Zala na bomoi ya bokatikati mpe ezangi mindondo
“Bongo, bokeba mpo na etamboli na bino, bazalaka bazoba te kasi bato na mayele mpenza . . ., mpo ete mikolo mizali mbe.”—BAEFESE 5:15, 16.
1, 2. Nini ezali mpasi mpo na kosala na mikolo na biso, mpe ntembe yango ekoki kokokisama na nini?
EZALI mpasi mingi koyeba kopona makambo maleki ntina kati na bomoi, kokokisa mikumba mingi mbala moko, kopesa ntango mpe bokasi ekoki mpo na yango. Ezali mpe mpasi na kozanga kolekisa ndelo mpe kobatela bokatikati na makanisi mpe na mayoki.—Baefese 5:17; 1 Timoté 4:8; 1 Petelo 1:13.
2 Ntembe oyo ekoki kokokisama na moto oyo azali kotambola likoló na nsinga moko etandami likoló. Mpo na moto yango, ekoki kozala likama monene soki abungisi bokatikati. Ekozala mpe ndenge moko na biso soki tobungisi bokatikati na biso ya elimo. Moto oyo azali kotambola likoló na nsinga amemaka biloko mingi te; amemaka bobele oyo ezali ntina mpo na ye. Bobele bongo, soko tolingi kobatela bokatikati na biso ya elimo, tosengeli kozala na bomoi ezangi mindondo, kobwaka kilo nyonso.—Baebele 12:1, 2.
3. Tosengeli kosala nini mpo tozala na bomoi ezangi mindondo?
3 Soki tolingi kozala na bomoi ezangi mindondo, tosengeli koluka bobele oyo ezali ntina mpo na komizwela na lolenge malamu biloko bisengeli na bomoi na biso. Yesu amonisaki bokeseni mpo na oyo bayekoli na ye basengeli koluka-Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na Ye-mpe na “biloko oyo bapakano bakolukaka na lokoso”. (Matai 6:32, 33) Alendisaki biso ete tonduka biloko mingi te. Mpo na nini? Mpo ete biloko yango bikoki kobulunganisa bomoi na biso mpe kopengwisa biso. (Luka 12:16-21; 18:25) Ezali toli malamu oyo biso nyonso tosengeli kolanda, tozala bazwi to babola, baoyo batanga mingi to te.
Ntina monene ya kosala bongo na mikolo na biso
4. Mpo na nini ezali ntina na ntango na biso kozala na bomoi ya bokatikati mpe ezangi mindondo?
4 Ezali ntina mingi na kozala na bomoi ya bokatikati mpe ezangi mindondo na mikolo na biso, mpo Satana na bilimu na ye mabe babwakami zongazonga ya mabelé mpe bazali koluka kobebisa biso mpe kopengwisa likebi na biso longwa na mosala ya bonzambe. (Emoniseli 12:7-12, 17) Etinda oyo ya Biblia ezali ntina mingi koleka na ntango na biso: “Bongo, bokeba mpo na etamboli na bino, bozalaka bazoba te kasi bato na mayele mpenza, bosomba ntango, mpo ete mikolo mizali mabe.” (Baefese 5:15, 16) Ya solo, lokola tozali kobika na mokili mabe oyo eyangelami na Satan, kasi na mokili ya sika te oyo elakami na Nzambe, tosengeli kolala te kasi kosenzelaka.—2 Bakolinti 4:4; 2 Petelo 3:7, 13.
5. Ndakisa nini ya malamu basaleli na Nzambe na ntango ya kala batikelaki biso?
5 Basaleli na Nzambe oyo bafandaki kati na mokili ya kala eyangelami na Diable batikelaki biso ndakisa malamu na kolanda. “Bayambolaki ete bazalaki bapaya mpe bafandi ya ntango mokuse na mokili”. “Bazalaki na mposa na mokili moleki malamu, yango kuna na Likoló”. (Baebele 11:13-16) Bazalaki sembo mpo na Bokonzi na likoló na Nzambe, biso mpe tosengeli kozala sembo. Yango wana ntoma Petelo alobaki ete baklisto ‘bazali bapaya mpe bafandi ya ntango mokuse’. (1 Petelo 2:11; Bafilipi 3:20) Na yango, Yesu alobaki ete bayekoli na ye ya solo “bazali bato na mokili te”. Lokola ntoma Paulo alimbolaki yango, ‘bazali kosala na biloko na mokili lokola bango bazali kosala na yango te’.—Yoane 17:16; 1 Bakolinti 7:31.
6. (a) Nini tosengeli kobosana soko moke te, mpe bomoi na biso ekoki kokokana na nini? (b) Ndakisa nini ya kala esengeli kozala likebi mpo na biso nyonso?
6 Na yango tobosana soko moke te ete mokili ya Satana kati na yango tozali kobika ezali likama. Kopengwa moke ekoki kozala libebi. (1 Yoane 5:19; 1 Petelo 5:8) Bomoi na biso ekokani na moto oyo azali kotambola na esika oyo batii mitambo ebelé. Ntoma Paulo akebisaki baklisto na koyebisaka bango oyo ekomelaki Bayisraele ntango bazalaki pene na kokota na Mokili na ndaka. Mingi babungisaki bokatikati na bango na elimo, bamipesaki na pite mpe Nzambe abomaki bango. Ntoma Paulo akomaki: “Boye, tika ete ye oyo akanisi ete azali kotelema ngwi akeba ete [abungisa te bokatikati na ye na elimo mpe] akwea te.”—1 Bakolinti 10:12.
Ezali libateli
7. Komitalela ya ndenge nini moko na moko asengeli komitalela?
7 Ezali libateli kozala na bomoi ya bokatikati mpe ezangi mindondo, mpo ete yango ekosalisa biso topesa ntango mpe makasi mingi na makambo na elimo. Ezali bongo likambo na mayele komituna: “Nazali koyeisa bomoi na ngai pepele, to nazali nde komilukela mindondo mingi? Eloko nini ezwi esika na liboso na bomoi na ngai? Bamosusu bazali koloba ete bazali na ntango moke mpo na koyekola Biblia to kosangana na mosala ya kosakola. Kasi mpo na nini ezali bongo? Mbala mingi, ezali mpo ete bazali na bomoi ya mindondo mingi mpe ezangi bokatikati. Talela naino ntango oyo ozali kolekisa mpo na kominanola, na ndakisa kotala televizió mpe kokisa yango na ntango oyo ozali kolekisa mpo na kosalela Jéhovah na lolenge moko to mosusu kati na mosala ya boklisto? Ozali na programme oyo ezali na bokatikati? Na koyeisa pepele bomoi na yo, okoki kolekisa ntango mingi na makambo maleki ntina, mingimingi na mosala monene na kobuka mbuma na elimo.—Bafilipi 1:9, 10; Matai 9:37.
8. Ndenge nini tokoki kolanda toli na Yesu na kolukaka liboso Bokonzi, mpe ndakisa nini elakisi ntina na kokende
8 Ya solo, bonene na mosala na yo ya elimo ezali komonisa na ndelo nini bomoi na yo ezali na bokatikati mpe ezangi mindondo. Baklisto oyo, na kolanda toli na Yesu, bazali koluka liboso Bokonzi na Nzambe, bazali kokende liboso na kolekisa mbala na mbala ntango na boyekoli ya Biblia, kosangana na makita mpe na mosala ya kosakola. Ezaleli wana ya kokende liboso ezali kosalisa bango ete bakwea te. Bomoi na bango ezali lokola moto oyo amati likoló na vélo. Moto yango asengeli kokende liboso soki alingi kobatela bokatikati na ye, kasi soki atelemi esika moko akoumela te akokwea. Ndenge moko, ntango moto azali kokende liboso na kozalaka na programme malamu mpo na makambo ya elimo, akobungisa bokatikati na ye te mpe akokwea te.—Bafilipi 3:16.
9. (a) Eloko nini biso nyonso tosengeli komikundola? (b) Ntango tozali komitiela mokano, mituna nini tokoki komituna?
9 Ata bongo moto asengeli ntango nyonso komisenzela, komikundola ete na kotika makambo mosusu pembeni moto akoki kozala na ntango ekoki mpo na koyekola, kobongisa makita ya boklisto, mpe kosalisa bato mosusu. Moklisto moko oyo azalaki kosala mombongo alobaki: “Mbala nyonso soko nalingi kosomba eloko moko oyo ezali na ntina te to kondima mosala mosusu oyo nazali na yango mposa te, nazali ntango nyonso komipekisa na komiloba: ‘Zala na bomoi ezangi mindondo!’ Na ntango mosusu nasengeli kobunda makasi.” Tala likanisi oyo moko na moko na biso asengeli kobatela yango na motema na ye. Na ntango ozali kokanisa mpo na kokokisa mokano moko, na ndakisa, koyeisa ndako na yo monene to kokokisa misala mosusu, osengeli komituna boye: Yango ekopesa matomba na bomoi na ngai na elimo mpe oyo ya libota na ngai, to ekobebisa yango? Solo solo, nazali na mposa na biloko nyonso oyo bato na mokili bazali koluka na lokoso, to nakoki nde komipimela yango?
10. Bokeseni nini ezali kati na makanisi ya “moto na mosuni” mpe “moto na elimo”?
10 Mosusu akoki kotia ntembe ete: ‘Komipimela motindo wana ezali mpenza na ntina? Tosengeli solo kozala na bomoi ya bokatikati mpe ezangi mindondo?’ Na oyo etali “makambo na moto” mpe “makambo na Nzambe”, Ntoma Paulo akomaki: “Moto na mosuni akoki koyamba makambo na elimo na Nzambe te, mpo ete mazali na ye bolema, mpo ete ezali na lolenge na elimo nde bakososolaka yango. Kasi, moto na elimo azali kososola makambo nyonso.” (1 Bakolinti 2:11, 14, 15) Moto akoki kokoma “moto na mosuni” nokinoki na kolukaka mpe komizwela biloko na mosuni bizangi ntina. Epai na moto azali kosala bongo, elimo ya komipimela mpo na ye elekisi ndelo, to ezali bolema. Yango nde “moto na mosuni” azali kokanisa, kasi “moto na elimo te”.
11. Na kosalaka nini mbele Noa akokaki kozanga bokatikati, mpe ndenge nini tokoki kozala na bomoi ezangi mindondo na mikolo na biso?
11 Moto na elimo atalaka makambo na miso na kondima. Azali komona makambo motindo moko na Nzambe. Totalela ndakisa na Noa. Mbele ekokaki kozala bokatikati, soko nsima ya koyeba ete Nzambe akanaki koboma mokili na mpela, alekisaki ntango na ye na kotonga ndako monene, kitoko, mpe komilukela biloko mingi ya mosuni? Soko moke te! Ezali masua nde ekokaki kobikisa bango. Mpo na Noa, kozala na bomoi ya bokatikati mpe ezangi mindondo elimbolaki komipesa mobimba na botongi ya masua mpe kozala “mosakoli na boyengebene” atako asekamaki na ‘bato na mosuni’ bazangi kondima. (2 Petelo 2:5; Matai 24:37-39) Ndenge moko, lokola toyebi ete nsuka na mokili oyo ebelemi, ezali na lolenge bobele moko ya kozala na bomoi ya bokatikati: kotia makanisi na biso mobimba na kokokisama ya mokano ya Nzambe mpe kosakola nsango malamu, ata soki ekosengela kotika situation oyo ezali komonana ete ezali malamu mpo na mingi kati na biso.—1 Yoane 2:17.
Yesu ateyi biso oyo tosengeli kosala
12. (a) Na kotalela toli na Yesu, tosengeli kotika komibombela eloko nini, mpe na esika na yango tosengeli kosala nini? (b) Mpo na nini mbongwana na mokano wana ezali na ntina?
12 Na lisolo na ye likoló na ngomba, Yesu apesaki toli ya malamu mpo na lolenge ya kozala na bomoi ya bokatikati mpe kozanga mindondo. Alobaki: “[Botika] komibombela biloko na motuya na nse, awa nselele ekoliaka na kobeba, mpe awa miyibi bakokotaka mpe bakobotola.” Yesu asaleli liloba ‘botika’ mpo ete na momeseno bato bazali ‘komibombela’ ntango nyonso biloko na mosuni. Kasi oyo akomi moyekoli na Yesu akoki lisusu kosala bongo te. Bomoi na ye esengeli kozala na mokano mosusu, ndenge emonisami na etinda oyo Yesu apesaki nsima: “Bomibombela biloko na motuya kuna na Likoló, wana nselele ekoliaka te, kobeba ezali te, mpe wana miyibi bakokotaka te mpe bakobotola te.” Na kolimbola mpo na nini ezali ntina kobongola mokano, Yesu alobaki: “Mpo ete na esika ezali biloko na yo na motuya, motema na yo ekozala wana lokola.”—Matai 6:19-21.
13. Mpo na komibombela biloko na motuya na Likoló, tosengeli komindimisa na likambo nini?
13 Biloko na yo na motuya ezali oyo nyonso ozali kotiela motema. Mpo na yo ezali nini? Biloko na mosuni to kosantisama na nkombo ya Jéhovah Nzambe mpe lifuti oyo alakaki? Mpo na kolekisa bomoi na yo na komibombela biloko na motuya na Likoló nde awa na nse te, osengeli kondimisama makasi ete Bokonzi na Nzambe ezali solo. Mokili na sika esengeli kozala eloko ya solo oyo osengeli komitia na makanisi kino komimona na kati na yango ozali kokokisa mokano na Jéhovah na ntina etali mabelé. Lokola Moïse, esengeli na yo ‘komona Ye oyo akomonanaka te’ mpe kondimisama makasi ete “akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye solo”.—Baebele 11:6, 27.
14. Soki motema na biso ebendami na bozwi na mosuni, ekoki kosuka boni?
14 Kasi ekozala boni soki mposa na motema na yo, ebendami na biloko na mosuni? Biblia elobi: “Mposa na mosolo ezali ntina na mabe nyonso. Mpo na yango, bamosusu basili kopengwa longwa na kondima mpe bamitoboli bango mpenza na bolozi mingi.” Boluki na biloko na mosuni oyo ezali kozwama na mbongo ezali kopesa esengo ya solo te mpe ya koumela te. (1 Timoté 6:10; Mosakoli 5:10) Kasi likama monene ezali ete, mposa na mosolo mpe na biloko na mosuni ekobebisa boyokani na yo elongo na Nzambe, oyo azali kotalela biso ete tosalela ye na “motema moko”.—1 Ntango 28:9.
15. (a) Lisese nini Yesu apesaki mpo na liso? (b) Ezala na mosuni to na elimo, ndenge nini tokoki kobatela liso ezala malamu [simple]? (c) Soki tozali na liso malamu [simple], na likambo nini komona na biso ya elimo ekozala lokola oyo ya bantoma misato na Yesu?
15 Mpo na kosalisa biso ete tokima motambo ya koluka biloko na mosuni, Yesu apesaki masese mibale. Ya yambo yango oyo: “Liso ezali mwinda na nzoto. Soko liso na yo ezali malamu [simple] nzoto na yo mobimba ekozala na pole. Nde soko liso na yo ezali mabe, nzoto na yo mobimba ekozala na molili.” (Matai 6:22, 23) Na ndimbola ya mosuni, liso ezali malamu [to simple] soki ezali komona polele kozanga mindondo. Liso oyo ezali mabe ekomona malamu mpe te. Ndenge moko, liso ya elimo oyo ezali “malamu” [to simple], ezali oyo ezali komonisa polele kozanga mindondo elilingi na Bokonzi na Nzambe, kasi ezali komonisa te elilingi na mobulu oyo ezali komonisa mokili na sika lokola lisolo ya lokuta to lisapo. Soki liso na yo na elimo ezangi mindondo, mokili ya sika oyo elakami na Nzambe ekozala likambo ya solo epai na yo, lokola libaku oyo bantoma misato bazuaki na komona Bokonzi na nzela ya emonaneli na kokamwisa ntango Yesu abongwanaki.—Matai 16:28 kino 17:9; Yoane 1:14; 2 Petelo 1:16-19.
16. Kati na lisese ya mibale, ndenge nini Yesu alakisaki ntina ya kolandela mokano bobele moko?
16 Yesu apesaki lisese ya mibale, alobaki: “Moto akoki kosalela bankolo mibale te; to akoyina moko mpe akolinga mosusu; to akokangama na moko mpe akotiola mosusu.” Mpo na kondimisa likanisi na ye, Yesu alobelaki lisusu makasi ntina ya kolanda bobele mokano moko na kolobaka: “Bokoki kosalela Nzambe mpe mosolo te lokola baombo.” (Matai 6:24) Ekoki kosalema soko moke te. Bongo Yesu abakisaki: “Nazali koloba na bino ete: Botungisa mitema na bino te ete bokolia nini mpe bokomela nini soko ete bakolatisa nzoto na bino nini . . . Bapakano bakolukaka biloko yango nyonso na lokoso. Mpo ete Tata na bino na Likoló ayebi ete bozali na (mposa) na yango nyonso.”—Matai 6:25-32.
17. Yesu alingaki koloba nini na mateya na ye likoló na biloko na mosuni? (b) Yesu alobelaki makasi mpo na likambo nini, mpe kozala na bomoi ya bokatikati mpe ezangi mindondo elimboli nini?
17 Yesu alingaki koloba te ete bayekoli na ye basengelaki kozela ete mposa na bango na mosuni ekokisama na ndenge ya ekamwiseli, to bakokaki kozala bagoigoi mpe koboya kosala mpo na kokokisa bamposa na mabota na bango. (1 Timoté 5:8) Te, alingaki koloba ete biloko na mosuni, oyo bapakano bazali kolukaluka na lokoso, bisengelaki te kozua esika ya liboso na bomoi na bango. Kasi basengelaki kolanda toli oyo ya Yesu: “Boluka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na Ye, mpe biloko oyo nyonso bikobakisama na bino.” (Matai 6:33) Awa Yesu alobelaki nde mikano na kati na bomoi mpe amonisaki ete koluka bozwi ya mosuni ezali mpamba. Mpo na kozala na bomoi ya bokatikati mpe ezangi mindondo, miso na biso masengeli kotala bobele matomba na Bokonzi, mpe oyo mosusu etikali ezwa esika ya nsima.
Ndakisa ya Yesu mpe bamosusu
18. Yesu atikelaki biso ndakisa nini ya malamu?
18 Nsima na kosenga baklisto ete ‘babwaka kilo nyonso mpe masumu [kozanga kondima, to kobungisa yango] mazali kokanga biso’, ntoma Paulo apesi toli oyo: “Topota na etingia na emekaneli na mbango etiami liboso na biso, awa ezali biso kotala Yesu, ye Mobandisi mpe Mosukisi na kondima.” (Baebele 12:1, 2) Yesu amipesaki bobele na matomba ya Bokonzi kino alobelaki mpo na bomoi na ye na maloba oyo: “Gambala (renards) bazali na mabulu mpe ba ndeke na likoló bakotongaka ndako, nde Mwana na moto azali na esika na kolalisa motó na ye te.” (Matai 8:20) Atako bongo Yesu azalaki te moto oyo azali kokila to koboya biloko nyonso. Makomami mazali kolakisa ete azalaki kosepela na bilei mpe bilamba kitoko, kasi mokano na ntina na bomoi na ye ezalaki kokokisa malamu mosala na ye. Na yango emonani ete Yesu azalaki na bomoi moko ya bokatikati mpe ezangi mindondo.—Luka 5:29; Yoane 19:23, 24.
19, 20. (a) Ntoma Paulo apesaki ndakisa nini na lolenge na ye ya kotalela biloko na mosuni? (b) Na mikolo na biso, bato mingi bayekoli kosala nini, mpe bazali kokanisa nini likoló na bomoi oyo balekisi na kati na mosala na Nzambe?
19 Ntoma Paulo mpe ayebaki makambo maleki ntina oyo asengalaki kotia na esika ya liboso. Alimbolaki yango boye: “Kasi na miso na ngai bomoi na ngai ezali lokola eloko mpamba, bobele soko nakoka kosilisa nzela na ngai mpe mosala mozui ngai epai na Nkolo Yesu, ete natatola mpo na nsango malamu na ngolu na Nzambe.” (Misala 20:24) Ee, mpo na kokokisa mosala na ye ya ntina ya liboso, ntoma Paulo azalaki kosepela na oyo azalaki na yango, ezala moke to mingi. Akomaki: “Na makambo nyonso mpe na ntango nyonso, nayekolaki sekele ya kotonda to kolala nzala, sekele ya kozala na biloko mingi to kokélela.”—Bafilipi 4:12.
20 Bibele na baklisto na ntango na biso bayekoli ezaleli yango. Mingi kati na bango bazali kosalela Jéhovah na mosala ya ntango nyonso; bazali bamisionere, bapionniers, bakengeli ya zongazonga to bazali kosala na Béthel. Nsima na kolekisa bambula mingi kati na mosala ya ntango nyonso, mingi kati na bango bazali koloba ete soki bakokaki kobandela bomoi na bango, mbele bakosala bobele mosala yango.
Bolamu oyo okoki kozwa
21, 22. (a) Bolamu nini bazali kozwa baoyo uta sikawa bazali na bomoi ya bokatikati mpe ezangi mindondo? (b) Mapamboli nini bakozwa na mikolo mizali koya?
21 Ya solo, esengeli komipesa mpo na kozala na bomoi ya bokatikati mpe ezangi mindondo, kasi oyo akosala boye azali kozua bolamu mingi mpe esengo oyo ekokani na eloko moko te. Soki ozali kosala bongo, okozala na ntango mingi mpo na kokolisa matomba ya Bokonzi, mpe okoki kokutana na bato mingi baoyo bazali kosepela na mikano ya bonzambe mpe koteya bango. Okozala na bolamu mpe esengo ya solo, lisusu kimya ya elimo mpe kondimisama ete ozali kosepelisa Jéhovah Nzambe. Tala lifuti oyo okoki kozwa uta sikawa.—Bafilipi 4:6, 7.
22 Kasi bolamu na ntango ekoya nde ekozala mingi, mpe okobosana mpasi nyonso oyo omonaki. Jéhovah alaki biso “bomoi ya seko”. Ee, okoki kozala na bolamu oyo: kozala na bomoi libela kati na mokili ya sika mpe ya sembo oyo Jéhovah akosala. Na bongo kobanda lelo zala na bomoi ya bokatikati mpe ezangi mindondo, kotika te ete biloko na mokili oyo bibebisa bokatikati na yo. Kobosana te ete Nzambe akopesa yo mposa nyonso na motema na yo.—Nzembo 21:3, 4; 37:4; 133:3.
Bozongeli
◻ Bandakisa nini mpe masese nini oyekoli oyo ekoki kosalisa yo mpo ozala na bomoi ya bokatikati mpe ezangi mindondo?
◻ Libateli nini tozali kozua na kozala na bomoi ya bokatikati mpe ezangi mindondo?
◻ Soki liso na biso ya elimo ezali malamu [simple], ekomemela biso nini?
◻ Ndenge nini Yesu ateyaki biso kozala na bomoi ezangi mindondo?
◻ Bolamu nini ezali kozuama na kozala na bomoi ya bokatikati mpe ezangi mindondo?
liboso?