LOYEMBO 58
Tóluka baninga ya kimya
Ya Papye
1. Yesu atindaki tósakola.
Atambolaki na moi,
Ateyaki moto nyonso.
Alingaki bampate ya Nzambe.
Azalaki koluka
tii Moi ekolala.
Na bandako mpe na nzela,
Toteyaka moto nyonso:
Mosika te bampasi ekosila.
(MONDIMO)
Nse mobimba,
Tóluka baninga ya kimya,
Tii tokozwa
Ata moto moko ya sembo.
Tokokɔta
Bipai nyonso.
2. Nsuk’a mokili ekómi pene.
Tósalisa bato nyonso
Mpo ata moko abika.
Bato baza’ konyokwama mpenza.
Bolingo nd’etindaka
tózongela bango.
Na bamboka mpe na zamba,
Soki tozwi moto’a sembo,
Esengo ebakisaka molende.
(MONDIMO)
Nse mobimba,
Tóluka baninga ya kimya,
Tii tokozwa
Ata moto moko ya sembo.
Tokokɔta
Bipai nyonso.
(Talá mpe Yis. 52:7; Mat. 28:19, 20; Luka 8:1; Rom. 10:10.)