Okanisaka ete bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?
Mokili oyo . . .
ekotikala kaka boye?
ekobeba lisusu?
ekobonga?
BIBLIA ELOBI ETE
“Nzambe . . . akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”—Emoniseli 21:3, 4, Libongoli ya Mokili ya Sika.
BOLAMU NINI OKOZWA?
Mosala ya malamu mpe oyo ekopesa esengo.—Yisaya 65:21-23.
Maladi ná bampasi nyonso ekozala lisusu te.—Yisaya 25:8; 33:24.
Bomoi ya esengo mpe ya seko elongo na libota mpe na baninga na yo.—Nzembo 37:11, 29.
EBONGI MPENZA TÓNDIMA MAKAMBO OYO BIBLIA ELOBI?
Ɛɛ; mpo na ntina mibale oyo:
Nzambe azali na likoki ya kosala makambo oyo alaki. Na Biblia, kaka Yehova Nzambe nde abengami “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” mpo nguya na ye ezali na nsuka te. (Emoniseli 15:3) Na yango, azali mpenza na likoki ya kobongisa makambo na mokili, ndenge alaki yango. Ndenge kaka Biblia elobi yango, “mpo na Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema.”—Matai 19:26.
Nzambe azali na mposa mpenza ya kosala makambo oyo alaki. Na ndakisa, Yehova azali na “mposa makasi” ya kolamwisa bakufi.—Yobo 14:14, 15.
Biblia emonisi mpe ete Yesu, Mwana ya Nzambe, abikisaki bato ya maladi. Mpo na nini asalaki yango? Mpo alingaki kosala yango. (Marko 1:40, 41) Ndenge moko na Tata, Yesu amonisaki malamu mpenza ete azali na mposa ya kosalisa bato oyo bazali na mposa ya lisalisi.—Yoane 14:9.
Na yango, tokoki mpenza kondima ete Yehova ná Yesu balingi kosalisa biso tózala na bomoi ya esengo na mikolo ezali koya!—Nzembo 72:12-14; 145:16; 2 Petro 3:9.
KANISÁ NAINO
Ndenge nini Nzambe akobongisa mokili oyo?
Biblia epesi eyano na motuna yango na MATAI 6:9, 10 mpe na DANYELE 2:44.