Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Avril nk. 18-21
  • Koyeba bobangi ya moto ya likekuma

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koyeba bobangi ya moto ya likekuma
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo oyo makoki kobimisa bobangi
  • Kopesa lisalisi
  • Kolɛmbisa bozito na bango
  • Mozalisi na biso ayebi mokakatano yango
  • Nkoma ya batángi
    Lamuká!—1999
  • Kokakatana na maloba te
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • ‘Ata lolemo na bato na likɛkuma ekoloba mbango mpe polele’
    Lamuká!—1996
  • Ozali “ndakisa . . . na maloba”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Lamuká!—1998
g98 Avril nk. 18-21

Koyeba bobangi ya moto ya likekuma

OKOKI kosala bokeseni kati na moto oyo alobaka malamu mpe oyo abangaka ete akokekuma ntango azali koloba? Mbala mosusu okoyanola ete ‘ɛɛ, nayebi.’ Kasi tótalela naino makambo oyo Peter Louw akomi kati na buku na ye na lokota Afrikaans oyo ezali na motó na likambo ete Hhhakkel (Lllikekuma): “Mpo na moto ya likekuma mokomoko ‘oyo amibombi te,’ ekoki kozala na bato zomi oyo balingi te ete bato mosusu báyeba ete bazalaka na likekuma mpe ezali na baoyo bazali kobomba mokakatano na bango na mitindo mikeseni.” Kobomba likekuma? Lolenge nini yango ekoki kosalema?

Bato mosusu ya likekuma babombaka mokakatano na bango na kolobáká liboso maloba oyo ezalaka kwokoso mpo na bango. Na nsima, na esika ya koloba liloba yango, bazongelaka frazɛ mobimba na lolenge mosusu to basalelaka liloba mosusu oyo ezali na ndimbola ndenge moko. Mobali moko mobalani abombaki likekuma na ye na boumeli ya mibu 19 kati na libala. Ntango mwasi na ye ayaki koyeba likambo yango, atunaki monganga oyo asalisaka bato ya likekuma boye: “Okanisi ete ezali mpo na kobomba likekuma na ye nde mobali na ngai asɛngaka na ngai ete nayanolaka na telefone, mpe atikaka ete ngai napona motindo ya bilei oyo tolingi kolya ntango tokɔti na restorá, mpe apesaka bakomantere te . . . na makita?”

Tótalela mpe Gerard na Maria, babalani mibale oyo bazali na esengo, bafandi na ekólo Afrika ya Súdi.a Mbala mingi, Maria ayebisaka mobali na ye ete abangaka kopesa biyano na makita ya boyekoli ya Biblia mpamba te azali na likekuma. Mobali na ye alobaki ete: “Ntina oyo ozali kopesa elongobani te, ozali na likekuma te.” Gerard alobaki bongo mpamba te mwasi na ye azali moto oyo alobaka mingi. Bobele mwa makambo mosusu nde esalaka ete abanga ete akokekuma. Mpo na mbala ya liboso na boumeli ya mibu mitano ya libala, Gerard ayaki koyeba likambo yango mpe alobaki ete: “Nayebaki yango liboso te mpe nazalaki ata kokanisa yango te.” Sikawa na esika ete alobela mwasi na ye mabe, Gerard apesaka ye longonya ntango asalaka milende ya koloba liboso ya bato mingi.

Ya solo, kati na buku na ye Stammering, David Compton alobi ete bato mingi ya likekuma bazalaka na “bobangi . . . oyo mbala mosusu eumeli mingi. Babangaka mingi ntango bazali kosolola na baninga na bango, wana bazali kosala milende ya koloba lokola bato oyo bameseni na bango to oyo balingaka, na bantango motindo wana moto ya likekuma akoki kokanisa ete akozokisama, akoyoka nsɔni . . . Ata oyo balongaka bandimaka ete babangaka mpe bobangi yango esilaka nyonso te.”

Makambo oyo makoki kobimisa bobangi

Ntango moto ya likekuma aponami mpo na kopesa eyano na esika oyo bayangani bazali mingi, lokola na kelasi, na likita moko na mosala, to na likita ya lingomba, yango ekoki kobangisa ye mpe kobanga yango ekoki komonana ntango azali kokekuma makasi. Rosanne, elenge ya mibu 15 oyo azali na likekuma mpe afandi na Afrika ya Súdi, batunaki ye na emisyo moko na radio boye: “Ezali na bantango mosusu oyo omonaka ete ezali malamu kofanda bobele nyɛɛ?” Ayanolaki ete: “Yango esalemaka mbala mingi, na ndakisa, na kelasi, nakoki kozala na eyano ya malamu ya kopesa oyo na ntembe te ekopesa ngai elembo ya malamu, kasi nayebi ete ezali mpasi mpo na koloba.”

Simon, azali moto ya mombongo, batunaki ye mpe mituna na radio na emisyo oyo touti kolobela. Lolenge moko na Rosanne, ezalela ya Simon ebongaki na lisalisi ya monganga. Kasi na bantango mosusu azalaka na mokakatano makasi ya likekuma. Yango eyaka lisusu makasi na lolenge bayangani bakotalela moto oyo azali kokekuma. Alobi ete: “Soki bozali kati na likita na mosala epai oyo osengeli koloba mpe ozali na mokakatano, bato oyo bazali kati na likita yango bakómaka motema likolólikoló.”

Bobangi oyo moto ya likekuma azalaka na yango esengeli kotalelama lolenge moko te na bobangi oyo moto ya nsɔninsɔni akoki kozala na yango ntango azali kosolola na bato oyo ayebi te. Tótalela Lisa, oyo azali koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova esili koleka mibu mibale. Na ntango ya mwa lisolo moke elongo na baninga, mbala mingi asalaka milende ya koloba malamu. Asanganaka mpe na molende nyonso na mosala ya kopalanganisa nsango malamu oyo esɛngaka mpe kosolola na bato oyo oyebi te. Kasi azalaka na bobangi oyo emonanaka epai ya bato ya likekuma mingi​—koloba liboso ya bato ebele. Lisa alobi ete: “Na makita na biso, esalemaka mpenza te ete natombola mosapi mpe napesa eyano. Soki napesi eyano, ezalaka mingimingi ya liloba moko to mwa lisakola (phrase) mokuse. Atako ezali eyano mokuse, nasalaka nyonso oyo ekoki na ngai. Mbala mingi, biyano ezalaka na motó na ngai mpe na mbɛbo na ngai mpamba te ntango nyonso nabongisaka makita liboso ya koyangana. Kasi lolemo na ngai eboyaka kosala mosala na yango.”

Mokakatano moleki monene epai na bato ya likekuma ezali bongo kotánga na mongongo makasi. Yango esɛngisaka bango ete básalela maloba oyo basengelaki kopɛngola. Lisa alobi lisusu ete: “Na makita, wana boyekoli ezali kosalema, mbala mosusu basɛngaka na biso ete tótánga bavɛrsɛ ya Makomami, moto na moto na ngala na ye. Na mabaku motindo wana bobangi eyelaka ngai, nayokaka nkanda, wana nazali kozela ngala na ngai, koyeba te soki nakokoka kotánga vɛrsɛ na ngai to nakokoka kotánga yango te. Mbala mosusu natángaka kasi nakokaka kobimisa maloba mosusu te. Na bongo, napumbwaka yango mpe nakóbaka na botángi.”

Ya solo, esengeli kokanisa na mozindo liboso ya kolendisa moto ya likekuma ete atánga na mongongo makasi. “Elendiseli” motindo wana ekoki kolɛmbisa ye. Nzokande, moto ya likekuma asengeli kopesamela longonya na milende oyo azali kosala.

Kopesa lisalisi

Likekuma ezali mokakatano monene. Likambo oyo ekobonga mpo na moto moko, mbala mosusu ekoki kobonga te mpo na moto mosusu. Na yango, bato ya likekuma mingi oyo “babikaka” na boumeli ya eleko moko, emonanaka ete na nsima ya mwa ntango likekuma na bango ezongaka. Bolukiluki mingi esalemaki likoló ya likekuma koleka mikakatano mosusu nyonso mitali koloba. Kasi, bato ya mayele bazwaki ntina ya sikisiki te mpo na mokakatano yango. Ya solo, mingi kati na bato ya mayele bandimi ete ezali na makambo mingi oyo epesaka likekuma. Engebene bolukiluki oyo eutaki kosalema, likanisi moko lipesamaki ete ezali kozanga molɔngɔ́ kati na baselile ya bɔɔngɔ́ na ebandeli ya bomoi ya moto nde epesaka likekuma. Engebene monganga Theodore J. Peters mpe monganga Barry Guitar, kati na buku na bango Stuttering​—An Integrated Approach to Its Nature and Treatment, makanisi oyo mapalangani mingi na ntina na likekuma “makosila ngala lokola bolukiluki ezali kosalema mingi na ntina na likekuma.”

Lokola bato bayebi makambo mingi te na ntina na likekuma, esengeli kokeba wana ozali kopesa makanisi na mitindo mikeseni ya kosalisama mpo na baoyo bazali kobunda na mokakatano yango. Buku oyo touti kolobela likoló ebakisi ete: “Mingi kati na bato ya likekuma makasi bakosilisa yango nyonso te. Bakoyekola koloba malɛmbɛmalɛmbɛ to kokekuma moke, mpe bakotungisama mingi mpenza te na mokakatano yango. . . . Tozali kososola te mpo na nini bato mosusu ya likekuma basalaka mbongwana te na ntango ya kosalisama.”b

Soki lisalisi ya monganga epesi litomba te, minganga mosusu bapamelaka bato ya likekuma mpo ete basalaki milende te. Monganga moko alobaki ete: “Kozanga kolonga mingimingi emonanaka mpo ete moto ya likekuma azangaka komipesa na motema mobimba.” Na kotaleláká makanisi motindo wana, mokomi David Compton alobaki ete: “Nazangi maloba ya komonisa nkanda oyo bato ya likekuma bakoki koyoka na maloba motindo wana. Mpamba te, ya liboso, kokanisa ete soki moto ya likekuma oyo asalisami na monganga abiki te ezali mbeba na ye moko, ezali lokuta. Lolenge moko te ya kosalisama na monganga ekozala malamu mpo na bato ya likekuma nyonso, mpe ata oyo ya malamu mpo na moto ya likekuma moko ekozala mpo na banso te. Ya mibale, mpamba te bato ya likekuma bazalaka na mbeba moko . . . Eloko oyo ekolisaka [mbeba na bango] ntango nyonso ezali bongo ngambo.”

Kolɛmbisa bozito na bango

Na momeseno, bato ya likekuma balingaka te ete bato mosusu báyokela bango mawa. Nzokande, makambo ezali mingi ya kosala mpo na kolɛmbisa bozito na bango. Ntango moto ya likekuma azali kokekuma, kotala ye na lolenge ya mawa te. Na esika ete otala monɔkɔ na ye, talá ye nde na miso. Na momeseno, moto ya likekuma atalelaka mingi bikela ya koloba ya bato oyo azali kosolola na bango. Soki ozali kokamwa te na elobeli na ye, ekosalisa ye ete abanga mingi te. Monganga moko oyo asalisaka mbeba ya elobeli alobaki ete: “Monisá na moto ya likekuma ete ozali pene mpo na koyokamela ye lokola okokaki koyokamela moto mosusu nyonso.”

Molakisi oyo azali na mwanakelasi ya likekuma na kelasi na ye akoki kosalisa ye ete alɛmbisa bobangi na ye. Kati na zulunalo Die Unie ya Afrika ya Súdi, bapesaki balakisi toli oyo: “Bato mingi ya likekuma bakekumaka moke ntango bayebi ete moto oyo azali koyokamela bango azali komizela te ete aloba nokinoki.”

Engebene zulunalo oyo touti kolobela likoló, ezali mpe na ntina mpo na molakisi ete ayeba mayoki ya mwanakelasi na ye. Na esika ete apɛngolaka banakelasi motindo yango kati na kobulunganisama, esɛngami na molakisi ete asololaka na bango mpe alendisaka bango ete bábimisaka mayoki na bango na ntina na mokakatano yango. Na lolenge yango, molakisi akoki koyeba makambo nini mwanakelasi abangaka koloba mingi. Zulunalo yango elobi ete: “Likoki ya mwanakelasi ya koloba malamu etaleli mingi mpenza molakisi.” Elobeli na ye ekobonga soki ayebi ete bandimaka ye atako azali na mokakatano na ye. Zulunalo yango elobaki lisusu ete: “Ezalela ya esengo, ya koyekola kati na kelasi ekopesa litomba bobele na moto ya likekuma te kasi mpe na kelasi mobimba.”

Ya solo, makanisi yango makoki mpe kosalelama na lolenge malamu na kelasi ya mikóló.

Mozalisi na biso ayebi mokakatano yango

Yehova Nzambe, Mozalisi na biso, ayebi malamumalamu kozanga kokoka ya biso bato. Atindaki Mose ete azala molobeli na ye na kobimisáká Bayisalaele na Ezipito. Asalaki yango na koyebáká malamumalamu ete Mose azalaki na mokakatano ya koloba. Nzambe ayebaki mpe ete Alona, ndeko ya Mose azalaki molobi ya makoki mpenza. Nzambe alobaki ete: “Nayebi ete ye akoki koloba malamu.” (Exode 4:14) Nzokande, Mose azalaki na bizaleli mosusu ya ntina koleka, lokola bosembo, boboto, kondima, motema molai. (Mituya 12:3; Baebele 11:24, 25) Atako Mose alingaki mpenza te, Nzambe aponaki bobele Mose ete atambwisa libota na Ye. Lisusu, Nzambe atalelaki bobangi ya Mose mpe na yango aponaki Alona ete azala molobeli na ye.​—Exode 4:10-17.

Tokoki komekola Nzambe na koyebáká mokakatano ya basusu. Talelá bato ya likekuma na lokumu na bango, mpe kosala te ete mbeba ya koloba ezipa bomoto na bango ya solo epai na yo. Yango ezali komonisama na ndakisa ya elenge mwasi moko mpe tata na ye oyo azalaki na likekuma. Tata yango ayekolaki mwango ya kotánga malamu. Mokolo moko na butu, amekaki kotángela mwana na ye ya mwasi ya mibu motoba lisolo moko, mpe asepelaki mingi na lolenge azalaki kotánga malamu.

Ntango tata asilisaki kotánga, mwana alobaki na ye ete: “Tata, lobá malamu.”

Azongisaki ete; “Nazali koloba malamu.”

Alendendelaki ye ete: “Te, lobá ndenge olobaka liboso.”

Ɛɛ, elenge mwasi oyo alingaki tata na ye mpo na ndenge azalaki liboso atako azalaki na mokakatano na ye ya koloba. Na bongo, soki ozali kosolola na moto ya likekuma, omikundola ete moto yango akoki kozala na makanisi ya ntina mpe na bizaleli bibongi. Azali mpenza na mayoki. Zalá motema pɛtɛɛ mpe monisá ete ozali koyeba mokakatano na ye.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kati na lisolo oyo, topesi bango nkombo mosusu.

b Makanisi ya kopesa mpo na bana mazali malamu koleka mpo na mikóló. Ann Irwin, monganga ya makoki oyo asalisaka likekuma, kati na buku na ye Stammering in Young Children (Likekuma ya bana mike) alobi ete: “Bana misato likoló na minei basilisaka likekuma na bango malɛmbɛmalɛmbɛ wana bazali kokóla. Soki mwana na yo azali kati na bana ntuku mibale na mitano likoló na monkama oyo bazali kosilisa likekuma na bango te ntango bazali kokóla, ekoki mpenza kozala ete ekosilisama na nzela ya monganga.”

[Elilingi na lokasa 19]

Moto ya likekuma akoki kobanga koloba liboso ya bato

[Elilingi na lokasa 20]

Zalá motema pɛtɛɛ ntango moto ya likekuma azali kobundabunda mpo na kosolola na yo

[Elilingi na lokasa 21]

Mbala mingi bato ya likekuma babangaka koloba na telefɔne

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto