Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/3 nk. 9-14
  • Mayele mazali kouta epai na Jéhovah

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayele mazali kouta epai na Jéhovah
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzambe azali bosato?
  • Esika oyo esengeli na nkombo ya Nzambe
  • Molimo ya moto ekufaka te?
  • Etamboli na boklisto kati na mokili oyo ebulungani
  • Bisakweli ya Biblia
  • Toluka mayele epai na Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Yehova asali ete nkombo na ye eyebana
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Bokonzi ebotami na likoló
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Monisá bososoli mpe ‘okolonga’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/3 nk. 9-14

Mayele mazali kouta epai na Jéhovah

Mpe baoyo na kati na bato bazali na mayele bakolakisa bato mingi”​—DANYELE 11:33.

1, 2. (a) Atako bamonaki motema boboto ya Nzambe, mpo na nini Bayisraele bamitabwisaki lokola batomboki? (b) Tokotalela likambo nini oyo ekomemela biso litomba? (Yilimia 51:10)

BAYISRAELE ya ntango na kala bayebaki ete Jéhovah azali Nzambe bobele moko na solo. Babosanaki te makambo oyo ye asalelaki bankoko na bango, mpe ata bango mpenza bamonaki motema na ye ya boboto. Kasi mbala mingi, bamonisaki ete bazangaki mayele. “Bamitambwisaki lokola batomboki” liboso na Jéhovah mpe bamonisi na ye. Mpo na ntina nini? Mpamba te “babosanaki” makambo oyo ye asalaki mpo na bango. (Nzembo 106:7, 13) Bayebaki bolamu yango, kasi bakanisaki mpenza na yango te kino koyoka botondi. Bamonisaki bongo ete bazali “bato na mposa mabe”.​—1 Bakolinti 10:6.

2 Na mikolo na biso, Jéhovah abongisi batemwe na ye lokola libota ekabwani na bamosusu, na kopesaka bango mayele na nzela na lisanga na ye ya mabelé. Tokobakisa botondi na biso mpo na litambwisi oyo Jéhovah azali kopesa epai na basaleli na ye na kotalelaka bandakisa ya mayele oyo apesaki bango. Moko na yango etali bongo ntina ya kondima na biso: lolenge Nzambe azali.

Nzambe azali bosato?

3. Eleki sikawa ekeke mobimba, eloko nini esalisaki basaleli na Jéhovah na kososola solo likoló na Nzambe? (1 Bakolinti 8:5, 6)

3 Boklisto ya mokili ezali ntango nyonso koloba ete baoyo baboi kondima Bosato bazali bapengwi. Kasi, na esika ete balanda makanisi ya bato, ba Témoins de Jéhovah bazali kokanga ntina ete ezali Makomami Mosantu nde ekopesa nzela na koyeba wapi solo, kasi bonkoko te soko mpe bindimeli na bato oyo bipemami na Nzambe te. Na ndenge yango, uta 1882 bayekoli ya molende ya Biblia bakomaki na polele nyonso kati na La Tour de Garde (na Anglais): “Batangi na biso bayebi ete tondimaka na Jéhovah, na Yesu mpe na elimo santu, kasi toboyaka liteya oyo ezwami na Biblia te, oyo elobi ete Banzambe bazali misato kati na moto moko, to, lokola bakolobaka yango mbala mosusu, Nzambe moko kati na bato misato.”​—Yoane 5:19; 14:28; 20:17.

4. (a) Na mozindo na likambo, eloko nini basaleli na Jéhovah bakangaki ntina na yango mpo na oyo etali eutelo to ebandeli ya endimeli ya Bosato mpe na makambo oyo liteya yango ebimisi? (b) Mpo na nini Jéhovah apesaki epai na basaleli na ye mayele motindo boye?

4 Basaleli ya Jéhovah, oyo balingi solo ezwami na Biblia, bakoti na bozindo ya makambo mpe bayei komona ete Bosato euti na mangomba ya bapakano. Boyekoli malamu ya Biblia esalisaki bango na koyeba ete soko mikapo misusu ya Biblia mizali kosimba makanisi ya bosato, ezali mpo ete babongoli na Biblia bakotisaki yango, kasi ezalaki bongo te na makomi ya ebandeli. Bayei koyeba ete soko endimeli yango ezali komonana lokola ete ezali kokumisa Yesu, na solo mpenza ezali kotemela mateya na ye, mpe ezali kotyola Jéhovah. Na ntina yango, tala oyo tokokaki kotanga kati na nimero ya La Tour de Garde oyo tolobelaki liboso: “Biso baoyo tozali koluka solo, tosengeli kozala sembo epai na biso moko mpe liboso na Liloba ya Tata na biso, oyo ekoki kokomisa biso mayele mpenza. Na yango, tobwaka bonkoko mpe bindimeli ya bato oyo bazangi kopemama na Nzambe mpe bindimeli ya masanga mabebisami, mpe tokangama na lolenge na maloba na lobiko oyo tozwi longwa na Nkolo na biso mpe na Bantoma.” Mpo ete bazali kolinga mpenza solo mpe bazali kotalela Liloba na Nzambe na mobimba na yango, kasi bobele biteni na ba versets te oyo biponami, yango wana Jéhovah azali kopesa epai na baklisto yango mayele oyo ekesenisi bango mpenza na Mangomba ya boklisto ya mokili.​—2 Timote 3:16, 17; tala Traduction du monde nouveau, ebimili ya Lingelesi oyo ezali na mitindami (ya 1984), nkasa 1580, eteni 6B.

Esika oyo esengeli na nkombo ya Nzambe

5. Nani azali kotinda bato mpo ete balongola nkombo ya Nzambe na kati ya mabongoli ya Biblia? (Emoniseli 22:18, 19)

5 Totalela ndakisa ya mibale: wana mabongoli mingi ya Biblia mazali kolimwisa nkombo ya Nzambe mpe mosusu ezali kolongola yango mpenzampenza, la Société Watch Tower azali kotya likebi mingi na ntina ya nkombo yango. Boklisto ya mokili oyo elobaki ete na kolongolaka nkombo ya Jéhovah, nzela ekopesama na bato mingi mpo ete bandima Evanzile. Nzokande basaleli na Jéhovah bapakolami na elimo santu bayebaki malamu ye oyo azalaki nsima na likambo yango mpe azalaki komeka kobungisa kati na Makomami nkombo oyo eleki monene. (Tala Yilimia 23:27) Bayebaki ete ezalaki Diable nde abongisaki mayele mabe yango mpo na kobungisa kati na makanisi ya bato banso nkombo ya Nzambe bobele moko ya solo.

6. Na bokeseni na boklisto ya mokili, basaleli ya Nzambe na solo basalaki nini mpo na kokumisa nkombo na ye? (Misala 15:14)

6 Na bokeseni na boklisto ya mokili, mpe uta mobu ya liboso ya kobima na yango (1879), La Tour de Garde elobelaki mingi nkombo ya Nzambe, JEHOVAH. Na 1926, ebimeli ya Lingelesi ya zulunalo yango ezalaki na lisolo elobaki “Nani akokumisa Jéhovah?” (Nzembo 135:21) Na 1931, Bayekoli ya Biblia basangani na la Société Watch Tower bazwaki nkombo Témoins de Jéhovah. (Yisaya 43:10-12) Bayebaki mpe malamu ete kosantisama ya nkombo na Jéhovah ezalaki na ntina monene. (Yisaya 12:4, 5) Na 1944, babimisaki American Standard Version (ezali libongoli ya Biblia), epai nkombo ya Jéhovah ezalaki komonana mbala 6 800. Kasi likambo monene koleka, ezalaki bongo kobima ya Biblia Traduction du monde nouveau, kobanda na 1950, oyo ezali kopesa na nkombo ya Nzambe esika oyo esengeli na yango ezala na Makomi na hébreu to na Makomi na greke na boklisto.

7. Komonisa polele nkombo ya Nzambe esili kobimisa matomba nini ya esengo?

7 Kati na mokili mobimba, bamilió na bato bazali na mposa ya boyengebene basepelaki komona nkombo ya Nzambe emonisamaki bongo polele. Yango esalisaki bango na kotalela Nzambe ya solo lokola Moto (une Personne). Bato yango bayekolaki koyeba banzela na Jéhovah, mpe yango esalisaki bango na komibatela to na kozala na mayele.​—Mika 4:2, 5.

Molimo ya moto ekufaka te?

8. Na ebandeli ya lisolo na bango ya ntango na biso, ba Témoins de Jéhovah bayebaki likambo nini na ntina na molimo mpe na ntina na bakufi?

8 Lokola tokomona yango na ndakisa ya misato, bolingo ya basaleli na Jéhovah mpo na Liloba na Nzambe efungolaki bango miso likoló na basolo mosusu ya ntina mingi. Eleki ekeke mobimba, “moombo na sembo mpe na mayele” ayebaki ete molimo ezali te elimo oyo ezali na mayele mpe ekofandaka kati na moto mpe ekoki kokabwana na yango, kasi ezali bongo moto ye mpenza. (Matai 24:45-47) Na 1880, La Tour de Garde ezalaki kotalela ndimbola na ebandeli ya maloba Schéol mpe Hadès makomami kati na Biblia, mpe emonisaki ete maloba yango mazalaki kolimbola nkunda. Emonisaki lisusu ete bato babwakami na Geena bazalaki kotungisama te, kasi babomami libela.​—Tala lisusu Traduction du monde nouveau, ebimeli na Lingelesi oyo ezali na mitindami (ya 1984), nkasa 1573 kino 1575.

9. Na 1894, La Tour de Garde elimbolaki nini na ntina na endimeli ya kozanga kokufa ya molimo ya moto?

9 Na 1894, La Tour de Garde etunaki motuna molandi: “Bongo, likanisi oyo epalangani mpe endimami na bato nyonso, oyo elobi ete bato banso basalemi na molimo oyo ekufaka te, likanisi yango euti wapi?” Eyano oyo ya mayele epesamaki: “Lisolo ya makambo na bato emonisi biso yango, atako batemwe bapemami na Nzambe bazali koteya te kozanga kokufa ya molimo, endimeli yango ezali moboko ya mangomba manso ya bapakano. . . Ezali bongo lokuta na koloba ete Socrate to Platon bango nde bato babandaki makanisi yango, mpamba te yango eteyamaki liboso na bango, na moto moko aleki bango lisusu na mayele. Bango nde babongisaki yango lisusu malamu . . . mpe bakomisaki yango filozofi; na bongo, uta ntango yango ekomaki kitoko mpo na kondima yango mpe endimamaki epai na bato na mayele. Lisolo ya liboso oyo elobeli liteya yango ya lokuta ezali kati na mokanda ya histware ya kala mpenza oyo eyebani epai na moto: Biblia. Moteyi ya lokuta ezalaki bongo Satan.a

10. Lokuta ya mangomba mpo na oyo etali molimo mpe bakufi ebimisaki likambo nini, kasi Charles Russell asalaki nini

10 Na kopalanganisaka likanisi oyo elobi ete bato banso bazali na molimo oyo ekokufaka te mpe ete bato mabe bakokende na motó ya seko na lifelo, Satana alingaki Nzambe mpe atombokelaki nkombo na ye. Charles Taze Russell, mokomi ya liboso (to redacteur en chef) ya La Tour de Garde, akangaki ntina ya likambo yango. Amonaki ete bato na mayele bazalaki koboya bobele te likanisi ya mitungisi na seko, kasi mpe na mawa, ata Biblia, oyo bango bazalaki kokanisa ete ezalaki koteya endimeli yango ya lokuta. Mpo na kobengana “molili ya ntango ya kala” kati na makanisi ya bato na mayele, ndenge elobaki yango Russell ye moko, azalaki kopesa diskur piblike moko ezalaki na motó na likambo “Mobembo na lifelo, kokenda mpe kozonga!

11. (a) Wana losambo na bilimu mabe ebandaki kopalangana, likebisi nini kelasi ya “moombo” bapesaki? (b) Nani azwaki litomba na likebisi yango mpe na ndenge nini?

11 Na eleko yango, losambo ya bilimu mabe ebandaki kopalangana. Na nzela na mayele oyo Jéhovah azali kopesa na lisalisi ya Liloba na ye, kelasi ya “moombo na sembo mpe na mayele” eyaki koyeba ete bilimu oyo bizalaki koloba ete ezali bato bakufa mpe bizalaki koyokana na bato mosusu, bizalaki mpenzampenza badémo. Na nzela na badiskur piblike mpe mikanda mikolimbolaka Biblia, “moombo” yango amonisaki maloba makasi mazwami na Makomami mpo na kongengisa bato ya motema sembo mpe komonisa bango makama makoki kobima na losambo ya bilimu mabe. (Deteronome 18:10-12; Yisaya 8:19) Mayele oyo Jéhovah azali kopesa epai na basaleli na ye epesaki nzela epai na bankoto na bato kati na mokili mobimba ete basikolama na kobanga bakufi, na losambo ya bilimu mabe mpe na misala mabe oyo esangani na yango.

Etamboli na boklisto kati na mokili oyo ebulungani

12, 13. (a) Limbola Danyele 11:32, 33. (b) Likoló na solo nini ya Biblia ya moboko, mayele oyo “bato na mayele” bazali kopesa etongami?

12 Mosakoli Danyele asakolaki ete basaleli na Nzambe bakomimonisa mayele na likambo ya minei oyo ezali mpe na ntina monene. Ezali bongo kozanga kokota na makambo ya mokili. Nsima na komonisa na polele nyonso kowelana oyo ekozala kati na banguya na politike, mosakoli alobi boye kati na Danyele 11:32, 33: “Na monoko na elengi akokosa baoyo basopi kondimana.” Elingi koloba ete mokonzi na nord, na makambo makasi, akobenda na lipengwi baoyo nyonso bazali koloba ete bazali baklisto kasi balingi mokili, balingi kondimama na yango, mpe na bongo bazali kotyola kondimana na Jéhovah mpo na bokonzi, kondimana oyo na nzela na yango Klisto akoyangela na mabelé mobimba. Kasi Danyele abakisi boye: “Nde bato oyo bayebi Nzambe na bango bakotelema ngwi, mpe bakoleka. Mpe baoyo na bato bazali na mayele bakolakisa bato mingi.”

13 Koyeba malamu solo ya moboko ya Biblia ezali kopesa biso mayele oyo tozali na yango mposa mpo na kozala na bososoli kati na mokili oyo ebulungani ezingi biso. Etambwisami ye na Jéhovah, kelasi ya “moombo na sembo” esili koyeba solo yango. Moko na yango, lokola Yesu amonisaki yango, ezali boye ete mokonzi na mokili oyo azangi komonana ezali bongo Satan le Diable. (Luka 4:5-8; Yoane 12:31) Na boyokani na solo yango, 1 Yoane 5:19 ebakisi ete ezali eteni mpamba te ya mokili kasi “mokili mobimba” (elingi koloba bato banso, longola basangani ya lisanga ya solo ya boklisto) nde “ezali kolala na oyo mabe”. (Emoniseli 12:9) Lokola Yesu alobaki ete bayekoli na ye ‘bakokota na mokili te’ ,bango basengeli bongo komibatela ete bakota te na makambo na mokili.​—Yoane 17:16.

14. (a) Makambo nini mabendaki likebi ya basaleli na Jéhovah na 1939 mpe na 1941? (b) Ndenge nini mayele yango esalisaki ba Témoins de Jéhovah na komonisa mayele?

14 Na ntango malamu, wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki kobelema na Mpoto, La Tour de Garde ya le 1er Novembre 1939 (Janvier 1940 mpo na ebimeli ya Lifalansé) elobelaki kozanga kokota na makambo ya politike. Etinda yango esangani na solo mosusu ya moboko: likambo monene oyo etali boyangeli ya mokili mobimba mpe mosala oyo Bokonzi na Masiya ekosala mpo na kokata likambo yango. Ebongaki mpe ete likambo yango elobelama na 1941, na assemblée oyo esalamaki na Saint Louis, na Etats-Unis, bongo, na mobu molandaki kati na mokanda mozalaki na motó na likambo Le Monde nouveau (na Anglais). Jéhovah apesaki bongo mayele epai na basaleli na ye, mpe yango ezalaki bongo libateli malamu kati na mokili oyo ekabolami na bitumba. Mangomba ya boklisto ya mokili ekabwanaki mpamba te ekotelaki ngambo boye to ngambo oyo kuna mpe epesaki maboko na batomboki oyo bazali koluka kokweisa biyangeli. Nzokande, na mikili nyonso, ba Témoins de Jéhovah bazalaki ntango nyonso kosakola na bomoko ete Bokonzi na Jéhovah ezali elikya bobele moko mpo na mokili. Balembi te na kokokisa mosala ya kobikisa bato oyo Yesu Klisto asakolaki na kolobaka: “Mpe nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14.

Bisakweli ya Biblia

15. Mpo na nini basaleli na Jéhovah bazali mayele?

15 Mpo na nini basaleli na Jéhovah bazali komonisa mayele? Mpamba te bazali na konfianse makasi na Liloba na Nzambe, bazali kotosa yango mpe Jéhovah azali kopesa bango elimo na ye. Basili kokokisa na ndenge yango bisakweli mingi ya ntina. Ezali bongo likambo ya minei oyo tokotalela.

16, 17. (a) Mpo na nini ba dates oyo esalelami na ba Témoins de Jéhovah ekeseni mbala mosusu na oyo ya bato bakokomaka histware? (b) Konfianse oyo ba Témoins de Jéhovah bazali na yango na Biblia esalisaki bango ndenge nini na koyeba mbula ya 20 ya boyangeli na Artaxerxes mpe kobomama na Yelusaleme na Bababilonyé?

16 Kondimelaka bongo bandimbola na bango moko, mpe mbala mosusu na lisalisi ya mwa biteni ya mabanga oyo ekundolamaki na ba arkeologe, ba historiens bazali koloba ete Artaxerxès Longuemain abandaki koyangela na 464 liboso na ntango na biso, mpe ete Nebukadanesala II abandaki koyangela na 604 liboso na ntango na biso. Soko ezala solo bongo mbele mbula ya 20 ya boyangeli na Artaxerxès esengelaki kobanda na 445 liboso na ntango na biso, mpe Yelusaleme esengelaki kobomama na Bababilonyé na 587 liboso na ntango na biso, na mbula 18 ya boyangeli na Nebukadanesala. Nzokande, soko tolandi ba dates yango mpo na kokalkilé kokokisama ya bisakweli ya Biblia, tokokoma na eyano moko ya polele te.

17 Ba Témoins de Jéhovah bazali kosepela na biloko oyo ba arkeologe bazali kokundola mpe ezali na boyokani na Makomami. Kasi, ntango ndimbola ya bokundoli yango ezali kotemela bisakweli ya polele oyo ezwami na Biblia, mpo na bango bazali nde kondimela Biblia, ezala mpo na kotanga badati to likambo mosusu. Tala mpo na nini basaleli ya Jéhovah bazali kondima uta kala ete eleko ya ntango na esakweli oyo ebandaki na mobu ya 20 ya Artaxerxès ezalaki bongo na 455 liboso na ntango na biso mpe na bongo, Danyele 9:24-27 esakolaki na bosolo nyonso ete Yesu akopakolama mpo na kozala Masiya na automne ya mobu 29 liboso na ntango na bisob. Bobele na ntina oyo moko, ba Témoins de Jéhovah bayaki koyeba ete “ntango nsambo” ya esakweli oyo ezwami na Danyele mokapo 4 ebandaki na 607-606 liboso na ntango na biso mpe ete, engebene esakweli yango, Klisto akokoma mokonzi na makolo na eleko ya automne ya mobu 1914, na mbula yango mokili ekokota na ntango na nsukac. Nzokande, Batemwe mbele bakokaki soko moke te koyeba kokokisama ya kokamwa ya bisakweli yango soki bazalaki na kondimisama te ete Makomami Mosantu mapemami solo na Nzambe. Mayele ya basaleli na Jéhovah ekangani bongo na konfianse oyo bazali na yango na Liloba na Nzambe.

18. Elaka nini epesami na Yisaya 65:13, 14 na ntina na ezalela na elimo ya basaleli na sembo na Jéhovah?

18 Kokesenisaka ezalela ya elimo ya basaleli na ye ya sembo na oyo ya bato mpe masanga oyo ezali koboya kotalela Makomami mpo na kolanda makanisi mapalangani, Jéhovah alobi boye: “Tala, baombo na ngai bakolya, nde bino bokoyoka nzala. Tala, baombo na ngai bakomela, nde bino bokoyoka mposa na mai. Tala baombo na ngai bakosepela, nde bino bokozwa nsoni. Tala, baombo na ngai bakoyemba mpo na esengo na motema, nde bino bokonguluma mpo na mpasi na motema, bokolela mpe mpo na mikakatano na elimo.”-Yisaya 65:13, 14.

19. (a) Na nzela na esaleli nini ya liboso “moombo na sembo mpe na mayele” azali kopesa bandimbola likoló na Makomami? (b)Ndenge nini tosengeli koyekola soko tolingi kozwa litomba na bilei ya elimo oyo epesameli biso?

19 Lokola emonisi yango mwa makambo oyo maleki kala, ezali bongo na bankasa ya Mosenzeli nde “moombo na sembo mpe na mayele” angengisaki basolo ya ntina ya Biblia. Ee, Mosenzeli ezali esaleli monene oyo kelasi ya “moombo” ezali kosalela mpo na kopesa bilei ya elimo. Ozwaka litomba na yango? Otangaka nimero nyonso ya zulunalo yango? Wana ezali yo koyekola, otangaka mpe mikapo ya Biblia mityami kati na paragrafe? Ozali mpe na momeseno ya kokanisa na mozindo na makambo oyo oyekoli mpe kobakisa na ndenge yango botondi na yo mpo na oyo ozali koyekola? Okanisaka na bopusi oyo batoli epesami ekoki kopusa etamboli na yo, makanisi na yo, misala na yo ya mokolo na mokolo mpe mikano na yo? Soko osalaka yango, yango ekosalisa yo mingi mpenza mpo na kozwa bikateli bizali komonisa mayele ya solo, oyo bobele Jéhovah azali kopesa.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Satana apusaki Eva na kondima ete akokufa te na mosuni. (Genese 3:1-5) Ezali bongo nsima nde abimisaki liteya ya lokuta oyo elobi ete bato bazali na molimo oyo ekufaka te mpe ezali na bomoi ata nsima na liwa.​—Tala La Tour de Garde ya 1er Mai 1958, nkasa 111, 112.

b La perspicacité grâce aux Ecritures (Angl.), volume 2, pages 558 kino 560, 942.

c Que ton royaume vienne!”, pages 186 kino 189.

Bozongeli

◻ Nzambe azali bosato? Longisa eyano na yo.

◻ Nkombo ya Nzambe esengeli mpenza komonana wapi?

◻ Molimo na moto ekufaka te?

◻ Ndenge nini Jéhovah asalisaki baklisto na kozala na mayele kati na mokili oyo ebulungani?

◻ Lolenge nini na mayele esalisaki ba Témoins de Jéhovah na kososola kokokisama na bisakweli na Biblia?

mpo na kongengisa bato bazalaki na mayele?

[Bililingi na lokasa 10]

Na nzela na Mosenzeli, “moombo na sembo mpe na mayele” azali kopesa biso mayele masengeli mpo na kokanga ntina ya Makomami mpe ndenge tokoki kosalela yango na eleko na biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto