Mpasi oyo ekobo epesaka
“Nakei.” Wana ezali liloba mobali ya Patriciaa alobaki na ye na telefone—liloba yango epesaki ye mpasi koleka maloba nyonso oyo alobá na ye. Patricia alobi ete: “Nandimaki soko moke te ete mobali na ngai akoboya ngai. Nazalaki kobanga likambo yango ntango nyonso—mobali na ngai atika ngai mpo na mwasi mosusu—yango ekómi mpenza likambo ya solo.”
PATRICIA, mwasi ya mbula 33, azalaki mpenza kosala milende mpo ete libala na ye ezala malamu; mpe mobali na ye ayebisaki ye ete akoboya ye soko moke te. Patricia alobi: “Topesanaki elaka ete tokovanda esika moko ata soki mikakatano nini ekokómela biso. Mpe nandimaki mpenza ete alobaki solo. Kasi, . . . atiki ngai. Sikawa natikali mabɔkɔ mpamba—natikali ngai moko—ngai moko mpenza!”
Hiroshi akobosana soko moke te mokolo oyo eyebanaki ete mama na ye azalaki kosala ekobo. Alobi boye: “Nazalaki bobele na mbula 11. Mama alekaki na ndako mbangumbangu. Papa alandaki ye na nsima mpe alobaki ete, ‘Malɛmbɛ, tiká tósolola likambo yango.’ Namonaki ete likambo moko ya mabe esalemaki. Papa alɛmbaki nzoto. Kutu kino lelo ayoki naino nzoto malamu te mpo na likambo yango. Lisusu, azalaki na moto moko te mpo na kosolola na ye likambo yango. Na bongo, akómaki kosolola nde na ngai. Kanisá naino, mobali ya mbula koleka 40 aluka komibɔndisa epai ya mwana na ye ya mobali ya mbula 11!”
Atako likambo yango ya nsɔni ezali kosalema na mabota ya bakonzi, na bato ya politiki, na bilombe ya bafilime, mpe na bakonzi ya mangomba to kati na mabota na biso moko, ekobo ezali se kobebisa mabala. Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi ete: “Emonani ete ekobo esalamaka na mokili mobimba, mpe mbala mosusu esalamaka ndenge moko na libala.” Balukiluki mosusu bakanisi ete babalani mingi (50 kino 75%) basalá ekobo. Zelda West-Meads, mopesi-toli na makambo ya libala alobi ete atako bato mingi oyo basalaka ekobo bayebanaka te, kasi “emonani polele ete ekobo ezali kosalema mingi koleka.”
Okomitungisa mingi mpenza
Atako ekobo to koboma libala ezali koyokisa bato mpasi, bato bayebaka mpenza te mikakatano oyo yango ezali koyeisa mokolo na mokolo na bomoi ya bato oyo likambo yango ekómeli bango. Longola mbongo mingi oyo ebimaka mpo na likambo yango, balukiluki balobelaka te mitungisi minene oyo ekobo ebimisaka—ebele ya mpisoli mpe mobulungano monene, mawa, kobanga, mpasi monene, kozanga mpɔngi na boumeli ya mikolo mingi mpo na likambo yango ya nsɔmɔ. Bato oyo likambo yango ekómeli bango bakoki kotika kolela, kasi mpota oyo bazoki ekokauka noki te. Mpasi mpe mabe oyo esalemi esilaka noki te.
Buku Ndenge nini kolonga mpasi ya koboma libala (na Lingelesi) elobi ete: “Mingimingi ekobo etungisaka moto na makanisi, mpe mbala mosusu ebebisaka lolenge oyo atalelaka makambo. Okosala nini? Okotalela yango ndenge nini? Ndenge nini okolonga mokakatano yango? Okoki kondima likambo yango to koboya kondima, koyoka nkanda to komipesa ngambo, kotyela mobalani na yo motema to kokanisela ye mabe.”
Yango ezali likambo oyo ekómelaki Pedro nsima ya koyeba ete mwasi na ye azalaki kosala ekobo. Alobi ete: “Soki mobalani na yo asali ekobo, makanisi na yo ekobulungana.” Mobalani oyo basaleli ye mabe ayebaka mpenza te ntina ya likambo oyo ekómeli ye. Bongo ekozala boni mpo na bato mosusu oyo bayebi likambo yango malamu te? Patricia alobi ete: “Moto moko te akokoka koyeba mpasi oyo nazali koyoka. Soki nakanisi ete mobali na ngai azali na mwasi mosusu, epesaka ngai mpasi mingi, mpasi oyo nakokoka kolobela yango te.” Abakisi ete: “Na bantango mosusu nakanisaka ete nakobɛla ligboma. Mokolo mosusu namiyoki malamu; mokolo mosusu nalɛmbi nzoto. Mokolo mosusu nabosani ye; mokolo mosusu nakanisi makambo nyonso ya mabe, lokuta mpe nsɔni oyo ayokisi ngai.”
Nkanda mpe kobanga
Mobali moko oyo mwasi na ye asalaki ekobo alobi ete: “Na bantango mosusu okoyoka nkanda makasi koleka.” Ezali bobele nsɔni te mpo na mabe basaleli moto mpe mpota bazokisi ye, kasi lokola mopanzi-nsango moko alobi yango, ezali mpe “nkanda mpo na mabe oyo ebebisi libala na ye, libala oyo ekokaki kozala na esengo.”
Mingimingi bato yango bamiyokaka ete bazali na ntina te mpe bakómaka komimona mpamba. Pedro alobi ete: “Okokóma komituna boye: ‘Nazali nde kitoko te? Nazali lisusu na mayele te?’ Okobanda komitalela na ndenge nyonso mpo na komona libunga.” Kati na buku na ye Kolinga, kopesa lokumu mpe kokosa (na Lingelesi) Zelda West-Meads, mopesi-toli na makambo ya libala na Angleterre alobi ete: “Moko ya makambo maleki mpasi oyo okobunda na yango . . . ezali likambo ya komizwa lisusu na kilo.”
Komona ete omemi ngambo mpe onyokwami na makanisi
Longola mitungisi oyo tolobeli, moto akoki komona ete amemi ngambo. Mwasi moko oyo akutanaki na likambo yango alobi ete: “Nakanisi basi nde bamonaka mpenza ete bamemi ngambo. Ozali komitungisa mpe komituna: ‘Mabe nini nasali?’”
Mobali moko oyo mwasi na ye asalaki ekobo alobeli likambo mosusu oyo abéngi yango mitungisi oyo eleki ndelo. Alobi boye: “Okonyokwama na makanisi mbala na mbala.” Mwasi moko azalaki kolela mokolo na mokolo ntango mobali na ye asalaki ekobo mpe atikaki ye. Alobi ete: “Nazali koyeba malamu mpenza mokolo ya liboso oyo nalelaki te, ezalaki bapɔsɔ mingi nsima ya kokende na ye. Nsima ya mwa basanza, nalekisaki pɔsɔ mobimba nalelaki te. Mikolo wana mpe bapɔsɔ wana esalisaki ngai mpo namiyoka malamu.”
Minyoko mbala mibale
Likambo oyo bato mingi bayebaka te ezali ete mbala mingi moto oyo asali ekobo anyokoli mobalani na ye mbala mibale. Na ndenge nini? Patricia apesi biso eyano: “Ezalaki mpasi mpo na ngai. Azalaki bobele mobali na ngai te kasi mpe moninga na ngai—moninga na ngai ya motema—na boumeli ya bambula mingi.” Ɛɛ, mbala mingi ntango mikakatano ebimaka, mwasi alukaka lisalisi epai ya mobali na ye. Sikawa, mobali yango apesi ye bobele mpasi te kasi azali mpe lisusu wana te mpo asunga mwasi na ye, moto azalaki kotyela motema. Na mbala moko, ayokisi mwasi na ye mpasi mingi mpe akimi ye; nzokande azalaki moninga na ye ya motema.
Na yango, babalani oyo basaleli bango mabe banyokwamaka mingi koleka na ndenge bakosi bango. Mpe lokola bazali lisusu na moto te oyo bakoki mpenza kotyela motema, ezali likambo ya mpasi mpenza oyo mobalani oyo basaleli ye mabe akobunda na yango. Mopesi-toli moko na makambo ya libala amonisi mpo na nini ekobo ekoki kotungisa moto: “Topesaka ndambo monene ya bomoto na biso, bilikya na biso, mikano na biso mpe bamposa na biso na libala . . . , tolukaka moto oyo tokoki mpenza kotyela motema, moto oyo akosala biso mabe te. Soki bakosi biso, ekoki kozala lokola ndako monene ekwei.”
Buku Ndenge nini kolonga mpasi ya koboma libala (na Lingelesi) elobi ete, ezali polele ete moto oyo likambo yango ekómeli ye “azali na mposa ya lisalisi mpo na kobongisa makanisi na ye . . . Akoki kozala na mposa ya lisalisi mpo na koyeba kopona mpe ndenge ya kosala yango.” Kasi kopona nini?
Okoki komituna, ‘Naboma libala to nabongisa?’ Mbala mingi soki libala ekómi na mikakatano, ekoki kozala lokola likambo ya pɛtɛɛ kozwa nokinoki ekateli ya koboma yango. Okoki kokanisa boye: ‘Koboma libala ezali mabe te mpamba te Biblia epesi nzela ya kosala yango soki mobalani asali ekobo.’ (Matai 19:9) Epai mosusu, oyebi ete Biblia ezali kosɛngisa koboma libala te. Na yango, okoki komona malamu kobongisa na mobalani na yo mpe kosala lisusu boyokani makasi kati na libala na bino.
Koboma libala na mobalani oyo asali ekobo to kobongisa na ye ezali likambo ya moto ye moko. Nzokande, ndenge nini okoki koyeba ekateli oyo okozwa? Tosɛngi yo libosoliboso otalela makambo mosusu oyo ekoki kosalisa yo mpo na koyeba soki okoki kobongisa.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Wana ezali bankombo na bango te.