Bombá yango mpo na koyekola
Katá, gumbá na ndambo mibale mpe bombá
LOKASA 10 SALOMO
MITUNA
A. Salomo abondelaki te mpo na kosɛnga bozwi to bomoi molai, kasi mpo na kosɛnga nini?
B. Tondisá bisika oyo etikali mpamba. Salomo akokaki koloba masese ․․․․․, mpe banzembo na ye ezalaki ․․․․․.
C. Bapesaki Salomo nkombo nini mosusu?
[Etanda]
4026 L.T.B. Adama akelami
Azalaki na bomoi na mobu soki 1000 L.T.B.
1 T.B.
98 T.B. Mokanda ya nsuka ya Biblia ekomami
[Karte]
Mokonzi-mwasi ya Sheba asalaki mobembo ya kilomɛtrɛ 2 400 mpo na koyoka bwanya ya Salomo
SHEBA
Yerusaleme
SALOMO
NA MOKUSE
Mwana ya mibale oyo Davidi abotaki ná Bate-sheba. Salomo ayangelaki Yisraele mbula 40. Atongaki ndako moko monene mpo na losambo ya Yehova. (1 Bakonzi 5:2-5) Yehova asalelaki Salomo mpo akoma mikanda oyo: Masese, Mosakoli, mpe Loyembo ya Salomo. Basi bapaya oyo abalaki bamemaki ye atika Yehova.—1 Bakonzi 11:1-6.
BIYANO
A. Motema ya botosi.—1 Bakonzi 3:5-14.
B. 3 000, 1 005.—1 Bakonzi 4:29, 32.
C. Yedidia, oyo elimboli “Molingami ya Yehova.”—2 Samwele 12:24, 25.