Mpo na nini tozali na mokili?
Ntina ya bomoi ezali nini?
NA MITUNA wana oyo etunamaka mingi, bato mosusu bakoki mpe kobakisa motuna oyo: Tosalemá kaka mpo tóumela na bomoi mbula 70 to 80 mpe na nsima tókufa?—Nzembo 90:9, 10.
Tomitunaka mituna yango mingimingi ntango tomoni ndenge bomoi na biso ezali mokuse. Ya solo, esɛngaka kaka te tókóma pene ya liwa mpo tóluka koyeba ntina oyo tozali na mokili. Ntango bilikya oyo moto azalaki na yango ekokisami te, akoki mpe komituna motuna yango. Bato mosusu bamitunaka mpe motuna yango ntango bazali kokanisa bomoi na bango.
Dave azalaki na mosala ya malamu mpe ndako ya kitoko, mpe azalaki kosepela kolekisa ntango elongo na baninga na ye mingi. Alobi boye: “Mokolo moko na butu makasi ntango nautaki na fɛti mpe nazalaki kozonga na ndako, motuna moko eyelaki ngai: ‘bomoi mobimba yango oyo?—Nakozala kaka na bomoi ntango mokuse mpe na nsima nakufi? To ezali na bomoi mosusu oyo eleki oyo?’ Namitunaki bongo mpo namonaki ete bomoi na ngai ezalaki na ntina te.”
Na buku na ye (Un psychiatre déporté témoigne) Viktor Frankl, amonisaki ete baninga na ye mosusu oyo babikaki na bakaa ya bakangami ya Hitler bazalaki komituna mituna yango nsima ya kobima na bolɔkɔ. Ntango bazongaki na bandako na bango, bamosusu bakutaki bandeko na bango bakufá. Frankl akomaki boye: “Mawa na moto oyo, ntango mokolo oyo azali kozela na esengo nyonso ekokóma, akomona ete bilikya na ye ezalaki kaka ndɔtɔ ya mpamba!”
Banani bamitunaka motuna yango?
Bato ya bileko nyonso balukaka koyeba ntina oyo tozali na mokili. Biblia elobeli bato oyo balukaki mpe koyeba ntina ya bomoi. Ntango Yobo abungisaki bozwi mpe bana na ye nyonso mpe anyokwamaki na maladi mabe, atunaki boye: “Mpo na nini nakufaki na libumu te? Mpo na nini nakataki motema te nsima ya kobima na libumu?”—Yobo 3:11, NW.
Mosakoli Eliya mpe ayokaki bongo. Ntango akómaki komiyoka lokola azali kaka ye moko mosambeli ya Nzambe, amilelaki boye: “Ekoki! Sikoyo, Ee Yehova, longolá molimo na ngai.” (1 Mikonzi 19:4, NW) Bato mingi bamiyokaka mpe bongo. Kutu, Biblia elobi ete Eliya azalaki “moto na mayoki lokola oyo ya biso.”—Yakobo 5:17.
Mobembo ya bomoi
Bomoi ezali lokola mobembo. Moto akoki kobanda mobembo ayebi te esika oyo akokende kosuka; ndenge moko mpe okoki kozala na bomoi kozanga koyeba ntina mpenza ya bomoi. Soki ezali bongo, okoki kokwea na likambo oyo mokomi Stephen Covey alobaki ya “komipesa mobimba na makambo ezangi ntina.” Akomaki ete “bato oyo batikaka makambo mosusu mpo na koluka bomoi ya malamu, nokinoki bayaka komona ete makambo oyo batikaki, yango nde ezalaki na ntina na bomoi na bango.”
Na ntembe te, oyebi ete ezali na ntina moko te otambola mbangu soki ozali na nzela ya malamu te! Ndenge moko mpe koluka koyeba ntina ya bomoi na komipesa na “makambo ezangá ntina” ekopesa yo esengo moko te.
Bato ya bileko mpe bikólo nyonso balukaka koyeba ntina oyo tozali na mokili. Likambo yango eutaka na mposa makasi oyo tobotamá na yango; mposa moko ya elimo oyo bozwi ya mokili ekoki kokokisa te. Tótala ndenge oyo bato mosusu balukaki kokokisa mposa yango.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]
Koluka ntina ya bomoi na komipesa na “makambo ezangá ntina” ekopesa yo esengo moko te
[Elilingi na lokasa 3]
Yobo amitunaki ntina oyo abotamaki
[Elilingi na lokasa 4]
Eliya azalaki “na mayoki lokola oyo ya biso”