Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/6 nk. 29-30
  • Jéhovah alamusi molende ya libota na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Jéhovah alamusi molende ya libota na ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Jehovah azali kopambola libota na ye
  • Kongengisama mokemoke ya bisakweli
  • Nzambe mpe babateli na mpate
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Hagai mpe ya Zekalia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mokanda ya Biblia nimero 38—Zekalia
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Makolo na motole moko ezali kobatela yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Tiká ete mabɔkɔ na bino mazala na nguya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/6 nk. 29-30

Mateya mauti na Makomami: Zakaria 1:1 kino 14:21

Jéhovah alamusi molende ya libota na ye

NA NSUKA ya mobu 538 liboso ya ntango na biso, to na ebandeli ya mobu 537, Siruse mokonzi na perse abimisaki mobeko moko oyo mopesaki nzela epai na Bayuda ete babima na Babilone mpe kozonga na Yelusaleme mpo na ‘kotonga ndako na Jéhovah’. (Ezela 1:3) Nzokande, na 520 liboso ya ntango na biso, tempelo esilaki kotongama te. Yango wana Jéhovah abimisaki mosakoli Zakaria mpe apesaki ye mosala, esika moko na Agai, mpo na kolendisa molende ya libota na ye.

Bayuda ya sembo balendisamaki na maloba ya Nzambe oyo Zakaria apesaki bango, mpe oyo emonisaki ete Jéhovah azalaki na bango elongo mpe akopambola mosala. Mokanda na Zakaria ezali mpe elendiseli mpo na biso, mpamba te ezali na bisakweli bitali Masiya, mpe mosusu oyo bizali kokokana na eleko na bisoa. Ezali mpe kopesa biso mateya ya ntina.

Jehovah azali kopambola libota na ye

Jéhovah azali komibanzabanza mpo na libota na ye. Bayuda bayebi ete Nzambe azalaki na lotomo ya kopesa bango disipline; na nsima, Zakaria ezali na bimonaneli misato oyo bizali komonisa ete Nzambe azali ntango nyonso komibanzabanza mpo na libota na ye. Kati na oyo ya liboso, amoni bambalata to mpunda oyo baanzelu bamati likoló na yango. Moko na baanzelu yango azali komitungisa mpo ete mabota oyo bazalaki babandisi na mpasi ya Bayuda ‘bazali na kimya’. Kati na oyo ya mibale, Jéhovah akani kokweisa “maseke minei”, to banguya na politike, oyo epalanganisaki libota na ye. Na nsuka, emonaneli ya misato emonisi na motindo ya kokamwisa ndenge Jéhovah azali kolengela Yelusaleme mpe abateli yango na bolingo nyonso.​—1:1 kino 2:13.

Moto moko te akokoka kotemela basaleli na sembo ya Nzambe. Kati na emonaneli ya minei, Satana, monguna monene ya libota na Jéhovah, apamelami makasi (tala Emoniseli 12:10). Kati na oyo ya mitano, Zakaria amoni ete bipekiseli minene koleka oyo ya bangomba bikopekisa libota na Nzambe te kokokisa mokano na Ye. Ndenge nini? “‘Na nzela na makasi te, na nzela na nguya mpe te nde na elimo na ngai’; Jéhovah na bibele alobi boye.”​—3:1 kino 4:14.

Basaleli na Nzambe ‘bazali koyina oyo ezali mabe’. (Nzembo 97:10, 11) Kati na emonaneli ya motoba, Nzambe azali kolakela mabe likoló na bato mabe oyo bazwaki etumbu te. Na nsuka, kati na emonaneli ya nsambo, tozali komona elakiseli ya mabe oyo mautaki “na mboka Sineala”, ebandeli ya mangomba na lokuta ya Babilone. Ezali esika oyo ebongi na yango! Mabe ezali na esika te kati na basaleli ya Jéhovah; bazali koyina yango. Na nsima, Zakaria amoni makolo minei oyo mabendami na bampunda; ezali banguya ya elimo baanzelu baoyo bapesameli mokumba ya kobatela basaleli na Nzambe na mabelé.​—5:1 kino 6:8.

Kongengisama mokemoke ya bisakweli

Kokokisama ya maloba na bisakweli ya Jéhovah ezali kokumisama mpe elendisi kondima na biso. Ezali mpenza boye mpo na bisakweli na Zakaria oyo bitali eleko na biso. Tala sikawa, na lisalisi ya palata mpe wolo oyo epesami na Bayuda oyo bazalaki na boombo, akosala motolé kitoko mpo na Yosua nganga monene. Lisusu, “bango bazali mosika [na Babilone] bakoya mpe bakotonga kati na tempelo na Jéhovah”, motindo moko ebele na bato batikaki Babilone Monene mpo na kosala na tempelo nsima na 1919. Lokola makanisi ya libunga mpo na oyo etali kokila biloko masilaki kobongisama, Zakaria ayebisi makambo kitoko oyo Yerusaleme ekozwa. Ayebisi ete ‘bato zomi longwa na mabota’ bakoya epai na Bayuda ya elimo mpo na kosalela losambo ya solo. (Bagalatia 6:16; Emoniseli 7:4-10) Jéhovah alobaki, “nganga, e mwana mwasi na Yelusaleme!” Mokonzi na ye azali koya likoló na mpunda mpe “akolakisa kimya epai na mabota”.​—6:9 kino 9:11.

Nzambe mpe babateli na mpate

Bakengeli bazali na mokumba monene mpe basengeli kozala na molende kati na mosala na bango. Nsima na kopesa elaka ya kosikola libota na ye, Jéhovah azali komonisa nkanda na ye epai na babateli na mpate oyo bazali sembo te. “Babateli na mpate misato” bazali kobebisa etonga na lolenge ya mabe koleka, likambo yango ebendi Nzambe ete akata boyokani na ye elongo na libota na ye. Yelusaleme ekokoma “libanga na bozito”. Baoyo nyonso bakobundisa yango “bakozokisama mingi mpenza”. Kasi “mikoló na Yuda”-baoyo bazali na mokumba ya kokengela libota liponami ya Nzambe-basengeli kokokana na “esungi na moto” (torche), kozala na molende ya solosolo oyo ekeseni na nyonso.​—9:12 kino 12:14.

Jéhovah ayini lokuta. Kati na lisanga ya Nzambe, moto nyonso oyo azali ’koloba lokuta’ ntango nyonso ‘atobolami’, abwakami lokola mopengwi. “Ndambo mibale” ya mboka esengeli kolongolama, nzokande oyo na misato ekopetolama kati na moto. Na boyokani na esakweli wana, ntalo monene ya baklisto na maloba-basangani na boklisto ya mokili oyo-balongolamaki na Jéhovah. Kobanda 1919, bobele ndambo moke ya baklisto bapakolami mpe ya sembo babelelaki nkombo na Jéhovah mpe bamisokisaki liboso na kopetolama na ye.​—13:1-9.

Basaleli na Jéhovah bakoki kotia motema likoló na libateli na ye. Ntango banguna bakomeka ete basilisa basambeli na losambo ya solo, Nzambe ye moko akobatela bango mpe akoboma basaleli na Satana. Ngomba na bilaya ezali kopasuka, kosalaka lobwaku na elilingi kati na yango baklisto bapakolami bazali kozwa libateli nsima ya Bokonzi ya molongo mobimba ya Jéhovah mpe boyangeli na Masiya Mwana na ye. Pole ekozala mpo na basaleli ya sembo ya Jéhovah mpe molili mpo na mabota mosusu. Bato basengeli kopona, to kosambela Jéhovah elongo na libota na ye, to kobomama libela.​—14:1-21.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tokokuta kotalelama ya verset na verset ya esakweli na Zakaria kati na mokanda Le paradis rétabli parmi les hommes-grâce à la Théocratie! ebimisami na La Société Watchtower.

[Etanda na lokasa 30]

KOTALELAMA YA MWA MIKAPO NA BIBLIA

○ 1:3​—Atako babimaki na Babilone na 537 liboso ya ntango na biso, Bayuda balendisamaki mpe mpo na kozonga epai na Nzambe, mpo na kotosa ye mpe kosambela na molimo na bango mobimba. Lokola elembo ya bozongi na bango epai na Nzambe, basengeli komipesa na kotongama lisusu ya tempelo kino na nsuka ya misala

○ 2:1-5​—Elenge mobali azalaki kopima to komeka bonene mpe bolai ya Yelusaleme, mbala mosusu mpo na kotonga zongazonga na lopango ya libateli. Kasi anzelu na Nzambe alimbolaki na ye ete kobakisama ya engumba esengeli te kopekisama na lopango. Moto moko te akokaki kopekisa kobakisama ya Yelusaleme mbala na mbala. Jéhovah akozala mobateli motindo moko mpe lelo azali kobatela batikali ya baklisto bapakolami baoyo bakozala kati na Yelusaleme ya sika, na likoló.​—Emoniseli 21:2.

○ 6:11-15​—Kolatisama ya motole ya nganga monene Yosua ekomisaki ye mokonzi mpe nganga te, mpo azalaki mokitani ya libota na David. Nzokande, akomisaki ye elilingi ya Masiya, epai na ye esakweli oyo etali “Etape” ezali kokokana mobimba (Zakaria 3:8; Yilimia 23:5) Yosua asalisaki mpo na kokamba misala ya botongi lisusu tempelo ya Yelusaleme, na nsuka. Mokonzi mpe Nganga ya likoló, Yesu Klisto azali kokamba kino nsuka kotongama ya tempelo na elimo.

○ 11:4-11​—Bato bakokani na bampate bazalaki ”etonga elakami mpo na kobomama” na boye ete babateli na mpate elingi koloba batambwisi bazalaki koyiba bango. Na lisalisi ya nzela ebengami Ngolu” mpe mosusu “Kokangana (Bomoko), Zakaria akokisaki mokumba ya mobateli na mpate oyo azali na nzete mpo na kokamba to kotambwisa etonga mpe nzete mosusu mpo na kobengana banyama na yauli. (Nzembo 23:4) Azalaki elilingi na Yesu, motindami mpo na kozala mobateli na mpate ya elimo, nzokande Bayuda babwakaki ye. Lokola Zakaria oyo akataki nzete na ’‘Ngolu”, Nzambe atikaki kotalela Bayuda na ngolu: akataki boyokani na ye elongo na bango. Mpe lokola Zakaria oyo akataki nzete na Kokangama to Bomoko, Nzambe, na kobomaka boyokani ya Mibeko oyo asalaki elongo na Yisraele, apimelaki Bayuda bikanganeli ya bomoko na teokratike. Kokabwana na bango ya losambo ememaki bango na libebi, na kobomama ya engumba na bango na mampinga na Rome na mobu 70 ya ntango na biso.

○ 12:11​—”Bileli na Adadalimono” ezali mbala mosusu kolakisa bileli oyo liwa na Yosia, mokonzi na Yuda ebimisaki. Bazali koloba ete Adadalimono ezalaki penepene na lobwako na Mégido, epai Yosia abomamaki kati na etumba elongo na Farao Neko. Bato balelaki mpo na liwa na ye; Yilimia ayembaki mpe bayembi batangaki nkombo na ye kati na banzembo ya bawei.​—2 Ntango 35:20-25.

[Elilingi na lokasa 30]

Lokola Zakaria asakolaki yango, bato na mabota nyonso bazali lelo kosangana na Yisraele ya elimo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto