Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/9 nk. 4-6
  • Mokanda na kozalisama mpe Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda na kozalisama mpe Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Liteya ekozwama na montre na ntina ya Mozalisi na yango
  • Makambo molongo eyebisi biso te
  • Makambo oyo tokoki kozwa bobele na Biblia
  • Mozalisi akoki kosala ete bomoi na yo ezala na ntina mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Yekolá makambo mingi etali Yehova na nzela ya bozalisi na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Okoki kozala na bomoi ya seko awa na mabele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2018
  • Filozofi
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/9 nk. 4-6

Mokanda na kozalisama mpe Biblia

“Molongo ezali kokamwisa ngai makasi Mpe nakoki kondima te ete ezali na Mozalisi te.”​—Voltaire, filozofe mofranse na ekeke ya 18.

MONTRE ekolakisaka ngonga ya sikisiki ezali komonisa ete oyo akelaki yango ayebi mosala mpe azali mayele. Kasi tokoloba boni mpo na molongo oyo ezingi biso? Ekoki, ata na mwa biloko bizali kati na yango, komonisa bomoto ya Mozalisi na yango?

Eleki sikawa mbula 2 000, ntoma Paulo, moko kati na bakomi na Biblia, ayanolaki boye na motuna yango: “Bizaleli na ye bizangi komonana [oyo ya Nzambe] bizali komonana polele uta kozalisama na mokili, mpamba te emonani na mayele na nzela na biloko bikelamaki, ee, nguya na ye ya seko mpe bonzambe na ye.” (Baloma 1:20) Kasi tokoki kozwa liteya nini na koyekolaka Mokanda na Kozalisama?

Liteya ekozwama na montre na ntina ya Mozalisi na yango

Mai makosopana likolo na mabanga, mbonge likolo ya la mer, likolo ya pole etondi na bankoto na minzoto: biloko nyonso wana ezali komonisa nguya ya Mozalisi. Nzela ya sikisiki oyo ba planetes ekolandaka ntango nyonso ekoki mpe kokundola biso, lokola Voltaire, ete Mozalisi azali Mobongisi monene.​—Nzembo 104:1.

Ebele na bilei oyo mabelé ebimisaka, totanga mpenza ebele na bambuma mpe ndunda, emonisi lisusu ezaleli ya bokabi na Nzambe. Ezali yango Paulo andimi: “Kasi azangi kotatola na ntina na ye mpenza te, mpo ete asali misala malamu mpe apesi bino mbula na likolo mpe bilaka na kobota mbuma mingi, mpe atondisi mitema na bino na biloko na kolya mpe na esengo.”​—Misala 14:17.

Makambo molongo eyebisi biso te

Boyekoli mozindo na ntina na Mokanda na Kozalisama ekomonisa biso bizaleli mosusu ya Nzambe. Nzokande, soko tomipesi mingi na biloko bizalisamaki na Nzambe mpe mateya na yango, tokozala mpenza na boyebi mingi te na ntina na Nzambe. Ezali yango elimboli Robert Lenoble kati na mokanda na ye Esquisse d’une histoire de l’idée de Nature: “Ntango nyonso [moto] akotombola miso likolo mpo na kotala biloko Nzambe azalisaki pe koyeba mabombami na yango, mpo na koyeba sekele na yango, kasi sekele yango ekoki kobima na ba laboratoires te.” Na kolandaka ankete moko esalamaki na La Croix, zulunalo ya katolike, ndambo moko na ba Francais batunamaki, bandimi mpe baoyo bandimaka te, bakaboli likanisi yango mpe balobi ete “sianse ekoki soko moke te kopesa ndimbola ekoki mpo na molongo, mpamba te mwa makambo na yango mingi matali filozofi to lingomba”.

Ezali mpe likanisi Yobo asukisaki na yango, ye moto na sembo esili koleka sikawa mibu 3 500. Atuni motuna elandi: “Kasi mayele ekozwama wapi? Esika na bososoli ezali mpe wapi?” Tokoki kozwa boyebi yango na Mokanda na Kozalisama? “Bozindo elobi ete, Ezali kati na ngai te; mai-namonana ete, Ezali na ngai elongo te. Mpamba te ebombameli miso na biloko nyonso na bomoi; ezipameli ata ndeke na likolo.”​—Yobo 28:12, 14, 21.

Kasi tokozwa mayele yango epai wapi? Bobele mokanda yango eyanoli boye: “Nzambe asosoli nzela na yango, ye ayebi esika na yango.” (Yobo 28:23) Nzambe azali koyebisa epai na bato mayele na ye na nzela kitoko oyo ezali bongo Liloba na ye, Biblia.

Makambo oyo tokoki kozwa bobele na Biblia

Bobele Biblia nde ezali kopesa biso makanisi na ntina na ebandeli na moto. Ezali koyebisa biso ndenge nini Nzambe abongisaki mabelé mpo na kotya kati na yango babalani ya liboso. Baboti na biso bakokaki kozala na bomoi ya seko kati na bizaleli ya kokoka. Kasi batombokaki mpe na lisumu na bango bakotisaki mokili kati na makambo mingi ya mpasi, mpe mingimingi lisumu mpe liwa.​—Genese mikapo 1 kino 3; Baloma 5:12-21.

Biblia elimboli biso mpe kino na makambo mikemike meko oyo Nzambe akamataki mpo na kobongisa likambo yango. Bankoto na bambula nsima na Adame mpe Eva, Yesu, Mwana na Nzambe ye moko, ayaki awa na mabelé mpo na kopesa epai na bato likoki ya koyokana na Nzambe. Klisto apesaki bongo epai na bato bazali na kondima epai na ye mpe baoyo bayebi motuya ya mbeka na ye, apesaki bango elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis.​—Luka 23:43; Yoane 3:16.

Elikya yango epesami epai na mokomoko kati na biso. Mpo ete ekoma solo epai na biso, tosengeli ‘koyekola koyeba Nzambe bobele moko ya solo, mpe motindami na ye, Yesu Klisto’, mpe kozala na bomoi elongobani na elikya yango. Ezali na Biblia nde tokoki koyekola koyeba Nzambe.​—Yoane 17:3; Yakobo 2:24-26.

Okolinga kozwa biyano ya sikisiki na mituna lokola oyo elandi: Moto autaki wapi? Eloko nini ezalaka nsima na liwa? Mpo na nini tozali komona mpasi? Mpasi yango ekosila mokolo mosusu? Ntango nini Nzambe akobongisa bomoi ya moto, mpe ndenge nini akosala yango? Mpo na yango, toyikisi bino mpiko ete botalela Biblia. Bobele mokanda yango nde ekopesa bino biyano oyo euti epai na Nzambe ya molongo; bobele yango ezali na “elikya ya bomoi ya seko”. Mikanda ya la Société Watch Tower ekosalisa yo ozwa eyano na mituna oyo nyonso kati na Biblia na yo moko.​—Tito 1:1, 2.

[Elilingi na lokasa 5]

Molongo ezali komonisa bizaleli mosusu ya Nzambe

[Elilingi na lokasa 6]

Bobele Biblia nde ekoki koteya biso na ntina mokano na Nzambe mpo na moto mpe mpo na mabelé

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto