Likambo lizali kosambama na molongo mobimba etali mpe yo
“Jéhovah alobi ete, Bimisa likambo na bino. Yaka na matatoli na bino.”—YISAYA 41:21.
1, 2. (a) Likambo eleki monene oyo ezali kosambama kati na Lisolo ya bato etali nani? (b) Likambo nini ebimisi ntembe?
MAKAMBO mingi masili kosambama na boumeli ya Lisolo ya bato. Matatoli, bilembeteli, epesamaki mpo na kolongisa ngambo moko to ngambo mosusu. Bato mpe bituluku bazalaki kowelana. Nzokande, makambo oyo nyonso ezali mpamba soki tokokisi yango na likambo lizali kosambama lelo na molongo mobimba. Ezali likambo eleki ntina kati na Lisolo ya bato, mpe ndenge bakokata yango ekozala na bopusi likoló na na bomoi ya bato nyonso bafandi awa na mokili.
2 Moto ya liboso atalelami na likambo oyo ezali kosambama mpo na molongo mobimba, ezali bongo Jéhovah Nzambe, “ye oyo atongaki lola mpe asembolaki yango, ye oyo atandisaki mokili mpe biloko bikoutaka na yango, ye oyo akopesaka mpema epai na bato likoló na yango”. (Yisaya 42:5) Likambo lizali kosambama etali bonzambe ya Jéhovah: azali koyangela molongo, mingimingi mabelé mpe bafandi na yango, na boyengebene? Tokoki kobenga yango likambo etali bokonzi ya molongo mobimba.
3. Mituna nini ya ntina mibimisami na likambo ya boyangeli ya molongo mobimba?
3 Likambo oyo ezali kobimisa mituna mingi ya ntina: Na banzambe nyonso oyo bato basili kosambela, wapi oyo bamimonisi ete babongi mpo na kotyela bango motema mpo ete basambeli na bango bandima ata kokufa mpo na bango? Wapi oyo bazalaki solo mpe wapi oyo bazalaki bobele biloko bisalami na maboko na bato? Ezali na Nzambe moko ya bomoi, ya solo, oyo aleki banzambe nyonso, mpe oyo akoki kobikisa bato na bampasi nyonso bazali na yango mpe kopesa bango boyangeli oyo bazali na yango mposa: oyo ekotya kimya, kobatelama ekopesa bolamu mpe kolongono ya solo?
4. Tokoki koloba boni mpo na bato oyo bakanisi ete likambo ya boyangeli ya molongo mobimba etali bango te, mpo ete bango bandimaka Nzambe?
4 Bato mingi bakanisi ete likambo oyo ezali kosambama na molongo mobimba etali bango te, mpamba te bango bandimaka Nzambe. Kasi, bakoki komonisa ete Nzambe oyo bango bazali kosambela azali Nzambe ya solo, oyo bato bakoki kotya motema na bilaka na ye? Mpe bango basambeli na ye, bazali kotambwisama na mikano na ye mpe na mibeko na ye? Soki bato yango bayanoli ete ee, basengeli mpe koyanola na mituna milandi: Ndenge nini mpenza tokoki komonisa ete Nzambe ya solo azali, oyo tokoki kotya motema na bilaka na ye? Mokano na Nzambe mpo na mabelé mpe bato ezali nini? Tokomi wapi na manaka ya Nzambe, mpe nini ezali liboso na biso mpo na mikolo mizali koya? Nzambe azali kosenga nini na moto na moto oyo alingi kosala mpo na ye?
5. Bato oyo bakoki te kopesa bilembo ya endimeli na bango na Nzambe bakokani na nani?
5 Mingi kati na baoyo balobaka ete bandimaka Nzambe bayebi mpenza te eloko nini bakoki koyanola na mituna oyo. Tokoki kokokisa bango na bato ya ekeke ya liboso oyo balobaki ete bazali kondima Nzambe, kasi misala na bango mizalaki na boyokani te na maloba na bango. Liloba na Nzambe elobi na ntina na bango: “Balobi ete bayebi Nzambe nde na misala na bango bazali koangana ye.” Mpamba te, “kondima oyo ezangi misala esili kokufa”. (Tito 1:16; Yakobo 2:26) Na yango, bato oyo balobi ete bandimaka Nzambe kozanga kopesa bilembeteli mpo na kondima na bango, bazali lokola bato oyo, na boumeli ya bikeke bileki, bandimelaki banzambe ya lokuta oyo lelo bato batika kosambela bango.
Makambo masambamaki kala mazali koteya biso
6, 7. (a) Baezipito ya kala bazalaka kosambela nini? (b) Bayisraele bazalaki na mokumba nini na ntembe oyo ebimaki kati na Jéhovah mpe banzambe ya Ezipito?
6 Ndakisa moko na makambo masambamaki kala mpe mazali koteya biso, epesameli biso na oyo Jéhovah asalelaki banzambe na Ezipito na kala, bikeke soki zomi na mitano liboso na ntango na biso. Baezipito bazalaki kosambela ebele ya banzambe, kati na yango banyama lokola chacal, nyawu, ngando, ndeke faucon, mbemba to grenouille, nkosi, mbwa ya zamba to loup, nyoka, ngombe mobali, ngombe mwasi, ndeke vautour (lolenge ya kombekombe moko monene). Bazalaki kotalela banyama yango ete ezali nzambe moko amimonisi na motindo na bango, mpe soki moto abomi nyama wana na nko, ekoki na ye ete abomama mpe. Nyama na bulee ezalaki kokaukisama mpe kokundama na lokumu mingi.
7 Jéhovah, Nzambe oyo Bayisraele bazalaki kosambela atelemelaki banzambe oyo nyonso. Atindaki Moďse kosenga na Faraon ete atika libota na Ye, oyo ezalaki na boombo, mpe ye alakaki bango bonsomi. (Exode 3:6-10) Kasi Faraon azongisaki: “Jéhovah azali nani ete nayoka monoko na ye mpe natika Yisraele kokenda? Ngai nayebi Jéhovah te, mpe nakotika Yisraele kokenda te.” (Exode 5:2) Faraon akanisaki ete banzambe na Ezipito baleki Jéhovah.
8, 9. (a) Ndenge nini Jéhovah amonisaki ete aleki banzambe na Ezipito? (b) Na kotalela makambo ndenge masalemaki, tokoloba boni mpo na banzambe na Ezipito?
8 Nani akokaki komonana ete azali Nzambe ya solo, oyo ayebi kokokisa bilaka na ye mpe kobatela bato na ye? Eyano eumelaki te. Jéhovah alobaki: “Nakokitisa bitumbu likoló na banzambe nyonso na Ezipito.” (Exode 12:12) Akokisaki esakweli oyo? Ee. Akweisaki malozi zomi mpo na kokitisa banzambe na Ezipito; mpe ata nzambe moko te akokaki kobatela Baezipito. Bolozi ya zomi ezalaki na ntina mingi, mpamba te ebomaki bana nyonso ya liboso ya Baezipito, ata mwana na Faraon; yango ezalaki nsoni mingi mpo na nzambe na bango monene bazalaki kobenga Râ (Amon-Râ), mpamba te bakonzi na Ezipito, kolobaka ete bazali bana na Râ, bazalaki komitanga ete bango mpe bazali banzambe. Na miso na Baezipito, kufa na mwana na liboso na Faraon ezalaki kufa na nzambe moko.
9 Nzokande, bana na liboso nyonso na Bayisraele bakufaki te, mpamba te Jéhovah abatelaki bango. Nzambe asikolaki bato na ye lokola alakaki bango. Na nsima, ayokisaki lisusu nsoni makasi na banzambe na Ezipito mpo ete abomaki Faraon mpe basoda na ye nyonso kati na mai monene ya Motane. Na motindo yango, Jéhovah amonisaki ete Nzambe ya solo ezali bobele ye; akokisaki bilaka na ye mpe abatelaki basaleli na ye. (Exode 14:21-31) Nzokande banzambe na Ezipito bazalaki ata na nguya moko te ya kosunga basambeli na bango. Emonisamaki ete banzambe yango bazalaki se lokuta, bobele biloko bisalami na maboko ya bato.
10. Likambo nini ezalaki kati na basambeli na Jéhovah mpe bato ya Asulia?
10 Ntembe mosusu ebimaki na ntina na bonzambe ya Jéhovah nsima na bikeke soki mwambe, na mikolo ya mokonzi Ezekiasea. Asulia, oyo na ntango yango ezalaki Bokonzi eleki makasi na mokili mobimba, eyaki mpo na kobundisa basambeli ya Jéhovah; bokonzi wana mabe ya Asulia elongaki mabota nyonso oyo yango ebundisaki; ekomaki bango penepene na Yelusaleme, engumba epai ezalaki “kiti ya bokonzi ya Jéhovah”, elilingi na losambo na ye awa na mabelé, Baasulia basengaki epai na bafandi na Yelusaleme ete babima mpe bamikaba lokola baombo epai na bango. (1 Ntango 29:23) Ezekiase, mokonzi na Yuda, andimaki ete Baasulia ‘babebisaki mikili wana nyonso mpe batumbaki banzambe na mikili yango, mpo ete ezali banzambe te, kasi biloko bisalami na maboko ya bato’.—Yisaya 37:18, 19.
11. Ndenge nini Jéhovah asungaki basaleli na ye, mpe makambo yango mamonisaki nini?
11 Ezekiase, mokonzi na sembo abandaki bongo kosambela Jéhovah mpo na kosenga ye libateli. Jéhovah alakaki ete Baasulia bakokoka kobwaka ata mbanzi moko te na kati na Yelusaleme (Yisaya 37:33), mpe akokisaki elaka na ye. “Bongo anzelu na Jéhovah abimaki mpe abomaki kati na efandelo na Baasulia bato nkoto mokama na ntuku mwambe na mitano”. Nsima na kopola oyo ya nsoni mingi, Senakeliba mokonzi na Asulia azongaki na mboka na ye. Kuna, bana na ye moko babomaki ye, wana ezalaki ye kosambela nzambe na ye Nisiloko. (Yisaya 37:36-38) Na yango, Jéhovah amonisaki lisusu ete azali Nzambe na bisakweli ya solosolo, Ye oyo akoki kobikisa basaleli na ye. Emonisamaki lisusu ete banzambe na Asulia mpe na mabota na pembenipembeni bazalaki se banzambe ya lokuta, mpe bongo bakokaki te kobatela basambeli na bango.
12. Ndenge nini Belesasala azangaki limemya epai ya Jéhovah?
12 Bikeke soki mibale na nsima, Nzambe atikaki nzela ete libota na ye oyo bazangaki botosi epai na ye, bakende na boombo na Babilone, bokonzi elekaki makasi na mokili mobimba nsima na kokwea na Asulia. Bato na Babilone bazalaki na ebele na banzambe mpe na bandako-nzambe. Belesasala, mokonzi na Babilone azalaki na lolendo mingi mpe azangaki limemya epai na Jéhovah. Na limpati moko monene oyo asalisaki, abengisaki basani mpe bakopo ya bulee oyo bakamataki na temple na Yelusaleme. “Mokonzi mpe bato na lokumu na ye mpe basi na ye mpe makango na ye bamelaki na yango. Bamelaki na yango mpe basanzolaki banzambe na wolo mpe na palata mpe na motako mpe na ebende mpe na nzete mpe na libanga.”—Danyele 5:1-4.
13. Maloba nini Jéhovah atindaki Danyele koloba yango liboso na Belesasala?
13 Yango ezalaki solo litumoli batumolaki Jéhovah, ntembe babetelaki ye na nkombo na banzambe ya Babilone. Na ntina yango Jéhovah asalelaki mosakoli na ye Danyele mpo apesa litatoli ya nguya kotelemela mokonzi Belesasala elongo na bato nyonso bayaki wana kolya mpe komela. Danyele alongisaki bonzambe ya Jéhovah mpe alobaki epai na Belesasala: “Okitisaki motema na yo te . . . Kasi omitombolaki liboso na Nkolo na lola . . . Mpe bosanzolaki banzambe na palata mpe na wolo mpe na motako mpe na ebende mpe na nzete mpe na libanga, baoyo bamonaka te mpe bayokaka te mpe bayebi eloko te; nde Nzambe oyo kopema na yo ezali na loboko na ye mpe nzela na yo nyonso ezali na ye, okumisaki ye te.”—Danyele 5:22, 23.
14. Ndenge nini Jéhovah amonisaki ete azali Nzambe ya solo?
14 Na nsima Danyele ayebisaki bango nsango oyo eutaki epai ya Jéhovah: bobele na butu wana, Belesasala mokonzi na lolendo asengelaki kobomama mpe mboka Babilone esengelaki kokwea na maboko ya Bamedese mpe ya Baperse. (Danyele 5:24-27) Esakweli yango ekokanaki? Ee. “Na butu yango mpenza Belesasala, mokonzi na Bakaladi abomamaki. Mpe Dalio, Momedese, azwaki bokonzi.” (Danyele 5:30, 31) Lokola na ntembe oyo babatelaki ye na bato na Ezipito mpe na Asulia, awa Jéhovah amonisaki ete azali Nzambe ya solo, Ye oyo akokokisaka bilaka na ye. Makambo yango mabimisaki matomba malamu mpo na basaleli ya Nzambe, mpamba te balongwaki na boombo mpe bazongaki na mokili na bango. Basambeli na banzambe na lokuta basukaki mabe.
Bisakweli mpo na ntango na biso
15. (a) Tokoki koloba boni mpo na bisakweli mingi bizwami na Biblia? (b) Limbola liloba “nzambe”.
15 Ya solo, Yisaya apemamaki na Nzambe mpo na koyebisa bisakweli bikokanaki na Ntango ya Kalakala. Nzokande, bisakweli ya Biblia bikozalaka mbala mosusu na kokokisama mosusu eleki monene, mpo na ntango na biso; ezali boye mpo na bisakweli mingi bikomamaki na Yisaya. Makambo ye alobaki ezalaki kati na yango na bisakweli na ntina na ntembe oyo Jéhovah abeteli mabota nyonso mpe banzambe nyonso na mikolo na biso. “Banzambe” yango ezali bobele oyo esambelami na bato na mokili mobimba te, kasi mpe banzambe mosusu engebene ndimbola ya liloba yango. Diksionere moko elimboli liloba “nzambe” boye: “Moto [to eloko] oyo azali kopelisa mayoki ya bato, azali kokamwisa bato, azali kobenda mposa ya bato ete basambela ye.”
16. Banzambe nini esambelami lelo na bato ya mikili ndenge na ndenge mpe na baoyo balobaka ete bazali baklisto?
16 Na mikolo na biso, “banzambe” mingi bazali, lokola bamilió na banzambe esambelami na ba hindous, na ba bouddhistes, na ba shintoďste, na ba animistes mpe mingi mosusu. Mpe tobosana te matérialisme to mposa ya bozwi, ekomi lokola nzambe mpo na bato mingi, mokano ya liboso ya misala na bango. Tobosana mpe te bibundeli makasi na mosala ya basoda mpe sianse, yango ezali banzambe likoló na yango mabota batii motema mpo na kimya na bango. Epai mosusu, bato mingi oyo balobaka ete bandimaka Nzambe, ata baoyo bazali komibenga ete bazali baklisto, bazali mpenza kotya motema na bango epai na ye te mpe bazali kosalela ye na sembo te: bazali nde kotya liboso motema na bango epai na bato to na biloko bikoninganaka te, mpe bazali kosalela yango.
17. Makambo Yisaya alobaki ekokokana na monene na yango likoló na nani?
17 Na mikolo na biso, makambo Yisaya alobaki makokokana na motindo eleki monene likoló na “banzambe” wana nyonso. Jéhovah abengi mabota ete bayangana mpe ‘baloba’. Abeteli bango ntembe oyo: “Tobelema elongo mpo na kosamba.” (Yisaya 41:1) Mokili ezali lelo “kosambisama” to, engebene bisakweli bikomami na 2 Timote 3:1-5 mpe Matai 24:1-14, mokili ezali “na mikolo na nsuka” na yango. Jéhovah abeteli banzambe ya mabota ntembe, kolobaka na bango ete basakola makambo makoya mpe bamonisa bongo ete bazali banzambe. Abeteli mpe bango ntembe ete balakisa soki bakoki kobatela basambeli na bango. Alobi na bango ete “Bimisa likambo na bino . . . Yaka na matatoli na bino . . . mpe [boyebisa] biso makambo mazali koya.”—Yisaya 41:21, 22.
18. Nzambe Mozwi-na-Nguya-nyonso amimonisi na maloba nini epai ya bato, mpe alaki nini epai ya bato na ye?
18 Nzambe Mozwi-na—Nguya-Nyonso amilakisi epai na bato: “Ngai nazali Jéhovah, yango nkombo na ngai, nakopesa nkembo na ngai epai na mosusu te, kosanzola na ngai epai na bikeko te.” (Yisaya 42:8) Alobi na bato na ye: “Banga te, mpo ete ngai nazali na yo; yoka nsomo te mpo ete ngai nazali Nzambe na yo. Nakokembisa yo, nakosunga yo.” Na nsima apesi bango elaka oyo: “Tala baoyo nyonso basilikaki mpo na yo, bakoyokisama nsoni mpe bakobulunganisama; baoyo bawelani na yo bakozala lokola eloko te mpe bakosila nyee.” “Ebundeli na ebundeli oyo esalami mpo na kotelemela yo ekolonga te . . . Oyo ezali libula na basaleli na Jéhovah.”—Yisaya 41:10, 11; 54:17.
19, 20. (a) Ndenge nini Yisaya amonisi ete Jéhovah asili kopona ntango mpo na kosembola makambo? (b) Nani Jéhovah asili kobimisa na “mikolo ya nsuka” oyo, mpe ndenge nini bato yango bazali komonisa ye?
19 Na boumeli ya bikeke mingi Jéhovah atikaki mabota kolanda nzela oyo balingi, kasi ntango ekoki mpo ete asembola makambo awa na mabelé. Yango wana alobi: “Longwa ntango molai nazali nyee, nafandi kimya, namipekisi.” Nzokande, na mikolo na biso, “Jéhovah akobima lokola elombe, lokola moto na etumba akopelisa nkanda na ye; angangi, angulumi, amimonisi na nguya liboso na bayini na ye.” (Yisaya 42:13, 14) Na kotalela bisakweli ya Yisaya mpe na bakomi mosusu ya Biblia, mpe bisakweli na Yesu, Jéhovah alakaki ete na “mikolo na nsuka” akobimisa libota moko oyo ekotatola na molende nyonso mpo na ye, lokola ete basaleli na ye babengami kotatola mpo na likambo lizali kosambisama.
20 Libota oyo Jéhovah abimisi mpo ete esalela ye ezali elembo ete ye azali Nzambe ya solo, Ye oyo akobikisaka basaleli na ye, mpe akobomaka banzambe ya lokuta elongo na basambeli na bango. Lelo, libota ya Jéhovah ‘ezali koyemba lisanzoli kosanzola ye longwa na ndelo na mokili, longwa na mikili nyonso mpe na bisanga, longwa nsonge na ngomba’. (Yisaya 42:10-12) Esakweli oyo mosusu ya Yisaya ekokani: “Ekozala ete na mikolo na nsuka [na eleko na biso], ngomba na ndako na Jéhovah [losambo na ye ya solo] ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso minene, ekotombwa koleka ngomba nyonso mike [ndenge nyonso ya losambo mosusu]; mpe [bato na] mabota nyonso bakokenda wana. Toli nini bato yango bazali kopesa epai ya bazalani na bango na motema sembo? Bazali koloba na bango: “Yakani, tobuta na ngomba na Jéhovah . . . ete alakisa biso nzela na ye mpe ete totambola na bipai bikokendaka ye.”—Yisaya 2:2-4.
21. Ntembe oyo Jéhovah abeteli banzambe ya mabota ebimisi mituna nini?
21 Na yango, lokola moto azali koloba na tribinale, Jéhovah alobi: “Tika ete mabota nyonso bayangana elongo mpe ete bato nyonso baya esika moko. . . . Tika ete babimisa batatoli na bango mpo na kolobela bango, bayoka mpe baoba ete, Ezali solo.” (Yisaya 43:9) Yango ezali solo ntembe Jéhovah abeteli banzambe ya mabota. Nani kati na bango akoki koyebisa makambo makoya lobi? Nani asila kosala yango? Nani kati na banzambe yango akoki kobimisa ata moto moko mpo na kotatola na ntina na ye na nzela na bilembeteli makasi ete ye azali solo nzambe, oyo akoki ete tosambela ye? Misala nini banzambe ya mabota mpe basambeli na bango basali yango na ntango na biso? Bango baleki banzambe ya Ezipito, ya Asulia to ya Babilone ya kala? Epai mosusu, baoyo bazali kotatola mpo na Jéhovah, basili komonisa na motindo mokoki kotyamela ntembe te ete Jéhovah azali Nzambe ya solo, Oyo Bobele Moko abongi kosambelama? Mituna oyo mikoyanolama na lisolo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na nimero na yango ya le 15 août, Mosenzeli elobeli motindo Jéhovah apesaki mbano na Ezekiase mpo ete atyaki motema epai na ye. Makambo wana lisusu matalaki bonzambe ya Jéhovah.
Bozongeli
◻ Ntembe nini ebimaki oyo etali molongo mobimba?
◻ “Banzambe” nini ya mabota babetelami ntembe mpo na likambo yango na mikolo na biso?
◻ Tanga makambo misato mamonisi ete Jéhovah aleki banzambe ya lokuta.
◻ Ndenge nini Yisaya amonisi ete Jéhovah akosembola makambo na mikolo na biso?
◻ Mituna nini na ntina na basambeli na mangomba nyonso misengeli kozwa eyano?
[Elilingi na lokasa 11]
Banzambe na Ezipito ata na nguya moke te mpo na kotelema liboso na Nzambe na solo, Jéhovah
[Elilingi na lokasa 12]
Nzambe ya solo ayokisaki nsoni makasi epai na banzambe na Asulia mpe na basambeli na bango
[Elilingi na lokasa 13]
Danyele ayebisaki nsango ya Jéhovah epai ya basambeli ya banzambe ya lokuta na babilone