LOYEMBO 40
Nani nzambe na yo?
Ya Papye
1. Nani nzambe na yo?
Nani nde nkolo na yo?
Eza’ oyo osambelaka.
Ye nzambe osalelaka.
Banzambe mibale
Ekosimba kutu te.
Motema na yo ekokabwana;
Yo, poná kaka moko.
2. Nani nzambe na yo?
Nani nde nkolo na yo?
Nzambe ya solo aza’ moko,
Nani okofukamela?
Eza’ Kaisala?
Oponi mpenza nde ye?
To oponi nde Nzambe ya solo
Mpe kotosa ye seko?
3. Nani Nzambe na nga’?
Nga’ naponi Yehova.
Nakotosa ye, Tata na nga’;
Nakokokisa ndai na nga’.
Mpo asombaki nga’;
Mpe namipesi na ye.
Napesi ye bomoi na nga’ nyonso.
Nakokumisa se ye.
(Talá mpe Yos. 24:15; Nz. 116:14, 18; 2 Tim. 2:19.)