Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ti nk. 5-7
  • Biblia ezali mpenza koteya Trinité?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia ezali mpenza koteya Trinité?
  • Osengeli kondima Trinité?
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Liloba “Trinité” lizali kati na Biblia?
  • Litatoli ya Makomami na hébreu
  • Litatoli ya Makomami na greke
  • Eteyamaki nde na baklisto ya liboso?
  • Nini eteyamaki na bakonzi ya lingomba liboso ya likita ya Nicée?
  • Eklezia ya ebandeli eteyaki ete Nzambe azali bosato?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Liteya ya Trinité ezali na Biblia?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Osengeli kondima Trinité?
    Osengeli kondima Trinité?
  • Trinité elimbolami ndenge nini?
    Osengeli kondima Trinité?
Makambo mosusu
Osengeli kondima Trinité?
ti nk. 5-7

Biblia ezali mpenza koteya Trinité?

SOKO Trinité ezali mpenza solo, esengeli kolobelama polele kati na Makomami. Mpo na nini? Mpo ete, lokola elobamaki na bantoma, Biblia ezali mokanda oyo na nzela na yango, Nzambe amimonisaki epai na bato. Epai mosusu, soko tolingi kosambela Nzambe na lolenge lobongi, tosengeli koyeba ye; tokoki bongo komizela ete Biblia eyebisa biso polele mpenza lolenge oyo Nzambe azali.

Na ekeke ya liboso, bandimi bazalaki kotalela Makomami lokola liloba na solo liuti na Nzambe. Yango ezalaki moboko ya kondima na bango, liloba na bokonzi. Na yango, ntango ntoma Paulo ateyaki bato ya Bérée, “bayambaki Liloba na mposa mingi, mpe batángi Makomami mokolo na mokolo, kotala soko makambo yango mazali bongo.”​—Misala 17:10, 11.

Na eleko ya kala, baklisto oyo bazalaki bato na lokumu bazalaki kosalela nini mpo na koteya? Misala 17:2, 3 (MN) ezali kopesa biso nzela ya koyanola: “Engebene momeseno na ye, Paulo . . . asosoli elongo na bango na Makomami, kolimboláká mpe komonisáká polele [na Makomami].”

Yesu ye moko apesaki ndakisa, mpamba te mateya na ye mazwamaki na Liloba na Nzambe. Azalaki koloba mbala mingi ete: “Ekomami.” Totangi lisusu ete, na libaku moko, “alimbolaki mpo na bango makambo na ntina na ye mpenza na kati na Makomami nyonso.”​—Matai 4:4, 7; Luka 24:27.

Emonani polele mpenza ete mateya na Yesu, ya Paulo mpe baklisto na ekeke ya liboso, mazwaki moboko likoló na Makomami. Bayebaki ete “Makomami nyonso mapemami na elimo na Nzambe, makoki kopesa litomba na mateya, na mpamela, mpo na kosembola mpe mpo na kobókola kati na boyengebene, ete moto na Nzambe azala mobongi oyo aselingwi mpo na misala nyonso malamu.”​—2 Timoté 3:16, 17; tala 1 Bakolinti 4:6; 1 Batesalonike 2:13; 2 Petelo 1:20, 21.

Mpo ete Biblia ekoki “kosembola,” na ntembe te esengeli mpenza koloba polele na ntina na Trinité, oyo bakóteli na yango balobi ete ezali liteya ya moboko. Kasi, nini ezali likanisi ya batéolojié mpe ya bakomi ya makambo na kala? Balobi ete Biblia ezali koteya Trinité na polele mpenza?

Liloba “Trinité” lizali kati na Biblia?

TALA oyo tokoki kotanga kati na mokanda moko ya baprotestá: “Liloba Trinité lizali kati na Biblia te . . . Likótisamaki kati na vokabilere na téoloji ya mangomba bobele na ekeke ya minei.” (Dictionnaire biblique illustré, angl.) Mpo na mokanda Nouvelle Encyclopédie catholique (angl.) elobi mpenza ete, Trinité “etalelami te na mbala moko, mpe nokinoki lokola liloba na Nzambe.”

Na ntina yango, Encyclopédie catholique (angl.) elobi ete: “Kino lelo oyo naino tokuti te kati na Makomami, liloba oyo lisangisi mpenza ba persona misato kati na Nzambe moko. Liloba τρίας [tri’as] (oyo ebimisi liloba trinitas na latin) lizwami mpo na mbala ya yambo epai na Théophile d’Antioche, pene na mobu 180 nsima na Yesu Klisto. . . . Nsima mwa moke, ekómaki trinitas kati na mikanda ya Tertullien.”

Atako bongo, na kotaleláká maloba yango malamu, tokoki te kosukisa ete Tertullien ateyaki Trinité. Mokanda moko ya katolike, Trinitas: Encyclopédique théologique de la Sainte Trinité (angl.) emonisi ete, mingi na maloba oyo masalelamaki na Tertullien mazwamaki epai na bakomi mosusu mpo ete alimbola Trinité. Nzokande, mokanda yango mopesi likebisi oyo lilandi: “Ekozala malamu te na kokata likambo nokinoki mpo na ntina oyo Tertullien azwaki maloba wana, mpamba te, asalelaki maloba yango mpo na koteya Trinité te.”

Litatoli ya Makomami na hébreu

SOKI nde tokuti liloba “Trinité” kati na Biblia te, tokoki koloba mpenza ete Biblia ezali koteya polele likanisi ya Trinité? Mpo na yango, Makomami na hébreu (Kondimana na Kala) malakisi biso nini?

Mokanda L’Encyclopédie des religions (angl.) mondimisi likambo oyo ete: “Batéolojié ya ntango na biso bandimi ete Biblia na hébreu ezali te na liteya oyo lilobeli Trinité.” Tokoki mpe lisusu kotanga boye kati na mokanda Nouvelle Encyclopédie Catholique: “Liteya ya Sainte Trinité liteyami te kati na Kondimana na Kala.”

Bobele bongo, sángó jésuite moko, Edmund Fortman, alobi kati na mokanda Le Dieu trin (angl.) ete: “Ezala na kobómbana to na polele . . . Kondimana na Kala elobi na biso eloko moko te na ntina na Nzambe ya bosato oyo azali Tata, Mwana mpe Elimo. . . . Elembo moko ezali te mpo na komonisa ete moko kati na bakomi na bulee akanisaki soko moke ete [Trinité] ezali kati na Nzambe moko. . . . Soko tokotala kati na [“Kondimana na Kala”] na ntina ya bosato, ekozala bobele makanisi mazangi moboko to ‘bilembeteli bibómbami’; ekeseni mpenza na maloba mpe na makanisi ya bakomi na bulee.”

Botaleli malamu ya Makomami na hébreu ezali komonisa makanisi oyo. Na yango, Trinité eteyami ata na mokanda moko te kati na mikanda 39 ya Biblia oyo mikomamaki liboso, Makomami na hébreu oyo mandimami ete mapemami na Nzambe.

Litatoli ya Makomami na greke

MAKOMAMI na greke na boklisto [“Kondimana na Sika”] mazali mpenza koloba polele mpenza na ntina na Trinité?

Mpo na yango, Encyclopédie des religions elobi ete: “Batéolojié banso basili kondima ete Kondimana na Sika mpe ezali ata na liteya moko te oyo lizali kolimbola Trinité.”

Edmund Fortman, oyo atangami liboso, alobi ete: “Bakomi ya Kondimana na Sika . . . basaleli ata liteya moko te oyo lindimami mpo na kolobela Trinité, mpe bapesi te liteya ya polele oyo ete, ezali na ba persona misato oyo bakokani kati na Nzambe moko. . . . Esika moko te tozali kokuta likanisi ya Trinité ya bato misato bakeseni, baoyo bazali bango nyonso na bomoi mpe nyonso bazali banzambe, nde basangani bobele kati na Nzambe moko.”

Tala oyo tokoki kotanga kati na mokanda Nouvelle Encyclopédie Britannique: “Liloba Trinité likomami kati na Kondimana na Sika te. Lilobelami polele te kati na yango.”

Kati na mokanda Une brève histoire de la doctrine chrétienne (angl.), Bernhard Lohse alobi boye: “Mpo na oyo etali Kondimana na Sika, tozali kokuta soko liteya moko te ya solo mpo na Trinité.”

Bobele bongo, mokanda Nouveau Dictionnaire International du Nouveau Testament (angl.) elobi ete: “Liteya ya Trinité oyo libongisami, lilobelami te kati na Kondimana na Sika. [Karl Barth, téolojié ya Protestá] alobi ete: ‘Kati na Biblia, tozali kokuta te maloba oyo ete Tata, Mwana mpe Elimo-Santu bazali lolenge moko.’”

E. Hopkins, profesere na Université Yale, alobaki ete: “Liteya ya Trinité limonani lokola ete liyebanaki te na Yesu mpe na Paulo . . . ezala moko to mosusu alobelaki yango te.”​—Origine et évolution des religions (angl.)

Mokomi na Lisoló na bato, Arthur Weigall, akomi boye: “Tobosana te ete, Yesu alobaki likambo motindo wana te, mpe liloba ‘Trinité’ limonani esika moko te kati na Kondimana na Sika, mpe likanisi wana liuti mpenza na bapakano oyo bakótisaki yango kati na Mangomba, bambula 300 nsima na kufa ya Nkolo na biso.”​—Survivances païennes dans le monde chrétien.

Na yango, ata mikanda 39 ya Makomami na hébreu to mpe mikanda 27 ya Makomami na greke oyo mindimami ete mipemami na Nzambe, mizali koteya Trinité te.

Eteyamaki nde na baklisto ya liboso?

BAKLISTO ya liboso bateyaki Trinité? Totala nini elobi batéolojié mpe bakomi ya makambo na kala.

“Boklisto ya liboso elimbolaki Trinité te, lokola oyo ekotisamaki kati na bindimeli oyo bityamaki nsima.”​—Nouveau Dictionnaire international de théologie du Nouveau Testament (angl.)

“Nzokande baklisto ya liboso basalelaki liteya [Trinité] yango te mpo na kondima na bango. Bazalaki nde kopesa losambo epai na Nzambe Tata mpe epai na Yesu Klisto Mwana na Nzambe, mpe bandimaki ete Elimo-Santu ezali. Kasi bakanisaki te kosangisa nyonso misato kati na eloko moko.”​—Survivances païennes dans le monde chrétien.

“Na ebandeli, kondima na boklisto ezalaki te likoló na Trinité . . . Te, bobele lokola oyo Kondimana na Sika mpe mikanda mosusu na boklisto ya liboso ezali kotatola, ezalaki bongo te na eleko ya bantoma mpe na nsima na bango.”​—Encyclopédie de la religion et de l’éthique, (angl.)

“Liboso na nsuka na ekeke ya minei, elobeli oyo ete ‘Ba persona misato kati na Nzambe moko’ etongamaki makasi te mpe ekótisamaki mpenza mobimba te kati na bomoi ya boklisto mpe kati na koyambwama na kondima na boklisto . . . Epai na bakonzi ya mangomba oyo balandaki mosala ya bantoma, tozali kokuta eloko moko te oyo ezali kopesa ata likanisi moke mpo na likambo yango.”​—Nouvelle Encyclopédie catholique.

Nini eteyamaki na bakonzi ya lingomba liboso ya likita ya Nicée?

BA PÈRES anténicéens bazali bakonzi ya mangomba oyo bazalaki na bopusi makasi na boumeli ya bikeke ya liboso oyo bilandaki mbótámá ya Klisto. Mateya na bango mazali mpe na ntina mingi.

Justin (akufaki pene na mobu 165 ya ntango na biso) andimaki ete, liboso na koya na mabelé, Yesu azalaki anzelu, azalisamaki, mpe “akeseni na Nzambe oyo asalaki biloko nyonso.” Alobaki ete Yesu azalaki na nsé na Nzambe mpe “asalaki bobele oyo . . . Mozalisi alingaki ete aloba mpe asala.”

Irénée (akufaki pene na mobu 200 ya ntango na biso) alobaki ete, liboso na kozala moto, Yesu azalaki na bomoi bokesenaki na oyo ya Nzambe mpe azalaki na nsé na ye. Amonisaki ete Yesu akokani te na “Nzambe moko ya solo,” oyo azali “likoló na nyonso, mpe pene na ye Nzambe mosusu azali te.”

Clément d’Alexandrie (akufaki pene na mobu 215 ya ntango na biso) alobaki na ntina na Yesu lokola “ekelamu.” Nzokande Nzambe azali “Nzambe moko ya solo, akelami te mpe akokufaka te.” Alobaki ete, mwana alandi “nsima na Tata oyo azali bobele ye moko mozwi-na-nguya-nyonso,” kasi akokani na ye te.

Tertullien (akufaki pene na mobu 230 na ntango na biso) ateyaki ezaleli na kotombwama ya Nzambe. Alobaki ete: “Tata akeseni na Mwana (azali mosusu) na boye ete aleki monene; mpo ete oyo aboti akeseni na oyo abotami; oyo atindi akeseni na oyo atindami.” Alobaki lisusu ete: “Na eleko moko, mwana azalaki te. . . . Liboso na biloko nyonso, Nzambe azalaki bobele ye moko.”

Hippolyte (akufaki pene na mobu 235 ya ntango na biso) alobaki ete, Nzambe azali “bobele moko, azali yambo mpe Ye mei, Mozalisi mpe Nkolo na nyonso,” oyo “eloko moko te ekokani na ye [na mbula] . . . Kasi azalaki Moko mpe bobele moko; oyo mpo na kolinga na ye, azalisaki oyo ezalaki liboso te,” lokola Yesu oyo azalisamaki liboso ete aya na mabelé.

Origène (akufaki pene na mobu 250 ya ntango na biso) alobaki ete “Tata mpe Mwana bazali bato mibale bakeseni . . .  bilóko mibale mpo na oyo etali motindo na bango” mpe soko “tokokokanisa ye (Mwana) na Tata, azali bobele mwa mwinda moke mpenza.”

Kolobaká na mokuse mpo na bilembo nyonso ya Lisoló na bato, Alvan Lamson akomi kati na mokanda L’Église des trois premiers siècles (angl.) ete: “Trinité, liteya oyo ya sika liyebani mingi na bato . . .  lizwi ebandeli te na maloba ya Justin, mpe ebandi mpe te na maloba na bakonzi ya mangomba nyonso oyo bazalaki liboso na likita ya Nicée; elingi koloba na bakomi nyonso baklisto oyo bazalaki na bikeke misato bilandaki mbótámá ya Klisto. Ezali solo ete basili kolobela Tata, Mwana mpe . . . Elimo-Santu, kasi balobeli yango te lokola ete bakokani to bazali lolenge moko; balobeli te lokola soko ete bazali Misato kati na Moko, yango mpe eyokani ata na ndimbola moko te oyo esili kopesama na bateyi ya Trinité. Likanisi ya ba Pères anténicéens nde ezali solo.”

Na yango, litatoli lipesami na Biblia mpe na Lisoló na bato emonisi polele ete, na ntango ya kala, Trinité eyebanaki te mpe etikalaki bongo na boumeli ya bikeke mingi.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]

“Elembo moko ezali te mpo na komonisa ete moko kati na bakomi na bulee akanisaki mwa moke ete Trinité [Bosato] ezali kati na Nzambe moko.”​—Le Dieu trin

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto