LOYEMBO 48
Tótambola na Yehova mokolo na mokolo
Ya Papye
(Mika 6:8)
1. Ntɔngɔ, mpokwa, butu, moi,
Tótambola kaka na Nzambe.
Boboto na ye monene
Na baoyo batosaka ye!
Na bolingo n’e apesi
Biso lobɔkɔ na ye.
Yango tomipesi na ye;
Tokosalela kaka ye.
2. Talá nsuka ebɛlɛmi,
Nkanda ya Satana engali.
Aza’ kotɛmɛla biso
Mpo tóbanga, mpe tótika Yah.
Kasi Yehova azali;
Tózala pene na ye.
Mpe tósalela ye seko.
Tólinga ye, tópɛngwa te.
3. Mpo tóbunga mpe nzela te,
Yah apesi elimo na ye.
Apesi mpe libondeli,
Lisangá mpe Liloba na ye.
Soki tolandi Yehova,
Tokosala mabe te.
Akosunga mpo tózala
Sembo, tótosa kaka ye.
(Talá mpe Eba. 5:24; 6:9; 1 Bak. 2:3, 4.)