Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jl liteya 16
  • Mokumba ya basaleli na misala ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokumba ya basaleli na misala ezali nini?
  • Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Masolo mosusu
  • Basaleli na misala basalaka mosala ya motuya
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Bankulutu mpe basaleli na misala bazali kobatela boyokani kati na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Basaleli na misala bazali kokokisa mosala moko monene
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Bankulutu—Bópesa bandeko mosusu formasyo mpo bázwa mikumba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
jl liteya 16

LITEYA 16

Mokumba ya basaleli na misala ezali nini?

Mosaleli na misala azali kosalisa na kokabola mikanda

Birmanie

Mosaleli na misala azali kosala diskur

Lisolo na makita

Mosaleli na misala azali kotambwisa likita moko

Etuluku ya mosala ya kosakola

Mosaleli na misala azali kosalisa na kobongisa Ndako ya Bokonzi

Kobatela Ndako ya Bokonzi

Biblia elobeli bituluku mibale ya bandeko mibali oyo bakokisaka mikumba na lisangá: “bakɛngɛli ná basaleli na misala.” (Bafilipi 1:1) Mbala mingi, lisangá mokomoko ezalaka na bankulutu mpe basaleli na misala ebele. Misala nini basaleli na misala basalaka mpo na bolamu na biso?

Bapesaka lisangani ya bankulutu mabɔkɔ. Basaleli na misala nyonso, ezala bilenge to mikóló, bazalaka na boyokani malamu na Yehova, babongi kotyelama motema mpe basalaka misala na motema moko. Basalaka misala ndenge na ndenge mpe ya ntina mbala na mbala mpo makambo etambola malamu na lisangá. Yango esalisaka bankulutu bámipesa na mokumba na bango ya koteya mpe kobatela bandeko ya lisangá.

Basalaka misala ya ntina. Basaleli na misala mosusu bazwaka mokumba ya koyamba bato nyonso oyo bayei na makita ya lisangá. Basusu batalelaka makambo etali mikro mpe bikoliseli-lolaka, bakabolaka mikanda, babatelaka mbongo ya lisangá to bapesaka bandeko bateritware epai bakosakola. Bapesaka mpe mabɔkɔ mpo na kobatela Ndako ya Bokonzi malamu mpe pɛto. Bankulutu bakoki kosɛnga bango básalisa bandeko oyo bakómi mibange. Basaleli na misala bandimaka na motema moko kosala mosala nyonso oyo bapesi bango, yango wana bandeko ya lisangá bamemyaka bango.​—1 Timote 3:13.

Bazali bandakisa malamu. Bapesaka mokumba ya mosaleli na misala na bandeko oyo bazali komonisa bizaleli ya bakristo. Balendisaka kondima na biso ntango basalaka masolo na makita. Ndakisa na bango na mosala ya kosakola elendisaka biso tósakola mpe na molende. Lokola basalaka na bomoko na lisangani ya bankulutu, yango esalaka ete lisangá mobimba ezala na bomoko mpe na esengo. (Baefese 4:16) Nsukansuka, bango mpe bakokokisa masɛngami mpo bákóma bankulutu.

  • Basaleli na misala bazali mibali ya bizaleli ya ndenge nini?

  • Ndenge nini basalisaka mpo makambo etambola malamu na lisangá?

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU

Mbala nyonso oyo okei na Ndako ya Bokonzi, luká koyeba nkulutu to mosaleli na misala moko tii ntango okoyeba bango nyonso mpe mabota na bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto