Totya elikya epai na Jéhovah kasi epai na “mwango na mabota” te!
1. Nini ekomelaki lisangá ya Jéhovah na mabelé na boumeli na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba?
NA BOUMELI ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, botomboki ya bapengwi ezimbisaki bato mingi, kolongolaka bango na molongo na basaleli na Jéhovah. Monyokoli oyo banguna na bango, bakonzi na mangomba babimiselaki bango, ezalaki mpe kongala. Biro na bango monene oyo ezali na Brooklyn (New York), ekangamaki. Epai mosusu, bazalaki lisusu na likoki te ya kozwa lisalisi ya président ya la Société, ya secrétaire—trésorier, ya motambwisi ya ba bureaux, ya mosangani moko na comité de rédaction mpe ya ba administrateurs mosusu minei ya la Société, mpamba te bango nyonso oyo totangi bazalaki na boloko na Atlanta, na Géorgie (Etats-Unis). Emonanaki lokola ete nsuka eyaki mpo na Bayekoli ya Biblia bapakolami na elimo, mpe bakanisaki ete ntango ekoki mpo na kokende na likolo. Kasi esalemaki bongo te!
2. Esakweli nini ya Yisaya ekokanaki lisusu na ntango na biso, na 1919?
2 Ebongaki ete eteni ya Yisaya 66:6-8 ekokana lisusu na ebandeli ya 1919 na kotunaka lisusu mituna oyo mosakoli atunaki: “Mongongo na mobulu kati na mboka, mongongo uta na tempelo, mongongo na Jéhovah oyo azali kobukanisa epai na bayini na ye. Naino azalaki na mpasi te abotaki; naino mpasi na ye ekomelaki ye te abimisaki mwana mobali. Nani ayoki likambo na lolenge oyo? Nani amoni likambo yango? Mokili ekobotama na mokolo moko? Libota bakobimisama na mwa ntango moke? Mpo ete naino Siona azwaki mpasi na kobota abotaki bana na ye.”
3. Na 1919, nini emonisaki ete Siona abotaki bana mpe “libota ya sika” abotamaki “na mokolo moko”?
3 Lokola bato basekwi na bakufi, basangani na Lisangá ya mokili mobimba ya Bayekoli ya Biblia basalaki assemblée na bango ya liboso nsima na Etumba, na Cedar Point (Ohio), kobanda le 1er kino le 8 septembre 1919. Président, secrétaire-trésorier, directeur mpe ba administrateurs mosusu ya la Société, bautaki kobimisama na boloko mpe kolongisama na makambo nyonso, bazalaki mpe na likita wana ya esengo. Bayoki basepelaki mingi ntango J. Rutherford, président ya la Société asakolaki ete zulunalo mosusu ya sika ebimi, L’Age d’Or oyo ebengami lelo Réveillez-vous! Epai mosusu, bayekoli ya sika koleka 200 bazwaki batisimo na libaku yango. Lisangá ya teokratike ya Jéhovah ebotaki bana oyo mosala mingi ezalaki kozela bango na eleko wana nsima na etumba. “Libota” wana oyo ebotamaki na mbala moko mpe efandaki na “mokili” moko ebotamaki mpe mbala moko balingaki kosalela bametode ya sika mpo na mosala ya kosakola na molende mingi.
4. (a) Makambo oyo nyonso malingaki kosala nini likolo na “Babilone Monene”? (b) Komonisa boyokani oyo “Babilone Monene” ezali na yango elongo na bilimu mabe ezali ebandeli ya nini?
4 Yango ezalaki lokola ntembe babetelaki “Babilone Monene”, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta. Babilone Monene ayebaki te ete makambo makoleka motindo yango mpe basangani na yango bazalaki na motema likolo, mingimingi na kati na boklisto ya mokili oyo. Amonaki ete kimya na ye elingi kobebisama. Makambo oyo ye azalaki kotalela ete ezali lotomo na ye mpo na losambo ekomaki na likama. Basekele na ye elingaki kobima, na boyokani oyo azali na yango elongo na bilimu mabe. Na esika ete ayokana na Nzambe na Biblia Mosantu, azali nde koyokana na “nzambe na biloko na ntango oyo” Satana, mobimisi na moyini na Klisto oyo Biblia esilaki kosakola na ntina na ye. (2 Bakolinti 4:4; 1 Yoane 2:18) Emoniseli yango ezalaki se ndambo moke na mpasi na ye, mpamba te Mosambisi ya molongo mobimba, ye moko akokata likambo na ye mpe akoboma ye. Akobikisa ye te na maboko na mibali na ye ya kala, bakonzi na politike, oyo na ntango yango bakosilikela ye makasi.
5. (a) Mpo na nini boklisto ya mokili oyo ekomizimbisa, mpe ndenge nini Nzambe ya Biblia azali kotalela bango? (b) Eloko nini “Babilone Monene” azali komona yango te?
5 Atako azali na Biblia, mokanda oyo ezali kosakola makambo oyo nyonso, boklisto ya mokili oyo ekomizimbisa. Ekondimela mabota oyo bakobelela ete “Kimya ezali, makambo mazali te!”, mabota oyo na kati na yango azali kosalaka milulu na ye ya losambo. Na boumeli ya milulu yango, Mangomba ya Babilone Monene bazali kokongola mbongo mpe bazali kokoma bazwi mpo na yango. Nzokande, na miso na Nzambe na Makomami Mosantu, azali “mobola, mokufeli-miso mpe bolumbu”. Azali kotya motema na ye epai na Jéhovah te mpe azali kozwa litomba te na bozwi ya solo ya elimo oyo Jéhovah azali kokabola (Emoniseli 3:17, 18) Azali komona te makomi oyo ebimi likolo na mur. Tolingi koloba nini na yango?
Makomi likolo na mur
6. Nguya nini ya mokili mobimba ya ntango ya kala tokotalela ngonga ya nsuka ya lisolo na yango, mpe ezalela ya libota ya Jéhovah na eleko yango ezalaki boni?
6 Mpo na kokanga ntina na maloba oyo, esengeli na biso totaleIa lisolo ya bangonga ya nsuka ya Nguya ya misato ya mokili mobimba ya lisolo ya Biblia, Babilone, oyo kapitale na yango ezalaki ngambo na ngambo na ebale Efalata. Belesasala azalaki mokonzi ya nsuka ya Babilone oyo azalaki koyangela na mboka yango, oyo esika ya tour de Babel ezalaki mpe kati na yango, oyo bato balingaka kotonga kala, nde Nzambe Mozwi-na-Nguya—nyonso apalanganisaki batongi yango, ntango abulunganisaki monoko na bango. (Genese 11:1-9) Na eleko oyo Babilone ezalaki na bangonga na yango ya nsuka, libota ya Jéhovah, Bayuda, bazalaki na boombo na mokili yango ya bapakano. Kasi mbula 70 ya boombo na bango ekomaki na nsuka.
7. (a) Mpo ma nini mokonzi Belesasala abongisaki limpati monene mpo na bato na ye minene kozanga komibanzabanza ata na eloko moko? Nini esalemaki na boumeli ya elambo yango, mpe yango esalaki nini epai na mokonzi?
7 Basoda ya Medes mpe ya Perse, oyo elingaki kokoma Nguya ya Minei ya mokili mobimba na lisolo ya Biblia, batelemelaki Babilone. Kasi mboka wana na mapango makasi, ezalaki komonana lokola ete ekoki kokwea na maboko ya banguna te. Ebale Efalata ezalaki koleka na kati na yango, mpe epai na epai na ebale ezalaki na bizibeli makasi ya kwivre mpo na mapango ya mboka na ngambo nyonso mibale. Emonaki ye ete mboka na ye ezali na kimya, mokonzi Belesasala abongisaki “limpati monene mpo na nkoto kati na bato na ye minene” mpe azalaki na motema likolo te. Nzokande limpati yango ezalaki ya nsuka mpo na ye. Na mbala moko, amonaki liboke ekomaki na mur maloba oyo ya esakweli: “MENE, MENE, TEKELE mpe PALASI.” (Danyele 5:1, 5, 25) Ezalaki na butu ya 5 octobre 539 liboso na ntango na biso. Emonaki ba invités makomi oyo, bango nyonso babulunganaki. Na kobanga nyonso mpe kolenga, mokonzi Belesasala abengisaki bato na mayele nyonso ba magiciens mpe bato na kotala myoto, baoyo bayebanaki ete bayebi kolimbola bilembo mpe makambo mabombami. Kasi ata moto moko akokaki kolimbola maloba wana ya ekamwiseli te, ata kotanga mpamba. Esengelaki kosala nini?
8, 9. (a) Awa molimboli ata moko emonanaki te kati na bato na ye ya mayele, likanisi nini epesamaki na mokonzi? (b) Ndimbola nini Danyele apesaki na mokomi oyo mamonanaki na mur? (c) Mpo na nini elambo monene ebongisamaki na mokonzi Belesasala ekomaki ntina na esakweli moko ya mpasi?
8 Kokende koluka Moyuda moko. Ndenge nini? Moyuda? Ee, moko na baprinces, bato na lokumu oyo mokonzi Nebukadanesala akamataki bango na Yelusaleme, na mokili na bango oyo babotamaki kuna mpe amemaki bango na Babilone, mpo ete kuna bakoka kozwa formation ekoki na bango mpo na kosalela mokonzi mosala. Eloko etikalaki na mokonzi kosala bobele wana. Mama na mokonzi alakisaki ye ete abenga Danyele, mpe alobaki ete azali moto na mayele, moto ayebi kolimbola bilembo. (Danyele 5:10-12) Na ndako na elambo, moto ata moko azalaki lisusu koloba te. Danyele akotaki, ebengamaki ye na mokonzi Belesasala, mpe alimbolaki maloba oyo mazalaki libombami, epai na mokonzi na Nguya ya misato ya mokili mobimba kati na lisolo ya Biblia, mpe epai na bato na ye minene.
9 Danyele alobaki: “Yango wana loboko oyo etindamaki na ye, mpe likomi oyo ekomami ete, MENE, MENE, TEKELE, mpe PALASI. Oyo ezali ntina na likambo yango ete, MENE, Nzambe atangi motuya na mikolo na bokonzi na yo mpe asukisi yango; TEKELE, yo omekami na emekeli na bozito, mpe ozwami na kozanga; PALASIa, bokonzi na yo ekabwani mpe epesami na Bamadai mpe na Bapalasa.” (Danyele 5:24-28) Mokonzi Belesasala, bato na ye minene mpe basi na bango batiolaki na nko losambo na Nzambe na Danyele. Ndenge nini Bamelaki vinyo kati na bakopo ya wolo oyo ezwamaki na temple ya Jéhovah na Yelusaleme ntango mboka mosantu yango ebomamaki na mobu 607 liboso na ntango na biso. Kosalaka bongo babakisaki nde kotuka na mabe oyo Babilone asilaki kosala.—Danyele 5:3, 4, 23.
Siruse, molongi oyo asakolamaki, akoti kati na mboka
10, 11. (a) Engebene makambo Jéhovah asilaki koyebisa liboso, nani asengelaki kokamata Babilone, mpe na maloba nini Yisaya asilaki koyebisa liboso mpo na elonga yango? (b) Ndenge nini Jéhovah akokisaki esakweli yango mpe apesaki etumbu ebongaki na Belesasala mpe na bato minene ya bokonzi na ye?
10 Na Yisaya 45:1-3, Nzambe Oyo-Aleki-Likolo asakolaki: “Jéhovah alobi boye epai na mopakolami na ye, epai na Siruse oyo nasimbi loboko na ye na mobali mpo na kobuka mabota liboso na ye mpe kofungola nkamba na nkoto na mikonzi; mpo na kozipola pome liboso na ye ete bikuke bifungama te, ete, Ngai nakoleka liboso na yo mpe nakozalisa alima bisika bizali na mobulu, nakobukabuka bikuke na motako, nakokatakata bikangeli na ebende. Nakopesa yo biloko na motuya bizali kati na molili mpe bozwi bobombami na bisika na nkuku, ete oyeba ete ngai, Jéhovah, Nzambe na Yisraele, nabyangi yo na nkombo na yo.”
11 Mpo na kokokisa esakweli yango, Jéhovah apesaki na Siruse mokonzi ya Perse likanisi ya kotimola nzela mosusu mpo na mai ya ebale Efalata ete esopana kati na etima moko pembeni wana. Nsima wana mai makaukaki, basoda ya Siruse bakitaki na nzela oyo mai ya ebale ezalaki koleka kala, batambolaki kino na katikati ya mboka. Lokola bizibeli ngambo na ngambo bikangamaki te, babutaki, babomaki basenzeli mpe bakotaki na ndako monene esika limpati ezalaki kosalema. Limpati ya Belesasala esukaki na lolenge ya nsomo, oyo ezalaki etumbu ebongaki na mokonzi yango mpe na bato na ye ya minene. Mpamba te bango batukaki “Nkolo ya molongo mobimba” na ndenge bamelaki na bakopo ya temple oyo bayibaki na ndako ya bosantu ya Jéhovah, na Yelusaleme.
12. (a) Lokola Yisaya asakolaki ete Siruse akokamata Babilone, mpo na nini Danyele alobi na mokanda na ye ete ezali Darius momede nde azwaki mboka yango? (b) Darius elongo na Siruse moperse, bazali elilingi na nani mpe nani?
12 Engebene verset ya nsuka na mokapo 5 ya esakweli ya Danyele, nsima na kobomama na Belesasala mokonzi na Babilone, Darius moMéde “azwaki bokonzi, wana ezalaki ye na mbula soko ntuku motoba na mibale”. Lokola Darius azalaki mokolo na Siruse le Perse, Danyele alobi na mokanda na ye ete Darius mokonzi na Mede nde azwaki Babilone. Darius yango azalaki mokonzi na Empire médo-perse kobanda 539 kino 537 liboso na ntango na biso. Mokonzi yango azali elilingi na Jéhovah Nzambe. Siruse le Perse, mosungi na Darius, azali elilingi na Yesu Klisto, oyo Jéhovah akosalela ye mpo na kolonga mpe koboma “Babilone Monene”, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta.
13, 14. Danyele abendaki likebi ya Siruse moperse likolo na nini, mpe mokanda na Esdras, oyo ekomamaki nsima na boombo ya bana ya Yisraele, ebandi na maloba nini?
13 Ntango Siruse abandaki koyangela na Empire médo—perse, na 537 liboso na ntango na biso, na ntembe te mosakoli Danyele abendaki likebi na ye likolo na esakweli etalaki ye, esakweli ekomami na Yisaya 45. Mokanda ya Esdras, oyo ekomamaki nsima na boombo ya bana ya Yisraele na Babilone ebandi na maloba oyo:
14 “Na mbula na liboso na Siruse, mokonzi na Perse, Jéhovah alamukisaki elimo na Siruse, mokonzi na Perse, ete liloba na Jéhovah liyaki na monoko na Yilimia likokisama na ntina etali mbula 70 ya boombo (Yilimia 25:12; 29:10, 14). Asakolaki na bokonzi na ye mobimba, akomaki mpe yango ete, Siruse, mokonzi na Perse, alobi boye ete, Jéhovah, Nzambe na makolo, asili kopesa ngai bikonzi nyonso na mokili; mpe alakisi ngai ete natongela ye ndako na Yelusaleme oyo ezali kati na Yuda. Ye nani azali kati na bino na bato na ye nyonso, Nzambe na ye azala na ye; tika ete abuta na Yelusaleme oyo ezali na Yuda mpe etonga lisusu ndako na Jéhovah, Nzambe na Yisraele, yango ezalaki kuna na Yelusaleme; ye azali Nzambe na solo!”—Esdras 1:1-3.
Siruse oyo aleki monene akoboma “Babilone monene”
15. (a) Siruse oyo aleki monene abandaki koyangela na mbula nini? (b) Etelemelo ya ba Témoins de Jéhovah ezali nini liboso na myango nyonso oyo O.N.U. ezali kobongisa, mpe mpo na nini?
15 Na mikolo na biso, Siruse oyo aleki monene abandaki koyangela na 1914, na nsuka na “ntango na mabota”, lokola Yesu ye moko asakolaki yango na Luka 21:24. Kozanga kotalela likambo yango ya ntina monene, mabota oyo basangani na kati na O.N.U. basakolaki 1986 ete ezali Mbula ya kimya na mokili mobimba. Kasi ba Témoins de Jéhovah bazali komitika kozimbisama te na mokano na bango oyo. Ntango mabota bakobelela ete “Kimya ezali, makambo mazali te”, ba Témoins de Jéhovah bakosangana te na mikonzi ya politike mpe mibali ya “Babilone Monene”. Bakobeta maboko te na liloba oyo mabota bakobimisa, awa esili bango kokoma na mikolo na bango ya nsuka. Bakopesa maboko na bango te na mwango wana ya O.N.U. soki mpe ya lisangá nyonso mosusu oyo ezali koluka kotya kimya. (Yisaya 8:12) Nkutu, bakozongela nde maloba oyo makomami na Yisaya 8:20: “Na malako mpe na matatoli—o! Soko bakoloba kobila liloba oyo te, ntongo ekotanela bango te. Kopesaka ntina na etemelo na bango oyo ekoki kokweisama te, bakoloba: “Mpo ete Nzambe azali na biso elongo.” (Yisaya 8:10) Maloba oyo makomonisa ete Jéhovah Nzambe azali na bosangani moko te kati na bameko ya politike ekamatami na mabota mpo na kotya “kimya”; nkutu, azali nde kokweisa bameko yango.
16. Ndenge nini liloba ya esakweli ekomami na Emoniseli 17:16,17 ekokokana nyonso, mpe mayoki nini ekozala na basaleli ya Jéhovah na ntango yango?
16 Na nsima na Siruse oyo aleki monene, Jéhovah akotya kati na motema mpe kati na elimo na mikonzi na politike ya mokili oyo likanisi ya kobalukela “Babilone Monene”, lisanga ya mokili mobimba ya losambo ya lokuta. Lokola nyama na yauli oyo ezali kongala na maseke na ye, bakotobolatobola ye kino kufa. Liloba na esakweli oyo ezali kati na Emoniseli mokapo 17 ekokokana nyonso, mpe ekozala esengo monene epai na ba Témoins de Jéhovah na mokili mobimba.—Emoniseli 17:16, 17; 19:1-3.
Tobatela boyokani malamu elongo na Jéhovah
17. Atako ba Témoins de Jéhovah basangani na “Babilone Monene” te, nzokande mikonzi na mokili bakoluka kosalela bango nini?
17 Atako ba Témoins de Jéhovah basangani na “Babilone Monene” te, ata bayebani ete bazali komonisa polele mabe na ye, mpe bazali kosangana ata moke te na makambo na politike na mokili, nzokande na nsima mikonzi na politike bazangi kondima Nzambe bakoluka kobundisa bango. Lokola bakozala na mposa makasi ya kozala mikonzi likolo na makambo nyonso mpe na bato nyonso, bakobundisa batemwe ya sembo ya Nzambe oyo aleki banzambe nyonso, Liziba na boyangeli nyonso ya sembo.
18. Likambo nini eleki mpela ya ntango ya Noa Jéhovah akosala yango?
18 Na ntango yango Mozwi-na-Nguya-Nyonso, Nkolo moyangeli ya likolo mpe ya mabelé akokotela batemwe na ye, mpo na komonisa na babomi na “Babilone Monene” ete Ye oyo azali na batemwe na ekeke oyo ya ntuku mibale azali Nzambe ya bomoi, na nguya—nyonso-Nzambe oyo azali na lotomo na kosenga na bikelamu na ye ete basambela ye na motema na bango mobimba mpe na bomoko awa na nse, mabelé oyo ezali etyelo na makolo na ye. Akosala yango na lolenge ya nsomo, na motindo boye ete ata batemwe na ye oyo bakotala etumba yango na miso mpamba kozanga kosangana na yango bakozala monoko polele mpo na kokamwa. Akobunda etumba oyo abunda naino te, akolonga mpe koleka bilonga nyonso ya kala. (Emoniseli 16:14, 16; 19:19-21) Etumba yango ekosukisa biloko mabe ya ntango oyo eyangelami na Satana. Nsango na yango ekoleka oyo ya mpela ya ntango ya Noa.
19. Batemwe nini bakokoka kotatola ete Jéhovah ye moko amilongisi lokola Nkolo Moyangeli ya molongo mobimba, mpe yango ekomonisa nini?
19 Jéhovah azalaki na batemwe mpo na kotatola ete asukisaki mokili ya kala na mpela oyo ebomaki bato nyonso oyo bazalaki libanda ya masuwa. Bobele bongo, akozala na ebele ya batemwe awa na nse koleka liboso, mpo na kotatola ete ye moko asili komilongisa libela lokola Nkolo Moyangeli,ya molongo mobimba. (2 Petelo 3:6, 7, 13, 14) Batemwe yango bakozala baoyo, kati na mokili oyo ekweisami, bazali kotyela ye motema mpo akoka kotya kimya mpe asilisa kobanga nyonso. Esengo na yo soki okozala moko na batemwe yango oyo bakobatelama na ekamwiseli. Wana ekomonisa ete kimya na yo euti epai na Jéhovah Nzambe kasi na lisangá moko ya bato te, soko mpe na mwango moko esalami na mabota na politike na biloko mabe ya ntango oyo etambwisami na Diable.
20. Ekozala boni mpo na Jéhovah nsima na etumba yango, mpe biso tozwi ekateli nini?
20 Yehovah Nzambe akokumisama na etumba yango. Akoyebana lokola Ye oyo bato basengeli kosambela mpe kosalela, Nzambe oyo aleki banzambe nyonso, bobele epai na ye mokomi na nzembo alobaki maloba oyo mapemami: “Lobiko na lobiko, yo ozali Nzambe.” (Nzembo 90:2) Na botondi nyonso, tobatela elikya na Jéhovah Nzambe mpe tokangama ntango nyonso epai na ye na nsima na Siruse oyo aleki monene, Yesu Klisto.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Parsin ezali pluriel ya liloba Peres mpe elimboli kokabwana (pluriel).
Bozongeli
◻ Eloko nini “Babilone Monene”ezali komona yango te?
◻ Nsuka mabe na elambo ya Belesasala ezali elilingi ya nini?
◻ Nani akolonga “Babilone Monene”?
◻ Etelemelo ya ba Temoins de Jehovah ezali nini na kotalelaka myango nyonso oyo O.N.U. ezali kobongisa?
◻ Mpo na nini baoyo nyonso bazali kotya motema na Jéhovah mpo na kimya mpe kobatelama bakozala na esengo?
[Elilingi na lokasa 20]
Danyele alimboli makomi oyo ezalaki lidombami ete ezali nsango ya kokweisa Bokonzi ya Babilone