Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lff liteya 6
  • Bomoi ebandá ndenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi ebandá ndenge nini?
  • Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KƆTÁ NA MOZINDO
  • NA MOKUSE
  • MAKANISI MOSUSU
  • Makambo oyo Biblia elobi
    Lamuká!—2021
  • Nzambe alingi ete tózala na bomoi ya ndenge nini?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Lisolo ya bozalisi oyo bato mingi bayebaka te
    Lamuká!—2014
  • Salisá bana na yo bázala na kondima makasi ete Mozalisi azali
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
Makambo mosusu
Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
lff liteya 6
Liteya 06. Moi ezali kobɛta na mabele mpe molona ebimi.

LITEYA 06

Bomoi ebandá ndenge nini?

Ya Papye
Ya Papye
Ya Papye

Biblia elobi: “Liziba ya bomoi ezali epai ya [Nzambe].” (Nzembo 36:9) Ondimi yango? Bato mosusu balobaka ete moto moko te asalá bomoi. Soki ezali bongo, bomoi na biso mpe ebimá yango moko. Kasi soki Yehova nde asalá bomoi, esengeli kozala na ntina oyo asalá yango.a Tótalela lisolo ya Biblia oyo elobeli ndenge bomoi ebandá mpe ntina oyo tosengeli kondima yango.

1. Likoló ná mabele eutá wapi?

Biblia elobi: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.” (Ebandeli 1:1) Bato ya siansi bandimaka ete likoló ná mabele esalemá. Nzambe asalaki yango ndenge nini? Asalelaki “nguya” na ye oyo esalaka mosala, elingi koloba elimo santu na ye, mpo na kosala biloko nyonso oyo ezali na likoló, ezala bagalaksi, minzoto mpe baplanɛti.​—Ebandeli 1:2.

2. Mpo na nini Nzambe asalaki mabele?

Yehova asalaki “[mabele] mpamba te, kasi asalaki yango nde mpo bato báfanda.” (Yisaya 45:18) Asalaki mabele, esika moko ya kitoko mpo moto afanda. Atyaki nyonso oyo moto azali na yango mposa mpo afanda wana libela na libela. (Tángá Yisaya 40:28; 42:5.) Bato ya siansi balobi ete mabele ekeseni mpenza na baplanɛti mosusu. Kaka mabele nde ezali na nyonso oyo esengeli mpo moto azala na bomoi.

3. Mpo na nini bato bakeseni na banyama?

Nsima ya kosala mabele, Yehova asalaki banzete ná banyama. Na nsima, “Nzambe abandaki kozalisa moto na elilingi na ye.” (Tángá Ebandeli 1:27.) Mpo na nini tokeseni na biloko mosusu nyonso? Mpo tosalemá na elilingi ya Nzambe, elingi koloba, tokoki komekola bizaleli na ye, na ndakisa bolingo mpe bosembo. Nzambe asalá biso mpe na likoki ya koyekola minɔkɔ, kosepela na biloko ya kitoko, mpe na miziki. Tokeseni na banyama mpo biso tokoki kosambela Nzambe oyo akelá biso.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba makambo oyo emonisi ete Nzambe nde asalá bomoi mpe ntina oyo tosengeli kondima lisolo ya Biblia oyo elobeli biloko nyonso oyo Nzambe asalá. Luká koyeba mpe oyo bizaleli ya malamu ya bato eteyi biso mpo na Nzambe.

4. Bomoi esalemá

Bato bamekolaka biloko oyo Nzambe asalá mpo na kosala biloko mosusu mpe bazwelaka yango lokumu. Bongo tokoloba nini mpo na Nzambe oyo asalá biloko nyonso? Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

VIDEO: Kondima ete Nzambe azali (2:43)

  • Biloko nini bato basalá nsima ya komekola biloko oyo Nzambe asalá?

Moto nde atongaka ndako. Kasi nani asalá biloko nyonso? Tángá Baebre 3:4, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Biloko nini oyo Nzambe asalá ekamwisaka yo?

  • Ebongi mpenza kondima ete biloko nyonso oyo ezali na likoló mpe na mabele esalemá? Mpo na nini?

Oyebaki yango?

Okoki kozwa masolo mpe bavideo oyo elobeli likambo yango na jw.org na eteni “Ebimá kaka yango moko?” mpe na eteni “Makanisi na oyo etali ndenge bomoi ebandá.”

“Ya solo, ndako nyonso etongamaka na moto, kasi moto oyo azalisá biloko nyonso ezali Nzambe”

Mobali moko azali kotonga ndako na banzete ya bambu.

5. Lisolo ya Biblia oyo etali biloko oyo Nzambe asalá ezali solo

Na Ebandeli mokapo 1, Biblia elobi ndenge Nzambe asalá mabele mpe bomoi. Lisolo yango ezali solo to ezali kaka lisapo? Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

VIDEO: Molɔ́ngɔ́ ekelamaki? ​—Video ya mokuse (3:51)

Bililingi: Bililingi ya video ‘L’univers a-t-il été créé?​​—Video ya mokuse.’ 1. Bililingi oyo emonisi biloko oyo Nzambe akelaki na boumeli ya mikolo motoba. 2. Elilingi oyo emonisi biloko oyo emonanaki nsima ya kokelama ya biloko na boumeli ya mikolo motoba: moi, mokili, mai, biloko, bandɛkɛ, banyama, mpe bato.
  • Biblia elobi ete Nzambe asalaki mabele, bikelamu ya bomoi mpe biloko mosusu na mikolo 6. Ezalaki mikolo ya bangonga 24?

  • Okanisi nini: Lisolo ya Biblia oyo elobeli ndenge Nzambe asalá biloko nyonso ezali solo? Mpo na nini?

Tángá Ebandeli 1:1, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Bato ya siansi balobaka ete likoló ná mabele esalemá. Ndenge nini makambo oyo bango balobaka eyokani na vɛrsɛ oyo outi kotánga?

Bato mosusu bakanisaka ete Nzambe asalaki ekelamu moko mpe na nsima ebimisaki biloko mosusu. Tángá Ebandeli 1:21, 25, 27, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Biblia eteyaka ete Nzambe asalaki ekelamu moko oyo na nsima ebimisaki bambisi, banyama mpe bato? To asalaki biloko nyonso ‘mitindo na mitindo’?b

6. Bato bakeseni na biloko nyonso oyo Nzambe asalá

Biso tokeseni na banyama. Tángá Ebandeli 1:26, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Lokola tosalemá na elilingi ya Nzambe, mpo na nini tolingaka mpe tomoniselaka bato motema mawa?

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Lisolo ya Biblia oyo elobeli ndenge Nzambe asalá biloko ezali lisapo, ezali solo te.”

  • Okopesa ye eyano nini? Mpo na nini?

NA MOKUSE

Yehova asalá likoló, mabele mpe bomoi.

Bozongeli

  • Biblia elobi ete likoló ná mabele ebandá ndenge nini?

  • Nzambe asalá ekelamu moko kaka oyo ebimisá biloko mosusu, to asalá biloko nyonso?

  • Mpo na nini bato bakeseni na biloko nyonso oyo Nzambe asalá?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá bandakisa oyo emonisi ete biloko oyo ezali na mokili esalemá.

“Bozalisi ezali koteya biso nini?” (Lamuka! ya 09/2006)

Talá ndenge tata moko azali kolimbwela mwana na ye lisolo ya Biblia oyo elobeli ndenge Nzambe asalá biloko nyonso.

“Yehova . . . azalisaki biloko nyonso” (2:37)

Talá soki liteya ya evolisyo eyokani na Biblia.

“Nzambe akelaki nde lolenge nyonso ya bomoi na nzela ya evolisyo?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Talá soki mikuwa ya kala to makambo oyo bato ya siansi balobi emonisi ete bomoi esalemá to ebimá kaka yango moko.

Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie (brochure)

a Na liteya 25 tokoyekola mokano ya Nzambe mpo na bato.

b Na Biblia, liloba “motindo” emonisaka etuluku ya bikelamu ya bomoi oyo ekoki kobotisana.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto