Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/08 nk. 12-13
  • Miziki—Likabo ya Nzambe mpo na motema

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Miziki—Likabo ya Nzambe mpo na motema
  • Lamuká!—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Okoki kobɛta miziki!
  • Miziki ya malamu ekoki kosilisa mpasi
  • ‘Nakotɔnda Nzambe na nzembo’
  • Kopona miziki ezali mpenza na ntina?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Nakoki kosala nini mpo nakóma te moombo ya miziki?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Ndenge nini okoyoka esengo ya miziki?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Lamuká!—2008
g 10/08 nk. 12-13

Miziki​—Likabo ya Nzambe mpo na motema

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA ESPAGNE

MIZIKI ezali na nguya. Ekoki kokitisa biso motema, kolendisa biso, mpe kopesa biso esengo. Na nzela ya miziki, tokoki komonisa esengo mpe mawa na biso. Miziki esimbaka mayoki mpe motema mpe ezalaka na bikólo nyonso​—ezala ya kala to ya lelo. Miziki ezali mpenza likabo ya Nzambe.​—Genese 4:21.

Moto abandaka koyoka miziki banda ntango abotami. Ekoki kozala ete ntango ozalaki naino bebe, mama na yo azalaki koyembela yo nzembo mpo olala mpɔngi. Ntango okómaki elenge, mbala mosusu okómaki kosepela na lolenge moko ya miziki oyo ezalaki kosimba motema na yo. Ata ntango tokómi mikóló, mingi kati na biso tosepelaka koyoka mwa miziki ntango tozali kotambwisa motuka to ntango tofandi na ndako, nsima ya kosala mosala makasi.

Maloba ya nzembo ekoki kolobela mimeseno to lisolo ya ekólo moko. Bayisalaele ya ntango ya kala bazalaki kokanisa makambo mosusu ya ntina mingi na nzela ya banzembo. (Exode 15:1-21; Basambisi 5:1-31) Mosakoli Moize asalaki nzembo moko oyo kati na yango alobelaki lisolo ya ekólo Yisalaele mpe apesaki bato ya ekólo yango batoli. (Deteronome 32:1-43) Na ntembe te, banzembo ya ndenge yango ezalaki kosalisa bato bábosana te makambo ya ntina.

Okoki kobɛta miziki!

Mbala mosusu okoki koloba ete, ‘Nayebi miziki ata moke te.’ Kasi, kanisá naino mongongo na yo. Na lisalisi na yango, moto nyonso akoki kobɛta miziki, ata soki azali na bibɛtɛlo ya miziki te. Ezali kosɛnga kaka ofungola monɔkɔ mpe obanda koyemba. Mpe ntango ozali koyemba, komitungisa te soki ozali na mongongo ya kitoko te. Soki ozali komekameka, na mokemoke mongongo na yo ekobonga.

Zulunalo moko ya monɔkɔ ya Espagnol (Psychologies) elobi boye: “Mongongo ezali na boyokani makasi na makanisi mpe mayoki na biso, mpe tokoki kosalela yango mpo na komonisa makanisi mpe mayoki na biso.” Ainhoa Arteta, mwasi moko oyo azali alanga-nzembo, alobi boye: “[Koyemba] ezalaka esengo. Nazali kolendisa moto nyonso oyo ayoki mposa ya kobimisa mayoki na ye na nzembo, akakatana soki moke te.”

Lokola miziki ekoki kosimba motema na biso, tosengeli koponaka miziki oyo tolingi koyoka. Miziki oyo ezali koyokana kitoko na matoi ekoki kozala na maloba ya mabe oyo ezali kolendisa makambo lokola koyina basusu, pite to ekobo, to mpe mobulu​—makambo oyo esengeli te kosepelisa moto oyo alingi kolanda mitinda ya Nzambe. (Baefese 4:17-19; 5:3, 4) Liloba ya Nzambe elobi boye: “Batelá motema na yo na mpiko nyonso mpo ete makambo ya bomoi ekoutaka wana.” (Masese 4:23) Tomoni ete kopona miziki ezali likambo ya kozwa na lisɛki te.a

Miziki ya malamu ekoki kosilisa mpasi

Buku moko (Principles and Practice of Stress Management) elobi boye: “Moko na bantina oyo bato ya bikólo nyonso babɛtaka miziki [ezali] likoki na yango ya kosalisa moto azala na esengo mpe na nzoto kolɔngɔnɔ.” Buku mosusu elobi ete ntango tozali koyemba, nzoto na biso mobimba eninganaka. Lisusu, mwa koningana wana ekitisaka mpasi oyo tozali koyoka na nzoto.

Yango wana, minganga mosusu balendisaka bato ya maladi oyo balɛmbi na makanisi báyokaka miziki oyo ebɛtaka malɛmbɛ mpamba te ekoki kosalisa bango. Kutu, na balopitalo mosusu, babɛtaka miziki na bisika oyo batyaka bato ya maladi makasi. Mbala mingi, bana matshombe mpe bato oyo minganga bazali kosala bango lipaso basepelaka ntango bazali koyoka mwa miziki. Buku oyo touti kolobela elobi ete makambo oyo bato ya mayele bayekoli emonisi ete koyoka miziki “esalisaka moto oyo bazali kosala lipaso azala na kobanga mingi te.”

Miziki ekoki mpe kosalisa mwasi ya zemi abanga te ntango azali kobota. Minganga mosusu ya mino batyaka miziki mpo na kokitisa mitema ya bato ya maladi oyo bazali kobanga. Kasi, miziki mpe nzembo ekoki kosala makambo mingi mosusu ya malamu. Ekoki kosalisa biso tózala na boyokani malamu na Nzambe.

‘Nakotɔnda Nzambe na nzembo’

Oyebaka ete eteni monene ya Biblia​—ndambo moko likoló ya zomi—​ezalaki nde banzembo? Tokoki kozwa na ndakisa mokanda ya Nzembo, Loyembo ya Salomo, mpe Bileli. Kati na bisika soki 300 oyo Biblia elobeli banzembo, mingi na yango ezali banzembo mpo na losambo. Davidi, mokonzi ya Yisalaele ya kala, oyo azalaki mpe alanga-nzembo monene, akomaki boye: “[Yehova] azali nguya na ngai . . . , nakotɔnda ye na nzembo na ngai.”​—Nzembo 28:7.

Kutu, Davidi aponaki mibali 4 000 ya libota ya Levi mpo bázala babɛti-miziki mpe bayembi na Yelusaleme. Na kati na bango, bato 288 “balakisamaki nzembo ya [Yehova], baoyo nyonso bazalaki na mayele.” (1 Ntango 23:4, 5; 25:7) Na ntembe te bayembi yango bazalaki komipesa mpo na koyekola. Kutu, miziki ezalaki na esika ya ntina mingi na losambo na boye ete bayembi basengelaki te kosala misala mosusu na tempelo mpo bázala na ntango ya komipesa na mosala ya koyemba.​—1 Ntango 9:33.

Na butu ya nsuka liboso Yesu akufa, ye ná bantoma na ye bayembaki mpo na kokumisa Nzambe; na ntembe te bayembaki banzembo oyo ezali na Nzembo 113 tii 118. Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, banzembo yango ezalaki koyembama na fɛti ya Elekeli. (Matai 26:26-30) Bazalaki kobenga yango “Nzembo ya Hallel” mpamba te ezalaki kozongela maloba “Alleluia!” to Aleluya, oyo elimboli “Sanzolá Yah!” “Yah” ezali ebengeli mokuse ya Yehova, nkombo ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.​—Nzembo 83:18, NW.

Baklisto mpe bazalaki koyemba na losambo na bango. Buku moko (The History of Music) elobi boye: “Baklisto ya liboso bazalaki na momeseno ya koyemba ntango bazali kosambela elongo to na bandako na bango. Mpo na Moyuda oyo akómi moklisto, yango ezalaki kaka lokola momeseno oyo ezalaki na sinagoga . . . Longola Banzembo ya Liebele . . . , baklisto bazalaki ntango nyonso kosala banzembo ya sika.” Lelo oyo mpe, Batatoli ya Yehova basepelaka koyemba, ezala na ndako to na makita na bango ya boklisto.

Lokola miziki esalisaka biso tóbimisa mayoki na biso, mpe lokola ekoki kosimba mpenza motema, makanisi, mpe nzoto na biso, tosengeli komonisa limemya makasi mpo na ‘libonza yango oyo ekoki mpenza mpe oyo euti na likoló.’ (Yakobo 1:17) Ya solo, tosengeli kozala na momeseno ya koyemba mpe ya kopona banzembo ya malamu.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bato oyo balingaka Nzambe mpe bazalani na bango baboyaka koyoka miziki oyo elendisaka koyina, pite to ekobo, to mobulu; baboyaka mpe koyoka miziki oyo elongisaka losambo ya bikeko, bolingo ya ekólo, to mateya ya lokuta.​—Yisaya 2:4; 2 Bakolinti 6:14-18; 1 Yoane 5:21.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto