Bombá yango mpo na koyekola
Katá, gumbá na ndambo mibale mpe bombá
LOKASA 5 ABRAHAMA
MITUNA
A. Abrahama azalaki na mbula boni ntango mwana na ye Yisaka abotamaki?
B. Elaka nini Yehova apesaki Abrahama?
C. Tondisá esika oyo ezali mpamba. Mpo na kondima na ye monene mpe misala na ye, Abrahama abengamaki ․․․․․.
[Etanda]
4026 L.T.B. Adama akelami
Azalaki na bomoi na mobu soki 1900 L.T.B.
Mobu 1 T.B.
Mobu 98 T.B. Mokanda ya nsuka ya Biblia ekomamaki
[Karte]
Alongwe na Ure mpe akei na Kanana
Ure
Harane
KANANA
ABRAHAMA
NA MOKUSE
Moto ya sembo oyo atikaki Ure, engumba moko ya bomɛngo mpo na kokokisa mokano ya Yehova, atako ayebaki te epai akofanda. (Baebre 11:8-10) Azalaki ntango nyonso koteya bato ya ndako na ye “bákoba kobatela nzela ya Yehova mpo na kosala boyengene.” (Ebandeli 18:19) Biblia ebengaka ye “tata ya bato nyonso oyo bazali na kondima.”—Baroma 4:11.
BIYANO
A. Mbula nkama moko.—Ebandeli 21:5.
B. Na nzela ya momboto na ye, bikólo nyonso esengelaki mpenza kopambolama.—Ebandeli 22:16-18.
C. “Moninga ya Yehova.”—Yakobo 2:21-24.