya boklisto

8. Mokanda La nouvelle création (Kozalisama na sika) ezalaki kolobela mpo na lisangá nini, nzokande mosala nini ya kobongisa elobelamaki te na mokanda yango?

8 Kati na kokokisama na mokano na Nzambe, lisangá ya sika ebotamaki bikeke mingi liboso na mapamboli oyo. Mpo na lisangá oyo, tozali kotanga boye: “Soko moto azali kati na Klisto akomi bozalisi na sika.” “Kokatama ngenga ezali eloko te mpe esute eloko mpe te, kasi bobele kozala bozalisi na sika.” (2 Bakolinti 5:17; Bagalatia 6:15) Uta 1904, mokanda La Nouvelle création (Kozalisama na sika) elobelaki mingi lisangá oyo ya sika oyo ebotamaki na ekeke ya liboso (Etudes des Ecritures, volume VI, boyekoli V, motó na likambo “Lisanga na bozalisi na sika”). Mpo na ndimbola oyo epesaki na ntina na nsuka na ntango na mabota, nsuka oyo ekomaki na 1914, mokanda oyo eyebisaki te mosala monene ya lisangá oyo ekokaki kosalema ntango makama ya nsomo na Etumba ya liboso ya mokili mobimba na lisolo na bato malingaki kosila.​—Luka 21:24.

9. Batikali na kozalisa na sika batelemaki mpo na mosala nini?

9 Batikali na bozalisi na sika na elimo, bazwaki libateli na kokamwa ya kobatelama kino nsuka ya Etumba na Liboso na mokili mobimba na 1918, mpe kozala lisusu na bomoi na mabelé na mbula ya liboso nsima na etumba, na 1919. Kasi makambo oyo masakolamaki mpo na Boyangeli na mbula nkoto masalamaki te. Batikali na bozalisi na sika bazalaki naino na mosala ya kosala na mabelé liboso ya komona kokokisama na elikya na bango na likoló, elikya ya kosala elongo na Yesu Klisto na boumeli na Boyangeli na mbula nkoto. Na yango batikali basengelaki mpenza kotelema mpe kobongisa lisusu mosala na bango. Ezali yango nde basalaki na kondima mobimba mpe na mposa makasi ya kobanda mosala kitoko oyo ezalaki liboso na bango.

10. Mituna nini mitunamaki mpo na bamilió na babiki na ntango ezali koya baoyo basengeli kokota na ebongiseli na biloko ya sika?

10 Batikali bapakolami bazalaki kozela ete bato babika na nsuka na nsomo ya biloko mabe ya ntango oyo mpo na kozala na bomoi na nse na Boyangeli na mbula nkoto ya Yesu Klisto na mabelé. Basosolaki mpenzampenza likambo oyo nsima ya koyoka diskur piblike na motó na likambo: “Bamilió na bato bazali na bomoi lelo bakokufa te” epesamaki na Los Angeles, na Californie (Etats-Unis), na boumeli na etumba, na 1918. Bamilió na bato oyo bakobika na Armagedon basengelaki kobongisama? (Emoniseli 16:14-16) Liboso ete bakotisama kati na Boyangeli na mbula nkoto mpo na kozala eteni na “mabelé ya sika”, bakondima kopesa maboko na mosala ya kosakola Bokonzi esika moko na batikali? (2 Petelo 3:13) Makambo oyo mabimaki nsima na etumba makopesa biyano na mituna oyo.

11. a) Esengelaki kosala nini epai na bampate mosusu mpo ete basengelaki kozala etonga moko elongo na batikali? b) Mpo na nini likambo oyo ete bampate mosusu bazali na elikya ekeseni ezali ntina na bokabwani te kati na bango mpe batikali bapakolami?

11 Maloba oyo na Mobateli na mpate aleki malamu, Yesu Klisto matiamaki liboso na lolenge esengeli: “Nazali mpe na bampate mosusu baoyo bazali na lopango oyo te; ekoki na ngai kokamba mpe bango mpe bakoyoka mongongo na ngai mpe bakozala etonga moko mpe na mobateli moko.” (Yoane 10:16) Soki batikali bapakolami bazalaki na mposa ya kobongisama mpo na mosala oyo basengelaki kokokisa nsima na etumba, kobanda 1919, mpe soki na nsima bampate mosusu basengelaki kozala etonga moko elongo na batikali kati na lopango moko, elingaki koloba nini? Ete bampate mosusu oyo basengelaki bango mpe kobongisama ntango moko elongo na batikali! Atako bampate mosusu bazali na elikya ekeseni, oyo ya kozala na bomoi kati na paradis ya bisengo na mabelé, ezalaki ntina ya bokabwani te kati na bango mpe batikali. Bango nyonso bazalaki kolanda Mobateli na mpate moko, mpe kokabwana ekokaki kozala te kati na bituluku mibale kino kokembisama na batikali bapakolami kati na Bokonzi.

12. a) Eloko nini ezali ntina monene koleka lobiko na bato? b) Ntango nini mpe mpo na nini kosakola Bokonzi ekomaki mosala eleki ntina mingi?

12 Kosikolama na bato na masumu mpe liwa, nsuka na boyangeli na Satana na mokili mpe kozongisama ya bato ya botosi kati na Paradis na mabelé mobimba ezali makambo mingi kati na mokano oyo Nzambe asalaki na bolingo. Nzokande, ezali na likambo moko ezali na ntina monene koleka mpo na molongo mobimba. Likambo yango ezali nini? Kolongisama ya boyangeli monene na molongo mobimba na Jéhovah Nzambe mpe kosantisama na nkombo na ye mosantu. Na 1922, na assemblée ya mibale ya Association ya Bayekoli ya Biblia ya mokili mobimba na mboka Cedar Point, na eteni na mokili Ohio (Etats-Unis), elobelamaki makasi ete ezalaki ntango oyo esengelaki mpo na kosakola Bokonzi na Jéhovah etambwisami na Mokonzi moyangeli, Yesu Klisto. Lokola ntango na Mabota esukaki na 1914, ntango ekomaki ya kokokisa maloba oyo na esakweli na Yesu: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Bokonzi oyo esengeli kolongisa boyangeli na molongo mobimba ya Jéhovah mpe kosantisa nkombo na ye mosantu esilaki kotelemisama na makoló na 1914, mpe Yesu Klisto abandaki koyangela katikati na banguna na ye. Ezali nsango malamu oyo na kokamwisa esengelaki kosakolama na kosalela miango nyonso mpo na koyebisa Mokonzi mpe Bokonzi na ye.

13. Jéhovah asenzelaki na likambo nini mpo ete mosala ya kosakola Bokonzi ekoka kosalema, mpe mpo na nini?

13 Jéhovah abongisi makambo mpo na bato nyonso, mpo azali Oyo-Aleki likoló, Mokonzi na molongo mobimba. Atiaki likebi ete mosala ya kosakola Bokonzi na ye na mokili mobimba ebongisama malamu liboso na nsuka na biloko na ntango oyo. Batikali bapakolami, basanganaki bongo kosala lisangá ya mokili mobimba mpo na kokokisa mokano na Ye. Basengeli kosakola na mokili ete, lokola Satana atyolaki boyangeli ya Jéhovah na molongo mobimba, bosolo mpe lotomo na boyangeli oyo esengeli kolongisama mpo na libela.

Lisangá moko esalami liboso na Boyangeli na mbula nkoto

14. a) Liboso na ntango na boklisto, lisangá nini ekomaki eteni ya lisangá na molongo mobimba ya Jéhovah awa na mabelé? b) Ndenge nini David amonisaki ete azalaki mobongisi moko monene.

14 Na boumeli ya bikeke 15 liboso na ntango ya boklisto, Jéhovah Nzambe azalaki na lisangá moko emonani na mabelé. Asalelaki mosakoli Moïse lokola moyokanisi na ye mpo na kobongisa libota na Yisraele nsima na kosikwama na bango na Ezipito, nguya ya liboso ya mokili mobimba na lisolo ya Biblia. Na nse na Mobeko ya Moïse, Yisraele ekomaki eteni emonani ya lisangá ya molongo mobimba ya Jéhovah. Mobongisi moko monene abimaki kati na libota liponami na Nzambe: mokonzi-mobateli Davide, oyo mpo na ye tozali kotanga: “David abongisaki bango [Balewi baoyo bazalaki kosala na esika mosantu] na bituluku, engebene Gelesone, Kohate mpe Merari, bana na Lewi.” “Abongisaki bango [banganga] na mbese, mpo ezalaki na mikóló na esika na bulee mpe mikóló na Nzambe kati na bakitani na Eleazare mpe ltamare.”​—1 Ntango 23:3, 6; 24:1, 5, The New English Bible.

15. a) Bayisraele babimaki na Ezipito lolenge nini? b) Bato nini mosusu bazwaki likatami ya kobima na Ezipito, mpe batikalaki elongo na Bayisraele?

15 Bikeke mingi liboso na eleko ya David, Bayisraele babimaki na Ezipito, basalaki yango na ndenge ya mobulu te. Babimaki mpe batambolaki na lolenge moko ebongisami, yango ezali litatoli ya mosala malamu na ebongiseli oyo ekokisamaki na moyokanisi na bango, Moïse. Ebele na bato baoyo bazalaki Bayisraele te babimaki elongo na bango, baponaki bongo komona mpasi to esengo esika moko na libota na Nzambe oyo azalaki kosala bikamwiseli, Jéhovah, Nzambe na nguya koleka banzambe nyonso na Ezipito. Atako bampasi mingi, mwa ntango mingi nsima, “ebele na bato ndenge na ndenge” oyo na mitema malamu mpo na Bayisraele, libota liponami na Jéhovah, bazalaki ntango nyonso elongo na bango kati na esobe ya nsomo na Sinaï. (Exode 12:37-51; Mituya 11:4) Emonani ete bato oyo ndenge na ndenge bakotaki na Mokili ya ndaka elongo na Bayisraele na nse na botambwisi na Yosua, mokitani na Moïse, mpo Nzambe apesaki mibeko ete bibongiseli bizwama mpo na bapaya oyo.

16. a) Ebele na bato wana ndenge na ndenge bazalaki elilingi na banani? b) Ebele monene basengeli kosala nini mpo babika na nsuka na biloko na ntango oyo?

16 Ebele na bato oyo bautaki na Ezipito ya Farao bazali elilingi na ebele monene oyo esangisami na ekeke ya 20. Bazali Bayisraele na elimo te, kasi bampate mosusu na Mobateli aleki malamu, Yesu Klisto. Elongo na batikali bapakolami, bazali kosepela mpo na elikya ya kosikwama na Ezipito na elilingi, yango ebongiseli na makambo na mokili oyo nzambe na yango ezali Farao Monene, Satan le Diable. (Yoane 10:16; 2 Bakolinti 4:4; Emoniseli 7:9) Kasi basengeli kosala nini mpo na kobika na libebi makasi ya mokili oyo enuni ya Satana mpe kokota kati na mokili ya sika elakami, na nse na botambwisi na Yosua Monene, Yesu Klisto? (2 Petelo 3:13) Basengeli kolanda kotosa bibongiseli bizwami na ntina etali lisangá na nzela na batikali bapakolami baoyo bazali na centre ya lisangá ya Jéhovah oyo ezali komonana.

17. Ebele monene bazali kosala nini kati na mokili oyo ekabwani, mpe bazali kosepela na nini?

17 Uta 1935, ebele monene na bampate mosusu ekotisamaki kati na etonga moko ebongisami na nse na botambwisi na Mobateli moko akembisami, mokonzi oyo azali koyangela, Yesu Klisto. Kati na mokili oyo ezali se kokabwana atako ONU ezali, ebele monene oyo bazali kopesa maboko na motema mobimba na batikali bapakolami mpe bazali bongo komona nguya ya bosangisi ya elimo santu ya Jéhovah. Bazwi likatami ya kotikala bato babongisami elongo na batikali bapakolami mpe bazali kozela na esengo kozwa mikumba ya ntina na mabelé na boumeli na Boyangeli na mbula nkoto na Yesu Klisto.

Bozongeli

◻ Makomami malobi nini mpo na Boyangeli na mbula nkoto ya Yesu Klisto?

◻ Eloko nini ezali na ntina monene koleka lobiko na bato?

◻ Liboso na ntango ya boklisto, lisangá nini ekomaki eteni ya lisangá na molongo mobimba ya Jéhovah awa na mabelé?

◻ Baoyo bamonisamaki na elilingi na ebele na bato ndenge na ndenge basengeli kosala nini mpo na kobika mpe komona Boyangeli ya mbula nkoto?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto