LOYEMBO 62
Loyembo ya sika
Ya Papye
1. Yembelá Nzambe loyembo oyo ya sika.
Lobelá misala na ye ya kokamwa.
Nani akoki kolonga lobɔkɔ na ye?
Alingá bosembo,
Mosambisi’a sembo.
(MONDIMO)
Yembáká!
Loyembo ya sika!
Yembáká!
Yehova, Mokonzi.
2. Gangá n’esengo, sepelá: Nzambe, Mokonzi!
Pesá ye lokumu; yembá na esengo.
Yo ná bandeko, bóyemba mpo na Yehova.
Nzɛnzɛ, mbonda, bɛtá;
Kelelo, lindanda.
(MONDIMO)
Yembáká!
Loyembo ya sika!
Yembáká!
Yehova, Mokonzi.
3. Mai monene, yembelá Mokeli na yo.
Mabele mpe yembá, ná biloko na yo.
Mbu mpe bibale, bóbɛtɛla ye mabɔkɔ.
Ngomba mpe mabwaku,
Bóyembela Nzambe.
(MONDIMO)
Yembáká!
Loyembo ya sika!
Yembáká!
Yehova, Mokonzi.
(Talá mpe Nz. 96:1; 149:1; Yis. 42:10.)